Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ba-Aztèque ya lelo bazali kokóma bakristo ya solo

Ba-Aztèque ya lelo bazali kokóma bakristo ya solo

Ba-Aztèque ya lelo bazali kokóma bakristo ya solo

“Batempelo ekweaki, ekómaki putulu, bikeko ebebisamaki, mpe babuku mosantu etumbamaki na mɔtɔ, kasi, banzambe ya kala ya Ba-Indien bazalaka kaka na mitema na bango.”​—Las antiguas culturas mexicanas (Bonkɔkɔ ya kala ya bato ya Mexique).

MEXIQUE ezali mboka ya Ba-Aztèque, oyo liboso bazalaki moke mpenza ntango bayaki na Mexique na siɛklɛ ya 13, kasi na nsima, bakómaki ampire moko monene, ndenge moko ná Ba-Incas na ekólo Pérou. Atako ampire ya Ba-Aztèque ekweaki ntango bato ya Espagne babɔtɔlaki engumba Tenochtitlán na mobu 1521, Nahuatl, monɔkɔ oyo bazalaki koloba elimwá te tii lelo. * Bana-mboka soki milio moko na ndambo balobaka monɔkɔ yango na bamboka 15 ya Mexique. Walter Krickeberg, moto ya mayele oyo akomaki maloba oyo ezali na ebandeli ya lisolo oyo alobi ete lokola monɔkɔ yango elobamaka tii lelo, yango esali ete mwa ndambo ya mateya ya kala ya Ba-Aztèque ebatelama tii lelo. Wapi mwa ndambo ya mateya yango?

Mimeseno moko ya nsɔmɔ kasi oyo bato mingi bayebi

Ekoki kozala ete momeseno oyo Ba-Aztèque bazalaki na yango ya kopesa bambeka ya bato, nde eyebani mingi koleka. Momeseno yango eutaki na likanisi oyo bazalaki na yango, ete moi ekokufa soki baleisi yango motema ya moto te mpe bamɛlisi yango makila te. Diego Durán, sango moko ya Espagne alobaki ete na mobu 1487, mokolo oyo bafungolaki tempelo ya Piramide ya engumba Tenochtitlán, babomaki bato koleka 80 000 na boumeli ya mikolo minei mpo na kopesa mbeka.

Atako bato ya Espagne bayokaki nsɔmɔ mpo na likambo yango, bakamwaki komona ete mateya mingi ya Ba-Aztèque ekokanaki na oyo ya lingomba na bango ya Katolike. Na ndakisa, Ba-Aztèque bazalaki kosala elambo moko, oyo bazalaki kosala mampa oyo ezalaki na bilongi ya banzambe na bango mpe bazalaki kolya yango. Na bantango mosusu, bazalaki mpe kolya misuni oyo bango bazalaki kopesa mbeka. Ba-Aztèque bazalaki mpe kosalela ekulusu, kotubela masumu, mpe kopesa bana mike batisimo. Ekoki kozala ete likambo oyo ekokanisi bango mpenza ná Bakatolike, ezali losambo ya ngɔndɔ Tonantzin, “Mama ya banzambe,” oyo Ba-Aztèque babengaka ye Mama na biso ya moke.

Balobaka ete na 1531, ngɔndɔ ya Guadalupe ya Bakatolike abimelaki Indien moko ya Aztèque kaka na ngomba oyo Ba-Aztèque bazalaki kosambela Tonantzin. Likambo yango etindaki Ba-Aztèque mingi bákɔta na lingomba ya Katolike. Babongisá mwa esika moko mpo na kosambelaka ngɔndɔ yango na tempelo ya Tonantzin. Na mokolo ya 12 Desɛmbɛ ya mbula nyonso, bankóto na bankóto ya bandimi ya Mexique, oyo mingi na bango balobaka monɔkɔ ya Nahuatl, bakendaka kotala tempelo yango.

Mosika mpenza na bangomba, epai bafandaka, bato oyo balobaka monɔkɔ ya Nahuatl, basalaka bafɛti mingi mpo na basantu oyo babatelaka bango, bafɛti mosusu eumelaka mikolo ebele ata mpe bapɔsɔ mingi. Buku moko (El universo de los aztecas [Mokili ya Ba-Aztèque]) elobi ete bana-mboka “basangisaka losambo ya basantu ya lingomba ya Katolike ná milulu oyo bazalaki kosala liboso ete Cortez abɔtɔla mboka na bango.” Ba-Nahuatl bamipesaka mpe mingi na misala ya bilimo mabe. Soki babɛli, bakendaka kosalisa nzoto epai ya banganga-nkisi oyo basukolaka bato mpe bapesaka mbeka ya banyama. Longola yango, bato mingi bakɔtá kelasi te; mingi na bango bayebi kotánga Espagnol te, ata mpe monɔkɔ ya Nahuatl. Lokola bakangamá na mimeseno mpe monɔkɔ ya mboka na bango, mpe bazali mpenza babola, bato mingi bazwaka bango na valɛrɛ te.

Solo ya Biblia ekómeli Ba-Aztèque ya lelo

Banda bambula mingi, Batatoli ya Yehova na Mexique basalaki makasi mpo na komemela bato nyonso ‘nsango malamu ya bokonzi.’ (Matai 24:14) Na mobu 2000, biro ya Batatoli ya Yehova na Mexique ezwaki bibongiseli mpo ete bato nyonso oyo balobaka monɔkɔ ya Nahuatl báyoka nsango malamu na monɔkɔ na bango, mpe bafungolaki masangá ya monɔkɔ ya Nahuatl mpo na bandeko oyo bazalaki koyangana na makita ya monɔkɔ ya Espagnol. Basalaki mpe ekipi moko ya babongoli mpo bábongolaka mikanda oyo elimbolaka Biblia na monɔkɔ ya Nahuatl. Basalaki mpe milende mpo na kolakisa bato oyo balobaka Nahuatl kotánga mpe kokoma monɔkɔ na bango. Matomba nini emonanaki? Tótala naino makambo oyo bandeko bakutanaki na yango.

Ntango mwasi moko ya mboka yango ayokaki diskur na monɔkɔ ya Nahuatl mpo na mbala ya liboso, akamwaki boye: “Ekoki sikoyo mbula soki zomi banda toyanganaka na makita mpe tozalaki na mokakatano makasi mpo tozalaki koyoka monɔkɔ ya Espagnol malamu te. Kasi, sikoyo ezali lokola nde tobandi bomoi ya sika!” Juan, oyo azali na mbula ntuku motoba, azalaki koyekola Biblia mpe koyangana na makita na monɔkɔ ya Espagnol elongo na mwasi na ye mpe bana na ye na boumeli ya mbula mwambe, kasi azalaki kokende liboso te. Na nsima, abandaki koyekola Biblia na monɔkɔ ya Nahuatl. Mbula moko ekokaki kutu te, azwaki batisimo, mpe akómaki Motatoli ya Yehova!

Ndenge masolo oyo emonisi yango, bato mingi bayekolaki Biblia mpo na mbala ya liboso na monɔkɔ ya Espagnol, kasi, bakangaki mpenza ntina ya makambo yango te. Koyangana na makita mpe na mayangani mpe kozala na mikanda na monɔkɔ na bango, esalisi bango bándima solo ya Biblia mpe báyeba makambo oyo mokristo nyonso asengeli kosala.

Kolonga mikakatano

Atako Ba-Nahuatl bakómaki kokende liboso na makambo ya Nzambe, mikakatano ezangaki te. Na ndakisa, batyaka bango mpanzi likoló mpo básangana na bafɛti ya mangomba. Na mboka San Agustín Oapan, bapekisaki Batatoli ya Yehova kosakola ndako na ndako. Bazalaki kobanga ete yango etinda bato bátika kopesa mbongo mpo na bafɛti yango. Ntango Florencio ná Batatoli ya Yehova mosusu ya Nahuatl bazalaki kosakola, bakangaki bato misato na kati na bango. Na boumeli ya miniti 20, ebele ya bato bayanganaki mpo na koyeba oyo bakosala bango.

Florencio alobi boye: “Bato yango balingaki mbala moko koboma biso, basusu bazalaki koloba ete bákanga biso bansinga mpe bábwaka biso na ebale! Tolekisaki butu mobimba na bɔlɔkɔ. Na mokolo oyo elandaki, ndeko na biso moko Motatoli ya Yehova, oyo azalaki avoka mpe bandeko mosusu mibale bayaki kosalisa biso. Batyaki mpe bango na bolɔkɔ. Nsukansuka, bakonzi batikaki biso mpe bapesaki biso mitindo tólongwa na engumba yango.” Atako basalaki bango ndenge wana, mbula moko na nsima lisangá moko efungwamaki na mboka yango; Batatoli ya Yehova 17 ná bato mosusu soki 50 bazalaki koyangana na makita.

Na Coapala, mboka mosusu ya Ba-Nahuatl, babengisaki Alberto oyo azali Motatoli ya Yehova na fɛti moko ya mboka yango. Aboyaki kokende mpe batyaki ye na bolɔkɔ. Bato ya mboka yango basalaki likita, mpe bamosusu balobaki ete asengeli kokakisama na nzete mpo na kobangisa moto nyonso oyo akolinga kokɔta na lingomba na ye mpe kotika mimeseno ya mboka. Batatoli ya Yehova mosusu balukaki ete bábimisa ye, kasi bango mpe bakangaki bango. Ntango fɛti yango oyo eumelaki pɔsɔ mobimba esilaki, babimisaki bango nyonso na bolɔkɔ. Lokola botɛmɛli ezalaki kokoba, ezalaki na ntina báluka lisalisi ya bakonzi ya Leta, mpe bakonzi yango babimisaki mobeko oyo esalaki ete bátika konyokola bango. Likambo ya esengo, mwa moke na nsima, moto oyo azalaki motɛmɛli monene, andimaki solo ya Biblia mpe azwaki batisimo. Lelo oyo lisangá moko ezali na engumba yango.

Mbuma eteli mpo na kobuka

Lokola Batatoli ya Yehova bamoni ete bato mingi bazali na mposa ya koyeba solo na teritware ya Nahuatl, mingi na bango bazali koyekola monɔkɔ yango. Kasi koyekola monɔkɔ yango ezali mpe na mikakatano na yango. Ba-Nahuatl bazali bato oyo bazalaka nsɔninsɔni, mpe balingaka mpenza te koloba monɔkɔ na bango na miso ya bato, mpo na mpasi oyo bamonisá bango. Longola yango, monɔkɔ yango elobamaka ndenge moko te bisika nyonso.

Sonia, Motatoli ya Yehova moko oyo alekisaka ngonga mingi na mosala ya kosakola, ayebisi nini etindaki ye ayekola monɔkɔ ya Nahuatl. Alobi boye: “Ngonga mibale kolongwa na ndako na ngai, Ba-Nahuatl soki 6 000 oyo batiká bamboka na bango mpe bayá mpo na mosala, bafandaka na bandako ya mike oyo bagarde bakɛngɛlaka bango. Bato yango bazali mpenza bato ya mpasi mpe bazwaka bango na valɛrɛ te. Ndenge oyo bakómá esalaka ngai motema mpasi, mpo kala Ba-Nahuatl bazalaki bato ya lokumu, epai bonkɔkɔ na biso eutá. Tozalaki koteya bango nsango malamu banda bambula 20 na monɔkɔ ya Espagnol, kasi bazalaki kokanga mpenza ntina te, mpe kosepela mpenza te. Kasi, ntango nayekolaki mwa maloba na monɔkɔ na bango, esalisaki ngai nabanda kosolola ná bango. Bazingaki ngai mpo na koyoka ngai. Nasɛngaki mwasi moko kati na bango nalakisa ye kotánga mpe kokoma soki akolinga kolakisa ngai monɔkɔ ya Nahuatl. Sikoyo, bato nyonso oyo bafandaka na mwa bandako yango bayebi ngai lokola ‘mwasi oyo alobaka monɔkɔ ya Nahuatl.’ Namiyokaka lokola nazali misionɛrɛ na ekólo na ngai moko.” Lelo oyo, ezali na lisangá moko ya monɔkɔ ya Nahuatl na teritware yango.

Maricela, Motatoli ya Yehova mosusu oyo alekisaka mpe ngonga mingi na mosala ya kosakola, azali kosala nyonso mpo na koyekola monɔkɔ ya Nahuatl. Na ebandeli, azalaki koyekola Biblia na monɔkɔ ya Espagnol ná Félix, oyo azali na mbula 70. Lokola Maricela akómaki koyeba malamu monɔkɔ ya Nahuatl, abandaki kolimbolela Félix makambo na monɔkɔ yango. Yango ebotaki mbuma malamu. Ayokaki mpenza esengo ntango Félix atunaki ye boye: “Yehova ayokaka ntango nayebisaka ye makambo na monɔkɔ ya Nahuatl?” Félix asepelaki mingi koyeba ete Yehova ayokaka minɔkɔ nyonso. Félix ayanganaka mbala na mbala na makita atako esɛngaka ete atambola ngonga moko na ndambo mpo na koyangana na makita yango, mpe sikoyo asili kozwa batisimo. Maricela alobi boye: “Nazali mpenza na esengo kosala elongo na baanzelu oyo bazali na nsango malamu ya kosakwela bato nyonso!”​—Emoniseli 14:6, 7.

Ya solo mpenza, teritware ya Nahuatl ‘eteli mpo na kobuka mbuma.’ (Yoane 4:35) Tozali kobondela ete Yehova akoba kobengisa bato ya bikólo nyonso, ata mpe Ba-Aztèque ya lelo, bámata na ngomba na ye mpo ateya bango banzela na ye.​—Yisaya 2:2, 3.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 3 Nahuatl ezali na molɔngɔ ya minɔkɔ oyo babengaka Uto-Aztec, oyo elobamaka na bato ya bamboka lokola Hopi, Shoshone, mpe Comanche na nɔrdi ya Amerika. Maloba mingi ya monɔkɔ ya Nahuatl, na ndakisa avoka, shokola, koyote, mpe tomati ekɔtá na Lingelesi.

[Karte na lokasa 13]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

ENGUMBA MEXICO

MOTÁNGO YA BA-AZTÈQUE NA ETÚKÁ MOKOMOKO

150 000

NA NSE YA 1 000