Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Pusaná penepene na Nzambe

“Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali”

“Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali”

NTANGO tata moko ná mwana na ye ya moke balingi kokatisa balabala oyo mituka elekaka mingi, tata alobi na mwana boye: “Simbá lobɔkɔ na ngai.” Lokola lobɔkɔ ya tata na ye esimbi mwa misapi na ye, mwana azali kobanga eloko te. Osilá koyoka mposa ete moto moko asimba yo na lobɔkɔ mpo na kotambola elongo na yo na mokili oyo etondi na makama? Soki ezali bongo, mbala mosusu maloba oyo Yisaya akomaki ekoki kokitisa yo motema.​—Tángá Yisaya 41:10, 13.

Yisaya ayebisaki Bayisraele maloba wana. Atako Nzambe azalaki kotalela ekólo yango lokola “eloko” na ye, banguna mingi bazalaki kofanda pembeni ya ekólo yango. (Kobima 19:5) Likambo yango esengelaki nde kobangisa Bayisraele? Yehova atindaki Yisaya ayebisa bango maloba wana ya kolendisa. Ntango tozali kotalela maloba yango, tóbosana te ete etaleli mpe basaleli ya Nzambe lelo oyo.​—Baroma 15:4.

Yehova alobi ete: “Kobanga te.” (Vɛrsɛ 10) Yango ezali maloba ya mpamba te. Yehova alimboli ntina oyo bato na ye basengeli kobanga te: “Mpo nazali na yo.” Azali te moto oyo azali mosika na bango, oyo alaki ete akoya kosalisa bango na ntango oyo bazali mpenza na bosɛnga. Alingi bato na ye báyeba ete azali elongo na bango, elingi koloba azali pene na bango mpe akoki kosalisa bango ntango nyonso. Likanisi wana ezali mpenza kokitisa motema.

Na nsima, Yehova alendisi bato na ye boye: “Kotala epai na epai te.” (Vɛrsɛ 10) Verbe ya Ebre oyo basaleli na esika yango ekoki komonisa bato oyo “batalaka ngámbo na ngámbo mpo na koyeba soki ezali na eloko moko oyo ekoki kosala bango mabe.” Yehova alimboli ntina oyo bato na ye basengeli te kotala epai na epai na kobanga: “Mpo nazali Nzambe na yo.” Yango ezali mpenza maloba ya kokitisa motema! Yehova azali “Oyo-Aleki-Likoló,” “Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Nzembo 91:1) Lokola Yehova oyo azali na nguya nyonso azali Nzambe na bango, bazali na ntina ya kobanga te.

Boye, basaleli ya Yehova basengeli kozela ete asalela bango nini? Alaki boye: “Nakosimba yo mpenza na lobɔkɔ na ngai ya mobali ya boyengebene.” (Vɛrsɛ 10) Alobi mpe boye: “Ngai, Yehova Nzambe na yo, nazali kosimba lobɔkɔ na yo ya mobali.” (Vɛrsɛ 13) Okanisi nini ntango oyoki maloba wana? Buku moko elobi boye: “Soki tosangisi maloba yango esika moko, tokomona ete bavɛrsɛ yango mibale ezali kopesa likanisi ya tata ná mwana. [Tata] azali wana te kaka mpo na kobatela mwana, kasi azali mpenza elongo na mwana yango; akotika te ete mwana na ye azala mosika na ye.” Kanisá naino: Yehova akotika te ete basaleli na ye bázala mosika na ye, ata na ntango oyo ekoki komonana lokola ntango ya mpasi mpenza na bomoi na bango.​—Baebre 13:5, 6.

Maloba yango oyo Yisaya akomaki ekoki mpenza kolendisa basaleli ya Yehova lelo oyo. Na ‘ntango ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano’ oyo tozali, ntango mosusu tokoki komona ete mikakatano ya bomoi elekeli biso motó. (2 Timote 3:1) Kasi, tosengeli te kobunda na mikakatano yango biso moko. Yehova alaki kozala penepene na biso mpe kosimba biso na lobɔkɔ. Lokola mwana oyo atyelaka tata na ye motema, tokoki kosimba lobɔkɔ na ye ya nguya, na elikya ete akotambwisa biso na nzela ya malamu mpe akosalisa biso ntango tozali na bosɛnga.​—Nzembo 63:7, 8.

Botángi ya Biblia mpo na Yanuali:

Yisaya 24-42