Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yesu​—Akufaki mpo na nini?

Yesu​—Akufaki mpo na nini?

“Mwana ya moto ayaki . . . kopesa molimo [to bomoi] na ye lisiko na esika ya bato mingi.”​—MARKO 10:45.

YESU ayebaki oyo ezalaki kozela ye. Ayebaki ete bomoi na ye ekozala na kimya te. Kutu, ayebaki ete bomoi na ye ekokatana na ndenge ya mabe ntango azali naino na mbula 30 na ndambo, mpe amibongisaki mpenza mpo na liwa yango.

Biblia ezwaka na motuya mpenza liwa ya Yesu. Buku moko elobi ete Makomami ya Grɛki ya bokristo to kondimana ya sika etángi polele mpenza liwa ya Yesu mbala soki 175. Kasi, mpo na nini esengelaki ete Yesu anyokwama mpe na nsima akufa? Tosengeli koyeba yango mpo liwa ya Yesu ekoki kozala na ntina mingi na bomoi na biso.

Oyo Yesu ayebaki ete akokutana na yango

Na mbula ya nsuka ya bomoi na ye, Yesu akebisaki bayekoli na ye mbala mingi mpo na minyoko mpe liwa oyo ezalaki kozela ye. Na nzela, ntango bazalaki kokende na Yerusaleme mpo na kosala Elekeli na ye ya nsuka, ayebisaki bantoma na ye 12 ete: “Bakokaba Mwana ya moto na mabɔkɔ ya banganga-nzambe bakonzi ná bakomeli, mpe bakokatela ye etumbu ya liwa mpe bakokaba ye na mabɔkɔ ya bato ya bikólo, mpe bakosɛka ye mpe bakobwakela ye nsoi mpe bakobɛta ye fimbo mpe bakoboma ye.” * (Marko 10:33, 34) Mpo na nini andimaki mpenza ete makambo wana ekokómela ye?

Yesu ayebaki malamu bisakweli mingi ya Makomami ya Ebre oyo esakolaki ndenge bomoi na ye ekosuka. (Luka 18:31-33) Tótalela mwa ndambo ya bisakweli ná bavɛrsɛ oyo elimboli ndenge bisakweli yango ekokisamaki.

Masiya ako . . .

Yesu akokisaki bisakweli wana mpe bisakweli mingi mosusu. Akokaki kosala makambo wana nyonso na ndenge na ye moko te. Kokokisama ya bisakweli wana nyonso epai ya Yesu emonisi ete atindamaki mpenza na Nzambe. *

Kasi, mpo na nini ezalaki na ntina Yesu anyokwama mpe akufa?

Yesu akufaki mpo na kosilisa ntembe oyo ebimaki

Yesu ayebaki ntembe oyo ebimaki na elanga ya Edene, oyo etalaki bikelamu nyonso. Ntango ekelamu moko ya elimo asenginyaki bango, Adama ná Eva baponaki te kotosa Nzambe. Botomboki ya mobali wana ná mwasi na ye ebimisaki ntembe mpo na lotomo ya Nzambe ya kozala mokonzi to ya ndenge na ye ya koyangela. Lisumu na bango ebimisaki mpe ntembe ya koyeba soki ata moto moko akotikala sembo epai ya Nzambe ntango amekami.​—Ebandeli 3:1-6; Yobo 2:1-5.

Yesu apesaki eyano ya solosolo na ntembe yango mibale​—boyangeli ya Yehova mpe bosembo ya moto. Ndenge atosaki mpenza “tii liwa . . . na nzete ya mpasi,” Yesu akɔtelaki Boyangeli ya Nzambe. (Bafilipi 2:8) Yesu amonisaki mpe ete moto ya kokoka akoki kotikala sembo mpenza epai ya Yehova ata soki akutani na komekama ya makasi mpenza.

Yesu akufaki mpo na kosikola bato

Mosakoli Yisaya asakolaki ete konyokwama mpe liwa ya Masiya oyo alakamaki, ekosalisa mpo na kosikola bato na masumu. (Yisaya 53:5, 10) Yesu ayebaki yango mpenza, mpe andimaki kopesa “molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28) Liwa na ye lokola mbeka efungwelaki bato ya kozanga kokoka nzela ya kozala na boyokani malamu ná Yehova mpe kosikola bango na lisumu mpe liwa. Liwa ya Yesu epesi biso libaku malamu ya kozongela oyo Adama ná Eva babungisaki​—elikya ya kozala na bomoi ya seko mpe ya malamu na mabele. *​—Emoniseli 21:3, 4.

Oyo okoki kosala

Na masolo oyo, tomoni oyo Biblia elobi na ntina na Yesu: epai autaki, lolenge ya bomoi oyo azalaki na yango, mpe ntina oyo akufaki. Koyeba solo wana na ntina na Yesu ekosuka kaka te na kosalisa mpo na kolongola makanisi mabe na ntina na ye. Kosalela makambo yango ekoki komema mapamboli​—bomoi ya malamu lelo oyo mpe bomoi ya seko na mikolo ezali koya. Biblia eyebisi biso oyo tosengeli kosala soki tolingi kozwa mapamboli ya ndenge wana.

  • Yekolá makambo mingi na ntina na Yesu kristo mpe mokumba oyo azali na yango na mokano ya Yehova.​—YOANE 17:3.

  • Monisá kondima epai ya Yesu, monisá na bomoi na yo ete ondimaka ye lokola mobikisi na yo.​—YOANE 3:36; MISALA 5:31.

Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo oyekola makambo mingi na ntina na Yesu Kristo, ‘Mwana se moko ya Nzambe oyo abotamaki,’ oyo na nzela na ye tokozwa likabo ya “bomoi ya seko.”​—Yoane 3:16.

^ par. 5 Mbala mingi Yesu azalaki komibenga “Mwana ya moto.” (Matai 8:20) Maloba yango emonisi kaka te ete azalaki mpenza moto, kasi emonisi mpe ete azalaki “mwana ya moto” oyo bisakweli ya Biblia elobelaki.​—Danyele 7:13, 14.

^ par. 13 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali bisakweli oyo ekokisamaki epai ya Yesu, talá na apɛndisi na lisolo oyo elobi “Yesu Kristo​—Masiya oyo alakamaki” na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 17 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali motuya ya mbeka ya liwa ya Yesu, talá mokapo 5, “Lisiko​—Likabo ya Nzambe oyo eleki makabo nyonso,” na buku Biblia eteyaka mpenza nini?