Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bato bazali koluka biyano

Bato bazali koluka biyano

Bato bazali koluka biyano

“Moto na moto atalelaka [Yesu] na ndenge na ye. Ezala tondimelaka Yesu to todimelaka ye te, biso nyonso tolingaka koyeba soki ‘moto yango azali nani.’”​—MOKOMI STAN GUTHRIE.

BATO balukaka koyeba soki Yesu azali nani. Babuku oyo elobelaka ye etɛkamaka mingi koleka babuku mosusu. Bato bakómi kosepela mingi na bafilme oyo elobelaka ye. Atako bongo, bato bazali kaka na mituna na ntina na Yesu. Ntango batunaka bango soki Yesu azalaki mpenza nani, bazalaka na makanisi ndenge moko te.

Eleki mwa bambula, bapanzi-nsango mibale basɛngaki bato báyanola na motuna oyo: “Yesu azalaki nani?” Yoká biyano oyo bato bapesaki:

● “Ntango mosusu azalaki rabi (moteyi) oyo atiká ndakisa malamu na likambo ya koyokela bato mawa.”

● “Azalaki moto lokola bato nyonso, kasi bomoi na ye ekeseneki na oyo ya bato mosusu.”

● “Ezali na eloko moko te oyo endimisi biso ete Yesu azalaki mpenza na bomoi.”

● “Yesu azali Mwana ya Nzambe oyo abotamaki, akufaki, mpe asekwaki mpo na kobikisa biso na masumu na biso. Azali na bomoi lelo, mpe akoya lisusu awa na mabele.”

● “Nandimaka ete Yesu Kristo azali mwana kaka moko ya Nzambe, oyo azali moto kasi azali mpe Nzambe.”

● “Kondima masolo oyo elobeli Yesu ezali makambo ya bana mike.”

Emonani polele ete makanisi wana nyonso ekoki kozala solo te. Ezali nde na esika moko oyo tokoki kozwa biyano ya solosolo mpe ya kotyela motema na mituna oyo tomitunaka mpo na Yesu? Babimisi ya zulunalo oyo bandimaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe mpe kaka yango nde eyebisaka biso solo nyonso na ntina na Yesu. *​—2 Timote 3:16.

Na lisolo oyo elandi, tokotalela biyano oyo Biblia epesaka na mituna oyo bato mingi bamitunaka mpo na Yesu. Ye moko alobaki ete nzela ya lobiko efungwami mpo na “moto nyonso oyo azali kondimela ye.” (Yoane 3:16) Tosɛngi yo otalela biyano yango, mpe na nsima yo moko ozwa ekateli soki osengeli koyekola makambo mosusu mpo na Yesu mpe ndenge ya komonisa kondima epai na ye.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 11 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 2, “Biblia ezali buku oyo euti na Nzambe,” na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.