Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bomoi oyo ezali na ntina, sikoyo mpe mpo na libela

Bomoi oyo ezali na ntina, sikoyo mpe mpo na libela

Bomoi oyo ezali na ntina, sikoyo mpe mpo na libela

OKOKI kozala na bomoi ya ntina ata sikoyo. Ndenge nini? Soki osaleli batoli ya mayele oyo ezali na Biblia, Liloba ya Nzambe. Tótalela kaka mwa ndambo ya batoli yango.

TOLI YA BIBLIA: Mokonzi Salomo akomaki boye: “Eloko oyo eleki malamu mpo na moto ezali te, longola kaka kolya mpe komɛla mpenza mpe komonisa molimo na ye bolamu mpo na mosala na ye ya makasi.”​—MOSAKOLI 2:24.

Tokelamá mpo tóyoka esengo nsima ya kosala mosala moko ya malamu. Ata na mikakatano makasi, okoki kozala na mwa esengo uta sikoyo ntango ozali kosala mosala makasi mpe na bosembo.

TOLI YA BIBLIA: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—MISALA 20:35.

Bato mingi bamonaki ete kosalela basusu​—kopesa ntango mpe makasi na bango mpo na kosalisa basusu na ndakisa na ntango ya mpasi—​ememaki matomba mingi mpe bamonaki lisusu ete bomoi na bango ekómaki na ntina mingi. Mokonzi Salomo akomaki ete: “Koboya te kosala malamu na baoyo basengeli na yango, ntango lobɔkɔ na yo ezali na nguya ya kosala yango.”​—Masese 3:27.

Tólobela ndakisa ya Ralph. Nsima ya kozwa pansiɔ, akómaki mobongisi-nzela ya ntango nyonso lokola mwasi na ye. Ye ná mwasi na ye balekisaka bangonga mingi sanza na sanza na mosala ya kosakola, bamipesaka mpo na koteya bato Biblia. Ralph alobi ete: “Na mpokwa ntango tozongaka ndako, tolɛmbaka te kaka mpo tozali mibange, kasi mpo tomipesaki mobimba na mosala ya Tata na biso ya likoló. Ezali kolɛmba ya mabe te!” Ye ná mwasi na ye bazalaka na esengo mpo balukaka libosoliboso nde kopesa.

TOLI YA BIBLIA: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.”​—MASESE 17:17.

Komitya na esika ya basusu na ntango ya mpasi ekoki kosalisa bango báyika mpiko. Moto moko ya filozofi na nkombo Francis Bacon akomaki ete mpo na baoyo bazangi baninga ya solo “mokili ezali lokola moto oyo abungi na kati ya esobe.” Kozala na baninga ya solo​—mpe kozala moninga ya malamu—​ekoki kosalisa yo omona ete bomoi ezali kilo te; ekoki kozala kitoko mpe kosepelisa.

TOLI YA BIBLIA: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”​—MATAI 5:3.

Yesu amonisaki lisɛngami moko ya ntina oyo moto asengeli kokokisa soki alingi kozwa litomba ntango bilaka ya Nzambe ekokokisama​—koyeba mpe kokokisa ‘bobola na yo ya elimo.’ Na kokesana na banyama, biso bato tobotamaka na mposa ya koyeba ntina mpe mokano ya bomoi. Kaka Yehova Nzambe nde akoki kokokisa mposa yango, mpe asalaka yango na lisalisi ya Liloba na ye, Biblia. Ndenge tomonaki na lisolo oyo eleki, Biblia emonisi mokano ya Nzambe mpo na mabele. Eyebisi biso mpo na nini tozali awa na mabele, mpo na nini bampasi ezali mingi, mpe oyo Nzambe azali kosɛnga biso. Koyeba oyo Biblia elobi mpo na makambo yango, ezali na ntina mingi mpo na kozala na bomoi ya ntina mpe ya kosepelisa. Baoyo bazalaka na ntango ya koyekola Biblia mpe kosalela makambo oyo bayekolaka bazalaka na esengo. Mpo na nini? Mpo bakómaka mpenza baninga ya Mozalisi na biso, Yehova, “Nzambe ya esengo.”​—1 Timote 1:11.

TOLI YA BIBLIA: “Kanisaka moto oyo asalá yo . . . liboso ʹtè mikolo ya pasi éya, pe bambula oyo okozala koloba ʹtè: ‘Bomoi ezali kosepelisa ngai té.’”​—MOSAKOLI 12:1, BIBLE NA LINGALA YA LELO OYO.

Toli oyo Mokonzi Salomo apesaki bilenge, oyo bakoki ntango mosusu koyeba te mikakatano oyo bomoi ekoki komema, ebongi mpe mpo na biso nyonso. Tyá Mozalisi na esika ya liboso na bomoi na yo. Yango nde ekosala ete bomoi na yo ezala mpenza na ntina. Boyá likanisi oyo ete: “Tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa.” (1 Bakorinti 15:32) Ndenge Mosakoli 8:12, emonisi yango, soki otye Nzambe na esika ya liboso, makambo ‘ekosukela yo malamu.’

Wendi, amonaki ete likambo yango ezali solo. Ntango azalaki elenge, ye ná leki na ye ya mwasi, bayekolaki monɔkɔ ya Espagnol mpo bákende na République Domonicaine, epai mposa ya basakoli ya nsango malamu ezalaki makasi mpenza. Alobi ete: “Totikaki makambo mingi mpo na kokende kosala epai mposa ezalaki, kasi tolekisaki ntango moko ya malamu mpenza. Oyo tosalaki na boumeli ya basanza wana motoba, eleki mosika makambo mosusu nyonso oyo tokokaki kosala! Mapamboli oyo tozwaki eleki mosika mpenza makambo oyo totikaki.”

Kozala sembo epai ya Nzambe, epesaka ntina na bomoi

Kokóma mpenza moninga ya Yehova, ekoki kosala ete bomoi na yo ezala lisusu na ntina mingi koleka. Ndenge nini? Satana atindaki kaka te Adama ná Eva bátombokela boyangeli ya Nzambe, kasi alobaki mpe ete moto ata moko te akotikala sembo epai ya Nzambe soki amekami. (Yobo 1:9-11; 2:4) Okoki komonisa ete Satana azali mokosi! Ndenge nini? Soki otikali sembo epai ya Nzambe, ozali kotosa mibeko na ye, mpe ozali komonisa ete ondimaka ete Yehova azali mpenza na lotomo ya kokata oyo ezali malamu mpe mabe mpo na biso.​—Emoniseli 4:11.

Ekoki kosɛnga tóyika mpiko na minyoko soki tolingi kokoba kotambola na nzela ya boyengene. Minyoko yango esalaka ete tómona ete bomoi ezangi ntina? Kanisá ete monguna moko mabe mpenza azali kokosela moninga na biso oyo tolingaka to moto moko ya libota na biso makambo. Soki kokɔtela moto wana esalaki ete monguna yango anyokola biso, yango ekoki kotinda biso tómona ete bomoi ezangi ntina? Te! Tokosepela mpenza koyika mpiko mpo na likambo ya ndenge wana. Ezali mpe ndenge moko na likambo etali kotikala sembo epai ya Nzambe. Ndenge totikalaka sembo na makambo ya mpasi oyo ezali kosalema lelo, tosepelisaka mpenza motema ya Nzambe.​—Masese 27:11.

Bomoi oyo ezali na ntina libela na libela

Na yango, salá nyonso oyo okoki mpo na koyekola makambo ya Nzambe mpe mokano na ye. Yesu kristo alobaki ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.” (Yoane 17:3) Ntango Nzambe akokokisa mokano oyo azalaki na yango mpo na mabele, bato ya sembo bakosepela na oyo Yehova akanaki mpo na bango​—“bomoi ya seko” na paradiso awa na mabele. Na ndenge yango, bomoi ekozala mpenza na ntina mpe ekosepelisa.​—Nzembo 145:16.

Epai wapi okoki kozwa boyebi oyo Yesu alobelaki? Na Biblia, Liloba ya Nzambe. Soki okolinga ete básalisa yo mpo na kosala yango, kokakatana te kokomela babimisi ya zulunalo oyo. Bakotinda moto moko aya kosalisa yo oyeba oyo Biblia eteyaka mpenza.