Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Eyokanaki lokola miziki moko ya kitoko

Eyokanaki lokola miziki moko ya kitoko

Mokanda euti na Madagascar

Eyokanaki lokola miziki moko ya kitoko

NGAI ná mobali na ngai, tozalaki kokende na esanga ya Madagascar, epai batindaki biso bamisionɛrɛ. Topesaki bato ya mabota mpe baninga na biso mbote ya kokabwana mpe tosalaki makasi tózala na mpiko, mpo totyelaki Yehova motema ete aponeli biso mosala oyo ebongi mpo na biso mpe akosalisa biso tólonga.

Tokobosana soki moke te likita ya liboso oyo tokɔtaki na lisangá oyo batindaki biso. Ndeko oyo azalaki kotambwisa boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli azalaki lokola moto azali kokamba etuluku moko ya babɛti miziki. Lokola toyebaki naino mpenza te monɔkɔ yango, ndenge oyo bazalaki koloba yango ezalaki koyokana lokola miziki moko ya kitoko. Esɛngaki ntango mingi mpo tóyoka mpenza makambo oyo bato bazalaki koloba!

Mbala ya liboso oyo nayokaki motuna moko oyo motambwisi abimisaki, nayanolaki yango mbala moko na mongongo makasi. Bato oyo bafandaki pembeni na ngai bayokaki mpe nazipaki mabɔkɔ na monɔkɔ mpo kosɛka na ngai eyokana te. Nayokaki nsɔni, kasi nasepelaki mingi mpo nakangaki ntina ya makambo yo bazalaki koloba!

Na esika napesa basusu ndakisa na mosala ya kosakola, namonaki lokola nde bato bazalaki kosalisa ngai. Na bolingo nyonso, bandeko bayebisaki ngai ndenge oyo nakoki kobanda lisolo malamu na mosala ya kosakola, balakisaki ngai makambo oyo nakoloba mpe bavɛrsɛ oyo nakotánga.

Nabosanaka te mokolo moko oyo nazalaki kosakola mpe mwana moko abengaki na mongongo makasi ete “Vazaha! Vazaha!” Yango ezali liloba oyo bato mingi ya Madagascar basalelaka mpo na kobenga “bapaya.” Totambolaki nokinoki mpo na kobanga ete bana mosusu báya kozinga biso mpe koganga ndenge wana. Na nsima, mwana mobali moko apekisaki mwana oyo azalaki koganga. Alobaki na ye ete: “Azali mopaya te, akoki koloba monɔkɔ na biso!” Ndeko mwasi oyo tozalaki na ye azalaki kolimbolela ngai mpo bazalaki koloba nokinoki mpe nakokaki kokanga ntina te. Atako bongo, namonaki ete nazali kokende liboso. Nsukansuka, nabandaki komona Madagascar lokola epai na biso.

Mbala mingi oyo nazalaki komiyoka ete nazali ngai moko, nazalaki kozwa makasi ntango bilenge bazalaki komonisa ete balingaka ngai atako nakokaki te kosolola na bango malamu. Nayebaki ete balingaka ngai mpo bazalaki kosepela kosimba ngai na lobɔkɔ. Bilenge na kati ya lisangá bazali mpenza lipamboli ya Yehova. Elenge mwasi moko na nkombo Hasina, nde azalaki kolimbola makambo nyonso oyo nazalaki koloba. Ntango moto ata moko te akangi ntina na makambo oyo nazalaki koloba, emonanaki lokola ye azalaki kokanga ntina. Mpe mbala mingi azalaki koya kosalisa ngai ntango nazali koluka kosolola na baninga na ngai ya lisangá, mpo na kolimbwela bango nini nalingi koloba.

Ngai ná mobali na ngai, tozalaki na lisangá oyo elingaki kobota lisangá mosusu. Yango emonisi ete esengelaki kopesa bayekoli ya Biblia mosusu epai ya bandeko mosusu báyekolaka na bango, mpo bayekoli yango bazalaki kofanda na teritware ya lisangá ya sika. Ndeko moko ya mwasi alendisaki ngai nayekolaka na moyekoli na ye moko ya Biblia. Nabangaki mpe nazalaki komonisa kaka ete nakómi naino te na makoki ya kosala yango, kasi alendisaki ngai mingi ete nayekola na moto yango kaka. Ayebisaki ngai ete na lisalisi ya Yehova, nakokoka. Na boboto nyonso, atalaki ngai mpe na maloba ya pɛtɛɛ, alobaki na ngai ete mosika te, nakozala na makoki ya koteya basusu na ndenge oyo nazali mpenza kolinga. Maloba wana elendisaki ngai mingi.

Banda wana, moyekoli wana ya Biblia akolá malamu mpenza. Mokolo moko, ntango nazalaki na libándá, nayokaki ye azali kobenga ngai. Ye ná mobali na ye, bazalaki kokende mpo na kokomisa libala na bango na Leta. Abandaki koyekola Biblia, mpe bango mibale bazalaki na mikano ebele ya elimo oyo bazalaki koluka kokokisa, ná mpe oyo ya kozwa batisimo. Likambo yango epesaki ngai esengo, atako nayebi ete biso te nde tobendaka bato, kasi Yehova moto asalaka yango.

Toyekoli makambo mingi na teritware wana ya sika. Atako totiká baninga mpe bato ya libota na biso epai na biso, toyokaka lokola toyá na ndambo na bango awa. Mbala mingi, tobɛtaka masolo na bango epai ya bandeko mibali mpe basi, mpe lelo oyo, batunaka biso kutu tóyebisa bango soki bango kuna, bazali ndenge nini. Tozali kozela na motema likoló ntango oyo “mabota” na biso ekozala esika moko.

Ndenge bato balobaka monɔkɔ kitoko ya Malgache, nayokaka yango lokola “miziki.” Kasi sikoyo nakangaka ntina ya maloba. Nazali kozela na motema likoló ntango oyo ngai mpe nakoloba monɔkɔ yango malamu mpenza, na esika nayokaka yango lokola miziki oyo ebɛtami kaka mbala moko mpe mbangumbangu. Yesu alobaki ete: “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko.” (Matai 6:34) Na yango, ntango nyonso tokokoba koyekola ata “likambo” moko, to liloba moko. Mpo na sikoyo, nakobongisa lolenge na ngai ya koyoka mpe ya kokanisa mpo nsukansuka, naloba polele lokola bandeko mosusu.

[Elilingi na lokasa 25]

Ngai ná Hasina na mosala ya kosakola