Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yekolá na Liloba ya Nzambe

Biblia esakolaka makambo oyo ekoya?

Biblia esakolaka makambo oyo ekoya?

Lisolo oyo ezali na mituna oyo mbala mosusu omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kotalela biyano yango elongo na yo.

1. Biblia esakolaka makambo ndenge esengeli mpenza kosalema?

Kaka Nzambe oyo aleki na nguya nde akoki koyeba malamumalamu makambo oyo ekoya. (Amosa 3:7) Na ndakisa, banda kala mpenza, asakolaki koya ya moto moko oyo akobengama Masiya to Kristo. Masiya yango asengelaki kouta na libota ya moto ya sembo Abrahama. Asengelaki kozala mokonzi oyo alingaki kosala ete bato ya botosi bázwa mapamboli mpe bázonga na nzoto ya kokoka, oyo ezangi maladi. (Ebandeli 22:18; Yisaya 53:4, 5) Masiya yango asengelaki kouta na Beteleme.​—Tángá Mika 5:2.

Yesu amonisaki ete ye nde Masiya. Mbula koleka 700 liboso, Biblia esakolaki ete Masiya akobotama epai ya mwasi moko oyo ayebaki naino mibali te mpe bato bakotyola ye. Asengelaki kopesa bomoi na ye mpo na masumu ya ebele ya bato, mpe asengelaki kokundama esika moko na bazwi. (Yisaya 7:14; 53:3, 9, 12) Mbula koleka 500 liboso, Biblia esakolaki ete akokɔta na Yerusaleme likoló ya mpunda mpe akotɛkama na shekele ya palata 30. Makambo nyonso elekaki kaka bongo.​—Tángá Zekaria 9:9; 11:12.

2. Nzambe ayebisaka liboso dati oyo bisakweli esengeli kokokisama?

Mbula koleka 500 liboso, Biblia esakolaki polele mbula oyo Masiya asengelaki komonana. Mpo na koyeba ntango boni esengelaki koleka liboso aya, esengelaki kotánga bapɔsɔ ya bambula, elingi koloba “pɔsɔ” mokomoko ezalaki mbula 7. Esengelaki kozala pɔsɔ 7 bakisá pɔsɔ 62 ya ndenge wana, oyo epesi pɔsɔ 69 ya bambula. Nyonso epesi bambula 483. Ntango nini eleko ya bambula yango ebandaki? Biblia emonisi ete eleko yango ebandaki ntango Nehemia, mosaleli ya Nzambe akómaki na Yerusaleme mpe abandaki kotonga lisusu engumba yango. Lisolo ya Baperse emonisi ete eleko yango ebandaki na mobu 455 L.T.B. (Nehemia 2:1-5) Yesu abatisamaki mpe akómaki Masiya bambula 483 na nsima, elingi koloba na mobu 29 T.B., na ntango mpenza oyo esengelaki.​—Tángá Danyele 9:25.

3. Bisakweli ya Biblia ezali kokokisama lelo oyo?

Yesu asakolaki makambo minene oyo ekosalema na ntango na biso. Na esakweli na ye, alobelaki nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, oyo ekokitisa mitema ya bato nyonso oyo balingaka Nzambe. Bokonzi yango ekotya nsuka na mokili mabe oyo tozali na yango lelo.​—Tángá Matai 24:14, 21, 22.

Bisakweli ya Biblia emonisi polele ndenge mokili oyo ekosuka. Biblia esakolaki ete na esika makambo ebonga na eleko oyo mayele ya siansi ezali kokola, bato bakobebisa nde mabele. Bampasi oyo euti na bitumba, kozanga bilei, koningana ya mabele mpe bamaladi ekozala mingi. (Luka 21:11; Emoniseli 11:18) Bato bakozala lisusu na bizaleli ya malamu te. Na ntango wana ya mpasi, bayekoli ya Yesu bakosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na bikólo nyonso.​—Tángá Matai 24:3, 7, 8; 2 Timote 3:1-5.

4. Bato bakokóma na bomoi ya ndenge nini?

Nzambe oyo aleki na nguya abombeli basaleli na ye ya sembo makambo malamu. Uta na likoló, Yesu Masiya ná bato oyo baponami, bakoyangela mabele. Bakosala Bokonzi to guvɛrnema, oyo ekoyangela mbula 1 000. Bakufi bakosekwa mpe bakozala na libaku ya kozwa bomoi ya seko. Lisusu, Bokonzi yango ekosilisa mpasi ya bato nyonso oyo bakozala na mabele na ntango wana. Maladi mpe liwa ekozala lisusu te.​—Tángá Emoniseli 5:10; 20:6, 12; 21:4, 5.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá nkasa 23-25 mpe 197-201 na buku Biblia eteyaka mpenza nini? oyo tolakisi awa.