Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Bakristo” nyonso bazali mpenza bakristo ya solo?

“Bakristo” nyonso bazali mpenza bakristo ya solo?

“Bakristo” nyonso bazali mpenza bakristo ya solo?

BAKRISTO boni bazali na mokili? Buku moko (Atlas of Global Christianity) elobi ete na 2010, na mokili mobimba, bakristo bazalaki soki miliare mibale na ndambo. Buku yango emonisi lisusu ete bakristo yango bazali na mangomba koleka 41 000, oyo mokomoko ezali na mateya na yango mpe na mibeko oyo yango elandaka. Lokola mangomba “ya bokristo” ezali ebele ndenge wana, tokoki kokamwa te soki bato mosusu bazali komituna soki lingomba ya solo ezali oyo wapi. Bakoki komituna boye: ‘Bato nyonso oyo bamibengaka bakristo bazali mpenza bakristo ya solo?’

Tótalela naino likambo yango na lolenge mosusu. Mbala mingi, soki moto oyo azali kosala mobembo akómi na ndelo oyo ekaboli bikólo, batunaka ye soki azali moto ya ekólo nini. Asengeli mpe kolakisa mikanda mosusu ya Leta, na ndakisa passeport, mpo na komonisa ete alobi mpenza solo. Ndenge moko mpe, mokristo ya solo asengeli kosuka kaka te na koloba ete andimelaka Kristo. Asengeli mpe komonisa yango na makambo mosusu. Makambo yango nini?

Mbala ya liboso oyo basalelaki liloba “mokristo” ezalaki nsima ya mobu 44 ya ntango na biso. Luka moko ya bato oyo bakomaki Biblia alobaki boye: “Na Antiokia nde bayekoli babengamaki mpo na mbala ya liboso bakristo na litambwisi ya Nzambe.” (Misala 11:26) Simbá ete bato oyo babengamaki bakristo bazalaki bayekoli ya Kristo. Nini emonisaka ete moto azali moyekoli ya Yesu Kristo? Buku moko (The New International Dictionary of New Testament Theology) elobi ete: “Kozala moyekoli ya Yesu elimboli kokaba bomoi [na yo] mobimba . . . mpo na ye.” Na yango, mokristo ya solo ezali moto oyo alandaka kozanga kokakola mateya nyonso mpe malako nyonso ya Yesu, oyo abandisaki lingomba ya bokristo.

Tokoki nde kokuta bato ya ndenge wana na kati ya ebele ya bato oyo bamibengaka bakristo lelo oyo? Mpo na koyeba bayekoli na ye ya solo, Yesu ye moko alobaki nini? Tosɛngi yo otalela biyano oyo Biblia epesi na mituna yango. Na masolo oyo elandi, tokotalela makambo mitano oyo Yesu alobaki, oyo ekosalisa biso tóyeba bayekoli na ye ya solo. Tokotalela mpe ndenge oyo bakristo ya siɛklɛ ya liboso bakokisaki makambo yango. Mpe tokoluka komona banani kati na ebele ya bato oyo bamibengaka bakristo lelo oyo, bakokisaka makambo yango.