Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Tósepela na elikya na biso

Tósepela na elikya na biso

Tósepela na elikya na biso

“[Ezali] na elikya moko ya bomoi ya seko oyo Nzambe, oyo akoki kobuka lokuta te, alaká banda kalakala mpenza.”​—TITO 1:2.

BOZONGELI

Ndenge nini toyebi ete esengo ezalaka na likoló ntango mokristo oyo atyami mafuta na elimo abateli bosembo tii liwa na ye?

Boyokani nini ezali kati na kokokisama ya elikya ya bampate mosusu mpe oyo ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo?

Mpo elikya na biso ekokisama, tosengeli kosala makambo nini oyo emonisi “etamboli ya bosantu” mpe misala nini ‘oyo ezali komonisa ete tokangami na Nzambe’?

1. Ndenge nini elikya oyo Yehova apesi biso ekoki kosalisa biso tóyika mpiko?

 NTOMA Paulo alobaki ete Yehova azali “Nzambe oyo apesaka elikya.” Abakisaki ete Yehova akoki ‘kotondisa biso na esengo mpe na kimya nyonso na kondima na biso, mpo tótonda na elikya na nguya ya elimo santu.’ (Rom. 15:13) Soki elikya na biso ezali makasi, tokoyika mpiko liboso ya mokakatano nyonso oyo tokutani na yango, mpe tokobatela esengo mpe kimya na mitema na biso. Ndenge elikya yango ezali lokola “longo mpo na molimo, ezali makasi mpe ngwi” mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, ekozala mpe bongo mpo na bakristo mosusu. (Ebr. 6:18, 19) Tokoki kokangama makasi na elikya na biso mpe yango nde ekosalisa biso tózala na ntembe te na mitema na biso mpe tóbatela kondima na biso.​—Tángá Baebre 2:1; 6:11.

2. Wapi bilikya mibale oyo ezali mpo na bakristo lelo oyo, mpe mpo na nini “bampate mosusu” batyelaka elikya ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo likebi?

2 Bakristo oyo bazali na bomoi na ntango oyo ya nsuka bazali bituluku mibale. Etuluku ya liboso babengami “etonga moke”; bango bazali na elikya ya kokóma na bomoi oyo ekoki kokufa te kuna na likoló; bakozala bakonzi mpe banganga-nzambe elongo na Kristo na Bokonzi na ye. (Luka 12:32; Em. 5:9, 10) Etuluku ya mibale babengami “bampate mosusu”; ezali bakristo mosusu ebele oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko na paradiso awa na mabele oyo Bokonzi ya Masiya ekoyangela. (Em. 7:9, 10; Yoa. 10:16) Bampate mosusu basengeli kobosana te ete mpo bázwa lobiko, basengeli mpenza kosalisa “bandeko” ya Kristo oyo bazali naino awa na mabele. (Mat. 25:34-40) Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakozwa mbano na bango; kasi, elikya ya bampate mosusu mpe ekozanga te kokokisama. (Tángá Baebre 11:39, 40.) Tólobela naino elikya ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo.

“ELIKYA YA BOMOI” MPO NA BANDEKO YA KRISTO

3, 4. Ndenge nini bakristo oyo bazali na etonga moke ‘babotamaka lisusu mpo na elikya ya bomoi,’ mpe elikya yango ezali nini?

3 Ntoma Petro akomelaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo mikanda mibale mpe abengaki bango “bato oyo baponami.” (1 Pe. 1:1) Mikanda yango esalisaka biso tóyeba malamu elikya kitoko ya etonga moke. Na mokanda ya liboso, Petro akomaki boye: “Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Kristo apambwama, mpo na motema mawa na ye monene abotaki biso lisusu mpo na elikya ya bomoi na nzela ya lisekwa ya Yesu Kristo uta na bakufi, mpo na libula oyo ekoki kopɔla te, oyo ezali na mbindo te mpe oyo enzulukaka te. Ebombami mpo na bino na likoló, bino baoyo nguya ya Nzambe ezali kobatela bino na nzela ya kondima mpo na lobiko oyo etikali moke emonisama na ntango ya nsuka. Mpo na yango bozali kosepela mingi.”​—1 Pe. 1:3-6.

4 Bakristo oyo Yehova aponi mpo báyangela elongo na Kristo na Bokonzi ya likoló ‘babotamaka lisusu,’ elingi koloba Nzambe atyaka bango mafuta na elimo mpo bákóma bana na ye. Bakristo yango bakokóma bakonzi mpe banganga-nzambe elongo na Kristo. (Em. 20:6) Petro alobaki ete ‘kobotama lisusu’ epesaka bakristo yango “elikya ya bomoi”; abengaki elikya yango “libula oyo ekoki kopɔla te, oyo ezali na mbindo te mpe oyo enzulukaka te,” oyo ebombami mpo na bango “na likoló.” Tokoki kokamwa te ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo ‘basepelaka mingi’ na elikya na bango! Nzokande, mpo elikya yango ekokisama, basengeli kotikala sembo.

5, 6. Mpo na nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo basengeli kosala makasi bábatela kobengama na bango?

5 Na mokanda ya mibale, Petro alendisaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo ‘básala nyonso oyo ekoki na bango mpo bábatela kobengama na bango mpe koponama na bango.’ (2 Pe. 1:10) Basengeli kosala makasi mpo bálona bizaleli malamu ya bokristo lokola kondima, ezaleli ya kokangama na Nzambe, bolingo ya bondeko, mpe bolingo. Petro alobaki na bango boye: “Soki bozali na makambo wana mpe botondi na yango, ekopekisa bino kozala bato oyo basalaka mosala te to bato oyo babotaka mbuma te.”​—Tángá 2 Petro 1:5-8.

6 Na ekeke ya liboso, Kristo alobaki na bankulutu oyo batyamaki mafuta na elimo, oyo bazalaki na lisangá ya Filadelfia, ete: “Lokola otosaki liloba oyo oyokaki mpo na ezaleli na ngai ya koyika mpiko, ngai mpe nakobatela yo na ngonga ya komekama, oyo ekoya na mabele mobimba esika bato bafandi, mpo na komeka bato oyo bafandi na mabele. Nazali koya nokinoki. Simbá makasi oyo ozali na yango, mpo moto moko azwa motole na yo te.” (Em. 3:10, 11) Soki mokristo oyo atyami mafuta na elimo atikali sembo te, akozwa te “motole ya nkembo oyo ebebaka te,” oyo Nkolo alaki baponami oyo bakotikala sembo tii liwa.​—1 Pe. 5:4; Em. 2:10.

NZELA YA KOKƆTA NA BOKONZI

7. Elikya kitoko nini Yuda alobelaki na mokanda na ye?

7 Na mobu soki 65 T.B., Yuda, ndeko ya Yesu, akomelaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo mokanda, mpe abengaki bango “bato oyo babengami.” (Yuda 1; talá mpe Baebre 3:1.) Akanaki liboso kokomela bango mokanda na ntina etali elikya ya lobiko oyo bakristo nyonso oyo bakoyangela na Bokonzi ya Nzambe bazali na yango. (Yuda 3) Atako akomelaki bango makambo mosusu oyo esɛngaki bátalela yango nokinoki, na nsuka ya mokanda yango ya mokuse, alobelaki elikya kitoko ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Akomaki boye: “Nzokande epai na ye oyo akoki kobatela bino mpo bóbɛta libaku te mpe kotɛlɛmisa bino kozanga litɔnɔ liboso ya nkembo na ye na esengo monene, epai ya Nzambe kaka moko Mobikisi na biso na nzela ya Yesu Kristo Nkolo na biso, nkembo, bonene, nguya mpe bokonzi ezala seko na bileko nyonso oyo eleká mpe sikoyo mpe na bileko nyonso seko.”​—Yuda 24, 25.

8. Na kolanda Yuda 24, nini emonisi ete esengo ezalaka na likoló ntango mokristo oyo atyami mafuta na elimo abateli bosembo na ye tii ntango akufi?

8 Na ntembe te, mokristo mokomoko oyo atyami mafuta na elimo alingaka ete Nzambe abatela ye mpo abɛta libaku te bongo azanga likabo ya bomoi. Bakristo yango nyonso bazalaka na elikya ete Yesu Kristo akosekwisa bango na nzoto ya elimo oyo ekopesa bango likoki ya komonana liboso ya Nzambe na esengo monene. Ntango mokristo moko ya sembo oyo atyami mafuta na elimo akufi, toyebaka ete ‘akolamwisama na nzoto ya elimo’ mpe akosekwisama “na kozanga kopɔla . . . , na kati ya nkembo.” (1 Ko. 15:42-44) Soki ‘esengo ezalaka mingi na likoló mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema,’ kanisá esengo monene oyo ezalaka kuna ntango ndeko moko ya Kristo atikali sembo tii liwa na ye. (Luka 15:7) Yehova ná bikelamu ya elimo basepelaka elongo na mokristo oyo atyami mafuta ntango azali kozwa mbano na ye “na esengo monene.”​—Tángá 1 Yoane 3:2.

9. (a) Na ndenge nini ‘bakopesa mpenza’ bandeko ya Kristo oyo bakotikala sembo nzela ya kokɔta na Bokonzi? (b) Elikya yango etindaka bandeko ya Kristo oyo bazali naino awa na mabele básala nini?

9 Petro mpe akomelaki bakristo oyo batyami mafuta na elimo ete soki basali makasi bátikala sembo mpo na kobatela kobengama na bango, “bakopesa [bango] mpenza nzela ya kokɔta na bokonzi ya seko ya Nkolo na biso mpe Mobikisi Yesu Kristo.” (2 Pe. 1:10, 11) Maloba oyo ete ‘bakopesa bango mpenza’ nzela ya kokɔta na likoló elimboli ete bakokɔta na likoló na nkembo monene. Ekoki mpe kolimbola ete bakozwa mapamboli ebele mpo basalaki makasi bátikala sembo awa na mabele. Bakristo yango bakobanda kosepela mingi mpe komonisa botɔndi soki bakanisi bosembo oyo bamonisaki awa na mabele. Na ntembe te, elikya yango elendisaka bandeko ya Kristo oyo bazali naino awa na mabele ‘bábongisa makanisi na bango mpo na kokoba na mosala.’​—1 Pe. 1:13.

“ELIKYA” MPO NA BAMPATE MOSUSU

10, 11. (a) Bampate mosusu bazali na elikya nini? (b) Na ndenge nini kokokisama ya elikya ya bomoi awa na mabele ezali na boyokani na Kristo mpe ‘komonana ya bana ya Nzambe’?

10 Ntoma Paulo mpe alobelaki elikya kitoko ya “bana ya Nzambe” oyo batyami mafuta na elimo mpe abengaki bango “bazwi-ya-libula elongo” na Kristo. Na nsima alobelaki elikya kitoko oyo Yehova apesi bampate mosusu oyo motángo na bango eyebani te; alobaki ete: “Biloko oyo ezalisamá [elingi koloba bato] ezali kozela na mposa makasi komonana ya nkembo ya bana ya Nzambe [bakristo oyo batyami mafuta na elimo]. Mpo biloko oyo ezalisamá ekómisamaki eloko mpamba, na ndenge na yango moko te kasi mpo na moto oyo akómisaki yango bongo, mpo na elikya ete biloko oyo ezalisamá ekolongwa mpe na boombo ya kopɔla mpe ekozwa bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.”​—Rom. 8:14-21.

11 Yehova apesaki bato “elikya” ntango alakaki ete akosalela “momboto” mpo na kolongola bango na mabɔkɔ ya Satana Zabolo, “nyoka ya ebandeli.” (Em. 12:9; Eba. 3:15) “Momboto” yango ezalaki libosoliboso Yesu Kristo. (Gal. 3:16) Liwa mpe lisekwa ya Yesu epesaki bato elikya ya solosolo ete bakolongolama na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Kokokisama ya elikya yango ezali na boyokani na “komonana ya nkembo ya bana ya Nzambe.” Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali mpe na kati ya “momboto.” ‘Bakomonana na nkembo’ ntango bakosangana na Kristo mpo na koboma mokili mabe ya Satana. (Em. 2:26, 27) Yango ekomema lobiko mpo na bampate mosusu oyo bakouta na bolɔzi monene.​—Em. 7:9, 10, 14.

12. Komonana ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo ekomemela bato matomba nini?

12 Na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo, bato bakosikolama mpenza! Na ntango wana, “bana ya Nzambe” ‘bakomonana’ mpe na ndenge oyo bakosala lokola banganga-nzambe elongo na Kristo mpo na kopesa bato matomba ya mbeka ya lisiko ya Yesu. Bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela bakolongwa mokemoke na boombo ya lisumu mpe ya liwa. Bato ya botosi bakolongwa mokemoke na “boombo ya kopɔla.” Soki batikali sembo na boumeli ya mbula nkóto mpe na komekama ya nsuka, bankombo na bango ekokomama libela na “rulo ya bomoi.” Bakozwa “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo.” (Em. 20:7, 8, 11, 12) Elikya yango ezali mpenza kitoko!

TÓBATELA MALAMU ELIKYA NA BISO

13. Mpo na nini tozali na elikya, mpe ntango nini Kristo akomonana?

13 Mikanda mibale oyo Petro akomaki na lisalisi ya elimo santu ezali na makambo mingi oyo esalisaka bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe bampate mosusu bábatela malamu bilikya na bango. Petro alobaki ete bazwi elikya yango mpo na misala na bango moko te, kasi mpo na boboto monene ya Yehova. Akomaki boye: “Bóbatela makanisi na bino mobimba; bótya elikya na bino na boboto monene oyo bokozwa ntango Yesu Kristo akomonana.” (1 Pe. 1:13) Kristo akomonana ntango akoya kopesa bayekoli na ye ya sembo mbano mpe koboma bato mabe.​—Tángá 2 Batesaloniki 1:6-10.

14, 15. (a) Mpo tóbatela malamu elikya na biso, tosengeli kotya makanisi na biso na nini? (b) Toli nini Petro apesaki?

14 Mpo tóbatela malamu elikya na biso, tosengeli kotya makanisi na biso na koya ya “mokolo ya Yehova” mpe kotambwisa bomoi na biso na ndenge oyo ezali komonisa ete tozali kozela mokolo yango. Na mokolo yango, “likoló” oyo ezali sikoyo to biyangeli ya bato, mpe “mabele” to bato mabe, ná “biloko” na yango ekobomama. Petro akomaki boye: “Bókanisa lolenge ya bato oyo bosengeli kozala . . . , bózela mpe bóbatelaka na makanisi na bino kozala ya mokolo ya Yehova oyo likoló, lokola ekozika na mɔtɔ, ekosilela mpe biloko na yango, lokola ekokóma mɔtɔ makasi, ekonyangwa!”​—2 Pe. 3:10-12.

15 “Likoló” mpe “mabele” oyo ezali sikoyo ekotika esika na “likoló ya sika [Bokonzi ya Kristo] mpe mabele ya sika [bato oyo bakofanda awa na mabele].” (2 Pe. 3:13) Na nsima, Petro apesaki toli moko ya polele mpo na komonisa ndenge oyo tosengeli “kozela” to kobatela malamu na makanisi na biso elikya ya mokili ya sika. Akomaki boye: “Yango wana, bandeko ya bolingo, lokola bozali kozela makambo wana, bósala nyonso oyo ekoki na bino mpo nsukansuka akuta bino na litɔnɔ te mpe na mbeba te mpe na kimya.”​—2 Pe. 3:14.

TÓSALAKA MAKAMBO OYO EYOKANI NA ELIKYA NA BISO

16, 17. (a) Kozala na “etamboli ya bosantu” mpe kosala ‘misala oyo ezali komonisa ete tokangami na Nzambe’ elimboli nini? (b) Ndenge nini elikya na biso ekokokisama?

16 Tosengeli kobatela malamu elikya na biso; kasi tosengeli mpe kosalaka makambo oyo eyokani na elikya na biso. Tosengeli koluka kozala lolenge ya bato oyo Yehova alingaka. Kozala na “etamboli ya bosantu” elimboli mpe ‘kozala na etamboli malamu na kati ya bato ya bikólo,’ kosala oyo ezali sembo na miso ya Nzambe. (2 Pe. 3:11; 1 Pe. 2:12) Tosengeli kozala ‘na bolingo na kati na biso.’ Yango elimboli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kobatela bomoko na kati ya bandeko na biso na mokili mobimba, ata mpe na kati ya lisangá na biso. (Yoa. 13:35) ‘Misala oyo ezali komonisa ete tokangami na Nzambe’ ezali makambo oyo emonisaka ete tozali na boyokani malamu na Yehova. Yango elimboli mpe kosala mabondeli ya mozindo, kotánga Biblia mokolo na mokolo, koyekola biso moko, kosala losambo na kati ya libota, mpe komipesa na kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi.’​—Mat. 24:14.

17 Mokomoko na biso asengeli kolinga ete azala lolenge ya bato oyo Yehova andimaka mpe oyo akobikisa ntango mokili oyo mabe ekobomama. Soki tozali bato ya ndenge wana, elikya na biso ekokokisama, “elikya moko ya bomoi ya seko oyo Nzambe, oyo akoki kobuka lokuta te, alaká banda kalakala mpenza.”​—Tito 1:2.

[Mituna ya boyekoli]

[Elilingi na lokasa 22]

Bakristo oyo batyami mafuta na elimo ‘babotamaka lisusu mpo na elikya ya bomoi’

[Elilingi na lokasa 24]

Salisá libota na yo ebatela malamu elikya