Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bomoi oyo nalɔtaká esukelá ngai mabe

Bomoi oyo nalɔtaká esukelá ngai mabe

Bomoi oyo nalɔtaká esukelá ngai mabe

Lisolo ya Zoya Dimitrova

Ntango nakómaki na mbula 15, ndɔtɔ na ngai ekokisamaki mpe nakómaki kotambola mpo na kosala masano babengi cirque. Kasi, na mokolo ya 4 Sɛtɛmbɛ 1970, likama moko esalemaki. Liboso, napumbwaki malamu na likoló, kasi na nsima nalongwaki kuna mpe nabambanaki na mabele.

NABOTAMAKI mokolo ya 16 Desɛmbɛ 1952, mpe ngai, yaya na ngai ya mwasi ná baboti na biso, tozalaki kofanda na engumba Sofia, na Bulgarie. Na ntango wana, Bulgarie ezalaki na guvɛrnema ya Bakoministe, mpe ezalaki kolinga te bato bázala na lingomba, kasi bapesaki nzela ete mangomba ezala. Bato mingi bazalaki kondima Nzambe te, mpe na kati ya baoyo bazalaki kondima ye, mingi bazalaki komonisa yango polele te. Atako bato ya libota na ngai bazalaki komibenga bandimi ya Ɔrtɔdɔkse, ngai nabɔkwamaki te na mateya ya lingomba mpe nakipaki makambo ya Nzambe te.

Emonanaki ete ntango nazalaki naino mwana, nazalaki kosepela mingi na masano ya lolenge nyonso kasi mingimingi na masano ya kobɛta kilibiti. Ntango nakómaki na mbula 13, mobali moko ayaki na eteyelo na biso koluka mwana mwasi moko oyo basengelaki kolakisa ye masano ya cirque. Molakisi na biso ya ngalasisi apesaki nkombo na ngai. Nasepelaki mingi komata na motuka ya moto wana, motuka yango esalemá na Amerika, mpo etuluku moko ya baantrɛnɛrɛ etuna ngai mituna mpe epesa ngai ekzamɛ. Nasepelaki mingi mpo bandimaki ngai. Na ntango wana nabandaki kozwa formasyo ya makasi mpe yango eumelaki koleka mbula mibale. Na nsima, ntango nakómaki na mbula 15, formasyo na ngai esilaki mpe nabandaki bomoi ya kotambolatambola mpo na kosala masano ya cirque. Na ebandeli, natambolaki na Bulgarie mobimba mpe na nsima nakendeki na bikólo ya Union soviétique, natambolaki mpe na Algérie, Hongrie mpe Yougoslavie ya kala.

Na boumeli ya mbula misato ya esengo, nazalaki komona ndenge mosala na ngai ebotaki mbuma. Na nsima, ntango nazalaki kosala masano na Titov Veles, na Macédoine, likama oyo nalobelaki na ebandeli esalemaki. Nazalaki kopumbwa likoló mpenza ya bato. Moninga na ngai moko, oyo akangaki makolo na nsinga likoló kasi motó na nse, abwakaki ngai likoló mpo ayamba ngai ntango nakokwea. Naselumwaki na mabɔkɔ na ye, ntango nsinga na ngai ekatanaki, nabambanaki mabe na mabele na bosanda ya mɛtrɛ 6. Bamemaki ngai mbangu na lopitalo, epai minganga bamonaki ete lobɔkɔ ebukani, mpe mikuwa mingi ya mipanzi ná mokuwa ya mokɔngɔ mpe ebukanaki. Natungisamaki makasi na boumeli ya mwa mikolo mpe nazalaki koyeba te nini elekaki. Ntango nayokaki malamu, nayaki koyeba ete kobanda loketo tii makolo ezalaki kosala lisusu te. Lokola nazalaki elenge, nazalaki na elikya ete soki nazwi nkisi to basali ngai lipaso, nakotambola lisusu mpe nakozala na likoki ya kozongela mibembo na ngai ya masano ya cirque.

Na boumeli ya mbula mibale na ndambo oyo elandaki, basalisaki ngai na balopitalo ndenge na ndenge oyo basalisaka bato oyo baumeli mingi na maladi; mpe nazalaki kaka na elikya ete nakozonga malamu. Nsukansuka, esengelaki nandima ete mposa oyo nazalaki na yango ya kozala kaka mosani esukaki. Sikoyo, esengelaki namesaná na bomoi mosusu, bomoi oyo ekeseni mpenza na oyo nazalaki kolɔta​—kofanda na kiti ya bibɔsɔnɔ.

Bomoi ya sika ebandi

Nsima ya kolekisa bomoi ya malamu na masano, nakanisaki te ete bomoi na ngai ekobongwana ndenge wana. Lokola elikya na ngai nyonso ekendaki na mai, nakómaki kotungisama na makanisi. Na nsima, na mobu 1977, elenge mobali moko na nkombo Stoyan ayaki epai na ngai. Ntango nayebaki ete azali yaya ya moninga na ngai moko ya kala, nakɔtisaki ye mbala moko na ndako. Ntango tozalaki kosolola, atunaki ngai soki nazalaka na elikya ete nakozonga mokolo mosusu malamu. Lokola makanisi na ngai ebulunganaki mpe nalɛmbaki bomoi, nayanolaki ye ete nazali na elikya ata moko te. Ntango ayebisaki ngai ete kaka Nzambe nde akoki kosalisa ngai, nayanolaki ye na nkanda ete: “Bongo, soki Nzambe azali, mpo na nini ngai nazali boye?”

Mpo na koyanola na motuna wana, Stoyan, oyo autaki kokóma Motatoli ya Yehova ntango azalaki kosala masano ya cirque na États-Unis, alimbwelaki ngai na boboto mpenza makambo kitoko oyo Biblia elaki mpo na mikolo ezali koya. Nasepelaki mingi koyeba ete mosika te mabele ekobongwana paradiso. Elikya oyo ete “liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te” esimbaki motema na ngai. (Emoniseli 21:4) Yango nde likambo nazelaka mpo nazonga ndenge nazalaki! Nandimaki mbala moko ete ayaka koyekola na ngai Biblia. Na ndenge wana nde, nabandaki bomoi ya sika. Nsukansuka, nazwaki makambo oyo epesaka mpenza elikya ya solosolo!

Nazalaki kozela boyekoli na ngai ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ na motema likoló. Liboso, Stoyan ayekolaki na ngai mpe na nsima Totka, Motatoli moko ya boboto mpenza ayekolaki mpe na ngai. Na lisalisi ya ndeko mwasi yango, boyebi na ngai ya Biblia ekolaki noki, mpe napesaki bomoi na ngai epai ya Yehova Nzambe. Na ntango wana, ata moto moko te azalaki na Sofia oyo akokisaki masɛngami mpo na kobatisa ngai; na yango, esengelaki nazela ndeko moko oyo akouta na Macédoine. Na mokolo ya 11 Sɛtɛmbɛ 1978, mbula soki moko nsima ya mokolo oyo nabandaki koyekola Biblia, nazwaki batisimo na kati ya baignoire moko na apartema na ngai. Kozwa batisimo mpe kokóma Motatoli ya Yehova ememelaki ngai esengo monene, mpe bomoi na ngai ekómaki mpenza na ntina.

Solo ya Biblia oyo nayekolaki ekómaki kopela lokola mɔtɔ kati na ngai. Nazalaki kosepela koyebisa makambo wana oyo nayekolaki epai ya moto nyonso oyo azalaki koya na ndako na ngai. Likambo ya mawa, ezalaki komonana lokola ete moto ata moko te azalaki kokipe makambo oyo nazalaki koloba, ntango mosusu bazalaki kokanisa ete lokola nazwaká likama wana, motó na ngai ezali kosala malamu mpenza te.

Libunga moko monene

Na ntango wana, mosala ya Batatoli ya Yehova epekisamaki na Bulgarie, mpe Batatoli ya Yehova bazalaki kaka moke na ekólo mobimba. Makita ya lisangá oyo nakokaki kokɔta ezalaki te, mpe nabandaki mpenza te kozala mingi elongo na bandeko mosusu Batatoli ya Yehova. Lokola esalemaki bongo mpe namonaki te likama ya kozalaka elongo na bato oyo batosaka te toli ya Biblia, yango esalaki ete nasala libunga moko monene.

Lisosoli na ngai ezalaki kotungisa ngai ntango nyonso, mpe nayokaki mpenza mpasi ya kokabwana na Yehova Nzambe. Lokola nazalaki kotungisama mpe koyoka ete namemi ngámbo, nafungwelaki Yehova motema na libondeli, nasɛngaki ye bolimbisi. Na nsima, na lisalisi ya bankulutu ya bolingo ya lisangá, nazongelaki boyokani na ngai ná Nzambe, mpe nazongelaki esengo na ngai ya kosalela Yehova. Nasepelaka mpenza na libaku oyo nazali na yango ya kosalela Yehova na lisosoli ya pɛto mpe kozala na ebongiseli na ye oyo ezali pɛto!

Nazali na esengo atako nakoki kosala mingi te

Likama oyo ekómelaki ngai esili koleka mbula 40, elongolá ndɔtɔ na ngai ya kozala mosani monene, ya kotambolatambola mpe ekómisá ngai moombo ya kiti ya bibɔsɔnɔ. Atako bongo, soki natali makambo oyo ekómelá ngai, nayokaka mawa te, lokola nde bomoi na ngai ebongá te. Solo ya Biblia esalisi ngai namona ete ndɔtɔ na ngai ya kozala na esengo mpe bomoi ya kosala masano ya cirque, ezalaki na matomba kaka ya mwa ntango moke. Namoni ndenge baninga oyo nazalaki kosala na bango masano wana, oyo bakobaki, bakutaná na makambo oyo elɛmbisá bango nzoto. Lisusu, nazwá eloko ya motuya mpenza, nakómá moninga ya Yehova Nzambe, Mozalisi na ngai. Yango ememelá ngai esengo monene oyo nakokaki soki moke te kozwa na masano ya cirque.

Lisusu, nayokaka esengo ya komona ebele ya bato mosusu bazwi boyebi ya solo ya Biblia mpe bapesi bomoi na bango epai ya Yehova, Nzambe na biso ya bolingo. Ntango nabandaki koyekola Biblia na mobu 1977, Batatoli ya Yehova bazalaki kaka moke na Bulgarie. Ata nsima ya mobu 1991, ntango Batatoli ya Yehova bandimamaki mpo na mbala ya liboso nsima ya kokwea ya boyangeli ya Bakoministe, Batatoli bakómaki ata nkama moko te na ekólo yango mobimba. Ezalaki mpenza esengo mpo na ngai komona ndenge bato babandaki kobakisama tii bakómi basakoli ya Bokonzi soki 1 800 oyo bazali lelo oyo!

Mosala ya kosala ezali naino monene na Bulgarie. Bato mingi bazali koluka boyebi ya Liloba ya Nzambe. Likambo yango emonani na ebele ya bato 3 914, oyo bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Kristo na 2010. Nazali mpenza na esengo komona ndenge bato yango babakisami, oyo emonisi ete Yehova apamboli mosala ya moke oyo ebandaki na Bulgarie. Ndenge Yisaya 60:22 esakolaki yango, namoni mpenza na miso ndenge oyo “ya moke” ekoli mpe ekómi “ekólo ya nguya.”

Likambo mosusu ya esengo mpe ya ntina na bomoi na ngai, ezali kobima ya Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ ya Bulgare. Yango ebimaki na sanza ya Augusto 2009, na liyangani ya etúká oyo ezalaki na motó ya likambo, “Bósɛnzɛlaka!” Liyangani yango esalemaki na engumba Sofia. Kobima ya Biblia wana na monɔkɔ na ngai ezalaki ndɔtɔ oyo ekokisamaki! Na ntembe te, ekosalisa mpenza ebele ya bato na Bulgarie mpo bákóma na boyebi ya Nzambe.

Atako maladi na ngai epesaka ngai likoki te ya kosakola mingi nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, nazwaka mpenza esengo ndenge nasakolaka solo ya Biblia epai ya baninga na ngai ya kartye mpe epai ya moto nyonso oyo ayaka kotala ngai. Mokolo moko, ntango nafandaki na balcon na ngai, nabengaki moninga moko ya kartye oyo azalaki koleka. Andimaki koya, mpe nsima ya koyebisa ye makanisi mingi ya kolendisa na Biblia, andimaki mbala moko ntango nasɛngaki ye ete ayekola Biblia. Natondaki mpenza na esengo ntango mwasi yango azwaki batisimo mpe akómaki ndeko na ngai mokristo. Nazwi libaku ya kosalisa bato minei oyo bapesi bomoi na bango epai na Yehova.

Ntango mosusu esengo na ngai monene mpe kolendisama eutaka ntango nayanganaka mbala na mbala na makita ya bokristo elongo na bandeko koleka nkama, oyo bakómá lokola libota na ngai. Kofanda na ekólo oyo babongisá te transport mpo na mibange mpe bibɔsɔnɔ, ezalaka mokakatano mpo nakende na makita ya lisangá. Kasi nazalaka mpenza na botɔndi ndenge ndeko mobali moko ya elenge asalisaka ngai. Na makita nyonso, amemaka ngai kobanda na apartema na ngai tii na motuka na ye, azwaka ngai na motuka mpe akɔtisaka ngai na Ndako ya Bokonzi, ndenge Batatoli babengaka esika na bango ya losambo, mpe na nsima azongisaka ngai na ndako. Natɔndaka Yehova mingi na libaku oyo nazali na yango ya kozala na kati ya libota oyo ya bokristo mpe ya bolingo!

Soki natali nsima, namonaka ete makambo ebongwaná mpenza na bomoi na ngai koleka ndenge nazalaki kolɔta ntango nazalaki elenge. Kosalela Yehova ememeli ngai esengo monene kobanda sikoyo mpe epesi ngai elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya. Nasepelaka mpenza na elaka ya Nzambe oyo elobi ete na paradiso awa na mabele, “motɛngumi akopumbwa lokola serfe.” (Yisaya 35:6) Nazelaka na motema likoló mpe na elikya mpenza mokolo oyo nakopumbwa na kiti na ngai ya bibɔsɔnɔ, mpe nakokóma na nzoto ya kokoka mpe makasi.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 30]

“Esengo na ngai monene mpe kolendisama eutaka ntango nayanganaka mbala na mbala na makita”

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 31]

“Likambo mosusu ya esengo mpe ya ntina na bomoi na ngai, ezali kobima ya Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ ya Bulgare”

[Elilingi na lokasa 29]

Nabandaki masano ya cirque ntango nakómaki na mbula 15