Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Ndenge nini bakonzi ya lingomba ya Bayuda na ntango ya Yesu bazalaki kotalela bato mpamba?

Na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso, bato minene mpe bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki kotyola bato oyo batángaki kelasi mingi te to oyo batángá te. Biblia elobi ete Bafarisai bazalaki koloba ete: “Ebele wana ya bato oyo bayebi Mibeko te, bazali bato balakelamá mabe.”​—Yoane 7:49.

Babuku mosusu emonisi ete mpo na kotyola bato oyo batángaki kelasi te, bato minene mpe bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki kobenga bango ʽam ha·ʼaʹrets, to “bato ya mabele.” Na ebandeli, liloba yango ezalaki liloba ya limemya oyo bazalaki kosalela mpo na kobenga bana-mboka nyonso ya esika moko ya sikisiki. Ezalaki kosalelama kaka te mpo na babola mpe bato mpamba, kasi mpe mpo na bato minene.​—Ebandeli 23:7; 2 Bakonzi 23:35; Ezekiele 22:29.

Kasi, na ntango ya Yesu, liloba yango ezalaki kosalelama mpo na kotyola baoyo bazalaki kotalelama lokola bayebi Mibeko ya Moize te to baoyo bazalaki kotosa mpenza te mimeseno nyonso ya barabi. Mishnah (buku moko oyo ezalaki na ebele ya makambo oyo basalelaki na nsima mpo na kokoma Talmud) ekebisaki na likambo etali kofanda na bandako ya baʽam ha·ʼaʹrets. Na buku moko (The Encyclopedia of Talmudic Sages) Meir, moto moko ya mayele mpe rabi na siɛklɛ ya mibale ateyaki ete: “Soki moto abalisi mwana na ye ya mwasi na am ha’aretz, ezali lokola akangi ye mpe atye ye liboso ya nkɔsi oyo ezali konyatanyata nyama oyo ekangi liboso elya yango.” Talmud elobi ete rabi mosusu alobaki ete “bato oyo batángá te, bakosekwa te.”

Nkombo Kaisala oyo elobelami na Biblia elimboli nini?

Kaisala ezalaki nkombo ya Gaius Julius Caesar (Jules César), na libota na bango ya Baroma, oyo akómaki mokonzi ya Roma mobimba na mobu 46 liboso ya ntango na biso. Baamperɛrɛ mingi ya Roma oyo balandaki na nsima, bamonaki malamu bábengama na nkombo Kaisala, ata mpe misato oyo Biblia etángi bankombo na bango: Augusto, Tibere mpe Klode.​—Luka 2:1; 3:1; Misala 11:28.

Na mobu 14 ya ntango na biso, Tibere akómaki amperɛrɛ mpe ayangelaki na boumeli ya ntango nyonso oyo Yesu asalaki mosala na ye awa na mabele. Na yango, ye nde Kaisala oyo azalaki koyangela ntango Yesu ayanolaki na motuna moko na likambo etali kofuta mpako. Alobaki ete: “Bózongisela Kaisala biloko ya Kaisala, kasi Nzambe biloko ya Nzambe.” (Marko 12:17) Emonani polele ete eyano ya Yesu etalaki kaka Tibere te. Kutu, liloba “Kaisala” emonisaki nde bakonzi ya Leta to guvɛrnema.

Na mobu 58 ya ntango na biso, ntango ntoma Paulo amonaki ete basambisi ye na bosembo te, asalelaki lotomo na ye ya mwana-mboka ya Roma; asɛngaki akende kosamba epai ya Kaisala. (Misala 25:8-11) Na yango, Paulo asɛngaki te ete kaka Néron, oyo azalaki amperɛrɛ na ntango wana asambisa ye, kasi nde tribinale monene ya ampire.

Kaisala, nkombo ya libota, ekómaki mpenza kosalelama mpo na bato oyo bazalaki koyangela; kutu nsima ya boyangeli ya amperɛrɛ ya nsuka ya libota ya Kaisala, bakobaki kosalela nkombo yango lokola titre ya bakonzi.

[Elilingi na lokasa 29]

Denari ya palata oyo ezali na elilingi ya Tibere