Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia ebongolaka bato

Biblia ebongolaka bato

Biblia ebongolaka bato

MPO na nini mwasi moko ya mbula soki 60 atikaki kosambela bikeko? Nini etindaki nganga-nzambe ya lingomba ya Shinto atika mosala na ye na tempelo mpe akóma mosakoli ya nsango malamu? Ndenge nini mwasi moko oyo abɔkwamaki na mabɔkɔ ya bato mosusu banda bomwana na ye, alongaki makanisi ya komiyoka ete basundolá ye? Tóyoka bato yango.

“Nazali lisusu te moombo ya bikeko.”​—ABA DANSOU

ABOTAMAKI NA: 1938

EKÓLO: BÉNIN

BOMOI NA YE YA KALA: MOSAMBELI YA BIKEKO

NDENGE NAZALAKI: Nakolá na So-Tchahoué, mboka moko oyo ezalaka na esika ya maimai pene na laki moko. Bato ya mboka yango basalaka mosala ya koboma mbisi, kobɔkɔla bangɔmbɛ, bantaba, bampate, bangulu, mpe bandɛkɛ. Banzela ezalaka te na mboka yango, yango wana bato basalelaka bamasuwa mpe babwato mpo na kotambola. Mbala mingi, batongaka bandako na bango na banzete mpe matiti, atako bamosusu batongaka na babriki. Mingi ya bato oyo bafandaka kuna bazali babola. Atako bongo, mobulu ezalaka mpenza mingi te, ndenge ezalaka na bavile.

Ntango nazalaki mwana moke, tata atindaki ngai ná yaya na ngai ya mwasi na esika moko oyo balakisaka bato mosala ya bonganga-nzambe ya makambo ya nkisi, epai balakisaki biso makambo wana ya bonkɔkɔ. Ntango nakolaki, nakómaki kosambela Dudua (Oduduwa), nzambe ya bato ya Yoruba. Natongelaki ye ndako mpe mbala na mbala, nazalaki kopesa ye bamboma, mafuta ya mbila, bambɛmbɛ, bansoso, bibenga, mpe banyama mosusu ndenge na ndenge lokola mbeka. Makabo yango ezalaki ntalo makasi, mbala mingi ezalaki kozwa mbongo nyonso oyo nazalaki na yango.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Ntango nabandaki koyekola Biblia, namonaki ete Yehova azali kaka Nzambe moko ya solo. Nayekolaki mpe ete andimaka te kosalela bikeko na losambo. (Kobima 20:4, 5; 1 Bakorinti 10:14) Namonaki oyo nasengelaki kosala. Na yango, nabwakaki bikeko na ngai nyonso mpe napɛtolaki ndako na ngai na bikeko nyonso oyo nazalaki kosalela na losambo. Natikaki mosala ya bikelakela, mpe nazalaki kosangana lisusu te na milulu ya mboka mpe ya kokunda bibembe.

Ezalaki pɛtɛɛ te mpo na ngai​—mwasi oyo akómaki na bambula 60—​kotika makambo wana. Baninga, bandeko mpe bato ya mboka na ngai batɛmɛlaki ngai mpe bazalaki kosɛka ngai. Kasi, nabondelaki Yehova apesa ngai makasi ya kosala oyo ezali malamu. Nazwaki makasi na maloba oyo ezali na Masese 18:10, oyo elobi: “Nkombo ya Yehova ezali ndako molai ya makasi. Moyengebene akimaka mpo na kokɔta kuna mpe azwaka libateli.”

Eloko mosusu oyo esalisaki ngai, ezalaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova. Kuna, namonaki bolingo ya bakristo, mpe nakamwaki mpo bato yango bazalaki kosala makasi mpo na kotosa batoli ya Biblia. Makambo oyo namonaki endimisaki ngai ete Batatoli ya Yehova bazali na lingomba ya solo.

MATOMBA OYO NAZWI: Kosalela batoli ya Biblia esalisi ngai nabongisa boyokani na ngai ná bana na ngai. Nayoki mpe lokola kilo moko monene elongwe na mapeka na ngai. Nasilisaki bozwi na ngai na bikeko oyo elobaka te, oyo epesaki ngai ata litomba moko te. Lelo oyo, nazali kosambela Yehova, oyo apesi ngai elikya ya kosilisa mikakatano na biso nyonso. (Emoniseli 21:3, 4) Nazali mpenza na esengo lokola nazalaka lisusu te moombo ya bikeko, kasi, nazali nde kosalela Yehova! Epai na ye, nazwi kimya mpe libateli ya solosolo.

“Nazalaki koluka Nzambe banda bomwana.”​—SHINJI SATO

ABOTAMAKI NA: 1951

EKÓLO: JAPON

BOMOI NA YE YA KALA: NGANGA-NZAMBE YA LINGOMBA YA SHINTO

NDENGE NAZALAKI: Nakolá na engumba moko, na etúká ya Fukuoka. Baboti na ngai bazalaki kosambela mingi; banda bomwana, bateyaki ngai ete nabangaka banzambe ya Shinto. Ntango nazalaki elenge, mbala mingi nazalaki kokanisa mpo na lobiko na ngai mpe nazalaki na mposa makasi ya kosalisa bato oyo bazali na mikakatano. Nakanisaka lisusu ndenge molakisi na biso na eteyelo ya ebandeli, atunaki biso bana-kelasi makambo oyo tokosepela kosala ntango tokokóma mikóló. Bana-kelasi na biso bazalaki na mikano ya sikisiki, na ndakisa, kokóma moto ya mayele na makambo ya siansi. Ngai nalobaki ete mposa na ngai ezalaka ya kosalela Nzambe. Moto nyonso asɛkaki ngai.

Nsima ya kosilisa kelasi ya ntei, nakɔtaki na kelasi mpo na bateyi ya makambo ya Nzambe. Ntango nazalaki kozwa formasyo yango, nakutanaki na nganga-nzambe moko ya Shinto oyo azalaki kotánga buku moko ya ezipeli ya moindo, na ntango ya bopemi. Mokolo moko, atunaki ngai ete: “Sato, oyebi buku oyo?” Namonaki ezipeli ya buku yango, mpe nayanolaki ye ete: “Ezali Biblia.” Alobaki ete: “Moto nyonso oyo alingi kokóma nganga-nzambe ya Shinto, asengeli kotánga buku oyo.”

Nabimaki mbala moko mpe nasombaki Biblia. Natyaki yango na esika ya malamu mpenza epai natyaka babuku na ngai, mpe nabatelaki yango malamu. Kasi, lokola kelasi ezalaki kozwa ngai ntango mingi, nazwaki ntango te ya kotánga yango. Ntango nasilisaki kelasi, nakómaki nganga-nzambe ya Shinto. Ndɔtɔ na ngai ya bomwana ekokisamaki.

Kasi, eumelaki te, namonaki ete mosala ya nganga-nzambe ya Shinto ezalaki te ndenge nazalaki kokanisa. Banganga-nzambe mingi bazalaki mpenza na bolingo te to bazalaki kokipe basusu te. Mingi mpe bazalaki na kondima te. Moko ya banganga-nzambe mokonzi na biso alobaki na ngai kutu ete: “Soki olingi olonga awa, osengeli kolobela kaka makambo ya filozofi. Kolobela makambo ya Nzambe epekisami.”

Maloba wana etindaki ngai nakóma kotalela lingomba ya Shinto te ndenge nazalaki kokanisa. Atako nakobaki kosala kuna, nabandaki koluka koyeba makambo ya mangomba mosusu. Kasi, ata moko te na yango emonanaki lokola ezali na likambo ya malamu. Ntango nyonso oyo nazalaki kokende na mangomba, nazalaki komona makambo oyo ezalaki kolɛmbisa ngai nzoto. Namonaki lokola solo ezali ata na lingomba moko te.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Na mobu 1988, nakutanaki na moto moko ya lingomba ya Budha oyo alendisaki ngai natánga Biblia. Nakanisaki nganga-nzambe ya Shinto oyo alendisaki ngai nasala mpe bongo. Namonaki malamu nasalela toli yango. Ntango nabandaki kotánga Biblia, eumelaki te, nakómaki kolinga yango mingi. Ntango mosusu, nazalaki kotánga yango butu mobimba tii ntɔngɔ.

Makambo oyo natángaki etindaki ngai nasambela Nzambe oyo Biblia elobeli. Nabandaki na libondeli oyo Yesu alakisaki bayekoli na ye, oyo ezali na Matai 6:9-13. Nazalaki kozongela libondeli yango nsima ya ngonga mibale nyonso, ata ntango nazalaki naino kosala na tempelo ya Shinto.

Nazalaki na mituna mingi mpo na makambo oyo nazalaki kotánga. Na ntango wana, nabalaki, mpe nayebaki ete Batatoli ya Yehova bateyaka bato Biblia mpo kala, basololaká na mwasi na ngai. Nalukaki Motatoli ya Yehova moko, mpe natunaki ye mituna ebele. Nakamwaki ntango asalelaki Biblia mpo na koyanola na motuna mokomoko. Ndeko mwasi yango azwaki bibongiseli mpo Batatoli ya Yehova báyekola na ngai Biblia.

Eumelaki te, nabandaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova. Na ntango wana, nayebaki te ete na kati ya Batatoli ya Yehova oyo bazalaki wana, ezalaki na bamosusu oyo nasalelaki bango makambo ya makasimakasi kala. Atako bongo, bapesaki ngai mbote na esengo mpe bayambaki ngai malamu.

Na makita yango, nayekolaki ete Nzambe alingaka ete mibali bálinga mpe bákumisa bato ya mabota na bango. Tii na ntango wana, nazalaki komipesa na mosala na ngai ya nganga-nzambe, mpe nazalaki kokipe te mwasi na ngai mpe bana na biso mibale. Nabandaki komona ete nazalaki koyoka makambo oyo bato oyo bazalaki koya na tempelo ya Shinto bazalaki koloba, kasi ata mbala moko te nazalaki koyoka makambo oyo mwasi na ngai azalaki koloba.

Lokola boyekoli na ngai ezalaki kokoba, nayekolaki makambo mingi na ntina ya Yehova, oyo esalaki ete napusana penepene na ye. Maloba ya bavɛrsɛ lokola Baroma 10:13, oyo elobaka ete: “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika,” esimbaki mpenza motema na ngai. Nazalaki koluka Nzambe banda bomwana mpe nsukansuka, nazwaki ye ntango wana!

Nabandaki komona ete nasengeli kolongwa na tempelo. Na ebandeli, nabandaki komitungisa na ndenge oyo basusu bakokanisa soki nalongwe na lingomba ya Shinto. Kasi, nazalaki koloba ntango nyonso ete nakolongwa soki nazwi Nzambe ya solo. Na yango, na eleko ya prɛnta ya mobu 1989, nazwaki ekateli ya koyokela lisosoli na ngai. Nalongwaki na tempelo mpe namitikaki na mabɔkɔ ya Yehova.

Kolongwa na tempelo ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Banganga-nzambe bakonzi na biso babandaki kopamela ngai mpe koluka kotya ngai mbamba mpo nalongwa te. Kutu, ezalaki mpasi mpenza mpo nayebisa baboti na ngai likambo yango. Ntango nazalaki kokende epai na bango, nakómaki koyoka mpasi na motema mpe makolo ekómaki kilo! Natɛlɛmaki na nzela mbala na mbala mpe nabondelaki Yehova apesa ngai makasi.

Ntango nakómaki epai ya baboti, na ebandeli, nabangaki mpo na koyebisa bango likambo yango. Bangonga elekaki. Nsukansuka, nsima ya kobondela mingi, nayebisaki tata makambo nyonso. Nayebisaki ye ete nazwi Nzambe ya solo mpe nazali kolongwa na lingomba ya Shinto mpo nasalela ye. Esalaki tata mpasi mpe ayokaki mawa. Bandeko mosusu bayaki na ndako mpe bamekaki ndenge nyonso mpo nalongwa te. Nalingaki te koyokisa libota na ngai mpasi na motema, kasi nayebaki mpe ete kosalela Yehova ezali likambo ya malamu. Na nsima, libota na ngai endimaki ekateli na ngai.

Atako natikaki kokende na lingomba ya Shinto, nasengelaki mpe kobongola makanisi na ngai. Bomoi ya nganga-nzambe ekɔtelaki ngai mpenza na misisa. Nasalaki makasi mpo na kobosana yango, kasi epai nyonso nazalaki kokende, ezalaki komonana lokola makanisi ya bomoi wana ya kala, ezalaki kozongela ngai.

Makambo mibale esalisaki ngai nakata boyokani na makambo wana. Ya liboso, nalukaki malamumalamu na ndako na ngai eloko nyonso oyo ezalaki na boyokani na lingomba na ngai wana ya kala mpe natumbaki yango​—babuku, bafɔtɔ ata mpe biloko mosusu ya motuya oyo nazwaki na lingomba yango. Ya mibale, nalukaki mabaku mingi ya kozalaka ná Batatoli ya Yehova. Kokóma moninga na bango mpe lisalisi na bango, esalisaki ngai mingi mpenza. Mokemoke, nabosanaki banzela na ngai ya kala.

MATOMBA OYO NAZWI: Nazalaki kokipe te mwasi mpe bana na ngai, mpe yango ezalaki kosala ete báyoka lokola basundolami. Kasi, ntango nabandaki kozala esika moko na bango, ndenge Biblia eteyaka mibali, tokómaki mpenza na bomoko. Na nsima, mwasi na ngai akómaki mpe kosalela Yehova. Ngai ná mwasi na ngai, mwana na biso ya mobali, oyo ya mwasi ná mobali na ye, tozali sikoyo kosambela Yehova na bomoko na losambo ya solo.

Soki nakanisi ndɔtɔ na ngai ya bomwana ya kosalela Nzambe mpe kosalela bato mosusu, namonaka ete nazwi eloko nyonso oyo nazalaki koluka, kutu nazwi yango mingi koleka. Nazangi maloba ya kopesa Yehova matɔndi.

“Nayebaki ete eloko moko ezalaki kozanga.”​—LYNETTE HOUGHTING

ABOTAMAKI NA: 1958

EKÓLO: AFRIKA YA SUDI

BOMOI NA YE YA KALA: AZALAKI KOMIYOKA ETE BABOTI NA YE BASUNDOLÁ YE

NDENGE NAZALAKI: Nabotamaki na Germiston, engumba moko oyo ezalaka na mabanga ya ntalo mingi mpenza te lokola na bingumba mosusu, mpe mobulu ezalaka mingi te. Lokola baboti na ngai bamonaki ete bakokoka te kobɔkɔla ngai, bamonaki malamu bákende kotika ngai epai ya bato mosusu mpo bábɔkɔla ngai. Ntango nazalaki kaka na pɔsɔ mibale, mobali moko ná mwasi na ye bazwaki ngai lokola mwana na bango, mpe nakómaki kozwa bango lokola baboti na ngai. Kasi, nsima ya koyeba ete bango te nde babotá ngai, nakómaki kotungisama mingi na likambo yango. Nabandaki komona ete nazali te mwana ya baboti wana mpe bazalaki mpenza te komitya na esika na ngai.

Ntango nakómaki na mbula soki 16, nabandaki kokende na bisika oyo bamɛlaka masanga ya makasi, epai ngai ná baninga, tozalaki kobina mpe koyoka miziki oyo bazali kobɛta. Ntango nakómaki na mbula 17, nabandaki komɛla makaya. Nalingaki kozala nzoto mike lokola bamɛli-makaya oyo bazalaki kolakisa na bapiblisite. Ntango nakómaki na mbula 19, nabandaki kosala na engumba Johannesburg, mpe eumelaki te nakómaki na baninga ya mabe. Eumelaki te, nabandaki koloba lokola bilenge ya mobulu, komɛla makaya mingi, mpe komɛla masanga mingi na bawikende.

Atako bongo, nazalaki kaka nzoto makasi. Nazalaki kosala ngalasisi mbala na mbala, mpe kobɛta bale ya bana-basi mpe masano mosusu. Namipesaki mpe mingi na masano yango, yango esalaki ete bakóma kolobela ngai na internet. Nakómaki na mbongo mingi, bato mingi bamonaki ete bomoi na ngai ebongi. Nzokande, nazalaki kaka na esengo te​—namonaki lokola nabungi nzela mpe nalɛmbaki bomoi. Na kati ya motema, nayebaki ete nazangi eloko.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Ntango nabandaki koyekola Biblia, namonaki ete Yehova azali Nzambe ya bolingo. Nayekolaki mpe ete amonisaki mpe bolingo yango ndenge apesá biso Biblia, Liloba na ye. Ezali lokola akomelá moto na moto mokanda oyo ekoki kolakisa ye nzela oyo asengeli kolanda. (Yisaya 48:17, 18) Nayebaki ete soki nalingi ete Yehova atambwisa ngai na bolingo na ye, nasengeli kobongola makambo mingi na bomoi na ngai.

Moko ya makambo yango ezalaki oyo ya baninga. Nakanisaki na mozindo na maloba oyo ezali na Masese 13:20, oyo elobaka ete: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.” Toli wana etindaki ngai natika baninga na ngai wana ya kala mpe nakóma na baninga ya sika na kati ya Batatoli ya Yehova.

Mokakatano na ngai ya monene mpenza ezalaki kotika komɛla makaya; nazalaki mpenza moombo na yango. Ntango nabandaki kolonga mokakatano yango mokemoke, nakutanaki na mosusu. Kotika komɛla makaya esalaki ete kilo 13 na ndambo ebakisama na oyo nazalaki na yango. Yango ezalaki mokakatano monene mpo na ngai, mpe esɛngaki ngai mbula soki zomi mpo kilo na ngai ekita. Ya solo, namonaki ete kotika komɛla makaya ezalaki likambo ya malamu. Nabondelaki Yehova ntango nyonso, mpe apesaki ngai makasi ya kotika yango.

MATOMBA OYO NAZWI: Lelo oyo, nazali na nzoto malamu. Nazali mpe na esengo mpo nazali te kolanda bilaka ya lokuta oyo misala ya mokili, kokóma moto monene mpe na bomɛngo epesaka. Kutu, nayokaka nde esengo ndenge nayebisaka basusu mateya ya Biblia. Yango esali ete baninga na ngai misato ya kala bákóma lelo oyo kosalela Yehova elongo na ngai ná mobali na ngai. Liboso ete baboti na ngai wana oyo babɔkɔlaki ngai bákufa, nayebisaki bango elaka ya Biblia oyo etali lisekwa na paradiso awa na mabele.

Kopusana penepene na Yehova esalisi ngai nalonga makanisi ya komiyoka ete basundolá ngai. Yehova asalá ete namiyoka ete nazali te ngai moko ndenge amemá ngai na kati ya libota ya bandeko bakristo ya mokili mobimba. Na kati na bango, nazali na bamama, batata, bandeko mibali mpe basi.​—Marko 10:29, 30.

[Elilingi na lokasa 12]

Namoni mpenza bolingo ya bakristo na kati ya Batatoli ya Yehova

[Elilingi na lokasa 13]

Tempelo ya Shinto epai nazalaki kosambela liboso