Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bakristo ya solo bamemyaka Liloba ya Nzambe

Bakristo ya solo bamemyaka Liloba ya Nzambe

“Liloba na yo ezali solo.”​—YOA. 17:17.

1. Tángá likambo moko ya ntina oyo omonaki ete ekesenisi Batatoli ya Yehova na mangomba mosusu.

 KANISÁ mbala ya liboso oyo osololaki na Motatoli ya Yehova moko. Likambo nini obosanaka te mpo na mokolo yango? Mingi na biso bakoki koloba ete: ‘Nakamwaki ndenge oyo Motatoli yango asalelaki Biblia mpo na koyanola na mituna na ngai nyonso.’ Tosepelaki mingi koyeba mokano ya Nzambe mpo na mabele, nini ekómelaka moto soki akufi, mpe elikya oyo tozali na yango mpo na balingami na biso oyo bakufá!

2. Wapi mwa bantina oyo mpo na yango okómaki kopesa Biblia motuya mingi?

2 Nzokande, ntango tokobaki koyekola, toyaki komona ete Biblia esuki kaka te na kopesa biso biyano na mituna oyo etali bomoi, liwa, mpe mikolo oyo ezali koya. Tokómaki kopesa Biblia motuya mingi mpo ezali buku oyo esalisaka mingi koleka babuku mosusu nyonso na mokili. Batoli na yango esilaka ngala te, mpe baoyo bazali kolanda batoli yango na likebi bakozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo. (Tángá Nzembo 1:1-3.) Banda kala, bakristo ya solo bandimaka Biblia “lokola liloba ya bato te, kasi, ndenge yango ezali mpenza, lokola liloba ya Nzambe.” (1 Tes. 2:13) Kotalela mwa moke makambo oyo eleká ekomonisa bokeseni kati na baoyo bamemyaka mpenza Liloba ya Nzambe mpe baoyo bamemyaka yango te.

BASILISI MOKAKATANO MOKO MONENE

3. Mokakatano nini elingaki kobebisa bomoko ya lisangá ya bokristo na ekeke ya liboso, mpe mpo na nini ezalaki likambo monene?

3 Korneyi azalaki moto ya liboso ya ekólo mosusu oyo akatamá ngenga te, oyo atyamaki mafuta na elimo. Mbula 13 nsima ya likambo yango, mokakatano moko ebimaki oyo elingaki kobebisa bomoko ya lisangá ya bokristo. Bato mosusu mingi ya bikólo mosusu bazalaki kokóma bakristo. Motuna moko ebimaki: Mibali oyo bazali bato ya bikoló mosusu basengeli kokatama ngenga na kolanda bonkɔkɔ ya Bayuda liboso bázwa batisimo? Ezalaki pɛtɛɛ te Moyuda apesa eyano na motuna wana. Bayuda oyo bazalaki kotosa Mibeko bakokaki ata te kokɔta na ndako ya bato ya bikólo mosusu, bongo bakokaki nde kondima bango lokola bandeko? Na ntango wana, Bayuda oyo bakómaki bakristo bazalaki konyokwama makasi mpo batikaki Lingomba ya Bayuda. Soki bakómi sikoyo koyamba bato ya bikólo mosusu kati na bango, ekongalisa lisusu matata kati na bango ná Bayuda oyo batikalaki na lingomba ya kala, mpe bakofinga bango lisusu mingi.​—Gal. 2:11-14.

4. Banani bayanganaki mpo na kosilisa mokakatano oyo ebimaki, mpe mituna nini ekokaki koya na makanisi ya bato mosusu?

4 Na mobu 49 T.B., bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme, bango nyonso Bayuda oyo bakatamá ngenga, “bayanganaki mpo na kotalela likambo yango.” (Mis. 15:6) Bafandaki te mpo na kobendana na makambo ya mpambampamba oyo etali lingomba, kasi nde mpo na kolobela likambo oyo esimbaki mpenza mateya ya Biblia. Moto na moto apesaki makanisi na ye na likambo yango. Bakotika makanisi ya moto moko, to mabe oyo azali kokanisela basusu etambwisa ekateli na bango? Bankulutu bakoloba nde ete bakozwa ekateli te tii ntango makambo ya losambo na Yisraele ekobonga mpo na bakristo? Bakondima ekateli moko boye kaka bindimela, to bakosala boyokani moko boye mpo kaka likambo yango esila?

5. Na makambo nini ya ntina likita oyo esalemaki na Yerusaleme na mobu 49 T.B. ekesanaki na makita ya bakonzi ya mangomba ya bokristo?

5 Na makita ya bakonzi ya mangomba ya bokristo lelo, mbala mingi bato bandimaka makambo bindimela to batyaka basusu mbamba mpo bándima likanisi na bango. Nzokande, na likita wana oyo esalemaki na Yerusaleme, moto moko te andimaki likambo bindimela; moko mpe te atyaki basusu mbamba mpo bándima likanisi na ye. Atako bongo, bazwaki ekateli oyo bango nyonso bandimaki. Ndenge nini bazwaki yango? Atako moto na moto abimisaki mpenza likanisi na ye, bango nyonso oyo bazalaki wana bazalaki komemya Liloba ya Nzambe, mpe makomi mosantu yango nde esalisaki bango básilisa mokakatano oyo ebimaki.​—Tángá Nzembo 119:97-101.

6, 7. Ndenge nini basalelaki Makomami mpo na kosilisa mokakatano ya kokatama ngenga?

6 Mokapo oyo esalisaki na kosilisa mokakatano wana ezalaki Amose 9:11, 12. Misala 15:16, 17 ezongeli yango boye: “Nakozonga mpe nakotonga lisusu mwa ndako ya matiti ya Davidi oyo ekweá; mpe nakotonga lisusu bitika na yango mpe nakotɛlɛmisa yango lisusu, mpo baoyo batikali na kati ya bato báluka Yehova makasi, elongo na bato ya bikólo nyonso, bato oyo babengami na nkombo na ngai, Yehova alobi bongo.”

7 Kasi, moto mosusu akoki koloba boye: ‘Mokapo yango elobi te ete ezalaki na ntina te bato ya bikólo mosusu oyo bakómi bakristo bákatama ngenga.’ Ezali solo; kasi Bayuda oyo bakómaki bakristo bayebaki ete ezali nde bongo. Na miso na bango, bato ya bikólo mosusu oyo bakatami ngenga bazalaki lisusu “bato ya bikólo” te, bazalaki nde bandeko. (Kob. 12:48, 49) Na ndakisa, libongoli ya Bagster ya Biblia Septante ebongoli Estere 8:17 boye: “Bato mingi ya bikólo bakatamaki ngenga, mpe bakómaki Bayuda.” Baoyo batikali na kati ya bato ya Yisraele ezalaki Bayuda ná Baprozelite oyo bakatamá ngenga. Makomami esakolaki ete bakokóma bato ya ekólo moko mpo na nkombo ya Nzambe elongo na “bato ya bikólo nyonso,” elingi koloba bato ya bikólo mosusu oyo bakatamaki ngenga te. Na yango, eyano ya Makomami ezalaki polele. Esɛngamaki te ete bato ya bikólo mosusu oyo balingi kokóma bakristo bákatama liboso ngenga.

8. Mpo na nini Bayuda oyo bakómaki bakristo basengelaki kozala na mpiko na kotalela ekateli oyo ezwamaki?

8 Liloba ya Nzambe mpe elimo na ye esalisaki bakristo wana ya sembo ‘báyokana bango nyonso.’ (Mis. 15:25) Atako ekateli yango elingaki kobakisela Bayuda oyo bakómaki bakristo minyoko, baoyo bazalaki sembo batosaki na mpiko nyonso ekateli yango oyo eutaki na Biblia.​—Mis. 16:4, 5.

BOKESENI MOKO MONENE

9. Likambo nini ya monene ebebisaki losambo ya pɛto, mpe liteya nini ya ntina mingi ebebisamaki?

9 Ntoma Paulo asakolaki ete nsima ya liwa ya bantoma, mateya ya lokuta ekobebisa mateya ya bokristo. (Tángá 2 Batesaloniki 2:3, 7.) Ata bato mosusu oyo bazalaki na mikumba balingaki kondima te “mateya oyo epesaka litomba.” (2 Tim. 4:3) Paulo akebisaki bankulutu ya mikolo na ye ete: “Na kati na bino mpenza, mibali bakobima mpe bakoloba makambo ya mbilingambilinga mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.” (Mis. 20:30) Buku moko (New Encyclopædia Britannica) elobeli likambo moko monene oyo ekɔtisaki makanisi ya mabe; elobi boye: “Bakristo oyo bayekolaki mwa moke filozofi ya Bagrɛki bakómaki komona ete esengeli kolobela bindimeli na bango na ndenge ya filozofi, mpo bango moko báyoka esengo mpo na mayele na bango mpe mpo na kobongola bapakano oyo batángá mingi.” Liteya moko monene oyo basangisaki na makanisi ya bapakano ezalaki ya koyeba soki Yesu Kristo azali nani. Biblia ebengi Yesu Mwana ya Nzambe; bato oyo bazalaki kolinga filozofi ya Bagrɛki bazalaki koteya ete azali Nzambe.

10. Ndenge nini likambo oyo ebimaki mpo na koyeba soki Kristo azali nani ekokaki kosila?

10 Balobelaki likambo yango na makita mingi ya bakonzi ya Lingomba ya Katolike. Bakokaki kosilisa likambo yango mbala moko soki bato oyo bazalaki wana bapesaki mpenza Makomami kilo, kasi mingi basalaki bongo te. Kutu, mingi na bango basilaki kozwa ekateli na bango liboso kutu bákóma na makita yango, mpe batingamaki lisusu makasi mingi na makanisi na bango. Bikateli oyo ezalaki kozwama na makita yango ezalaki kolobela Biblia mingi te.

11. Bakonzi ya mangomba balandaki makanisi ya banani, mpe mpo na nini?

11 Mpo na nini bazalaki kosalela lisusu Biblia mingi te? Moto moko ya mayele na nkombo Charles Freeman alobi ete ezali mpo baoyo bazalaki kondima ete Yesu azali Nzambe “bazalaki kokoka te kokweisa maloba ebele ya Yesu oyo emonisaki ete Nzambe Tata aleki ye.” Na yango, mimeseno ya lingomba mpe makanisi ya bato ekómaki na valɛrɛ mingi mpo na bango koleka Baevanzile. Ata lelo oyo, bakonzi mingi ya mangomba bamonaka ete maloba ya bato oyo babengami Batata ya Lingomba ezali na ntina mingi koleka Liloba ya Nzambe! Soki osilá kolobela liteya ya Bosato na moto moko ya teoloji, mbala mosusu omonaki yango.

12. Amperɛrɛ asalaki nini na kati ya lingomba?

12 Baampɛrɛrɛ ya Roma bazalaki mpe kopesa makanisi na bango mingi na makita yango. Mpo na likita oyo esalemaki na Nicée, profesɛrɛ Richard Rubenstein akomaki boye: “Constantin apesaki [baepiskɔpɔ] lokumu mpe bomɛngo koleka ndenge oyo bakokaki kokanisa. Mbula moko ekokaki te, amperɛrɛ yango azongiselaki bango bandako-nzambe to mpe atongaki yango lisusu, azongiselaki bango misala mpe batitre na bango ya lokumu . . . Akómaki kosalela bakonzi ya mangomba ya bokristo makambo ya lokumu oyo bazalaki liboso kosalela banganga-nzambe ya mangomba ya bapakano.” Na yango, “Constantin akokaki kopesa makanisi mingi, to mbala mosusu kutu kokweisa mitindo, mpo na bikateli oyo esengelaki kozwama [na likita] ya Nicée.” Charles Freeman abakisaki ete nsima ya likita wana, amperɛrɛ akokaki kokɔta lisusu mingi na makambo ya lingomba. Akokaki kopesa lingomba nguya mpe kobongola mateya na yango.​—Tángá Yakobo 4:4.

13. Okanisi ete nini nde etindaki bakonzi ya mangomba ya bikeke oyo elandaki na nsima báboya mateya ya polele ya Biblia?

13 Atako bakonzi ya mangomba bazalaki kokoka te koyeba soki Yesu Kristo azali mpenza nani, bato mpamba bazalaki na mokakatano wana te. Lokola bato mpamba bazalaki te koluka kotondisa mabenga na bango na wolo ya amperɛrɛ to kokóma na bokonzi mingi na lingomba, bazalaki kotalela makambo na ndenge oyo ebongi, na kolanda Makomami. Mpe basalaki bongo. Grégoire moto ya Nysse, oyo azalaki koyekola makambo ya Nzambe na ntango wana alobelaki bato mpamba na lityo nyonso ete: “Ezala batɛki bilamba, ezala bato oyo basenzaka mbongo, batɛki biloko ya kolya, bango nyonso bakómi bato oyo bayekolá makambo ya Nzambe. Soki otuni valɛrɛ ya mbongo na yo, bato mosusu ya filozofi bakoyebisa yo ete Mwana akeseni na Tata. Soki otuni ntalo ya limpa, eyano oyo okozwa ezali ete Tata aleki Mwana. Ntango otuni soki okoki kokende kosukola, bakoyebisa yo ete Mwana akelamaki kaka boye.” Ya solo, na bokeseni na bakonzi ya mangomba, mingi kati na bato mpamba bazalaki kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kolimbola makanisi na bango. Elingaki kozala malamu soki Grégoire ná bato na ye báyokelaka bango!

“BLÉ” NÁ “MATITI MABE” EKOLI ESIKA MOKO

14. Mpo na nini tokoki koloba ete kobanda na ekeke ya liboso, ezalaki ntango nyonso na mwa bakristo ya solo oyo batyami mafuta na elimo awa na mabele?

14 Na lisese moko, Yesu amonisaki ete kobanda na ekeke ya liboso, ekozala ntango nyonso na mwa bakristo ya solo oyo batyami mafuta na elimo awa na mabele. Akokanisaki bango na “blé” oyo ezali kokola esika moko na “matiti mabe.” (Mat. 13:30) Ya solo, tokoki mpenza koloba na bosikisiki te soki banani to bituluku ya bato nini bazalaki lokola blé, elingi koloba batyamaki mafuta na elimo; kasi tokoki koloba na kondimisama nyonso ete ezalaki ntango nyonso na mwa bato oyo bakɔtelaki Liloba ya Nzambe na mpiko nyonso mpe bamonisaki polele mateya ya lingomba, oyo ezalaki kouta na Biblia te. Tótala mwa bandakisa.

15, 16. Tángá mwa bato oyo bamonisaki limemya mpo na Liloba ya Nzambe.

15 Episkɔpɔ-mokonzi Agobard, moto ya Lyon, na France (779-840 T.B.), atɛmɛlaki losambo ya bikeko, kopesa basantu bandako-nzambe, mpe mimeseno mosusu ya lingomba oyo eyokani na Biblia te. Moto mosusu oyo azalaki na bomoi na eleko wana ezali Episkɔpɔ Claudius; ye mpe aboyaki mimeseno ya lingomba mpe aboyaki likambo ya kosambela basantu mpe bikeko. Na ekeke ya 11, ezalaki na Diakre-mokonzi moko na nkombo Bérenger, moto ya Tours, na France. Babenganaki ye na lingomba mpo aboyaki liteya ya Katolike oyo elobaka ete limpa ná vinyo ebongwanaka mpenza nzoto mpe makila ya Kristo. Ateyaki mpe ete Biblia eleki mimeseno ya lingomba.

16 Na ekeke ya 12, ezalaki na bato mibale oyo balingaki solo ya Biblia: Pierre de Bruys ná Henri de Lausanne. Pierre atikaki mosala ya nganga-nzambe mpo azalaki kondima ete mateya ya Katolike lokola kobatisa babebe, limpa ná vinyo ebongwanaka mpenza nzoto mpe makila ya Kristo, kobondela mpo na bakufi, mpe kosambela ekulusu eyokani te na Biblia. Na 1140, babomaki Pierre mpo na bindimeli na ye. Henri, oyo azalaki sango, atɛmɛlaki misala ya mbindo ya lingomba mpe mimeseno na yango mosusu oyo eyokanaki na Biblia te. Bakangaki ye na 1148 mpe akɔtaki bolɔkɔ tii liwa na ye.

17. Makambo nini ya minene Valdo ná bato na ye basalaki?

17 Pene na ntango oyo batumbaki Pierre de Bruys mpo alobelaki mabe ya lingomba, moto moko abotamaki, oyo na nsima asalisaki mingi na kopalanganisa solo ya Biblia. Nkombo na ye ya mboka ezalaki Valdès, to Valdo. a Na bokeseni na Pierre de Bruys ná Henri de Lausanne, ye azalaki sango te, kasi apesaki Liloba ya Nzambe motuya mingi tii atikaki bozwi na ye mpe azwaki bibongiseli mpo biteni ya Biblia ebongolama na monɔkɔ oyo bato mingi bazalaki koloba na sudi-ɛsti ya France. Bato mosusu oyo basepelaki mingi mpenza koyoka nsango ya Biblia na monɔkɔ na bango batikaki mpe biloko na bango mpe bamipesaki na mosala ya koyebisa basusu solo ya Biblia. Bakonzi ya lingomba basepelaki ata moke te. Na nsima basi ná mibali yango ya molende bakómaki kobengama Ba-Vaudois; na 1184, pápa abenganaki bango na lingomba mpe episkɔpɔ abenganaki bango na bandako na bango. Likambo yango esalisaki kutu nde na kopalanganisa nsango ya Biblia na bisika mosusu. Nsukansuka, bato oyo balandaki Valdo, Pierre de Bruys ná Henri de Lausanne, mpe bato mosusu oyo bakimaki lingomba bakómaki komonana na bisika mingi na Mpoto. Na bikeke oyo elandaki, bato mosusu babundelaki solo ya Biblia: John Wycliffe (soki 1330-1384), William Tyndale (soki 1494-1536), Henry Grew (1781-1862), mpe George Storrs (1796-1879).

“LILOBA YA NZAMBE EKANGAMI TE”

18. Mayele nini bayekoli ya Biblia na bambula ya 1800 basalelaki mpo na koyekola, mpe mpo na nini ezalaki malamu?

18 Atako banguna basalaki mpenza milende, balongaki te kopekisa solo ya Biblia epalangana. Mokanda ya 2 Timote 2:9 elobi boye: “Liloba ya Nzambe ekangami te.” Na 1870, etuluku moko ya bayekoli ya Biblia babandaki koluka solo. Mayele nini basalelaki mpo na koyekola? Moto moko azalaki kobimisa motuna. Na nsima bazalaki kolobela yango. Bazalaki kotalela bavɛrsɛ nyonso oyo eyokani na likambo yango, mpe soki bango nyonso bamoni ndenge bavɛrsɛ yango eyokani, bazalaki kozwa eyano moko mpo na motuna oyo ebimaki mpe bazalaki kokoma yango. Koyeba ete bato wana ya sembo to ‘bankɔkɔ na biso ya elimo,’ oyo bazalaki na bomoi na bambula ya 1800 bamekolaki bantoma mpe bankulutu ya ekeke ya liboso na ndenge basalaki nyonso mpo bindimeli na bango euta kaka na Liloba ya Nzambe, ezali mpenza likambo ya kolendisa!

19. Mokapo ya mobu 2012 ezali nini, mpe mpo na nini ebongi mpenza?

19 Lelo mpe, bindimeli na biso eutaka na Biblia. Yango wana, Lisangani ya Mikóló-Bakambi eponi maloba oyo ya Yesu ete: “Liloba na yo ezali solo” mpo ezala mokapo ya mobu 2012. (Yoa. 17:17) Lokola moto nyonso oyo alingi kondimama na Nzambe asengeli kotambola na solo, tiká biso nyonso tókoba kosala makasi mpo Liloba ya Nzambe etambwisa biso.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Valdès azalaki ntango mosusu kobengama Pierre Valdès to Valdo, kasi toyebi te soki Pierre ezalaki mpenza nkombo na ye.

[Mituna ya boyekoli]

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]

Mokapo ya mobu 2012: “Liloba na yo ezali solo.”​—Yoa. 17:17

[Elilingi na lokasa 7]

Valdo

[Elilingi na lokasa 7]

Wycliffe

[Elilingi na lokasa 7]

Tyndale

[Elilingi na lokasa 7]

Grew

[Elilingi na lokasa 7]

Storrs