Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Esakweli 3. Maladi

Esakweli 3. Maladi

Esakweli 3. Maladi

“Bato . . . bakozwa maladi ya mabe.”​—LUKA 21:11, Bible na lingala ya lelo oyo.

● Bonzali, moto moko oyo azalaki kosala na lopitalo moko na ekoló moko ya Afrika oyo ezalaki na bitumba, asalaki oyo akokaki kosala mpo na kosalisa basali ya esika oyo babimisaka mabanga ya ntalo na engumba na ye, oyo bazalaki kokufa na maladi ya Marburg. * Atako asɛngaki lisalisi epai ya bakonzi na engumba ya monene, kasi azwaki eyano te. Nsukansuka, nsima ya sanza minei, lisalisi ekómaki kasi na ntango wana Bonzali akufaki. Azwaki maladi ya Marburg epai ya bato wana oyo alukaki kosalisa.

MAKAMBO OYO EZALI KOSALEMA EMONISI NINI? Bamaladi ya mpema mokuse (na ndakisa pneumonie), bamaladi ya pulupulu, sida, maladi ya ntolo, mpe malaria ezali na kati ya bamaladi mabe oyo ezali konyokola bato. Na mbula moko oyo euti koleka, bamaladi yango mitano ebomaki bato soki milio 10 na ndambo. Na maloba mosusu, tokoki koloba ete bamaladi yango ebomaki pene ya moto moko na segɔnde misato nyonso, na boumeli ya mbula yango.

NTEMBE NINI BATO BABIMISAKA MINGI? Motángo ya bato na mokili ezali se kobakisama, yango wana bamaladi ezali mpe kokóma mingi. Ezali na bato mingi oyo bakoki kozwa maladi.

NTEMBE YANGO EZALI SOLO? Motángo ya bato ya mokili emati na ndenge ya kokamwa. Ndenge moko mpe mayele ya moto ya koyeba, komibatela mpe kosalisa maladi ekoli. Na yango, tomoni te ete bamaladi elingaki lisusu te konyokola bato? Na esika ezala bongo, maladi ezali kaka konyokola bato.

OKANISI NINI? Bato bazali mpenza konyokwama na bamaladi ya mabe ndenge Biblia esakolaki?

Koningana ya mabele, nzala, mpe maladi ezali koboma bamilio ya bato. Bamilio mosusu ya bato bazali kotungisama mingi na mabɔkɔ ya baninga na bango, na ndakisa, bato oyo bakokaki kobatela bango, bazali nde kosala bango mabe. Talá likambo oyo esakweli ya Biblia elobi ete esengelaki kosalema.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 3 Marburg ezali mikrobe moko oyo ezali lokola Ebola. Fiɛvrɛ na yango esalaka ete moto abima makila.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

“Ezali mpenza mabe nkosi to eloko moko elya yo na libándá, ndenge moko ezali mpe mabe mpenza maladi moko elya yo na kati, mpe komona ndenge ezali konyokola bato penepene na yo.”​—MONGANGA MICHAEL OSTERHOLM.

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 6]

© William Daniels/​Panos Pictures