Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Abrahama—Moto ya bolingo

Abrahama—Moto ya bolingo

Abrahama​—Moto ya bolingo

Abrahama azali mpenza na mawa makasi. Sara, mwasi na ye oyo azalaki kolinga mingi, akufi. Ebele ya makambo ya malamu oyo basalaki ná Sara, ezongeli ye na makanisi ntango alingi kokunda mwasi na ye. Azali na mawa makasi, yango wana aleli. (Ebandeli 23:1, 2) Na esika ete kolela yango ezala likambo ya nsɔni mpo na Abrahama, emonisi nde polele ezaleli mosusu ya malamu oyo Abrahama azalaki na yango: bolingo.

BOLINGO EZALI NINI? Bolingo ezali mposa oyo etindaka moto akangama makasi to asepela mingi na bato mosusu. Moto oyo alingaka basusu amonisaka na misala na ye ndenge oyo ayokaka mpo na bato yango, ata soki kosala bongo ekoki kosɛnga ye amipimela makambo mosusu.

NDENGE NINI ABRAHAMA AMONISAKI BOLINGO? Abrahama amonisaki ete azalaki kolinga libota na ye. Na ntembe te, Abrahama azalaki na makambo mingi ya kosala. Atako bongo, azalaki kokokisa bamposa nyonso ya libota na ye. Kutu, Yehova ye moko amonaki ete Abrahama azalaki kokamba malamu libota na ye na makambo ya losambo. (Ebandeli 18:19) Likambo ya ntina koleka, Yehova alobeli polele bolingo ya Abrahama. Ntango alobaki na Abrahama, amonisaki ete Yisaka azali ‘mwana oyo Abrahama alingaka mingi.’​—Ebandeli 22:2.

Tokoki lisusu komona bolingo ya Abrahama na lolenge oyo asalaki ntango Sara, mwasi na ye ya bolingo, akufaki. Abrahama alelaki ye. Atako azalaki mobali ya makasi mpe ya mpiko, abangaki te komonisa mawa na ye. Atako Abrahama azalaki na mpiko, azalaki mpe na boboto.

Abrahama amonisaki ete azalaki kolinga Nzambe na ye. Amonisaki bolingo yango bomoi na ye mobimba. Ndenge nini? Tókanisa likambo oyo Biblia elobi na 1 Yoane 5:3 ete: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye.” Soki totaleli ndimbola oyo, tokomona ete Abrahama azalaki ndakisa monene na likambo etali kolinga Nzambe.

Mbala na mbala, soki Yehova apesi Abrahama mobeko moko, Abrahama azalaki kotosa mbala moko. (Ebandeli 12:4; 17:22, 23; 21:12-14; 22:1-3) Abrahama azalaki kotosa, ata soki ezalaki pɛtɛɛ to ezalaki mpasi mpo na kotosa mobeko yango; azalaki mpe kozela te ayeba naino ntina oyo Yehova asɛngi ye asala likambo boye to boye liboso ya kosala yango. Mpo na Abrahama, makambo wana ezalaki na ntina te. Soki Nzambe asɛngi ye asala likambo moko, azalaki kosepela kosala yango. Abrahama azalaki kotalela likambo nyonso oyo Yehova azalaki kosɛnga ye lokola libaku ya komonisa bolingo na ye mpo na Yehova.

MATEYA NINI TOZWI? Tokoki komekola Abrahama soki tozali kolinga basusu na motema moko, mingimingi bato ya libota na biso. Tokotika soki moke te ete mitungisi ya bomoi ebɔtɔla biso ntango oyo tokoki kolekisa elongo na bato oyo tolingaka.

Tosengeli kosala nyonso mpo bolingo na biso mpo na Yehova ezala ntango nyonso makasi. Bolingo ya ndenge wana ekoki kosalisa biso mingi. Na ndakisa, ekoki kotinda biso tóbongola makanisi na biso, lolenge na biso ya koloba, mpe bizaleli na biso mpo na kosepelisa Nzambe.​—1 Petro 1:14-16.

Mpo na koloba solo, kotosa mibeko ya Yehova ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te. Kasi, tokoki mpenza kotya motema ete Ye oyo asalisaki Abrahama​—Ye oyo abengaki ye “moninga na ngai”—​akozala mpe wana mpo na kosunga biso. (Yisaya 41:8) Liloba na ye Biblia elaki ete: “Akotɛlɛmisa bino ngwi, akokómisa bino makasi.” (1 Petro 5:10) Oyo nde elaka kitoko oyo euti epai ya Moninga wana oyo Abrahama azalaki kotyela motema!

[Etanda na lokasa 11]

Ezali mabe mobali alela na miso ya bato?

Bato mingi bamonaka bongo. Mbala mosusu bakokamwa koyoka ete Abrahama azalaki moko ya mibali makasi mpe ya sembo oyo Biblia elobi ete balelaki ntango bazalaki na mawa. Bato mosusu oyo balelaki ezalaki Yozefe, Davidi, ntoma Petro, bankulutu ya lisangá ya Efese, ata mpe Yesu. (Ebandeli 50:1; 2 Samwele 18:33; Luka 22:61, 62; Yoane 11:35; Misala 20:36-38) Tomoni polele ete Biblia eteyaka te ete ezali mabe mobali alela na miso ya bato.