Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu​—Azalaki na bomoi ya ndenge nini?

Yesu​—Azalaki na bomoi ya ndenge nini?

“Bilei na ngai nde kosala mokano ya moto oyo atindaki ngai mpe kosilisa mosala na ye.”​—YOANE 4:34.

LIKAMBO oyo etindaki Yesu aloba maloba wana oyo ezali awa na likoló, emonisi likambo oyo ezalaki mpenza na esika ya liboso na bomoi na ye. Yesu ná bayekoli na ye batambolaki ntɔngɔ mobimba na bangombangomba ya mokili ya Samaria. (Yoane 4:6) Lokola bakanisaki ete Yesu asengelaki koyoka nzala na ntango wana, bayekoli na ye bapesaki ye mwa biloko ya kolya. (Yoane 4:31-33) Na eyano na ye, Yesu amonisaki na mokuse mokano ya bomoi na ye. Mpo na ye, kosala mosala ya Nzambe ezalaki na ntina mingi koleka kolya. Na maloba mpe na misala, Yesu amonisaki ete bomoi na ye ezali mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Yango esɛngaki mpe nini?

Kosakola mpe koteya Bokonzi ya Nzambe

Biblia emonisi mosala oyo Yesu azalaki kosala na bomoi na ye. Elobi ete: “Akendaki epai na epai na Galile mobimba, azalaki koteya . . . mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi.” (Matai 4:23) Yesu asukaki kaka te na kosakwela basusu Bokonzi ya Nzambe. Ateyaki mpe bato​—elingi koloba, apesaki malako, alimbolaki, mpe asalelaki makanisi oyo ebongi mpo na kosalisa bango bándima. Bokonzi ezalaki motó ya likambo ya nsango ya Yesu.

Na boumeli ya mosala na ye, Yesu ateyaki bayoki na ye soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini mpe oyo yango ekosala. Talá makambo oyo elandi, oyo elobeli solo na ntina na Bokonzi, ná mpe bavɛrsɛ oyo emonisi biso maloba oyo Yesu alobaki na likambo yango.

  • Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya likoló, mpe Yehova atye Yesu Mokonzi ya Bokonzi yango.​—MATAI 4:17; YOANE 18:36.

  • Bokonzi ekosantisa nkombo ya Nzambe mpe ekosala ete mokano na ye esalema na mabele lokola na likoló.​—MATAI 6:9, 10.

  • Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, mabele mobimba ekobongwana paradiso.​—LUKA 23:42, 43.

  • Mosika te Bokonzi ya Nzambe ekoya mpe ekokokisa mokano ya Nzambe mpo na mabele. *​—MATAI 24:3, 7-12.

Kosala misala ya nguya

Yesu ayebanaki libosoliboso lokola “Moteyi.” (Yoane 13:13) Kasi, na boumeli ya mbula misato na ndambo ya mosala na ye, asalaki mpe misala ya nguya. Misala yango esalisaki mpo na mikano soki mibale. Ya liboso, emonisaki ete Nzambe nde atindaki ye. (Matai 11:2-6) Ya mibale, emonisaki oyo ye, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe akosala mpo na mabele mobimba na mikolo ezali koya. Talá mwa ndambo ya makamwisi oyo asalaki.

Kanisá naino ndenge bomoi ekozala awa na mabele ntango Mokonzi wana ya nguya akoyangela!

Komonisa bomoto ya Yehova Nzambe

Na likambo etali koteya basusu na ntina na Yehova, moto moko te akoki kosala yango malamu mingi koleka Mwana ya Nzambe, oyo na nsima akómaki Yesu Kristo. Lokola azali “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá,” Yesu azalaki esika moko ná Yehova kuna na likoló, ntango molai mpenza koleka ekelamu nyonso ya elimo. (Bakolose 1:15) Kanisá na mabaku oyo azalaki na yango ya kozwa makanisi ya Tata na ye mpe koyekola mokano, mitinda mpe banzela na ye.

Yango wana Yesu akokaki koloba ete: “Moto moko te ayebi Mwana longola kaka Tata; mpe moto moko te ayebi Tata longola kaka Mwana ná moto oyo Mwana asepeli komonisa ye Tata.” (Luka 10:22) Ntango azalaki awa na mabele lokola moto, Yesu andimaki mpenza, ɛɛ, na esengo nyonso​—komonisa ndenge Tata na ye azali. Maloba mpe mateya ya Yesu ekesanaki mpenza na oyo ya bato, mpamba te ezalaki kouta na makambo oyo amonaki ntango azalaki na likoló, liboso ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, oyo atondi na nkembo.​—Yoane 8:28.

Likambo oyo Yesu asalaki mpo na komonisa tata na ye ekoki kolimbolama na mosala oyo aparɛyi moko oyo ekitisaka mpe ematisaka nguya ya kura (transformateur électrique) esalaka. Aparɛyi yango ekoki kozwa kura oyo ezali na nguya makasi mpe kokitisa yango, mpe kokómisa yango na ndenge oyo bato mingi bakoki kosalela yango na ndenge oyo ebongi. Ntango azalaki awa na mabele, Yesu azwaki makambo oyo ayekolaki na likoló na ntina na Tata na ye mpe ateyaki yango na ndenge oyo ata bato mpamba bakokaki kokanga ntina na yango mpe kosalela yango kozanga mpasi.

Tótalela ndenge mibale oyo Yesu amonisaki Tata na ye:

  • Na mateya na ye, Yesu amonisaki solo na ntina na Yehova​—nkombo na Ye, mokano na Ye mpe banzela na Ye.​—YOANE 3:16; 17:6, 26.

  • Na misala na ye, Yesu amonisaki ebele ya makambo ya kitoko ya bomoto ya Yehova. Yesu amonisaki bomoto ya Tata na ye na ndenge ya kokoka mpenza, yango wana, alobaki ete: ‘Soki olingi koyeba ndenge Tata na ngai azali, talá kaka ngai.’​—YOANE 5:19; 14:9.

Tokamwaka mpenza na bomoi oyo Yesu azalaki na yango. Tokoki kozwa matomba mingi mpenza soki totaleli ntina oyo Yesu akufaki mpe soki tosaleli makambo oyo toyekoli.

^ par. 9 Mpo na koyeba makambo mingi oyo etali Bokonzi ya Nzambe mpe ndenge oyo toyebi ete etikali moke eya, talá mokapo 8, “Bokonzi ya Nzambe ezali nini?,” mpe mokapo 9, “Tozali na ‘mikolo ya nsuka’?” ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.