Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bomoi ezali mpenza na ntina?

Bomoi ezali mpenza na ntina?

Bomoi ezali mpenza na ntina?

“BOMOI ezali mpenza na ntina?” Bato mingi batuná motuna wana. Likambo ya mawa, ezala lolenge nini batalelaka bomoi, mingi bazali te na likoki ya kokima likambo oyo Viktor Frankl, monganga moko ya bamaladi ya motó na Australie alobelaki lokola “ezaleli ya komona ete bato bazali na ntina te mpe bazangi eloko” na bomoi na bango.

Mpo na nini bato mingi bamiyokaka ndenge wana? Moko ya bantina ezali ete bamilio ya bato na mokili mobimba, bazali na bomoi ya mpasi mingi mpe na makambo oyo epesaka mpasi na motema. Bato batungisamaka mokolo na mokolo na makambo lokola bobola, maladi, mobulu oyo ezangá ntina mpe minyoko. Bomoi na bango ‘etondi na mpasi’ ndenge kaka Yobo alobaki. (Yobo 14:1) Mokano na bango ya libosoliboso ezali kaka ya kozwa mwa eloko ya kolya mokolo na mokolo.

Bamilio mosusu ya bato bazali kodondwa na bomɛngo. Emonanaka lokola ete bazali na nyonso oyo esengeli mpo na kozala na bomoi ya esengo. Kasi mingi na bango bazalaka te na bomoi yango. Mpo na nini? Mpo mbala na mbala, “mawa mpe makambo oyo eyokisaka mpasi,” na ndakisa, kobungisa mbongo na mbalakaka, to makama mosusu lokola liwa ya mwana, elongolaka elikya na bango.​—Nzembo 90:10.

Ezali na likambo mosusu oyo esalaka ete bomoi “ezanga ntina mpe moto amona lokola azangi eloko.” Likambo yango nini? Ndenge bomoi ezalaka mpenza mokuse. Bato mingi bayebaka te mpo na nini moto, oyo bapesá ye makoki mingi mpenza, azalaka na bomoi mokuse ndenge wana. Bayebaka te likambo oyo ekómelaka biso nyonso: lelo to lobi, ata soki tokutani te na makambo ya mpasi, kasi liwa ebɔtɔlaka biso eloko nyonso.​—Mosakoli 3:19, 20.

Bomoi ekozanga ntina ntango nyonso?

Salomo, mokonzi ya Yisraele,alobelaki likambo yango malamu na mokuse. Amonaki ndenge oyo na mikolo na ye bato bazalaki kosala mosala makasi, kosalela mayele mpe makoki na bango mpo na kolona, kotonga, mpe kobatela mabota na bango kaka ndenge biso mpe tosalaka lelo oyo. Na yango, atunaki boye: ‘Makambo nyonso wana ekosuka ndenge nini?’ Asukisaki ete makambo nyonso oyo bato basalaka, ezali “kaka pamba, ezali lokola kolanda mopepe.”​—Mosakoli 2:17, Bible na lingala ya lelo oyo.

Kasi, Mokonzi Salomo andimaki nde ete eloko nyonso oyo bato basalaka ekozala ntango nyonso ‘kaka pamba mpe kolanda mopepe’? Te. Azalaki kaka komonisa likambo moko oyo ekómelaka biso na bomoi na mokili oyo ya masumu. Nzokande, Liloba ya Nzambe ekoki kopesa yo elikya ete makambo ekozala ntango nyonso boye te!

Ndenge nini okoki kozwa elikya yango? Tosɛngi yo otánga masolo mibale oyo elandi. Yango ekosalisa yo oyeba mpo na nini bomoi ezali komonana lokola ezangi ntina, ndenge nini likambo yango ekosila, mpe ndenge oyo okoki kosala ete bomoi na yo ekóma na ntina banda sikoyo.