Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ayikaki mpiko atako akutanaki na makambo oyo elɛmbisaka nzoto

Ayikaki mpiko atako akutanaki na makambo oyo elɛmbisaka nzoto

Mekolá kondima na bango

Ayikaki mpiko atako akutanaki na makambo oyo elɛmbisaka nzoto

SAMWELE akokaki koyoka mawa na Shilo. Bato mingi na engumba yango bazalaki kolela. Na bandako boni kolela ya basi mpe ya bana ezalaki koyokana, bazalaki kolela mpo na bansango oyo bazwaki ya batata, mibali, bana mpe bandeko na bango ya mibali oyo bakokaki lisusu kozonga na ndako te? Toyebi kaka ete Yisraele elongaki te na etumba na Bafilistia mpe babungisaki basoda soki 30 000, kaka nsima ya kobungisa basoda 4 000 na etumba mosusu oyo babundaki.​—1 Samwele 4:1, 2, 10.

Wana ezalaki kaka moko ya bampasi oyo esengelaki kolandana. Nganga-nzambe monene Eli azalaki na bana mibale ya mibali oyo bazalaki makambo mabe, Hofini ná Finehase, oyo bamemaki sanduku mosantu ya kondimana uta na Shilo. Mbala mingi, bazalaki kotya sanduku yango na esika mosantu ya tabernakle​—hema oyo ezalaki lokola tempelo—​kɛsi yango ezalaki komonisa ete Yehova azali wana. Na nsima, bato bamemaki sanduku yango na etumba; na bozoba nyonso, bakanisaki ete ekozala lokola maji mpe ekosala ete bálonga etumba. Kasi, Bafilistia babɔtɔlaki sanduku yango, mpe babomaki Hofini mpe Finehase.​—1 Samwele 4:3-11.

Sanduku eumelaki bikeke mingi na tabernakle na Shilo. Sikoyo ezalaki lisusu te. Ntango ayokaki nsango yango, Eli mobange ya mbula 98, akweaki na kiti na ye mpe akufaki. Bokilo na ye, oyo mobali na ye akufaki kaka na mokolo yango, akufaki mpe ntango azalaki kobota. Liboso akata motema, alobaki boye: “Nkembo elongwe na Yisraele mpe ekei na mboka mopaya.” Ya solo, Shilo esengelaki lisusu te kozala ndenge ezalaki.​—1 Samwele 4:12-22.

Ndenge nini Samwele akokaki koyika mpiko na makambo wana ya kolɛmbisa nzoto? Alingaki mpenza kozala na kondima makasi mpo na kolonga kosalisa bato wana oyo Yehova azalaki lisusu kobatela te mpe kondima te? Biso nyonso lelo oyo, tokoki na bantango mosusu kokutana na minyoko mpe makambo oyo elɛmbisaka nzoto oyo ekoki komeka kondima na biso; na yango, tiká tótala liteya oyo tokoki kozwa epai ya Samwele.

‘Asalaki boyengebene’

Biblia etiki naino lisolo ya Samwele, mpe elobeli sikoyo sanduku mosantu, emonisi biso mpasi oyo ekómelaki Bafilistia ndenge bazwaki sanduku yango mpe ndenge mpasi yango etindaki bango bázongisa yango. Biblia elobeli lisusu Samwele nsima ya mbula soki 20. (1 Samwele 7:2) Makambo nini azalaki kosala na boumeli ya bambula wana? Biblia eyebisi biso yango.

Eyebisi biso ete liboso eleko yango ebanda, “liloba ya Samwele ekobaki kokómela Yisraele mobimba.” (1 Samwele 4:1) Biblia emonisi ete ntango eleko yango elekaki, Samwele azalaki na momeseno ya kokende kotala bingumba misato na Yisraele, azalaki kosala yango mbula na mbula, kosilisa matata mpe kobongisa makambo. Na nsima, azalaki kozonga epai na ye na Rama. (1 Samwele 7:15-17) Emonani polele ete Samwele azalaki ntango nyonso na mosala mingi, mpe na boumeli ya mbula 20 oyo elekaki azalaki na makambo mingi ya kosala.

Pite mpe makambo mabe ya bana ya Eli ebebisaki kondima ya bato ya ekólo. Emonani ete bato mingi bakómaki kosambela bikeko. Kasi, nsima ya mbula ntuku mibale ya mosala makasi, Samwele ayebisaki bato nsango oyo: “Soki ezali na motema na bino mobimba nde bozali kozongela Yehova, bólongola kati na bino banzambe ya bapaya mpe bikeko ya Ashitorete, mpe bóbalusa motema na bino mobimba epai ya Yehova mpe bósalela kaka ye, mpe ye akobikisa bino na lobɔkɔ ya Bafilistia.”​—1 Samwele 7:3.

“Lobɔkɔ ya Bafilistia” ekómelaki bato kilo. Ndenge oyo basoda ya Yisraele balongaki te na etumba esalaki ete Bafilistia bákóma konyokola basaleli ya Nzambe ndenge balingi. Kasi, Samwele ayebisaki bato ete makambo ekoki kobongwana soki kaka bazongeli Yehova. Bandimaki? Samwele asepelaki ndenge balongolaki bikeko na bango mpe “babandaki kosalela kaka Yehova.” Samwele ayanganisaki bato na Mizipa, engumba oyo ezalaki na ngomba na nɔrdi ya Yerusaleme. Bato bayanganaki, bakilaki bilei, mpe babongolaki motema mpo na ebele ya masumu oyo basalaki na ndenge basambelaki bikeko.​—1 Samwele 7:4-6.

Kasi, Bafilistia bayokaki ete Bayisraele nyonso bayangani mpe bamonaki ete ezali libaku malamu mpo na bango. Batindaki basoda na bango na Mizipa mpo na kosilisa basambeli wana ya Yehova. Bayisraele bayokaki nsango ya likama wana oyo ezalaki koya. Bayokaki nsɔmɔ mpe basɛngaki Samwele abondela mpo na bango. Asalaki yango mpe apesaki mbeka. Na ntango ya molulu mosantu wana, basoda ya Bafilistia bayaki kobundisa Mizipa. Yehova ayanolaki na libondeli ya Samwele. Kutu, nkanda ya Yehova epelaki makasi. “Abɛtiselaki Bafilistia bankake na lokito moko makasi na mokolo yango.”​—1 Samwele 7:7-10.

Sikoyo, tosengeli nde kokanisa ete Bafilistia yango bazalaki lokola bana mike oyo bazalaki kobatama na nsima ya bamama na bango ntango bayokaki bankake ezali kobɛta? Te, bazalaki nde basoda oyo bazalaki bilombe na etumba. Na nsima, ekoki kozala ete bankake yango ezalaki te lokola oyo bango bayebaki. “Lokito makasi” yango ezalaki ndenge nini? Eutaki na mapata, to eutaki nde na bangomba? Ata soki eutaki wapi, toyebi kaka ete ebulunganisaki Bafilistia mpe ebangisaki bango. Na mobulungano wana, na esika bábangisa Bayisraele, bango moko nde bakómaki kobanga. Mibali ya Yisraele bayaki na Mizipa, babundisaki mpe balongaki bango, mpe balandaki bango na bantaka ya bakilomɛtrɛ tii na sudi wɛsti ya Yerusaleme.​—1 Samwele 7:11.

Etumba yango ekɔtisaki mbongwana monene na Yisraele. Na boumeli ya mikolo oyo Samwele asalaki lokola mosambisi na Yisraele, Bafilistia balongwaki malɛmbɛmalɛmbɛ. Basaleli ya Nzambe bazongelaki engumba mokomoko.​—1 Samwele 7:13, 14.

Bikeke mingi na nsima, ntoma Paulo atángaki Samwele na molɔngɔ ya basambisi mpe basakoli ya sembo oyo “basalaki boyengebene.” (Baebre 11:32, 33) Samwele asalisaki mpe mpo na kozongisa makambo oyo ezalaki malamu mpe sembo na miso ya Nzambe. Akobaki kosala mpo azalaki kozela Yehova na motema molai, na bosembo nyonso akobaki mosala na ye atako ezalaki na makambo oyo ekokaki kolɛmbisa ye. Azalaki mpe komonisa botɔndi. Nsima ya kolonga etumba na Mizipa, Samwele atɛlɛmisaki libanga mpo na kokanisa lolenge oyo Yehova asalisaki bato na ye.​—1 Samwele 7:12.

Olingaka ‘kosala boyengebene’? Soki ezali bongo, ekozala malamu oyekola motema molai, komikitisa mpe komonisa botɔndi ndenge Samwele asalaki. Nani kati na biso alingaka te bizaleli yango? Ezalaki malamu mpo na Samwele kokóma na bizaleli yango mpe komonisa yango ntango azalaki naino elenge, mpo akutanaki na makambo ya kolɛmbisa nzoto ntango akómaki mokóló.

“Bana na yo batamboli na banzela na yo te”

Na mbala ya nsima oyo Biblia elobeli Samwele, ezali ntango ‘akómaki mobange.’ Na ntango wana, Samwele azalaki na bana mibale ya mibali, Yoele ná Abiya, mpe apesaki bango mokumba ya kosalisa ye na mosala ya kosambisa makambo. Kasi likambo ya mawa, amikosaki. Atako Samwele azalaki sembo mpe moto ya boyengebene, bana na ye basalelaki mikumba na bango mpo na koluka matomba na bango moko, babongolaki bosembo mpe bazalaki kozwa kanyaka.​—1 Samwele 8:1-3.

Mokolo moko, mikóló ya Yisraele bayaki komilela epai ya mobange mosakoli yango. Balobaki boye: “Bana na yo batamboli na banzela na yo te.” (1 Samwele 8:4, 5) Samwele ayebaki likambo yango? Biblia elobi te. Kasi, na bokeseni na Eli, Samwele azalaki te tata oyo akangaka miso na makambo mabe ya bana. Yehova apamelaki Eli mpe apesaki ye etumbu mpo asembolaki te bana na ye mpo na mabe na bango, mpamba te azalaki kokumisa bana na ye mingi koleka Nzambe. (1 Samwele 2:27-29) Yehova azwaki soki moke te foti ya ndenge wana epai ya Samwele.

Biblia emonisi te ete Samwele ayokaki nsɔni, amitungisaki, to alɛmbaki nzoto ntango ayokaki ete bana na ye bazali na etamboli ya mabe. Nzokande, baboti mingi bakoki koyeba mpenza ndenge oyo Samwele ayokaki. Na mikolo oyo ya mabe, kotombokela bokonzi ya baboti mpe koboya disiplini epalangani mingi. (2 Timote 3:1-5) Baboti oyo bazali kotungisama na mpasi ya bongo, bakoki kobɔndisama ata moke mpe kozwa toli na ndakisa ya Samwele. Atikaki te ete etamboli mabe ya bana na ye ebebisa ata moke etamboli na ye. Kobosana te, ata soki maloba mpe disiplini esimbi te mitema ya bana, ndakisa ya baboti eteyaka mingi. Mpe baboti bazalaka ntango nyonso na libaku ya kokumisa Tata na bango, Yehova Nzambe​—ndenge Samwele asalaki.

“Tyelá biso mokonzi”

Bana ya Samwele bakokaki koyeba te makambo oyo lokoso mpe moimi na bango ekokaki kobimisa. Mikóló ya Yisraele bakendaki koloba na Samwele ete: “Sikoyo, tyelá biso mokonzi mpo asambisaka biso lokola bikólo nyonso.” Likambo wana emonanaki lokola ete baboyaki Samwele? Kutu, ye nde Yehova atyaki mpo na kosambisa bato yango na boumeli ya bambula mingi. Sikoyo, balingaki lisusu te ete mosakoli mpamba lokola Samwele asambisaka bango, kasi balingaki nde mokonzi. Bikólo oyo ezalaki zingazinga na bango ezalaki na bakonzi, mpe Bayisraele balingaki mpe bázala na oyo ya bango mokonzi! Samwele asalaki nini? Biblia elobi ete “likambo yango emonanaki mabe” na miso ya Samwele.​—1 Samwele 8:5, 6.

Tóyoka ndenge Yehova ayanolaki ntango Samwele ayebisaki ye likambo yango na libondeli: “Yoká mongongo ya bato oyo na makambo nyonso oyo bazali koloba na yo; mpamba te baboyi yo te, kasi baboyi nde ngai nazala mokonzi na bango.” Maloba yango ebɔndisaki mpenza Samwele, kasi likambo oyo bato ya ekólo basalaki emonisaki mpenza ete batyolaki Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso! Yehova ayebisaki mosakoli na ye akebisa Bayisraele mpo na likama monene oyo ekokaki kokómela bango soki bazali na mokonzi oyo azali moto. Ntango Samwele amilelaki, bango batingamaki kaka ete: “Te, mokonzi nde ayangela biso.” Lokola azalaki ntango nyonso kotosa Nzambe na ye, Samwele akendaki mpe atyaki mafuta na mokonzi oyo Yehova aponaki.​—1 Samwele 8:7-19.

Kasi, ndenge nini Samwele atosaki? Asalaki yango kaka bongobongo mpe na nkanda? Apesaki nzela ete makambo ya kolɛmbisa nzoto ebebisa motema na ye, mpe nkanda ezwa esika na motema na ye? Bato mingi bakoki kosala bongo soki bakutani na likambo ya bongo, kasi Samwele asalaki bongo te. Atyaki Saulo mafuta mpe andimaki ete Yehova nde aponaki moto yango. Apwɛpwaki Saulo, elembo oyo emonisaki ete ayambi ye mpe andimi kotosa mokonzi wana ya sika. Mpe alobaki na bato ete: “Bomoni moto oyo Yehova aponi, ete moto moko te azali lokola ye kati na bato nyonso?”​—1 Samwele 10:1, 24.

Samwele atalelaki te kaka mabunga, kasi malamu oyo ezalaki epai ya moto wana oyo Yehova aponaki. Na esika atya miso na ye na ndenge oyo bato batikaki kosepela na ye, atyaki nde miso na makambo ya bosembo oyo asalaki epai ya Nzambe. (1 Samwele 12:1-4) Akokisaki mpe mokumba na ye na bosembo nyonso, azalaki kopesa bato toli na ntina na makama ya elimo oyo bakutanaki na yango mpe azalaki kolendisa bango bátikala sembo epai ya Yehova. Toli na ye esimbaki mitema na bango, mpe bato yango basɛngaki Samwele abondela mpo na bango. Apesaki bango eyano oyo ya malamu: “Nakoki kokanisa ata moke te kosalela Yehova lisumu na kotikáká kobondela mpo na bino; mpe nasengeli koteya bino nzela ya malamu mpe ya sembo.”​—1 Samwele 12:21-24.

Ekómelá yo olɛmba nzoto ntango baponi moto moko mpo na mokumba moko boye? Ndakisa ya Samwele ezali mpenza toli ya malamu oyo ekoki kosalisa biso tóboya ete zuwa to nkanda ezwa misisa na motema na biso. Nzambe abombeli mosaleli na ye mokomoko ya sembo ebele ya mapamboli mpe mosala oyo esepelisaka.

“Okolela Saulo kino ntango nini?”

Samwele asalaki mabe te ndenge azalaki komona makambo ya malamu epai ya Saulo; azalaki moto moko ya malamu. Saulo azalaki molai mpe engambe, azalaki mobali ya mpiko mpe mayele mingi, kasi atako bongo na ebandeli azalaki na komikitisa. (1 Samwele 10:22, 23, 27) Longola makambo wana, azalaki na likabo moko oyo elekaki nyonso​—bonsomi ya kopona, likoki ya kopona etamboli oyo akolanda na bomoi na ye mpe kozwa bikateli na ye. (Kolimbola Mibeko 30:19) Asalelaki likabo yango malamu?

Likambo ya mawa, ntango moto akómi na bokonzi, mbala mingi ezaleli ya liboso oyo abungisaka ezalaka komikitisa. Eumelaki te, Saulo akómaki lolendo. Abandaki kobuka mibeko ya Yehova oyo Samwele apesaki ye. Mokolo moko, Saulo azangaki motema molai mpe atumbaki mbeka oyo kaka Samwele nde akokaki kosala yango. Samwele asembolaki ye makasi, mpe alobaki ete bokonzi ekotikala lisusu te na libota ya Saulo. Na esika azwa liteya na disiplini wana, Saulo asalaki mabe mingi koleka.​—1 Samwele 13:8, 9, 13, 14.

Na nzela ya Samwele, Yehova ayebisaki Saulo akende kobunda na Baamaleke. Na malako oyo Yehova apesaki, moko na yango esɛngaki koboma Agage, mokonzi na bango oyo azalaki mabe. Kasi, Saulo abomaki Agage te, mpe atikaki biloko ya motuya oyo bapunzaki, oyo esengelaki kobebisama. Ntango Samwele ayaki mpo na kosembola ye, Saulo amonisaki polele ete akómi mabe mpenza. Na esika andima kosembolama na komikitisa nyonso, alukaki komilongisa, kolongisa mabe na ye mpe alukaki kobwaka foti epai ya bato ya ekólo ata mpe epai ya Samwele. Ntango Saulo alukaki koboya disiplini na ndenge azalaki koloba ete bazwaki biloko mosusu mpo na kopesa Yehova mbeka, Samwele alobaki na ye boye: “Talá! Kotosa eleki mbeka.” Na mpiko nyonso, Samwele apamelaki Saulo amonisaki polele ekateli ya Yehova: Bokonzi ekolongwa epai ya Saulo mpe ekopesama na moto mosusu​—ya malamu.​—1 Samwele 15:1-33.

Samwele atungisamaki mpenza na mabunga oyo Saulo asalaki. Alekisaki butu mobimba kobelela Yehova mpo na likambo yango. Kutu, alelaki mpo na Saulo. Samwele azalaki komona ete Saulo akokokisa makambo mingi ya malamu; azalaki komona bizaleli ya malamu oyo azalaki na yango, mpe sikoyo bilikya nyonso ekendaki na mai. Moto wana oyo ye ayebaki abongwanaki​—abungisaki bizaleli na ye ya malamu mpe apesaki Yehova mokɔngɔ. Samwele aboyaki kutu kotala Saulo lisusu. Kasi, na nsima, Yehova apamelaki Samwele na boboto; alobaki na ye boye: “Okolela Saulo kino ntango nini, awa ngai naboyi ye azala mokonzi ya Yisraele? Tondisá liseke na yo na mafuta mpe kende. Nakotinda yo epai ya Yese, moto ya Beteleme, mpamba te namizweli mokonzi kati na bana na ye ya mibali.”​—1 Samwele 15:34, 35; 16:1.

Mokano ya Yehova etalelaka te bosembo ya bato ya kozanga kokoka oyo ntango mosusu ebongwanaka. Soki moto moko azali lisusu sembo te, Yehova akopona moto mosusu mpo akokisa mokano na ye. Na yango, Samwele atikaki kolela Saulo. Na litambwisi ya Yehova, Samwele akendeki epai ya Yese na Beteleme, epai akutaki ebele ya bana na ye oyo bazalaki bingambe. Kasi, na ebandeli, Yehova ayebisaki Samwele boye: “Kotala elongi na ye te mpe bolai na ye te, . . . mpo Nzambe amonaka ndenge moto amonaka te, mpamba te moto amonaka oyo emonanaka na miso; kasi Yehova, amonaka ndenge motema ezali.” (1 Samwele 16:7) Nsukansuka, Samwele akutanaki na Davidi, mwana ya nsuka, mpe ye nde Yehova aponaki!

Na bambula na ye ya nsuka, Samwele amonaki lisusu polele ete ekateli ya Yehova ezalaki sembo ndenge atyaki Davidi na esika ya Saulo. Saulo akómaki na zuwa oyo etindaki ye aluka koboma Davidi mpe akómaki mopɛngwi. Kasi, Davidi amonisaki bizaleli ya malamu mpenza​—mpiko, bosembo, kondima mpe boyengebene. Ntango Samwele akómaki mobange mpenza, kondima na ye ekómaki lisusu makasi. Amonaki ete ezali ata na likambo moko te ya kolɛmbisa nzoto oyo Yehova akoki kozanga kosilisa, ata mpe kokómisa yango lipamboli. Nsukansuka, Samwele akufaki, atikaki nsango ya moto oyo azalaki na bomoi ya malamu oyo eumelaki pene ya ekeke mobimba. Yango wana tokoki kokamwa te ndenge Bayisraele nyonso balelaki moto ya sembo ndenge wana ntango akufaki! Lelo oyo, mosaleli mokomoko ya Yehova asengeli komituna boye: ‘Nakomekola kondima ya Samwele?’

[Elilingi na lokasa 25]

Ndenge nini Samwele akokaki kosalisa Bayisraele báyika mpiko na mpasi monene oyo ekómelaki bango mpe na likambo ya kolɛmbisa nzoto?

[Elilingi na lokasa 26]

Ndenge nini Samwele ayikaki mpiko ntango bana na ye ya mibali bakómaki na etamboli ya mabe?