Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Teyá bana na yo

Esilá kokómela yo omiyoka ete ozali yo moko mpe obanga?

Esilá kokómela yo omiyoka ete ozali yo moko mpe obanga?

BATO mingi lelo oyo bamiyokaka ete bazali bango moko; bamiyokaka ete moto moko te amibanzabanzaka mpenza mpo na bango. Mbala mingi mibange bamiyokaka bongo. Kasi bana mingi lelo oyo, ezala oyo basalelaka Nzambe, bamiyokaka mpe ete bazali bango moko mpe babangaka. Oyebi mpo na nini? *

Ekoki kozala na bantina mingi. Tózwa ndakisa ya mobali moko oyo azalaki na bomoi kala mpenza, elingi koloba mbula soki nkóto moko liboso Yesu abotama. Nkombo na ye Eliya. Azalaki na bomoi ntango bato ya ekólo Yisraele batikaki kosalela Yehova, Nzambe ya solo. Mingi na bango babandaki kosambela Baala, nzambe ya lokuta. Eliya alobaki ete: “Natikali kaka ngai moko.” Kasi okanisi ete mosaleli ya Yehova oyo atikalaki ezalaki kaka Eliya?

Atako Eliya ayebaki yango te, Bayisraele mosusu bazalaki kosambela Nzambe ya solo. Kasi, bakendaki komibomba. Bazalaki kobanga. Oyebi mpo na nini?

Ahabe, mokonzi ya Yisraele, azalaki kosalela Yehova te; azalaki kosambela Baala nzambe ya lokuta ya Yezabele, mwasi mabe ya Ahabe. Na yango, ye ná Ahabe, bazalaki koluka baoyo bazalaki kosalela Yehova mpo na koboma bango, mingimingi Eliya. Ntina wana nde Eliya akimaki. Akendaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 483, na nzela ya esobe oyo ekendaki tii na Horebe, esika oyo Biblia ebengaka mpe Sinai. Kuna, bankama ya bambula liboso ya eleko ya Eliya, Yehova apesaki libota na ye Mibeko Zomi mpe mibeko mosusu. Eliya amibombaki na kati ya libulu moko na Horebe. Okanisi ete Eliya asengelaki kobanga?

Biblia elobi ete liboso Yehova asalelaki Eliya mpo na kosala makamwisi minene. Na libaku moko, Yehova ayanolaki na libondeli ya Eliya oyo asɛngaki ete mɔtɔ elongwa na likoló mpe ezikisa mbeka. Na ndenge yango, Yehova amonisaki ete azali Nzambe ya solo, kasi Baala te. Sikoyo, ntango Eliya azalaki na kati ya libulu, Yehova asololaki na ye.

Atunaki ye boye: “Ozali kosala nini awa?” Na ntango wana nde Eliya alobaki ete ‘kaka ngai moko nde natikali na kati ya bato oyo bazali kosambela yo.’ Na boboto nyonso, Yehova asembolaki Eliya; alobaki ete: ‘Nazali na bato mosusu nkóto nsambo oyo bazali kosalela ngai.’ Yehova ayebisaki Eliya azonga, amonisaki ye ete azali na mosala mingi ya kopesa ye asala.

Okanisi ete ndakisa ya Eliya eteyi biso nini?— Ata baoyo bazali kosalela Yehova bakoki ntango mosusu kobanga. Na yango, biso nyonso, bilenge to mikóló tosengeli kobondela Yehova mpo na kosɛnga ye lisalisi. Biblia elaki ete: “Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye.”

Ezali na liteya mosusu: Tozali na bandeko mibali mpe basi bipai nyonso, oyo balingaka Yehova mpe biso. Biblia elobi ete: “Bampasi ya ndenge wana ezali mpe kokómela lisangá mobimba ya bandeko na [biso] na mokili.” Osepeli te koyeba ete tozali soki moke te biso moko?

^ par. 3 Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.