Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yekolá na Liloba ya Nzambe

Ndenge nini tosengeli kokanisaka liwa ya Yesu?

Ndenge nini tosengeli kokanisaka liwa ya Yesu?

Lisolo oyo ezali na mituna oyo mbala mosusu omitunaka mpe emonisi esika oyo okoki kozwa biyano na Biblia na yo. Batatoli ya Yehova bakosepela kotalela biyano yango elongo na yo.

1. Ndenge nini esengeli kokanisaka liwa ya Yesu?

Yesu ayebisaki bayekoli na ye básalelaka limpa ná vinyo mpo na kokanisaka liwa na ye. Limpa emonisaka nzoto ya Yesu, mpe vinyo emonisaka makila na ye.​—Tángá Luka 22:19, 20.

Limpa oyo Yesu asalelaki ezalaki na levire te. Na Biblia, mbala mingi levire esalelamaka mpo na komonisa lisumu. Na yango, limpa ezalaki elembo oyo ebongaki mpenza mpo na komonisa nzoto ya kokoka ya Yesu. Apesaki nzoto na ye lokola mbeka, mpe yango esukisaki mbeka ya banyama oyo Mibeko ya Moize ezalaki kosɛnga Bayisraele bápesaka. (Baebre 10:5, 9, 10) Vinyo ezalaki komonisa makila ya motuya ya Yesu, oyo esopamaki lokola mbeka mpo na masumu na biso.​—Tángá 1 Petro 1:19; 2:24; 3:18.

2. Ntango nini tosengeli kokanisaka liwa ya Yesu?

Yesu akufaki mokolo ya 14 Nisana, mokolo ya Elekeli. Epai ya Bayuda, mokolo ebandaka ntango moi elali. Na mpokwa ya nsuka liboso akufa, Yesu alyaki Elekeli elongo na bantoma na ye, na nsima abandisaki Ekaniseli mpo na kokanisaka liwa na ye.​—Tángá Luka 22:14, 15.

Lelo oyo, basaleli ya Nzambe bakanisaka likambo oyo Nzambe asalaki na nzela ya Yesu mpo na kosikola mokili mobimba na lisumu mpe na liwa. (Kobima 12:5-7, 13, 17) Kaka ndenge Bayuda bazalaki kosala Elekeli mbala moko na mbula, Ekaniseli ya liwa ya Yesu mpe esalemaka mbala moko na mbula, na mokolo ya 14 Nisana nsima ya kolala ya moi, na kolanda kalandriye ya Biblia.​—Tángá Yoane 1:29.

3. Nani asengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli?

Ntango Yesu apesaki bayekoli na ye vinyo, alobaki boye: “Kɔpɔ oyo elakisi kondimana ya sika.” (1 Bakorinti 11:25) Kondimana ya sika ezwaki esika ya kondimana ya Mibeko ya Moize, oyo na nzela na yango Nzambe alakaki Bayisraele ete soki batosi ye, bakokóma bato na ye. (Kobima 19:5, 6) Kasi, Bayisraele batosaki mongongo ya Nzambe te. Yango wana, Yehova asalaki kondimana ya sika.​—Tángá Yirimia 31:31.

Na nzela ya kondimana ya sika, Yehova asali ete bato mingi bázwa mapamboli na nzela ya bato moke. Bato oyo bazali na kati ya kondimana yango bazali moke, bato 144 000 mpamba. Na nzela na bango, bamilio ya bato ya bikólo nyonso bakozwa bomoi ya seko na paradiso awa na mabele. Bato mosusu oyo bazali na kati ya kondimana ya sika bazali kosalela Yehova awa na mabele lelo oyo. Kaka bango nde basengeli kolya limpa mpe komɛla vinyo na Ekaniseli, mpamba te kɔpɔ “elakisi kondimana ya sika.”​—Tángá Luka 12:32; Emoniseli 14:1, 3.

4. Ekaniseli ememelaka biso matomba nini?

Ekaniseli ya liwa ya Yesu oyo esalemaka mbula na mbula esalisaka biso tókóma na bɔtɔndi mingi mpo na bolingo monene oyo Yehova amoniselaki biso. Atindaki mwana na ye aya kokufa mpo na masumu na biso. Na yango, ntango tozali koyangana na Ekaniseli, tosengeli kokanisaka mpenza na mapamboli oyo tozwi na nzela ya liwa ya Yesu. Tosengeli koluka ndenge nini tokoki komonisa bɔtɔndi mpo na nyonso oyo Yehova ná Yesu basalaki mpo na biso.​—Tángá Yoane 3:16; 2 Bakorinti 5:14, 15.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá nkasa 206 tii 208 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova.