Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nani asalá mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́?

Nani asalá mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́?

Nani asalá mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́?

“OYEBI nde mibeko [ya] lola?” (Yobo 38:33, Biblia haut fleuve) Ntango Nzambe atunaki motuna wana, azalaki kosalisa mosaleli na ye wana oyo azalaki na mpasi mpo amona ete boyebi ya bato ezali moke mpenza soki tokokanisi yango na bwanya ezangi nsuka ya Mozalisi na biso. Okanisi boni na likambo yango?

Bato bayekoli makambo mingi oyo etali mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́, kasi bato mingi ya siansi bakondima mpenza ete ezali naino na makambo mingi ya koyekola. Mbala na mbala, makambo ya sika oyo bato ya siansi bamoni na bolukiluki na bango, etindi bango bátalela lisusu makanisi na bango na likambo etali ndenge biloko oyo ezali na molɔ́ngɔ́ etambolaka. Makambo oyo bato ya siansi bamoni na ntina na molɔ́ngɔ́ esali ete motuna wana oyo Nzambe atunaki Yobo ezala lisusu na ntina te? To makambo wana ya sika oyo bato ya siansi bamoni, epesi bilembeteli ete Yehova nde asalá mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́?

Biblia ezali na makambo ya ntina oyo ezali kosalisa mpo na koyanola na mituna yango. Kasi, Biblia elobaka te ete ezali buku ya siansi. Nzokande, ntango elobelaka makambo etali molɔ́ngɔ́, makambo oyo elobaka ezalaka mpenza sikisiki mpe mbala mingi bato bayaka koyeba bosolo na yango nsima ya bambula ebele.

Ndenge oyo bato mosusu bazalaki liboso kolimbola molɔ́ngɔ́

Mpo na kopesa mwa likanisi, tózonga naino na siɛklɛ ya minei liboso ya ntango na biso, siɛklɛ soki moko nsima ya kosilisa kokoma oyo babengaka Makomami ya Ebre to Kondimana ya Kala. Na ntango wana, Aristote, moto ya filozofi ya Grɛki azalaki koteya bato ya mayele makambo etali molɔ́ngɔ́. Tii lelo oyo, bato batalelaka ye lokola moko ya bato minene ya siansi. (Talá  etanda na lokasa 25.) Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete: “Aristote azalaki moto ya siansi ya liboso oyo abongi, oyo atiká nsango. . . . Moto nyonso ya siansi asengeli kopesa ye mersi.”

Aristote asalaki malamumalamu mpenza liyemi ya ndenge oyo molɔ́ngɔ́ ezalaka. Amonisaki ete mabele ezali na katikati ya molɔ́ngɔ́ oyo ezali na basɛrklɛ 50 ya mabanga ya kristale, oyo ezingami moko na kati ya mosusu. Minzoto ekangisami na sɛrklɛ oyo ezali mpenza mosika, baplanɛti oyo ezali pene ya mabele. Eloko nyonso oyo ezali mosika na mabele, ezali seko to ekoki kobongwana te. Lelo oyo, tokoki komona ete makanisi wana ebongi te, kasi na boumeli ya mbula soki 2 000, bato mingi ya siansi bandimaki yango.

Kasi, mateya ya Aristote ekokani na oyo ya Biblia? Mateya oyo wapi emonani ete ezali solo? Tótalela mituna misato oyo etali mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́. Biyano na yango ekosalisa biso tóndimela mobandisi ya Biblia, Mopesi-mibeko oyo asalá “mibeko ya likoló.”​—Yobo 38:33.

1. Molɔ́ngɔ́ ekoki kobongwana te?

Aristote azalaki kokanisa ete basɛrklɛ ya molɔ́ngɔ́ ekoki kobongwana te. Sɛrklɛ oyo esimbi minzoto, ná mpe basɛrklɛ mosusu ekoki kokóma moke to monene te.

Biblia elobi mpe bongo? Te; elobi polelepolele te likambo moko mpo na yango. Kasi, talá ndenge elobi: “Ezali na Moto oyo afandi likoló ya zolongano ya mabele, oyo bato na yango bazali lokola makɔnkɔ, Moto oyo atandaka likoló lokola mwa elamba ya pɛtɛpɛtɛ, oyo asembolaka yango lokola hema ya kofanda.”​—Yisaya 40:22. *

Lelo oyo, likanisi nini ebongi mpenza​—ndenge oyo Aristote alobelaki molɔ́ngɔ́ to ndenge oyo Biblia elobeli yango? Ndenge nini bato oyo bayekolaka molɔ́ngɔ́ lelo oyo, batalelaka yango? Na siɛklɛ ya 20, bato ya astronomi bakamwaki koyeba ete molɔ́ngɔ́ ekoki kobongwana. Kutu, emonani ete bagalaksi etambolaka mbangu mpenza mosika na bagalaksi mosusu. Soki ezali na bato ya siansi oyo bakokaki kokanisa ete molɔ́ngɔ́ ekoki kokóma monene ndenge wana, bato yango bazali mingi te to mpe te. Lelo oyo, bato oyo bayekolaka molɔ́ngɔ́ bandimaka ete na ebandeli ezalaki naino moke mpenza mpe na nsima ekómaki monene. Kutu, siansi elobelaka lisusu te likanisi ya Aristote.

Tokoloba nini mpo na maloba ya Biblia? Ezali mpasi te kokanisa moto lokola mosakoli Yisaya azali kotala likoló oyo etondi na minzoto mpe komona yango lokola hema oyo etandami lokola elamba na likoló. * Akokaki kutu komona bokokani oyo ezali kati na galaksi oyo babengi Voie lactée mpe ndenge oyo “mwa elamba ya pɛtɛpɛtɛ” emonanaka.

Lisusu, maloba ya Yisaya etindi biso tómona na makanisi. Tokoki komona na makanisi hema moko na ntango ya kala; ntango mosusu tozali komona mwa liboke ya elamba moko ya makasi ezali kofungwama, epanzani, liboso ete etɛlɛma na makonzí na yango mpe ekóma hema. Ndenge moko mpe, tokoki komona na makanisi komelesa moko azali kozwa mwa liboke moko ya elamba ya pɛtɛpɛtɛ mpe azali kotanda yango mpo kiliya atala. Na bandakisa oyo mibale, eloko moko oyo ezali mwa makasi etandami mpe ekómi monene na miso na biso.

Ya solo, tolobi te ete ndenge oyo Biblia elobeli na ndenge ya elilingi hema mpe mwa elamba ya pɛtɛpɛtɛ, elobi bongo mpo na kolimbola ndenge molɔ́ngɔ́ ekómaki monene. Kasi, ezali kokamwisa biso te ete Biblia elobeli molɔ́ngɔ́ na ndenge oyo eyokani na siansi ya lelo? Yisaya azalaki na bomoi basiɛklɛ misato liboso ya eleko ya Aristote, mpe bankóto ya bambula liboso ete siansi epesa bilembeteli oyo ebongi na likambo yango. Kutu, ezali na ntina te kozongela lisusu kotalela maloba ya profeta wana Moebre ndenge bazongeli lisusu oyo ya Aristote.

2. Nini esalaka ete biloko oyo ezali na likoló ezala kaka na esika na yango?

Mpo na Aristote, molɔ́ngɔ́ etondi na biloko ya ndenge na ndenge. Amonaki ete mabele mpe zingazinga na yango ezali na biloko minei oyo: mabele, mai, mopɛpɛ mpe mɔtɔ. Molɔ́ngɔ́ etondi na biloko oyo ezali lokola kristale, mpe yango nyonso ezali na eloko moko oyo ebebaka te, oyo babengi éther. Biloko oyo ezali na likoló ekangamá na basɛrklɛ oyo emonanaka te. Na boumeli ya ntango molai, bato mingi ya siansi bandimaki likanisi ya Aristote, mpo emonanaki lokola eyokani na likanisi oyo ya ntina: Eloko esengeli kozala likoló ya eloko mosusu to kokangisama na eloko mosusu, soki te ekokwea.

Kasi Biblia elobi nini? Ezali na maloba ya moto moko ya sembo na nkombo Yobo, oyo alobaki na ntina na Yehova ete: “Akakisi mabele na eloko moko te.” (Yobo 26:7) Aristote akokaki mpenza komona ete likanisi wana ebongi te.

Na siɛklɛ ya 17 ya ntango na biso, mbula soki 3 000 nsima ya Yobo, likanisi moko ya bato ya siansi epalanganaki, oyo ezalaki koloba ete molɔ́ngɔ́ etondi te na biloko lokola kristale, kasi nde na mai moko boye. Kasi na nsima, kaka na siɛklɛ yango, Isaac Newton, moto mosusu ya siansi apesaki likanisi oyo ekesanaki mpenza na oyo wana. Alobaki ete ezali na nguya moko oyo esalaka ete biloko oyo ezali na likoló ekwea te. Newton akómaki mpenza pene ya kososola ete mabele mpe biloko mosusu oyo ezali na likoló ekakisamá na eloko te, likanisi oyo ekoki komonana epai na bato ete ezali solo te.

Bato batyelaki likanisi wana ya Newton ntembe makasi. Ezalaki kaka mpasi mpo na bato mingi ya siansi ya makanisi malamu bákanisa ete minzoto mpe biloko mosusu oyo ezali na likoló esimbamá te na eloko moko. Ndenge nini mabele oyo ezali monene to biloko oyo ezali na likoló, ekokaki kokakisama na eloko te? Bato mosusu bamonaka likanisi yango lokola likambo ya kokamwa. Banda na ntango ya Aristote, bato mingi ya siansi bandimaki ete likoló esengelaki kozala na eloko moko.

Ya solo, Yobo ayebaki te eloko nini mpenza esimbi mabele zingazinga ya moi. Kasi, nini etindaki ye aloba ete etando na biso, mabele ekakisami “na eloko moko te”?

Lisusu, likanisi ete eloko moko te esimbi mabele, ebimisi motuna mosusu oyo: Kasi, nini esimbi yango mpe biloko mosusu oyo ezalaka na likoló? Yoká maloba ya kokamwa oyo Nzambe ayebisaki Yobo mokolo moko: “Okoki nde kokanga makasi minzoto ya Kima na minyɔlɔlɔ, to okoki nde kofungola bansinga ya minzoto ya Kesile?” (Yobo 38:31) Na boumeli ya bomoi na ye Yobo azalaki komona butu nyonso ndenge minzoto wana ezalaki kobima mpe kolala. * Kasi mpo na nini minzoto yango ezalaki komonana kaka ndenge moko, mbula na mbula? Nini mpenza esimbaka minzoto yango mpo ezala kaka na bisika na yango? Na ntembe te, kokanisa na likambo yango ekamwisaki Yobo.

Soki minzoto esimbamaka kaka na basɛrklɛ ya likoló, ntina ya biloko oyo esimbi yango elingaki kozala te. Kaka bankóto ya bambula na nsima nde bato ya siansi bayaki koyeba mingi na ntina na “biloko” to “bansinga” oyo emonanaka te, oyo ekangisi biloko ya likoló esika moko, mpe esalaka ete biloko yango etambola na molili. Isaac Newton mpe na nsima Albert Einstein bayebanaki mingi mpo na makambo oyo bamonaki na likambo yango. Na ntembe te, Yobo ayebaki eloko te mpo na banguya oyo Nzambe asalelaka mpo na kokangisa biloko ya likoló esika moko. Kasi, maloba oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu, oyo ezali na mokanda ya Yobo, emonani solo nsima ya bankóto ya bambula koleka makanisi ya Aristote moto ya mayele. Kasi, soki Yehova te, oyo apesá mibeko, nani mosusu akokaki kozala na bososoli ya ndenge wana?

3. Ekozala seko na seko to ekobeba?

Aristote amonaki ete likoló ekeseni mpenza na mabele. Alobaki ete mabele ekoki kobongwana mpe kobeba; kasi éther, oyo bakelá na yango minzoto, ekoki kobongwana soki moke te, ezali seko. Biloko ya sɛrklɛ oyo ezali lokola kristale oyo Aristote alobelaki mpe oyo biloko ya likoló ekangisamá na yango, ekoki kobongwana soki moke te, konzuluka te, to kokufa.

Yango nde Biblia eteyaka? Na Nzembo 102:25-27 tozali kotánga boye: “Kalakala otyaki miboko ya mabele, mpe likoló ezali mosala ya mabɔkɔ na yo. Yango mpenza ekobeba, kasi yo okozala kaka; mpe yango nyonso ekonzuluka lokola elamba. Lokola bilamba, okotya mosusu na esika na yango, mpe ngala na yango ekosila. Kasi yo ozali kaka ndenge ozalaka, mpe bambula na yo ekosila te.”

Simbá ete mokomi wana ya Nzembo, oyo akomaki bambula soki nkama mibale liboso ya eleko ya Aristote, akokanisaki te mabele ná minzoto, lokola nde mabele esalemá mpo ebeba, kasi minzoto mpo ezala seko. Kutu, amonisi nde ete likoló mpe mabele ekeseni mpenza na Yehova Nzambe ya nguya, oyo atambwisaki makambo mpo yango nyonso mibale esalema. * Maloba ya Nzembo yango emonisi ete minzoto ezali lokola eloko nyonso oyo ezali awa na mabele, ekoki kobeba. Mpe bato ya siansi lelo oyo bamoni nini?

Bato ya siansi oyo bayekolaka mabele bandimaka makanisi ya Biblia mpe ya Aristote ete mabele ekoki kobeba. Kutu, mabanga mpe bangomba esilaka mokemoke mpo na mai ya mbula to kobukana ya mabele mpe ezongaka lisusu mpo na volcan mpe makambo mosusu oyo esalemaka na nse ya mabele.

Kasi, tokoloba boni mpo na minzoto? Ekoki kobeba ndenge Biblia emonisi yango, to esalemá mpo ezalaka seko na seko ndenge Aristote ateyaki? Bato ya mayele na makambo etali minzoto na Mpoto babandaki kotyela likanisi ya Aristote ntembe na siɛklɛ ya 16 ya ntango na biso, ntango bamonaki mpo na mbala ya liboso monzoto moko epanzani. Banda wana, bato ya siansi bamonaki ete minzoto ekoki kokufa na ndenge ya mabe ntango epanzani ndenge monzoto wana esalaki to kozika malɛmbɛmalɛmbɛ to soki ekwei kaka yango moko. Lisusu, bato oyo bayekolaka minzoto bamonaki mpe ete minzoto mosusu ya sika ezali kosalema na mapata ntango oyo ya kala ezali kopanzana. Soki bongo, maloba ya elilingi oyo mokomi ya Nzembo alobi ete elamba ezali konzuluka mpe bazali kotya mosusu ebongi mpenza. * Oyo nde likambo ya kokamwa ete mokomi wana ya Nzembo na ntango ya kala akomaki makambo oyo eyokani mpenza na makambo bato ya siansi bamoni lelo oyo!

Kasi, okoki komituna: ‘Biblia eteyaka ete mabele to minzoto oyo ezali na likoló ekosila mokolo mosusu to ekosɛnga ete básala mosusu?’ Te, Biblia eteyi ete ekozala seko na seko. (Nzembo 104:5; 119:90) Kasi yango ezali te mpo biloko yango oyo ekelamá eumela seko yango moko, kasi nde Nzambe oyo asalá yango, alaki ete akobatela yango. (Nzembo 148:4-6) Alobi te ndenge akosala yango, kasi ebongi mpenza te tóndima ete moto oyo asalaki molɔ́ngɔ́ azali mpe na nguya ya kobatela yango? Ndenge moko na motongi-ndako oyo ayebi mpenza mosala akoki kobatela ndako oyo atongi mpo na ye mpe libota na ye.

Nani asengeli kozwa nkembo mpe lokumu?

Kotalela mwa moke mibeko oyo etambwisaka biloko oyo ezali na likoló, ekoki kosalisa biso tózwa eyano na motuna wana. Koyeba nani asalá ete ebele ya minzoto etandama na likoló, mpe oyo asalaka ete ezala na esika na yango, mpe oyo abatelaka yango mpo esila te, ezali kobangisa biso te?

Ntango mosusu, makambo oyo ekoki kotinda biso tóbanga Nzambe ndenge wana emonisami polele na Yisaya 40:26 ete: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona. Nani azalisaki biloko oyo nyonso? Ezali Moto oyo abimisaka limpinga na yango na kolanda motángo na yango mpenza, abengaka yango nyonso na nkombo.” Minzoto ezali lokola limpinga, oyo ezali na ebele ya basoda. Soki limpinga yango ezangi mokambi, ekozala mpamba mpe na mobulu. Soki Yehova atyaka mibeko te, baplanɛti, minzoto, mpe bagalaksi elingaki kotambola te na molɔngɔ; mobulu elingaki kozala makasi. Kutu, kanisá naino limpinga moko oyo ezali na bamiliare ya basoda, oyo mokambi na yango azali te kaka koyebisa na basoda ete bákende epai boye to boye, kasi ayebi mpe nkombo ya soda mokomoko na motó, ezala azali wapi mpe ndenge oyo soda yango azali!

Mibeko oyo etambwisaka biloko oyo ezali na likoló, esalisi biso tómona mwa moke ete Mokambi na yango ayebi mingi koleka. Nani mosusu akokaki kosala mibeko ya boye mpe kotinda bato bákoma makambo yango na bosikisiki na boumeli ya basiɛklɛ, ata mpe bankóto ya bambula liboso ete bato ya siansi bákanga ntina na yango? Na ntembe te, na molɔ́ngɔ́ mobimba, biso nyonso tozali na makambo oyo esengeli kotinda biso tópesa Yehova “nkembo mpe lokumu.”​—Emoniseli 4:11.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 11 Emonani polele ete Biblia elobi ete mabele ezali zolongano, to sɛrklɛ, ndenge liloba ya Ebre ekoki mpe kobongolama. Aristote mpe Bagrɛki mosusu ya ntango ya kala balobaki ete mabele ezali sɛrklɛ, kasi bato bakobaki kotya ntembe na likambo yango bankóto ya bambula na nsima.

^ par. 13 Maloba oyo ya elilingi esalelami mbala mingi na Biblia.​—Yobo 9:8; Nzembo 104:2; Yisaya 42:5; 44:24; 51:13; Zekaria 12:1.

^ par. 22 Ekoki kozala ete basalelaka maloba “minzoto ya Kima” mpo na kolobela liboke ya minzoto oyo babengi pléiade. Mpe maloba “minzoto ya Kesile” mpo na kolobela liboke ya minzoto oyo babengi Orion. Esɛngaka bankóto ya bambula mpo kosalema ya minzoto yango ebongwana mpenza.

^ par. 27 Lokola Yehova asalelaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki lokola “mosali ya mayele” mpo na kokela biloko nyonso, maloba ya Nzembo yango ekoki mpe kosalelama mpo na Mwana yango.​—Masese 8:30, 31; Bakolose 1:15-17; Baebre 1:10.

^ par. 29 Na siɛklɛ ya 19, William Thomson, moto mosusu ya siansi, oyo ayebani mpe na nkombo Lord Kelvin, amonaki mobeko ya mibale, oyo babengi thermodynamique, oyo elobi ete na boumeli ya ntango, ezali komona ete mai, mopɛpɛ, bazamba, mpe bongo na bongo ezali kobeba. Eloko oyo etindaki ye akóma na makanisi wana ezali ndenge ayekolaki na mozindo Nzembo 102:25-27.

[Etanda/​Bililingi na nkasa 24, 25]

 Atiká mpenza nsango

Buku moko (The 100​—A Ranking of the Most Influential Persons in History) elobi ete: “Aristote azalaki moto monene ya filozofi mpe ya siansi na ntango ya kala.” Ezali mpasi te komona ntina oyo maloba wana elobami mpo na moto monene wana. Aristote (abotamaki na mobu 384 mpe akufaki na mobu 322 liboso ya ntango na biso), azalaki moyekoli ya Platon, moto moko ya filozofi oyo ayebanaki mingi, mpe na nsima, ye moko Aristote atángisaki Alezandre Monene. Mikanda ya kala emonisi ete Aristote akomá makambo mingi, na kati na yango, babuku soki 170, mpe babuku 47 na kati na yango ezali naino tii lelo. Akomaki makambo mingi etali minzoto, bioloji, shimi, banyama, fizike, mabele mpe pisikoloji. Alobelaki na mozindo makambo mosusu ya ntina mpenza oyo etali biloko ya bomoi ntango molai mpenza liboso bato mosusu báya kolobela kaka makanisi yango. Buku oyo touti kolobela elobi ete: “Aristote atiká mpenza nsango na Moyen-Âge.” Kasi, ebakisi ete: “Lokola bakumisaki Aristote mingi, yango esalaki ete na nsuka ya Moyen-Âge, bákóma komona ye lokola nzambe.”

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Royal Astronomical Society/​Photo Researchers, Inc.

Euti na buku A General History for Colleges and High Schools, 1900

[Elilingi na nkasa 2627]

Nguya oyo esimbaka biloko ya likoló

[Eutelo ya bafɔtɔ]

NASA and The Hubble Heritage Team (AURA/​STScl)

[Elilingi na nkasa 26, 27]

Liboke ya minzoto babengi Pléiades

[Elilingi na lokasa 28]

Minzoto mosusu epanzanaka

[Eutelo ya bafɔtɔ]

ESA/​Hubble

[Elilingi na lokasa 28]

Kosalema ya minzoto ya sika

[Eutelo ya bafɔtɔ]

J. Hester and P. Scowen (AZ State Univ.), NASA

[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]

© Peter Arnold, Inc./​Alamy