Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kobosana te ete mikolo etikali ya kotánga

Kobosana te ete mikolo etikali ya kotánga

Kobosana te ete mikolo etikali ya kotánga

“Sakolá liloba, salá yango na molende.”​—2 TIM. 4:2.

OKOKI KOLIMBOLA?

Mpo na nini bakristo ya ekeke ya liboso bazalaki kosakola na lombangu?

Ndenge nini tokoki kobatela na makanisi ete mikolo etikali ya kotánga?

Mpo na nini tosengeli kosakola Bokonzi na lombangu koleka lelo oyo?

1, 2. Etinda ya ‘kosakola na molende’ ebimisi mituna nini?

 MBALA mingi, bato oyo basalaka mosala ya kobikisa bomoi ya bato basalaka makambo na lombangu. Na ndakisa, bato oyo babomaka mɔtɔ bakendaka nokinoki soki babengi bango mpo bayebaka ete bato bakoki kokufa na likama.

2 Biso Batatoli ya Yehova tolingaka kosalisa bato mpo bábika. Yango wana, tozwaka na lisɛki te mokumba ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Kasi, yango elingi koloba te ete tosengeli kosala mosala na biso likolólikoló. Na yango, ntoma Paulo alingaki koloba nini ntango apesaki toli oyo ete: “Sakolá liloba, salá yango na molende”? (2 Tim. 4:2) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na molende ezali na likanisi ya kosala makambo na lombangu. Na yango, ndenge nini tokoki kosakola na lombangu? Mpe mpo na nini mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu?

MPO NA NINI TOSENGELI KOSAKOLA NA LOMBANGU?

3. Nini ekokómela bato soki bandimi nsango malamu to soki baboyi yango?

3 Soki okanisi bolamu oyo mosala ya kosakola ekoki komemela bato mpe mabe oyo ekokómela bango soki tosakoli te, na ntembe te okomona ete osengeli mpenza koyebisa basusu nsango malamu na lombangu. (Rom. 10:13, 14) Liloba ya Nzambe elobi boye: “Ntango nalobi na moto mabe ete: ‘Okokufa solo,’ mpe ye abongwani mpenza, atiki lisumu na ye mpe asali makambo ya bosembo mpe ya boyengebene, . . . akotikala mpenza na bomoi. Akokufa te. Bakokanisela ye lisusu lisumu na ye ata moko te oyo asalaki.” (Ezk. 33:14-16) Kutu, Biblia elobi na basakoli ya Bokonzi ete: “Okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bazali koyoka yo.”​—1 Tim. 4:16; Ezk. 3:17-21.

4. Lokola bapɛngwi basengelaki kobima, mpo na nini esengelaki kosakola na lombangu na ekeke ya liboso?

4 Mpo tómona ntina oyo Paulo alendisaki Timote asakola na lombangu, tótalela mpe bavɛrsɛ oyo ezali nsima ya vɛrsɛ oyo esimbi lisolo oyo. Totángi boye: “Sakolá liloba, salá yango na molende [to na lombangu] na eleko ya malamu, na eleko ya mpasi, pamelá, sembolá, lendisá, na motema molai mpenza mpe na mayele ya koteya. Mpo ekozala na eleko moko oyo bakondima te mateya oyo epesaka litomba, kasi, na kolanda bamposa na bango moko, bakozwa bateyi ebele mpo báyokisaka bango makambo oyo matoi na bango elingi koyoka; mpe matoi na bango ekoboya koyoka solo.” (2 Tim. 4:2-4) Yesu asakolaki ete bato mosusu bakokóma bapɛngwi. (Mat. 13:24, 25, 38) Lokola etikalaki moke bapɛngwi yango bábanda komonana, esengelaki Timote ‘asakola liloba’ na lombangu ata na kati ya lisangá mpo bakristo bákosama te mpe bálanda mateya ya lokuta. Bomoi ya bato ezalaki na likama. Ezali boni lelo oyo?

5, 6. Na mosala ya kosakola, tokoki kokutana na bato oyo bandimaka mateya nini?

5 Lelo oyo, bato mingi bapɛngwi, batiki mateya ya solo mpe bazali kopalanganisa mateya ya lokuta. (2 Tes. 2:3, 8) Mateya nini ezali kosepelisa matoi ya bato lelo oyo? Na bisika mingi, bazali koteya na molende mpenza liteya oyo elobaka ete moto autá na makako. Atako basalelaka maloba ya siansi mpo na kolobela yango, likambo yango ekómi mpenza lokola losambo, mpe ebongoli ndenge oyo bato mingi bazali kotalela Nzambe mpe bazalani na bango. Liteya mosusu oyo bato mingi basepelaka na yango elobi ete Nzambe akipaka biso te; yango wana ezali mpe na ntina te biso tókipe ye. Mpo na nini mateya yango ezali kobenda ebele ya bato mpe ezali kolalisa bango mpɔngi na elimo? Mpamba te, likanisi oyo esimbi yango ezali ete, ‘Moto akoki kosala nyonso oyo alingi mpamba te Nzambe akosambisa ye te.’ Likanisi yango ezali mpenza kosepelisa matoi ya bato.​—Tángá Nzembo 10:4.

6 Kasi, ezali mpe na makambo mosusu oyo ezali kosepelisa matoi ya bato. Bato mosusu oyo bakendaka ndako-nzambe basepelaka na bateyi oyo balobaka na bango ete, ‘Ata soki ozali kosala makambo nini na bomoi na yo, Nzambe alingaka yo.’ Basango ná bapastɛrɛ bazali kosepelisa matoi ya bato na ndenge bazali komonisa bango ete Nzambe asepelaka na milulu, Bamisa, bafɛti ya lingomba, mpe kosambela bikeko. Bandimi yango bazali koyeba te ete bazali na likama. (Nz. 115:4-8) Nzokande, soki tolamwisi bango na mpɔngi ya elimo mpe tosalisi bango bákanga ntina ya nsango ya solo ya Biblia, bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe.

KOSAKOLA NA LOMBANGU ELIMBOLI NINI?

7. Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali kosakola na lombangu?

7 Monganga oyo azali kosala lipaso asengeli kotya makanisi na ye nyonso na mosala na ye mpo bomoi ya moto ezali na mabɔkɔ na ye. Tokoki komonisa ete tozali kosakola na lombangu soki tozali kotya makanisi na biso nyonso na mosala yango, na ndakisa soki tozali kokanisa makambo, mituna, to bansango oyo ekoki kosepelisa bato oyo tokokutana na bango. Kosakola na lombangu ekoki mpe kotinda biso tóbongisa ntango na biso mpo tóbimaka na bangonga oyo bato mingi bakoyamba biso.​—Rom. 1:15, 16; 1 Tim. 4:16.

8. Mbala mingi, kosala makambo na lombangu elimbolaka mpe nini?

8 Kosala makambo na lombangu elimboli mpe kotya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso. (Tángá Ebandeli 19:15.) Na ndakisa, kanisá ete nsima ya kosalisa ekzamɛ, monganga alobi na yo boye: “Maladi na yo ezali kosɛnga ete básalisa yo nokinoki. Ezali kosɛnga ete tólekisa sanza mobimba te.” Na ntembe te, okobima mbangumbangu te na biro ya monganga lokola bato oyo babengi bákende koboma mɔtɔ. Okoyoka malako na ye malamumalamu, na nsima okozonga na ndako mpe okoluka mbongo mpo básalisa yo nokinoki.

9. Mpo na nini tokoki koloba ete Paulo azalaki kosakola na lombangu ntango azalaki na Efese?

9 Tokoki komona ndenge oyo Paulo azalaki kosala makambo na lombangu soki totaleli makambo oyo ayebisaki bankulutu ya Efese na ntina etali mosala na ye ya kosakola na etúká ya Azia. (Tángá Misala 20:18-21.) Emonani ete kaka na mokolo oyo akómaki kuna, abandaki mbala moko kokende ndako na ndako mpo na koyebisa bato nsango malamu. Longola yango, na boumeli ya mbula mibale, “azalaki kosala masukulu mokolo na mokolo na ndako ya eteyelo ya Tiranusi.” (Mis. 19:1, 8-10) Tomoni ete ndenge oyo Paulo azalaki kobongisa makambo na ye emonisaki ete alingaki kosala makambo na lombangu. Elendiseli ya kosakola na lombangu ezali komonisa te ete mokumba yango ekómeli biso ngambo. Atako bongo, tosengeli kotya mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na biso.

10. Mpo na nini tokoki kosepela ete bakristo basakolaki na lombangu eleki sikoyo mbula soki 100?

10 Ndakisa ya Bayekoli ya Biblia oyo bamipesaki na kosakola nsango malamu liboso ya 1914 emonisi soki kosala makambo na lombangu elimboli nini. Atako bazalaki kaka mwa bankóto, bamonaki ete na eleko oyo bazalaki, basengelaki kosakola Bokonzi na molende mpe bamipesaki mobimba na mosala yango. Bazalaki kobimisa masolo oyo ezali kolimbola mateya ya Biblia na bazulunalo ndenge na ndenge ya mokili mpe bazalaki kolakisa filme moko oyo ebengamaki “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi.” Na ndenge yango, bamilio ya bato bayokaki nsango malamu. Soki bazalaki te na likanisi ya kosala makambo na lombangu, ndenge nini mingi kati na biso tolingaki koyoka nsango ya Bokonzi?​—Tángá Nzembo 119:60.

KOBOSANA TE ETE MIKOLO ETIKALI YA KOTÁNGA

11. Makambo nini esalaki ete bato mosusu bábosana ete esengeli kosakola na lombangu?

11 Makambo mosusu oyo ebendaka likebi ekoki kotinda moto abosana ete mosala ya kosakola ezali na ntina mingi. Satana azali kosalela mokili oyo mpo na kotinda biso tómipesa na makambo na biso moko mpe na makambo ya mpambampamba. (1 Pe. 5:8; 1 Yoa. 2:15-17) Bato mosusu oyo bazalaki liboso kotya mosala ya Yehova na esika ya liboso babosanaki ete esengeli kosala makambo na lombangu. Na ndakisa, Demasi, mokristo moko ya ekeke ya liboso azalaki ‘moninga ya mosala’ ya Paulo; kasi na nsima, Demasi abendamaki na makambo ya mokili ya Satana. Na esika Demasi akoba komipesa na kolendisa bandeko na ye na ntango wana ya yikiyiki, asundolaki Paulo.​—Flm. 23, 24; 2 Tim. 4:10.

12. Libaku nini tozali na yango lelo oyo, mpe mabaku nini tokozala na yango na mikolo ekoya?

12 Soki tolingi kobosana te ete mikolo etikali ya kotánga, tosengeli kobundisa mposa ya komipesa na makambo ya mokili. Tosengeli nde kosala nyonso mpo ‘tósimba makasi bomoi ya solosolo.’ (1 Tim. 6:18, 19) Na ntembe te, ondimaka ete ntango tokozwa bomoi ya seko, tokozala na mabaku ya kosala makambo ndenge na ndenge oyo ekosepelisa biso. Kasi, lelo oyo tozali na libaku oyo ekozonga lisusu te: kosalisa bato mpo bábika na Armagedone.

13. Tokoki kosala nini mpo tóbosana te ete mikolo etikali ya kotánga?

13 Lokola bato mingi na mokili oyo balali mpɔngi na elimo, nini ekoki kosalisa biso tóbosana te ete mikolo etikali ya kotánga? Tosengeli kobosanaka te ete liboso tóyeba Nzambe, tozalaki na mpɔngi ya elimo. Kasi, balamwisaki biso, mpe ndenge Paulo alobaki yango, Kristo angɛngɛlaki biso. Sikoyo tozali na libaku malamu ya kozala bamemi-pole. (Tángá Baefese 5:14.) Paulo abakisaki boye: “Bókeba mpenza ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, bómisombela ntango oyo ebongi, mpo mikolo ezali mabe.” (Ef. 5:15, 16) Na mokili oyo mabe, esengeli ‘tómisombelaka ntango’ mpo na makambo oyo ekoki kosalisa biso tólala mpɔngi te na elimo.

TOZALI NA ELEKO YA NTINA MINGI

14-16. Mpo na nini tosengeli kosakola Bokonzi na lombangu koleka lelo oyo?

14 Mosala ya kosakola esɛngaka ntango nyonso kosala yango na lombangu, kasi sikoyo tosengeli kobakisa molende. Kobanda 1914, elembo ya ntango ya nsuka oyo Liloba ya Nzambe elobeli ezali komonana polele. (Mat. 24:3-51) Bomoi ya bato ekómi mpenza na likama. Atako bakonzi ya bikólo oyo eleki na nguya basali boyokani ndenge na ndenge ya kimya na mikolo na biso, bikólo yango ezali kaka na babɔmbi ya nikleere soki 2 000 oyo bakoki kosalela ata na ntango nini. Mbala na mbala, tozali koyoka ete bakonzi ya Leta “babungisi” biloko oyo basalelaka babɔmbi ya nikleere. Biloko yango mosusu ezali nde kosuka na mabɔkɔ ya bateroriste? Bato mosusu bazali koloba ete mokili ekoki kokufa na etumba oyo teroriste moko abandisi. Nzokande, kaka bitumba te nde ezali likama mpo na bomoi ya bato.

15 Lapolo ya zulunalo moko (The Lancet) mpe ya Iniversite ya Londres oyo ebimaki na 2009 emonisi ete “kobakisama ya molunge to ya malili nde likama eleki monene mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto ya bato na mabele mobimba na ekeke ya 21.” Lapolo yango ebakisaki boye: “Bamaladi oyo ezali kobima mpo molunge to malili ezali kobakisama ekozwa ebele ya bato na bambula ekoya mpe ekotya bomoi mpe bolamu ya bamiliare ya bato na likama.” Ekoki kozala ete kobakisama ya molunge to ya malili ekobebisa bamboka mingi mpo mai ya mbu ekomata, mabele ekokauka, mpela ekosalema, bamaladi ekobima, mipɛpɛ makasi ekobebisa, mpe bitumba mpo na kowela biloko oyo ekokóma moke ekobima. Ya solo, bitumba mpe makambo oyo touti kotánga ezali likama mpo na bomoi ya bato.

16 Bato mosusu bakoki kokanisa ete soki etumba ya nikleere esalemi, yango nde ekobimisa makambo oyo ekokokisa esakweli ya Yesu mpe ekomema na nsuka ya mokili. Kasi, bato mingi bazali koyeba te ndimbola mpenza ya esakweli ya Yesu. Banda bambula mingi, tozali komona makambo oyo ezali komonisa kozala ya Kristo mpe ete nsuka ya mokili ekómi pene. (Mat. 24:3) Makambo mingi oyo Yesu asakolaki ezali komonana polele na ndenge oyo esalemá naino te. Sikoyo nde ntango oyo bato basengeli kolamuka na mpɔngi ya elimo. Mosala na biso ekoki kosalisa bango bálamuka na mpɔngi.

17, 18. (a) “Eleko oyo” tozali ezali kotinda biso tósala nini? (b) Nini ekoki kotinda bato bábongola ndenge na bango ya kotalela nsango ya Bokonzi?

17 Totikali na ntango moke mpo na komonisa ete tolingaka Yehova mpe kosilisa mosala ya kosakola oyo apesi biso tósala na mikolo oyo ya nsuka. Makambo oyo Paulo ayebisaki bakristo ya Roma na ekeke ya liboso ebongi mpenza mpo na biso lelo oyo: “Bósalaka bongo mpe mpo boyebi eleko oyo: ngonga na bino ya kolamuka na mpɔngi ekoki, mpo sikoyo lobiko na biso ekómi pene mpenza koleka ntango oyo tokómaki bandimi.”​—Rom. 13:11.

18 Makambo oyo esakolamaki mpo na mikolo ya nsuka ekoki kosalisa bato báyeba bobola na bango ya elimo. Bato mosusu bakómi komona ete moto azali na mposa ya lisalisi ntango bazali komona ete baguvɛrnema ezali komɛla mpema mpo na kosilisa mikakatano ya nkita, likama ya etumba ya nikleere, mobulu, mpe kobebisama ya mai, mopɛpɛ mpe biloko mosusu. Bamosusu mpe bazali koyeba bobola na bango ya elimo ntango bakutani na makambo ya mpasi na libota, na ndakisa maladi, koboma libala, to mpe liwa. Ntango tozali kobima na mosala ya kosakola, tokoki kozwa libaku ya kosalisa bato ya ndenge wana.

BAZALI KOSALA NA LOMBANGU

19, 20. Bakristo mingi basalaki nini lokola bazali kososola ete mikolo etikali ya kotánga?

19 Bakristo mingi bazali komipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola mpo bazali kososola ete mikolo etikali ya kotánga. Na ndakisa, na ekólo Équateur, ndeko moko ná mwasi na ye bazwaki ekateli ya kotika bomoi ya mindɔndɔ nsima ya kolanda liyangani ya mokolo moko ya 2006, oyo ezalaki na motó ya likambo “Batelá liso na yo alima.” Bakomaki na papye biloko nyonso oyo bazalaki lisusu na mposa na yango te, mpe nsima ya sanza misato, balongwaki na ndako ya shambrɛ misato mpe bakómaki kofanda na ndako ya shambrɛ moko, batɛkaki biloko mosusu, mpe bafutaki banyongo na bango nyonso. Mwa moke na nsima bakómaki babongisi-nzela mosungi mpe balandaki toli ya mokɛngɛli ya zongazonga oyo alendisaki bango bákende na lisangá oyo basakoli bazali mingi te.

20 Na États-Unis, ndeko moko akomaki boye: “Ntango tokendaki na liyangani ya mokolo moko na 2006, esilaki koleka mbula 30 banda ngai ná mwasi na ngai tozwá batisimo. Nsima ya liyangani, ntango tozalaki kozonga na ndako, tozalaki kosolola na kati ya motuka ndenge oyo tokoki kosalela toli ya kozala na bomoi ya mindɔndɔ te. (Mat. 6:19-22) Tozalaki na bandako misato, mabele, mituka ya ntalo, masuwa mpe motuka oyo ezalaka na ndako na nsima. Tomonaki ete tozalaki bakristo, kasi tozalaki nde komipesa mingi na biloko ya mokili; tomityelaki mokano ya kosala mosala ya ntango nyonso. Na 2008, tolandaki ndakisa ya mwana na biso mpe tokómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza. Tozali koyoka mpenza esengo ya kosala elongo na bandeko! Tozwaki libaku ya kosala na teritware oyo basakoli bazali mingi te. Longola yango, komipesa na mosala ya Yehova esalisi biso tópusana lisusu penepene na ye. Tozali mpe na esengo ya komona ndenge oyo miso ya bato ezali kofungwama ntango bayoki solo ya Liloba ya Nzambe mpe bakangi ntina na yango.”

21. Boyebi nini ezali kotinda biso tósakola na lombangu?

21 Toyebi ete etikali moke “mokolo ya kosambisama mpe ya kobebisa bato oyo batyolaka Nzambe” ekómela mokili oyo mabe. (2 Pe. 3:7) Boyebi na biso ya Liloba ya Nzambe ezali kotinda biso tósakola na molende ete bolɔzi monene ezali koya mpe ete nsima na yango tokokɔta na mokili ya sika. Tozali kokoba komona ete mikolo etikali ya kotánga mpo na koyebisa bato elikya ya solosolo. Ntango tozali komipesa mobimba na mosala yango, tozali komonisa ete tolingaka mpenza Nzambe mpe bazalani na biso.

[Mituna ya boyekoli]