Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Okoki kofanda malamu ná bandeko oyo bazali Batatoli te

Okoki kofanda malamu ná bandeko oyo bazali Batatoli te

Okoki kofanda malamu ná bandeko oyo bazali Batatoli te

“Ndenge nini oyebi soki okobikisa [molongani] na yo te?”​—1 KO. 7:16.

OKOKI KOZWA BIYANO?

Bakristo bakoki kosala nini mpo na kolendisa kimya soki bato mosusu na libota bazali Batatoli te?

Ndenge nini mokristo akoki kosalisa bandeko ya libota na ye bákóma basambeli ya Yehova?

Bandeko mosusu bakoki kosala nini mpo na kosalisa bakristo oyo bazali na mabota oyo bato mosusu bazali Batatoli te?

1. Nini ekoki kosalema na libota ntango moto moko andimi nsango ya Bokonzi?

 MOKOLO moko ntango Yesu atindaki bantoma na ye, alobaki na bango boye: “Ntango bozali kokende, bósakola mpe bóloba ete: ‘Bokonzi ya likoló ekómi pene.’” (Mat. 10:1, 7) Nsango malamu yango esengelaki komemela bato oyo bakondima yango kimya mpe esengo. Kasi, Yesu ayebisaki mpe bantoma na ye ete bato mingi bakotɛmɛla mosala na bango ya kosakola Bokonzi. (Mat. 10:16-23) Botɛmɛli esalaka mpasi koleka soki bandeko ya libota nde bazali koboya nsango ya Bokonzi.​—Tángá Matai 10:34-36.

2. Mpo na nini bakristo bakoki kozala na esengo ata soki bato mosusu ya libota bazali Batatoli te?

2 Yango elingi nde koloba ete bayekoli ya Kristo oyo bazali na mabota oyo bato mosusu bazali Batatoli te bakoki kozala na esengo te? Ezali bongo te. Atako bakristo mosusu batɛmɛlaka bango makasi epai ya bandeko na bango, ezali mpe na baoyo batɛmɛlaka bango makasi te. Longola yango, botɛmɛli mosusu na kati ya libota mpe esilaka. Na makambo nyonso wana, mokristo akoki kozala na esengo soki azali komonisa ezaleli ya malamu ntango bato ya libota bazali kotɛmɛla ye to bazali kosepela na solo te. Lisusu, Yehova asalisaka bato oyo bazali sembo epai na ye bázala na esengo ata na kati ya mikakatano. Mokristo akoki mpe kozala na esengo soki (1) azali kosala makasi mpo kimya ezala na libota mpe (2) soki azali koluka mpenza kosalisa bandeko na ye oyo bazali Batatoli te bándima solo.

SALÁ MAKASI MPO KIMYA EZALA NA LIBOTA

3. Mpo na nini mokristo asengeli kolendisa kimya na libota oyo bato mosusu bazali Batatoli te?

3 Esengeli naino kimya ezala na kati ya libota mpo tólonga koteya bato ya libota na biso. (Tángá Yakobo 3:18.) Ata soki bato mosusu ya libota bakómi naino kosambela Yehova te, mokristo asengeli kosala makasi mpo alendisa kimya na kati ya ndako. Ndenge nini akoki kosala yango?

4. Bakristo bakoki kosala nini mpo bábatela kimya na bango ya motema?

4 Biso bakristo tosengeli kosala makasi tóbatela kimya na biso ya motema. Mpo na yango, tosengeli kobondela na motema mobimba, mpo libondeli ekoki kopesa biso “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” (Flp. 4:6, 7) Mpo tózala na esengo mpe na kimya, tosengeli koyekola koyeba Yehova mpe kosalela batoli ya Biblia na bomoi na biso. (Yis. 54:13) Tosengeli mpe koyanganaka na makita mpe kozala molende na mosala ya kosakola. Mbala mingi, bato oyo bazali na libota oyo bato mosusu bazali Batatoli te bazalaka na likoki ya kosala makambo wana. Tózwa ndakisa ya Enza, a oyo mobali na ye atɛmɛlaka ye makasi. Ndeko yango abimaka na mosala ya kosakola soki asilisi misala nyonso ya ndako. Enza alobi boye: “Ntango nyonso oyo nasali makasi nabima mpo na koyebisa basusu nsango malamu, Yehova apambolaka ngai mpe mosala na ngai ebotaka mbuma ya malamu.” Mapamboli ya ndenge wana epesaka ye kimya mpe esengo mingi.

5. Mokakatano nini bakristo oyo bazali na mabota oyo bato mosusu bazali Batatoli te bakutanaka na yango, mpe epai wapi bakoki kozwa toli?

5 Tosengeli kosala makasi mpo tózalaka na kimya na bandeko na biso oyo bazali Batatoli te. Kosala bongo ekoki kozala mpasi mpo ntango mosusu basɛngaka biso tósala makambo oyo Biblia endimi te. Bandeko na biso mosusu ya libota bakosepela na biso te mpo tozali kotosa mitinda ya Biblia; kasi soki tokangami na yango, nsukansuka, kimya ekokɔta na libota. Nzokande, kotingama kaka na makanisi na biso ata soki likambo oyo basɛngi biso ebuki mobeko ya Biblia te, ekoki kobimisa matata mpamba. (Tángá Masese 16:7.) Ntango mokakatano moko ebimi, ezali na ntina tóluka toli ya Biblia na mikanda ya moombo ya sembo mpe epai ya bankulutu.​—Mas. 11:14.

6, 7. (a) Mpo na nini bato mosusu batɛmɛlaka ndeko na bango oyo abandi koyekola Biblia? (b) Moyekoli ya Biblia to Motatoli ya Yehova asengeli kosala nini soki bato ya libota bazali kotɛmɛla ye?

6 Mpo tózala na kimya na kati ya libota, tosengeli kotyela Yehova motema mpe koluka koyeba makanisi ya bato ya libota na biso oyo bazali Batatoli te. (Mas. 16:20) Ata baoyo babandi koyekola Biblia sika bakoki kosala yango. Bato mosusu baboyaka te ete molongani na bango ayekola Biblia. Kutu, bamosusu bamonaka ete yango ekoki kosalisa libota. Nzokande, bato mosusu basepelaka ata moke te ete molongani na bango ayekola Biblia. Esther, oyo azali sikoyo Motatoli, alobi ete asilikaki makasi ntango mobali na ye akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Alobi boye: “Nazalaki kobwaka mikanda na ye to kotumba yango.” Howard, oyo liboso aboyaki mwasi na ye ayekola Biblia, alobi boye: “Mibali mingi babangaka mpo bakanisaka ete bazali kokosa basi na bango mpo bákɔtisa bango na binzambinzambi. Mbala mosusu mobali akoki kokóma makambo makasi mpo ayebi te asala nini lokola amoni ete mwasi na ye akómi na likama.”

7 Tosengeli kosalisa moyekoli ya Biblia oyo molongani na ye azali kopekisa ye amona ete esɛngi kaka te ete atika koyekola. Akoki mbala mosusu kolonga mokakatano yango soki azali na boboto epai ya molongani na ye mpe azali komemya ye. (1 Pe. 3:15) Howard alobi boye: “Nazali na esengo mingi mpo mwasi na ngai azalaki kofanda nyɛɛ mpe azalaki kosilika te!” Mwasi na ye alobi boye: “Howard ayebisaki ngai natika koyekola Biblia. Alobaki ete bazali kobebisa ngai makanisi. Na esika natyana na ye ntembe, nayebisaki ye ete mbala mosusu alobi solo, kasi nabakisaki ete nazali komona mpenza te ndenge nini bazali kosala yango. Nasɛngaki ye atánga buku oyo nazalaki koyekola. Atángaki yango mpe amonaki ete elobi makambo ya solo. Esimbaki mpenza motema na ye.” Tóbosana te ete ntango mokristo atiki molongani na ye mpo akende na makita to na mosala ya kosakola, molongani yango akoki koyoka lokola ete basundoli ye to ete libala na bango ekómi na likama; kasi soki mokristo azali kokitisa ye motema na bolingo nyonso, molongani na ye akotika komitungisa.

TÓSALISA BANGO BÁNDIMA SOLO

8. Toli nini ntoma Paulo apesaki mpo na moto oyo molongani na ye azali mokristo te?

8 Ntoma Paulo apesaki toli ete moto akabwana te na molongani na ye kaka mpo azali mokristo te. b (Tángá 1 Bakorinti 7:12-16.) Koyeba ete molongani oyo azali mokristo te akoki kobongwana ekoki kosalisa mokristo abatela esengo na ye. Nzokande, ntango mokristo alingi koteya molongani na ye nsango ya Biblia, asengeli kokeba na makambo mosusu, ndenge bandakisa oyo elandi emonisi yango.

9. Ntango moto alingi koyebisa bandeko na ye mateya ya Biblia, likambo nini asengeli kokeba na yango?

9 Jason azalaki kosepela mingi ntango akómaki koyekola Biblia. Alobi boye: “Nazalaki koluka koteya moto nyonso!” Moyekoli ya Biblia akoki kobanda kolobela ntango nyonso mateya ya solo oyo abandi koyekola mpo azali kosepela na yango mingi. Akoki kokanisa ete bandeko na ye bakondima mbala moko nsango ya Bokonzi, kasi mbala mosusu ekosalema bongo te. Mwasi ya Jason asalaki nini na komona esengo oyo mobali na ye azalaki koyoka mpo na makambo oyo azalaki koyekola? Mwasi yango alobi boye: “Nayebaki te nasala nini.” Mwasi moko oyo andimaki solo mbula 18 nsima ya mobali na ye alobi boye: “Nalingaki naino ngai moko nayekola yango malɛmbɛmalɛmbɛ.” Soki oyekolaka Biblia na moto oyo molongani na ye alingaka kosambela Yehova te, ebongi mbala na mbala ozwaka mwa ntango mpo na kolakisa moyekoli yango ndenge ya kolobela na mayele makambo oyo azali koyekola. Moize alobaki boye: “Liteya na ngai ekosopana lokola mbula, liloba na ngai ekotanga lokola mamwɛ, lokola mbula moke likoló ya matiti.” (Mib. 32:2) Mbala mingi, kobwakela moto mateya mokemoke na ntango oyo ebongi esalisaka mingi koleka koyebisa ye makambo ebele na mbala moko.

10-12. (a) Toli nini ntoma Petro apesaki bato oyo balongani na bango bazali bakristo te? (b) Ndenge nini ndeko moko asalisaki moyekoli ya Biblia asalela toli ya 1 Petro 3:1, 2?

10 Ntoma Petro apesaki basi bakristo oyo mibali na bango bazali bakristo te toli oyo eutaki na Nzambe. Akomaki boye: “Bómikitisaka liboso ya mibali na bino moko, mpo, soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama na maloba te kasi na etamboli ya basi na bango, mpo bamoni na miso na bango moko etamboli na bino ya pɛto ná limemya na bino makasi.” (1 Pe. 3:1, 2) Mwasi akoki kosalisa mobali na ye andima solo soki azali kotosa mobali na ye mpe azali komemya ye makasi, ata soki mobali yango azali kotɛmɛla ye makasi. Ndenge moko mpe, mobali oyo azali mokristo asengeli kozala na bizaleli malamu mpe kozala tata ya libota ya malamu ata soki mwasi na ye oyo azali mokristo te azali kotɛmɛla ye.​—1 Pe. 3:7-9.

11 Tozali na bandakisa mingi oyo ezali komonisa ntina ya kolanda toli ya Petro. Tózwa ndakisa ya Selma. Ntango akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, mobali na ye Steve asepelaki te. Mobali yango alobi boye: “Nakómaki na nkanda, na zuwa, nalingaki komona ye na moto mosusu te, mpe nakómaki motema likoló.” Selma alobi boye: “Ata liboso nayekola solo, esɛngaki kozala ntango nyonso ekɛngɛ mpo na kofanda na Steve. Azalaki kosilika mpambampamba. Ntango nakómaki koyekola Biblia, ezaleli yango engalaki lisusu.” Nini esalisaki ye?

12 Selma alobeli likambo moko oyo Motatoli oyo azalaki koyekola na ye ateyaki ye. Alobi boye: “Mokolo moko, nazalaki na mposa ya koyekola te. Na butu oyo elekaki, tobendanaki mwa moke na Steve mpe abɛtaki ngai, yango wana nazalaki na esengo te. Ntango nayebisaki ndeko mwasi yango likambo oyo elekaki mpe ndenge oyo nazalaki koyoka, asɛngaki ngai natánga 1 Bakorinti 13:4-7. Ntango nazalaki kotánga, nazalaki koloba na nse ya motema ete, ‘Steve asalaka epai na ngai ata likambo moko te oyo bakomi awa.’ Kasi, ndeko wana asalisaki ngai natalela makambo ndenge mosusu ntango atunaki ngai boye, ‘Makambo boni oyo batángi awa osalaka epai ya mobali na yo?’ Nalobaki ete, ‘Ata moko te, mpo aleki matata.’ Ndeko yango alobaki na ngai na malɛmbɛ ete, ‘Selma, nani nde azali koyekola mpo akóma mokristo? Yo to Steve?’ Namonaki mbala moko ete nasengeli kobongola ndenge na ngai ya kotalela makambo mpe nabondelaki Yehova asalisa ngai nakóma na boboto epai ya Steve. Mokemoke, makambo ekómaki kobongwana.” Mbula 17 na nsima, Steve akómaki Motatoli.

NDENGE OYO BANDEKO MOSUSU BAKOKI KOSALISA

13, 14. Ndenge nini bandeko mosusu na lisangá bakoki kosalisa baoyo bandeko na bango bazali Batatoli te?

13 Bandeko mosusu na lisangá bakoki mpe kosalisa baoyo bazali na mabota oyo bato mosusu bazali Batatoli te bázala na esengo. Elvina, na Brésil, alobi boye: “Bolingo ya bandeko ya lisangá nde esalisaki ngai nakangama na solo.”

14 Soki bandeko ya mokristo moko oyo bazali Batatoli te bazali komona ete bandeko ya lisangá bazali na boboto mpe bazali kotyela bango likebi, yango ekoki kosimba mitema na bango. Na Nigeria, mobali moko oyo andimaki solo mbula 13 nsima ya mwasi na ye alobaki boye: “Nazalaki na mobembo elongo na Motatoli moko mpe motuka ekufaki na nzela. Alukaki Batatoli na mboka oyo ezalaki pembeni, mpe bapesaki biso bisika mpo tólala tii ntɔngɔ. Basalisaki biso lokola nde bayebi biso banda kala. Namonaki mbala moko bolingo ya bokristo oyo mwasi na ngai azalaki kolobela ntango nyonso.” Na Angleterre, mwasi moko oyo akómaki Motatoli mbula 18 nsima ya mobali na ye alobi boye: “Batatoli bazalaki kobengisa biso mibale tókende kolya epai na bango. Bazalaki ntango nyonso koyamba ngai malamu.” c Kaka kuna na Angleterre, mobali mosusu oyo nsukansuka akómaki Motatoli alobi boye: “Bandeko bazalaki koya kotala biso, to mpe bazalaki kobengisa biso na bandako na bango, mpe nazalaki komona ete bazalaki kotyela ngai likebi. Namonaki yango mingimingi ntango nakɔtaki lopitalo mpe bandeko mingi bazalaki koya kotala ngai.” Yo mpe okoki koluka ndenge ya kolakisa bandeko ya mokristo moko ete otyelaka bango likebi ndenge wana?

15, 16. Nini ekoki kosalisa Motatoli azala na esengo ata soki bandeko na ye bazali kondima solo te?

15 Ya solo, bato mosusu bakokóma Batatoli te ata soki bamoni na boumeli ya bambula etamboli malamu ya molongani, mwana, moboti to ndeko oyo azali mokristo mpe azali kopesa bango litatoli na mayele. Bato mosusu balingaka kobongwana te to mpe bakómaka kotɛmɛla makasi moto oyo azali kosambela Yehova. (Mat. 10:35-37) Kasi, soki mokristo azali na bizaleli ya malamu, yango ekoki kosalisa mingi. Mobali moko oyo akómá Motatoli alobi boye: “Ntango molongani oyo azali Motatoli abandi komonisa bizaleli ya malamu, akoki koyeba te makambo oyo molongani na ye akobanda kokanisa na motema na ye. Yango wana, kolɛmba molongani na yo te.”

16 Mokristo akoki kozala na esengo ata soki ndeko na ye ya libota akómi Motatoli te. Ndeko mwasi moko oyo asali milende mbula 21 kasi mobali na ye asepelaka kaka te koyoka nsango ya Bokonzi alobi boye: “Nazalaka ntango nyonso na esengo mpo nasalaka makasi nasepelisa Yehova, natikala sembo epai na ye, mpe nazala makasi na elimo. Komipesa na makambo ya elimo, na ndakisa koyekola ngai moko, kokende na makita, kobima na mosala ya kosakola, mpe kosalisa bandeko mosusu na lisangá, esalisi ngai napusana penepene na Yehova mpe nabatela motema na ngai.”​—Mas. 4:23.

KOLƐMBA NZOTO TE!

17, 18. Ndenge nini mokristo akoki kozala na elikya ata soki bato mosusu ya libota bazali Batatoli te?

17 Soki ozali mokristo ya sembo mpe bato mosusu na libota na yo bazali Batatoli te, kolɛmba nzoto te. Kobosana te ete “Yehova akotika bato na ye te, mpo na nkombo na ye monene.” (1 Sa. 12:22) Akozala na yo ntango nyonso oyo okokangama na ye. (Tángá 2 Ntango 15:2.) Yango wana, “sepelá mingi mpenza na Yehova.” Ɛɛ, “tikelá Yehova nzela na yo, mpe talelá ye.” (Nz. 37:4, 5) ‘Tingamá na mabondeli,’ mpe zalá na kondima ete Tata na biso ya likoló akoki kosalisa yo oyikela mikakatano ya ndenge nyonso mpiko.​—Rom. 12:12.

18 Bondelá Yehova apesa yo elimo santu na ye mpo esalisa yo olendisa kimya na ndako. (Ebr. 12:14) Ya solo, okoki kotya kimya oyo nsukansuka ekoki kosimba motema ya bandeko na yo oyo bazali Batatoli te. Okozala na esengo mpe na kimya ya motema soki ozali ‘kosala makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.’ (1 Ko. 10:31) Na makambo nyonso wana, okoki kolendisama na koyeba ete bandeko na yo ya bolingo na kati ya lisangá bakosunga yo!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.

b Toli ya Paulo epekisi te ete mokristo akabwana na molongani oyo azali konyokola ye to kosɛnga ye makambo oyo eleki mpasi. Yango ezali ekateli monene oyo moto asengeli kozwa ye moko. Talá buku “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe,” nkasa 220-221.

c Biblia epekisi te kolya na moto oyo azali Motatoli te.​—1 Ko. 10:27.

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 28]

Poná ntango ya malamu mpo na kolobela mateya ya solo

[Elilingi na lokasa 29]

Tótyelaka mpe molongani oyo azali Motatoli te likebi