Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Abrahama—Moto ya mpiko

Abrahama—Moto ya mpiko

Abrahama​—Moto ya mpiko

Abrahama azali kotala ndenge bato ya libota na ye mpe basali na ye bazali kokanga bisaka mpo na kokende na Kanana. (Ebandeli 12:1-5) Ntango azali kotala ebele ya bato wana oyo mokumba na bango ezali na mapeka na ye, Abrahama amoni mpenza ete mokumba yango ezali monene. Ndenge nini akokoka koleisa, kolatisa, mpe kopesa bango esika ya kofanda ntango bakokóma na mboka mopaya? Mokumba yango elingaki kozala pɛtɛɛ na Ure, esika oyo matiti ezalaki ebele mpo na banyama, mabele ezalaki kobota malamu mpe mai ezalaki mingi. Ekozala boni soki abɛli to akufi kuna na mokili yango? Nani akosunga libota na ye? Ata soki Abrahama amitungisaki mpo na makambo yango, atikaki te ete kobanga wana elɛmbisa ye. Azalaki na ekateli ya kosala oyo Nzambe asɛngaki ye, ata soki likambo nini ekokaki koya; yango emonisi ete azalaki mpenza na mpiko.

MPIKO EZALI NINI? Mpiko elimboli kozala makasi, na molende, mpe kozanga kobanga likambo; yango ekeseni na kozala malilimalili to bibangabanga. Kozala na mpiko elingi koloba te ete moto akoki kobanga ata eloko moko te. Kasi, moto oyo azali na mpiko oyo Nzambe apesaka, asalaka likambo ata soki azali kobanga.

NDENGE NINI ABRAHAMA AMONISAKI MPIKO? Abrahama alandaki te makambo oyo bato nyonso bazalaki kosala. Abrahama akolaki na esika oyo bato bazalaki kosambela ebele ya banzambe mpe bikeko. Atako bongo, atikaki te ete kobanga bato epekisa ye kosala oyo ayebaki ete ezali malamu. Kutu, na mpiko nyonso, Abrahama aponaki kosambela Yehova, Nzambe kaka moko, ‘Oyo-Aleki-Likoló.’​—Ebandeli 14:21, 22.

Abrahama atyaki losambo ya Nzambe ya solo na esika ya liboso, kasi te biloko ya mokili. Andimaki kotika bomoi malamu oyo azalaki na yango na Ure mpo na kokende na mokili ya esobe, azalaki mpenza na elikya ete Yehova akokokisa bamposa na ye nyonso. Ya solo, wana bambula ezalaki koleka, Abrahama akokaki kokanisa biloko mosusu ya kitoko oyo azalaki na yango na Ure. Kasi, Abrahama azalaki mpenza na elikya ete Yehova akokokisa ntango nyonso bamposa na ye mpe ya libota na ye. Lokola atyaki Yehova na esika ya liboso na bomoi na ye, Abrahama azwaki mpiko ya kotosa mibeko ya Nzambe.

MATEYA NINI TOZWI? Tokoki komekola Abrahama soki tokómi na mpiko ya kotosa Yehova, ata soki bato oyo tozalaka na bango basalaka yango te. Na ndakisa, Biblia eteyaka ete baoyo bakangamaka na kondima na bango epai ya Yehova Nzambe bakoki kokutana na komekama, ntango mosusu epai ya baninga to bandeko na bango. (Yoane 15:20) Nzokande, soki tondimi mpenza ete makambo oyo toyekoli na ntina na Yehova ezali solo, tokokɔtela mateya na biso, kasi tokosala yango na limemya.​—1 Petro 3:15.

Tokoki mpe kotya motema na elaka oyo Nzambe apesi ete akokokisa bamposa ya baoyo bandimelaka ye. Elikya wana epesaka biso mpiko ya kotya makambo ya Nzambe na esika ya liboso na bomoi na biso, kasi na biloko ya mokili te. (Matai 6:33) Tótalela ndenge libota moko esalaki mpenza bongo.

Atako bazali na bana mibale ya mike, Doug ná Becky bazalaki na mposa ya kokende na ekólo mosusu, epai mposa ya basakoli ya nsango malamu ezalaki makasi. Nsima ya kolukaluka na mozindo mpe kobondela mingi, bazwaki ekateli ya kokokisa mokano na bango. Doug alobi boye: “Esɛngaki mpenza kozala na mpiko mpo na kokende na bana na biso ya mike na esika oyo toyebaki ata moke te ndenge makambo ekozala mpo na biso. Kasi, ntango tobandaki kokanisa mpo na kosala mobembo, tolobelaki ndakisa ya Abrahama ná Sara. Kokanisa ndenge batyelaki Yehova motema mpe ndenge akobaki kosalisa bango, esalisaki biso mpenza.”

Mpo na bomoi oyo bazalaki na yango na mboka mopaya, Doug alobi boye: “Tozwi mapamboli beboo. Lokola bomoi na biso ezali ya mindɔndɔ te, tozali na likoki ya kolekisa ntango mingi elongo na libota​—na mosala ya kosakola, kosolola mpe kosakana ná bana na biso. Tozali mpenza na bonsomi ya kosala makambo oyo ezali malamu mpo na libota mpe losambo na biso.”

Toboyi te, moto nyonso te nde akoki kozwa ekateli monene lokola oyo. Kasi, biso nyonso tokoki kolanda ndakisa ya Abrahama soki tozali kotya losambo ya Nzambe na esika ya liboso, mpe kotya motema ete akosundola biso te. Soki tosali bongo, wana tokolanda toli oyo ya Biblia, ete “tózala na mpiko mpenza mpe tóloba: ‘Yehova azali mosungi na ngai, nakobanga te.’”​—Baebre 13:5, 6.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]

Moto oyo azali na mpiko oyo Nzambe apesaka, asalaka likambo ata soki azali kobanga

[Etanda/​Elilingi na lokasa 8]

Mwasi oyo azalaki kobanga Nzambe mpe azalaki molongani ya malamu

Mobali ya Sara azalaki na kondima makasi. Kasi Sara ye moko mpe azalaki kobanga Nzambe mpe atiká ndakisa moko ya malamu. Kutu, mbala misato mobimba, Biblia elobeli ye lokola ndakisa oyo basi oyo babangaka Nzambe basengeli kolanda. (Yisaya 51:1, 2; Baebre 11:11; 1 Petro 3:3-6) Atako Makomami elobi makambo mingi te mpo na mwasi wana oyo akesanaki mpenza na basi mosusu, tokoki komona ete azalaki mpenza na bizaleli ya malamu.

Na ndakisa, tókanisa naino ndenge Sara asalaki ntango Abrahama ayebisaki ye ete Nzambe asɛngi bango bálongwa na Ure. Amitunaki nde soki bazali kokende wapi mpe mpo na nini? Amitungisaki nde mpo na ndenge oyo bakobikela kuna? Ayokaki nde mawa mpo azali kotika baninga mpe libota na ye, mpo ayebaki te ntango nini akokutana na bango lisusu to soki bakabwani mpo na libela? Na ntembe te, makanisi wana eyelaki ye. Atako bongo, andimaki kokende, mpe atyaki motema ete Yehova akopambola ye mpo na botosi na ye.​—Misala 7:2, 3.

Longola kozala mosaleli ya Yehova oyo azalaki na botosi, Sara azalaki mpe molongani ya malamu mpenza. Na esika ya kowelana na mobali na ye mpo na kotambwisa makambo ya libota, Sara azalaki na limemya makasi mpo na mobali na ye; na bolingo nyonso, azalaki kosunga ye ntango azalaki kotambwisa libota na bango. Na ndenge yango, amikómisaki kitoko na nzela ya bizaleli na ye ya malamu.​—1 Petro 3:1-6.

Bizaleli yango ekoki kosalisa basi lelo? Jill, mwasi moko oyo aumeli na libala mbula koleka 30 alobi boye: “Ndakisa ya Sara eteyi ngai ete nasengeli te kobanga kosolola na mobali na ngai mpe komonisa ye makanisi na ngai. Kasi, lokola mobali na ngai nde azali mokonzi ya libota, ye nde azali na mokumba ya kozwa ekateli ya nsuka. Soki azwi ekateli, mokumba na ngai ezali ya kosala nyonso mpo ete ekateli yango elonga.”

Mbala mosusu liteya eleki ntina oyo tokoki kozwa epai ya Sara yango oyo: Atako azalaki mwasi moko kitoko mpenza, atikaki te ete kitoko na ye ya nzoto ekómisa ye lolendo. (Ebandeli 12:10-13) Kasi, na komikitisa nyonso, apesaki nde Abrahama mabɔkɔ, ezala na ntango ya mpasi to na ntango ya bisengo, na bomoi na bango mobimba. Kozanga ntembe, Abrahama ná Sara bazalaki mpenza sembo, na komikitisa, mpe bazalaki mpenza kolingana​—bamemelanaki mpenza mapamboli na libala na bango.