Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi . . .

Mpo na nini Nzambe asɛngaki Abrahama apesa mwana na ye mbeka?

Mpo na nini Nzambe asɛngaki Abrahama apesa mwana na ye mbeka?

▪ Ndenge Biblia emonisi yango na mokanda ya Ebandeli, Yehova Nzambe asɛngaki Abrahama apesa mwana na ye Yisaka mbeka. (Ebandeli 22:2) Ezalaka mpasi mpo batángi mosusu ya Biblia bákanga ntina ya lisolo wana. Profesɛrɛ moko nkombo na ye Carol alobi boye: “Na bomwana na ngai, ntango nayokaki lisolo yango mpo na mbala ya liboso, nayokaki mabe. Nzambe nini akokaki kosɛnga moto likambo ya ndenge wana?” Atako tokoki kokamwa te ete moto akanisa bongo, ezali malamu tóbosana te makambo mibale ya ntina.

Ya liboso, tótalela likambo oyo Yehova asalaki te. Atikaki te ete Abrahama apesa mwana yango mbeka, atako Abrahama alingaki kosala yango, mpe Nzambe asɛngá lisusu moto moko te likambo ya ndenge wana. Yehova alingi ete basambeli na ye nyonso, ata bana mike, bákoba kozala na bomoi, bomoi moko ya molai mpe ya esengo.

Ya mibale, Biblia emonisi ete Yehova asɛngaki Abrahama apesa Yisaka mbeka mpo na ntina moko. Nzambe ayebaki ete basiɛklɛ mingi na nsima, ye moko akotika ete Mwana na ye, * Yesu, akufa mpo na biso. (Matai 20:28) Yehova alingaki kosalisa biso tómona motuya oyo mbeka yango elingaki kosɛnga ye. Likambo oyo asɛngaki Abrahama emonisaki polele likambo oyo asengelaki kosala mpo na kopesa mbeka yango. Na ndenge nini?

Tótalela maloba ya Yehova epai ya Abrahama: “Nabondeli yo, kamatá Yisaka, mwana na yo, mwana na yo kaka moko oyo olingaka mingi, mpe . . . pesá ye lokola likabo ya kotumba.” (Ebandeli 22:2) Tomoni ete Yehova abengaki Yisaka mwana “oyo olingaka mingi.” Yehova ayebaki ete Yisaka azalaki na motuya mingi na miso ya Abrahama. Nzambe ayebaki mpe ndenge oyo azalaki kotalela Mwana na ye, Yesu. Yehova alingaki Yesu mingi, yango wana alobaki mbala mibale longwa kuna na likoló mpe abengaki Yesu “mwana na ngai ya bolingo.”​—Marko 1:11; 9:7.

Tomoni mpe ete ntango Yehova alobaki na Abrahama, asalelaki maloba “nabondeli yo.” Moto moko ya mayele oyo alimbolaka maloba ya Biblia alobaki ete ndenge oyo Nzambe asalelaki liloba yango emonisi ete “NKOLO azali koyeba valɛrɛ ya likambo oyo asɛngaki.” Ndenge tokoki komona yango, likambo yango epesaki Abrahama mawa; ndenge moko mpe, tokoki kokanisa mpasi makasi oyo Yehova ayokaki ntango amonaki ndenge mwana na ye anyokwamaki mpe akufaki. Na ntembe te, yango ezali mpasi eleki makasi oyo Yehova ayoká mpe akoyoka yango lisusu te.

Na yango, atako tokoki koyoka mabe soki totángi likambo oyo Yehova asɛngaki Abrahama asala, ezali malamu tóbosana te ete Yehova atikaki te moto wana ya sembo apesa mpenza mwana na ye mbeka. Atikaki nzela te Abrahama abungisa eloko oyo eleki motuya oyo moboti akoki kobungisa; abatelaki Yisaka mpo akufa te. Kasi, Yehova “abombaki kutu Mwana na ye te kasi akabaki ye mpo na biso nyonso.” (Baroma 8:32) Mpo na nini Yehova andimaki likambo wana ya mpasi? Asalaki yango mpo “tókoka kozwa bomoi.” (1 Yoane 4:9) Likambo yango emonisi biso mpenza bolingo monene oyo Nzambe azali na yango mpo na biso! Yango ezali kotinda biso mpe tólinga ye, boye te? *

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 5 Biblia eteyaka te ete Nzambe abotaki mpenza Yesu ná mwasi moko. Yehova akelaki nde ekelamu ya elimo oyo na nsima atindaki awa na mabele mpo abotama epai ya Maria, mwasi oyo ayebaki naino mibali te. Na yango, lokola azali Mozalisi ya Yesu, Nzambe abongi mpenza kobengama Tata na ye.

^ par. 8 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo emonisi ete liwa ya Yesu ezalaki na ntina mpe ndenge oyo tokoki komonisa botɔndi na biso mpo na yango, talá mokapo 5 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?