Lakisá makambo oyo ezali na kati

Teyá bana na yo

Ntango oyo tosengeli kolala te

Ntango oyo tosengeli kolala te

NA NTEMBE te oyebi ete ezali malamu te olala ntango ozali na kelasi. Bana mingi balalaka na kelasi; kasi mpo na koyekola malamu, osengeli kolala te. Mbala mosusu mpe okendaka makita epai oyekolaka Biblia.

Okanisi ete okoki kosala nini mpo olala te? * Moko ya makambo oyo okoki kosala ezali kolala na ngonga ya malamu. Kolala mwa moke na nsima ya midi ekoki mpe kosalisa. Tótala liteya oyo tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki elenge moko oyo alalaki mpɔngi makasi mokolo moko na butu ntango ntoma Paulo azalaki kosala diskur. Talá na Misala mokapo 20, vɛrsɛ 7 tii 12, mpo omona likambo oyo esalemaki.

Ntoma Paulo akendaki kotala lisangá oyo ezalaki na Troase, engumba moko oyo ezalaki na libongo. Biblia elobi ete Ntoma Paulo alingaki kosala mobembo na masuwa “mokolo oyo elandaki,” yango wana, “abendaki lisukulu na ye molai tii na katikati ya butu.” Tozali kotánga boye: “Wana afandaki na lininisa, elenge mobali moko nkombo na ye Etishe azindaki na mpɔngi moko makasi wana Paulo azalaki kokoba lisukulu.” Likambo nini esalemaki na nsima?

Etishe akweaki na nse “banda na etajɛ ya misato.” Ntoma Paulo ná bandeko mosusu bakitaki mbangu. Bakutaki ye akufi! Okanisi ete bango nyonso bayokaki ndenge nini?— Biblia elobi ete Ntoma Paulo azwaki Etishe mpe azingaki ye na mabɔkɔ. Eumelaki te, Paulo alobaki ete: ‘Bómitungisa te, azali malamu!’ Nzambe azongisaki Etishe na bomoi!

Likambo oyo ekómelaki Etishe eteyi biso nini mpo na Nzambe?— Ya liboso, eteyi biso ete Yehova, Nzambe na biso, akoki kozongisa na bomoi bato oyo bakufá, ata mpe bilenge. Yehova amityaka na esika na yo mpe alingaka yo, koleka kutu baboti na yo. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amonisaki ezaleli ya Tata na ye, na ndenge amemaki bana mike na mabɔkɔ mpe apambolaki bango. Asekwisaki mpe bana, ata mpe mwana mwasi moko ya mbula 12.

Oyoki ndenge nini lokola oyebi ete Nzambe alingaka yo?— Na ntembe, etindi biso tólinga Yehova mpe tótosa maloba na ye. Oyebi ndenge oyo tokoki komonisa ete tolingaka ye?— Na maloba na biso. Yesu alobaki boye: “Nalingaka Tata.” Kasi Yesu asukaki kaka te na koloba ete alingaka Nzambe. Amonisaki yango na misala.

Yesu atosaki Nzambe. Alobaki boye: “Nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.” Soki biso mpe tosali bongo, tokosala makasi tólala mpɔngi te na ntango oyo esengeli te tólala, mpo na kosepelisa Yehova ná Mwana na ye, Yesu.

^ par. 4 Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.