Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bakristo nyonso ya sembo bakendaka na likoló?

Bakristo nyonso ya sembo bakendaka na likoló?

Mituna ya batángi . . .

Bakristo nyonso ya sembo bakendaka na likoló?

▪ Bato mingi batángá maloba ya kolendisa oyo ya Yesu: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Yesu alingaki nde koloba ete basambeli nyonso ya sembo ya Tata na ye, Yehova Nzambe, bakokende na likoló mpo na kozala na bomoi ya seko mpe esengo ya solosolo?

Yoká maloba ya kosimba motema oyo Yesu alobaki: “Moto moko te amatá na likoló longola kaka ye oyo autaki na likoló, Mwana ya moto.” (Yoane 3:13) Yango emonisi ete basambeli ya sembo ya ntango ya kala, lokola Noa, Abrahama, Moize mpe Davidi bakendá na likoló te. (Misala 2:34) Kasi, bango nyonso bakendá wapi? Na mokuse: basambeli ya sembo ya ntango ya kala bazali na nkunda, bakufá, bayebaka eloko te, bazali kozela lisekwa.​—Mosakoli 9:5, 6; Misala 24:15.

Yesu azali moto ya liboso oyo alobaki ete bato mosusu bakozala na bomoi na likoló nsima ya liwa na bango. Ayebisaki bantoma na ye ete akobongisela bango esika kuna na likoló. (Yoane 14:2, 3) Yango ezalaki likambo ya sika mpo na basaleli ya Nzambe. Na nsima, ntoma Paulo alimbolaki ete nsima wana Yesu akufaki mpe asekwaki mpo na kokende na likoló, Yesu ‘afungwelaki bayekoli na ye nzela ya sika mpe bomoi ya sika’​—nzela oyo moto moko te akendaki liboso.​—Baebre 10:19, 20.

Yango elingi koloba ete banda wana bato nyonso ya sembo bakendeke na likoló? Te, mpo lisekwa ya kokende na likoló ezali mpo na mokumba oyo epesami kaka na mwa ndambo ya bato. Na butu ya nsuka oyo balekisaki elongo, Yesu ayebisaki bantoma na ye ete ‘bakofanda na bakiti ya bokonzi mpo na kosambisa’ na bokonzi na ye kuna na likoló. Na yango, koyangela elongo na Yesu na likoló nde esengelaki kozala mokumba na bango.​—Luka 22:28-30.

Longola bantoma, bato mosusu mpe basengelaki kozwa mokumba wana ya kitoko mingi. Na emonaneli moko, ntoma Yoane amonaki Yesu ná etuluku moko ya bato oyo basekwaki kuna na likoló, mpe balobelami lokola ‘bokonzi mpe banganga-nzambe oyo bakoyangela mabele.’ (Emoniseli 3:21; 5:10) Bato boni bazalaki kuna? Ndenge ezalaka na guvɛrnema nyonso, kaka ndambo ya bato nde bayangelaka. Ezali mpe bongo na Bokonzi ya likoló. Yesu, Mwana-Mpate ya Nzambe, akoyangela elongo na bato 144 000 oyo “basombamaki na kati ya bato.”​—Emoniseli 14:1, 4, 5.

Ya solo, bato 144 000 bazali moke soki okokanisi bango na bato nyonso ya sembo, ya ntango ya kala mpe ya ntango na biso. Likanisi yango emonani polele mpo 144 000 basekwaka mpe bakendaka na likoló mpo na kokokisa mokumba moko ya sikisiki mpe mosantu, oyo Nzambe apesi bango. Soki olingi kotonga ndako, okobenga bato nyonso ya mboka na yo oyo bayebi kotonga ndako malamu? Te. Okozwa kaka baoyo osengeli na bango mpo na mosala na yo. Ndenge moko, Nzambe aponi te basaleli nyonso ya sembo mpo na mokumba wana ya ntina mingi ya koyangela elongo na Kristo na likoló.

Guvɛrnema wana ya likoló ekokokisa mokano oyo Nzambe azalaki na yango na ebandeli mpo na bato. Yesu ná bato 144 000 oyo bakoyangela elongo na ye, bakotambwisa mosala ya kobongola mabele mobimba paradiso, epai ebele ya bato ya sembo oyo motángo na bango eyebani te bakofanda libela na libela na esengo. (Yisaya 45:18; Emoniseli 21:3, 4) Na kati na bango, ezali mpe na bato oyo Nzambe abombá na makanisi na ye, oyo bakosekwa.​—Yoane 5:28, 29.

Basambeli nyonso ya Yehova ya sembo​—ya ntango ya kala to ya lelo​—bakoki kozwa likabo ya kitoko mingi, bomoi ya seko. (Baroma 6:23) Mwa ndambo ya bato bakozwa bomoi na likoló mpo na mosala moko ya ntina mingi, mpe ebele ya bato bakozwa bomoi awa na mabele oyo ekozala paradiso.