Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Yekolá na Liloba ya Nzambe

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Lisolo oyo ebimisi mituna oyo omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kolobela biyano yango elongo na yo.

1. Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya likoló. Ekozwa esika ya baguvɛrnema nyonso mosusu, mpe ekosala ete mokano ya Nzambe esalema na likoló mpe awa na mabele. Na yango, Bokonzi ya Nzambe nde ekokokisa mposa oyo tozalaka na yango ya guvɛrnema ya malamu.​—Tángá Danyele 2:44; Matai 6:9, 10.

Bokonzi esengeli kozala na mokonzi. Yehova atyaki mwana na ye Yesu mokonzi na bokonzi na ye.​—Tángá Luka 1:30-33.

2. Mpo na nini Yesu azali mokonzi oyo abongi?

Mwana ya Nzambe azali mokonzi oyo abongi mpo azali boboto, akangamaka na oyo ezali malamu, mpe azali na nguya mpenza ya kosalisa bato. (Matai 11:28-30) Nsima ya kosekwa, Yesu amataki na likoló mpe abandaki kozela na lobɔkɔ ya mobali ya Yehova. (Baebre 10:12, 13) Nsukansuka, Nzambe apesaki ye nguya mpo na kobanda koyangela kuna na likoló.​—Tángá Danyele 7:13, 14.

3. Banani mpe bakoyangela ná Yesu?

Nzambe aponi etuluku moko ya bato oyo babengami “basantu” mpo na koyangela elongo na Yesu na likoló. (Danyele 7:27) Bato ya liboso oyo baponamaki mpo na kokóma basantu, ezalaki bantoma ya sembo ya Yesu. Yehova akobaki kopona mibali mpe basi ya sembo tii lelo oyo. Ndenge Yesu asekwaki na nzoto ya elimo, bango mpe basekwaka bongo.​—Tángá Yoane 14:1-3; 1 Bakorinti 15:42-45.

Bato boni bakokende na likoló? Yesu abengaki bango “etonga moke.” (Luka 12:32) Na nsuka, bango nyonso bakozala bato 144 000, mpe bakoyangela mabele elongo na Yesu.​—Tángá Emoniseli 5:9, 10; 14:1.

4. Ntango nini Bokonzi ya Nzambe ebandaki koyangela?

Yesu akómaki mokonzi na 1914. * Mwa moke na nsima, abwakaki Satana mpe bademo na ye awa na mabele. (Emoniseli 12:7-10, 12) Banda wana, mpasi ya bato ebakisamá makasi mpenza. Bitumba, banzala, bamaladi mabe mpe kobuka mibeko ezali na kati ya elembo oyo ezali komonisa ete mokili oyo ekómi na nsuka na yango. (2 Timote 3:1-5) Baoyo nyonso balingi kozwa matomba na Bokonzi ya Nzambe, basengeli koyekola ndenge ya kokóma bayekoli ya Mokonzi Yesu.​—Tángá Luka 21:7, 10, 11, 31, 34, 35.

5. Bokonzi ya Nzambe ezali kokokisa makambo nini?

Na nzela ya mosala ya kosakola oyo ezali kosalema na mokili mobimba, Bokonzi ya Nzambe esalisi bamilio ya bato ya bikólo nyonso báyekola banzela ya Nzambe. (Matai 24:14) Ekobatela “ebele mpenza ya bato” oyo bazali sembo epai ya Yesu ntango ekobebisa mokili oyo mabe.​—Tángá Emoniseli 7:9, 10, 13-17.

Na boumeli ya mbula 1 000, Bokonzi ekobongola mokemoke mabele paradiso. Nsukansuka, Yesu akozongisa Bokonzi epai ya Tata na ye. (1 Bakorinti 15:24-26) Oyebi moto moko oyo okolinga koyebisa ye makambo etali Bokonzi ya Nzambe?​—Tángá Nzembo 37:10, 11, 29.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 8 mpe 9 ya buku oyo, Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 13 Mpo na koyeba malamumalamu ndenge bisakweli ya Biblia elobeli mobu 1914, talá nkasa 215-218 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?, ebimisami na Batatoli ya Yehova.