Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Pusaná penepene na Nzambe

“Makambo ya kala ekokanisama lisusu te”

“Makambo ya kala ekokanisama lisusu te”

KOKANISA makambo oyo eleká ekoki kozala lipamboli. Na ndakisa, kokanisa lisusu ntango ya malamu oyo olekisaki ná bato oyo olingaka, ekoki kosepelisa motema na yo. Kasi na makambo mosusu, basuvenire ekoki komonana lokola elakeli mabe. Basuvenire ya mabe oyo okutaná na yango esalaka yo mpasi na motema? Soki ezali bongo, mbala mosusu omitunaka boye: ‘Mokolo mosusu, basuvenire yango ekolongwa na bɔɔngɔ na ngai?’ Tozali kokuta eyano moko ya kokitisa motema na maloba oyo ya mosakoli Yisaya.​—Tángá Yisaya 65:17.

Yehova azali kokana kolongola makambo nyonso oyo etikaka biso na basuvenire ya mabe. Ndenge nini akosala yango? Yehova akolongola mokili oyo mabe ná bampasi na yango nyonso, mpe na esika na yango, akotya mokili moko ya malamu koleka. Na nzela ya Yisaya Yehova alaki ete: “Talá nazali kozalisa likoló ya sika mpe mabele ya sika.” Soki tokangi ntina ya elaká wana, mitema na biso ekotonda na elikya.

Likoló ya sika ezali nini? Biblia emonisi makambo mibale oyo ekoki kosalisa biso tóyeba yango. Ya liboso, bakomi mosusu mibale ya Biblia balobeli likoló ya sika, mpe bisika yango nyonso mibale elobeli mbongwana monene oyo ekosalema awa na mabele. (2 Petro 3:13; Emoniseli 21:1-4) Ya mibale, na Biblia, liloba “likoló” ekoki komonisa boyangeli, to guvɛrnema. (Yisaya 14:4, 12; Danyele 4:25, 26) Na boye, likoló ya sika ezali guvɛrnema ya sika oyo ekosala ete makambo etambola na bosembo awa na mabele. Ezali kaka na boyangeli moko oyo ekokokisa makambo wana nyonso; boyangeli yango ezali Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema ya likoló oyo Yesu ateyaki biso tóbondelaka mpo na yango. Bokonzi yango ekosala ete mokano ya Nzambe esalema na mabele mobimba.​—Matai 6:9, 10.

Mabele ya sika ezali nini? Tótalela makambo mibale oyo ezali na Makomami, oyo ekosalisa biso tózwa eyano ya malamu. Ya liboso, na Biblia, liloba “mabele” na bantango mosusu, emonisaka nde bato, kasi mokili te. (Nzembo 96:1) Ya mibale, Biblia esakolaki ete ntango Nzambe akoyangela mokili, bato ya sembo bakoyekola boyengebene, mpe yango ekotonda na mabele mobimba. (Yisaya 26:9) Na yango, mabele ya sika elakisi lisangá ya bato oyo bakondima boyangeli ya Nzambe mpe bakotosa mibeko na ye ya sembo.

Obandi komona sikoyo ndenge Yehova akolongola makambo nyonso oyo etikaka bato na basuvenire ya mabe? Mosika te, Yehova akokokisa mpenza elaka na ye ya kosala likoló ya sika mpe mabele ya sika; akotya mokili ya sika mpe ya boyengebene. * Na mokili yango ya sika, makambo nyonso oyo etikaka biso na basuvenire ya mabe, ezala na nzoto, na makanisi, to na motema ekokóma makambo ya kala. Bato ya sembo bakosepela mpenza na bomoi, mpe mokolo na mokolo, basuvenire nyonso ekozala kaka ya malamu.

Kasi, ezali boni mpo na makambo oyo ntango mosusu epesaka biso mpasi na motema lelo oyo? Elaka oyo Yehova apesaki na nzela ya Yisaya, ekobi boye: “Makambo ya kala ekokanisama lisusu te, mpe ekoya na motema te.” Bampasi nyonso oyo tokutanaki na yango na mokili oyo mabe, ekobanda kosila mokemoke. Elaka yango esepelisi yo? Soki ezali bongo, mpo na nini te koluka ndenge ya kopusana penepene ya Nzambe oyo apesi bilaka wana ya kitoko?

Botángi ya Biblia mpo na sanza ya Marsi:

Yisaya 63–66Yirimia 1-16

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 5 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali Bokonzi ya Nzambe mpe makambo oyo yango ekosala mosika te, talá mokapo 3, 8, mpe 9 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 19]

Yehova azali kokana kolongola makambo nyonso oyo etikaka biso na basuvenire ya mabe