Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Esakweli 2. Nzala

Esakweli 2. Nzala

Esakweli 2. Nzala

“Nzala ekozala.”​—MARKO 13:8.

● Mobali moko akei na Quaratadji, mboka moko ya ekoló Niger, mpo na komibatela. Bandeko na ye ya mibali mpe ya basi, bango mpe balongwe na mboka ya kati mpo na kokima nzala. Kasi, mobali yango alali kaka ye moko likoló ya litɔkɔ na mabele. Mpo na nini azali kaka ye moko? Sidi, mokonzi ya mboka alobi ete: “Lokola azali na likoki ya koleisa libota na ye te, aboyi komona ndenge bazali konyokwama.”

MAKAMBO OYO EZALI KOSALEMA EMONISI NINI? Na mokili mobimba, mokolo na mokolo, moto 1 kati na bato 7 azali kozanga biloko ya kolya oyo esengeli. Na bikóló ya Afrika oyo ezali pembeni ya esobe ya Sahara, likambo yango ezali mpenza mawa, mpo moto 1 kati na bato 3 azwaka te biloko oyo esengeli mpo na kolya na boumeli ya mikolo mingi. Na makanisi wana na motó, kanisá sikoyo libota oyo ezali na tata, mama mpe mwana. Soki biloko ezali kaka mpo na bato mibale, nani akolala nzala? Tata? mama? to mwana? Yango nde ekateli oyo mabota wana esengeli kozwaka mokolo na mokolo.

NTEMBE NINI BATO BABIMISAKA MINGI? Mabele ebimisaka biloko oyo ekoki koleisa moto nyonso. Esengeli kaka bato báyeba kosalela biloko yango.

NTEMBE YANGO EZALI SOLO? Ezali solo ete baloni bilanga bakoki kobimisa biloko ebele mpe komema yango koleka ndenge ezalaki liboso. Bakonzi nde basengeli koyeba ndenge ya kosalela biloko oyo mabele ezali kobimisa mpo na kosilisa likambo ya nzala. Nzokande, atako bameki kosala yango bambula mingi, bazali kolonga te.

OKANISI NINI? Maloba ya Marko 13:8 ezali kokokisama? Atako mayele ya teknoloji ekoli, nzala ezali konyokola bato na mokili mobimba?

Mbala mingi, koningana ya mabele mpe nzala eyaka liboso ya makambo oyo ebimaka na eteni mosusu ya elembo ya mikolo ya nsuka.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

“Bana mingi (koleka 1/3) oyo bazali kokufa na maladi ya mpema, ya pulupulu, mpe bamaladi mosusu bakokaki kobika soki bazalaki kolya malamu.”​—ANN VENEMAN, OYO AZALAKÁ MOKAMBI YA EBONGISELI YA ONU MPO NA BANA (UNICEF).

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 5]

© Paul Lowe/​Panos Pictures