Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Ndenge nini bankombo oyo ezalaki na bakashɛ ya kala oyo basalá na mabele ya lima, ekokani na bankombo oyo ezali na Biblia?

Na ntango ya kala, bato oyo bazalaki kokoma mpe kobomba mikanda ya Leta, bazalaki kolínga mpe kokanga yango na nsinga, mpe na nsima, bazalaki kotya mwa mabele ya lima na lizita mpo na kotya yango kashɛ. Bazalaki kotya kashɛ mpo na kotya sinyatire, oyo ekozala lokola tɛmwɛ, mpe mpo na komonisa ete mokanda yango ezali ya solosolo.

Ntango mosusu, bazalaki kosalela lopɛtɛ ya kotya elembo mpo na kotya kashɛ mpe biloko yango ezalaki kotalelama lokola biloko ya motuya. (Ebandeli 38:18; Estere 8:8; Yirimia 32:44) Mbala mingi, kashɛ ezalaki na nkombo ya nkolo na yango, to na titre na ye ya mosala, mpe nkombo ya tata na ye.

Bato ya mayele bamonaki bankóto ya bakashɛ ya kotya bilembo ya ntango ya kala. Bakashɛ yango mosusu ezalaki na bankombo ya bato oyo Biblia elobeli. Na ndakisa, bato ya arkeoloji bazwaki biloko ya kotya bilembo oyo bakanisaki ete ekoki kozala bakashɛ ya bakonzi mibale ya Yuda. Moko na yango elobi boye: “Ezali ya Ahaze [mwana ya] Yehotama [Yotame], mokonzi ya Yuda.” Mosusu elobi: “Ezali ya Hizikiya [mwana ya] Ahaze, mokonzi ya Yuda.” (2 Bakonzi 16:1, 20) Ahaze mpe Hizikiya bayangelaki na siɛklɛ ya mwambe liboso ya ntango ya biso.

Bato ya mayele bayekolaki biloko yango oyo ezalaki na bilembo ya kotya bakashɛ mpe bandimi ete ezali ya bato oyo Biblia elobeli. Kati na bato yango, tokoki kotánga Baruke (sɛkrɛtɛrɛ ya Yirimia), Gemaria (“mwana ya Shafane”), Yerahemele (“mwana ya mokonzi”), Yukale (“mwana ya Shelemia”), mpe Seraya (ndeko ya Baruke).​—Yirimia 32:12; 36:4, 10, 26; 38:1; 51:59.

Wapi bandenge ya kolobela ntango ya mokolo na Biblia?

Makomami ya Ebre esalelaka maloba lokola “ntɔngɔ,” “midi,” mpe “mpokwa.” (Ebandeli 24:11; Kolimbola Mibeko 28:29; 1 Bakonzi 18:26) Baebre bazalaki kokabola butu na biteni misato ya bokɛngɛli, oyo mokomoko na yango ezalaki na ngonga soki minei, kasi na nsima balandaki ndenge Bagrɛki mpe Baroma bakabolaki yango na bokɛngɛli minei. Emonani ete Yesu alobelaki lolenge ya kokabola butu na biteni minei, ntango alobaki ete: “Bósɛnzɛlaka, mpo boyebi te ntango nini nkolo ya ndako akoya, soki na mpokwa to na katikati ya butu to na ntango nsoso eleli to na ntɔngɔntɔngɔ.” (Marko 13:35) Bokɛngɛli ya yambo ezalaki kobanda “na mpokwa” ntango moi elali tii na ngonga ya libwa na butu. Oyo ya mibale ezalaki kosuka na katikati ya butu, mpe oyo ya misato ezalaki kobanda “ntango nsoso eleli” mpe ezalaki kosuka na ngonga ya misato ya butu. Mpe oyo ya nsuka, ezalaki kobanda na ntɔngɔntɔngɔ tii ntango moi ebimaka. Ezalaki na “eleko ya minei ya kokɛngɛla na butu” nde Yesu atambolaki likoló ya mai na Mbu ya Galile.​—Matai 14:23-26.

Na Makomami ya Grɛki ya bokristo, liloba “ngonga” elimbolaka moko ya biteni zomi na mibale ya mokolo, kobanda ntango moi ebimi tii ntango ekolala. (Yoane 11:9) Lokola kobima ya moi mpe kolala na yango na Yisraele ezali ndenge moko te na bileko nyonso, yango wana bazalaki kopesa ntango oyo likambo ekokaki kosalema, na ndakisa “pene na ngonga ya motoba.”​—Misala 10:9.

[Elilingi na lokasa 15]

Lopɛtɛ ya kotya kashɛ oyo ezali na bankombo ya Hizikia mpe Ahaze (liboso) mpe ekoki kozala Baruke (na nsima)

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Na nsima: Na ndingisa ya musée ya Israël, na Jérusalem

Liboso: www.BibleLandPictures.com/​Alamy

[Elilingi na lokasa 15]

Aparɛyi ya koyeba ngonga, ntango moi ezali kongala, na ampire ya Roma (mobu 27 liboso ya ntango na biso tii 476 ntango na biso)

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© Gerard Degeorge/​The Bridgeman Art Library International