Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Yehova azali mobateli na ngai”

“Yehova azali mobateli na ngai”

Pusaná penepene na Nzambe

“Yehova azali mobateli na ngai”

TÁLÁ elilingi oyo ezali na lokasa oyo. Okoki koyoka ndenge mwana-mpate wana azali komiyoka na ntolo ya mobateli na ye? Na Nzembo 23, Biblia elobeli mobateli ya mpate mpe bampate mpo na komonisa bolingo oyo Yehova amoniselaka basambeli na ye. Alingaka biso tómiyoka ete tobatelami, ndenge mokomi ya nzembo Davidi ayokaki, mpe tóloba na motema mobimba ete: “Yehova azali Mobateli na ngai.” *​—Vɛrsɛ 1.

Mokomi ya nzembo yango, Davidi, azalaki mobateli ya bampate na bolenge na ye. Ayebaki mposa ya bampate mpe mokumba ya mobateli na yango. Lokola Davidi amonaki libateli ya Nzambe na bomoi na ye, akomaki oyo bato babengaka “loyembo ya kotyela motema to ya elikya.” Na loyembo yango, nkombo ya Nzambe ezali na ebandeli mpe na nsuka. (Vɛrsɛ 16) Maloba na yango emonisi ndenge misato oyo Yehova abatelaka bato na ye, kaka ndenge mobateli ya bampate abatelaka bampate.​—Nzembo 100:3.

Yehova akambaka bampate na ye. Soki mpate ezangi mobateli, mbala mingi ebungaka. Ndenge moko, esengeli básalisa biso mpo tómona nzela ya bomoi. (Yirimia 10:23) Davidi amonisi ete Yehova akambaka bato na ye na “bisika ya koleisa banyama oyo etondi na matiti” mpe na “bisika ya kopema oyo ezali na mai mingi.” Akambaka bango “na banzela ya boyengebene.” (Vɛrsɛ 23) Maloba wana oyo etaleli mobateli ya bampate endimisi biso ete tokoki kotyela Nzambe motema. Soki tolandi litambwisi ya elimo na ye ndenge emonisami na Biblia, tokoki kozala na bomoi ya esengo, kozwa kopema mpe libateli.

Yehova abatelaka bampate na ye. Soki bampate ezali na mobateli te, ebangaka mpe ezangaka lisalisi. Yehova ayebisi bato na ye ete basengeli kobanga te, ata soki bazali “kotambola na lobwaku ya molili makasi,” elingi koloba na ntango ya mpasi mpenza na bomoi na bango. (Vɛrsɛ 4) Yehova asɛnzɛlaka bango, azalaka ntango nyonso pene mpo na kosalisa bango. Akoki kopesa basambeli na ye bwanya mpe nguya oyo bazali na yango mposa mpo bálonga komekama.​—Bafilipi 4:13; Yakobo 1:2-5.

Yehova aleisaka bampate na ye. Bampate etalelaka mobateli na yango mpo eleisa yango. Biso mpe tozali na bamposa ya elimo oyo kaka Nzambe nde akoki kokokisa yango. (Matai 5:3) Tozali na botɔndi epai ya Yehova mpo azali Mokabi, atandelaka basaleli na ye mesa oyo etondi na bilei ya elimo. (Vɛrsɛ 5) Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango, na ndakisa zulunalo oyo ozali kotánga, ezali bilei ya elimo oyo ezali kokokisa mposa na biso ya koyeba ntina ya bomoi mpe mokano ya Nzambe mpo na biso.

Davidi amiyokaki ete azali na libateli ayebaki ete soki atikali penepene na Mobateli na ye ya likoló, Yehova akobatela ye na bolingo nyonso “bomoi na [ye] mobimba.” (Vɛrsɛ 6) Yo mpe ozali na mposa makasi ya libateli ya ndenge wana? Soki ezali bongo, yekolá ndenge oyo okoki kopusana penepene na Yehova. Na yango, okomiyoka ete obatelami na mabɔkɔ ya Mobateli Monene ya bampate, oyo akambaka, abatelaka, mpe aleisaka baoyo batikalaka sembo epai na ye.​—Yisaya 40:11.

Botángi ya biblia mpo na sanza ya Mai:

Yobo 38-42Nzembo 1-25

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 1 Batángi mingi bayebi maloba “NKOLO azali Mobateli na ngai.” Mpo na koyeba ntina oyo mabongoli mosusu ya Biblia esaleli te nkombo ya Nzambe, Yehova, talá na nkasa 195-197 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.