Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna oyo tomitunaka mpo na Yesu Kristo

Biyano na mituna oyo tomitunaka mpo na Yesu Kristo

Biyano na mituna oyo tomitunaka mpo na Yesu Kristo

“Ebele ya bato bazali koloba ete ngai nazali nani?”​—LUKA 9:18.

YESU atunaki bayekoli na ye motuna wana mpo ayebaki ete bato bazalaki na makanisi ndenge na ndenge mpo na ye. Nzokande, ezalaki na ntina te bato bámituna soki Yesu azalaki nani. Yesu azalaki kofanda na esika na ye moko te, azalaki mpe kosala makambo na ndenge ya kobombana te. Kutu, azalaki esika moko na bato na bamboka na bango mpe na bingumba na bango. Azalaki kosakola mpe koteya na miso ya bato nyonso, mpamba te alingaki ete bato báyeba solo na ntina na ye.​—Luka 8:1.

Maloba ya Yesu mpe misala na ye, oyo baevanzile minei (Matai, Marko, Luka mpe Yoane) elobeli, ekoki kosalisa biso tóyeba solo na ntina na Yesu. Mikanda wana oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe nde ezali kopesa biso biyano na mituna oyo etali Yesu. *​—Yoane 17:17.

MOTUNA: Yesu azalaki mpenza na bomoi awa na mabele?

EYANO: Ɛɛ. Bato ya mayele na istware, ezala mpe Josèphe ná Tacite na siɛklɛ ya liboso, balobaki ete Yesu azalaki mpenza na bomoi awa na mabele. Likambo eleki ntina, baevanzile emonisi polele ete Yesu azalaki moto ya solo, kasi moto ya lisapo te. Masolo yango eyebisi malamumalamu ntango mpe bisika oyo makambo yango esalemaki. Na ndakisa, mpo na komonisa mbula oyo Yesu abandaki mosala na ye, Luka, moko ya bakomi ya baevanzile, atángi nkombo ya bakonzi nsambo, oyo bato ya mayele na istware mpe bayebi bango.​—Luka 3:1, 2, 23.

Ntembe ezali ata moke te ete Yesu azalaki na bomoi awa na mabele. Buku moko (Evidence for the Historical Jesus) elobi boye: “Bato mingi ya mayele bandimaka ete mobali moko na nkombo Yesu ya Nazarete azalaki na bomoi na siɛklɛ ya liboso.”

MOTUNA: Yesu azali mpenza Nzambe?

EYANO: Te. Ata mokolo moko te, Yesu amikokanisaki na Nzambe. Kutu, mbala na mbala Yesu amonisaki ete Yehova aleki ye. * Na ndakisa, Yesu abengaki Yehova “Nzambe na ngai” mpe “Nzambe ya solo kaka moko.” (Matai 27:46; Yoane 17:3) Kaka moto oyo azali na nse ya moto mosusu nde akoki kosalela maloba wana. Mosali oyo azali kobenga moto oyo azwi ye na mosala “patro na ngai” to “mokonzi” azali komonisa polele ete moto yango aleki ye.

Yesu amonisaki mpe ete ye ná Nzambe bazali moto moko te. Mokolo moko, Yesu ayebisaki bato oyo bazalaki kotɛmela bokonzi na ye boye: “Ekomamá na Mibeko na bino mpenza ete: ‘Litatoli ya bato mibale ezali solo.’ Nazali kopesa litatoli mpo na ngai moko, mpe Tata oyo atindaki ngai azali kopesa litatoli mpo na ngai.” (Yoane 8:17, 18) Yesu ná Yehova bazali mpenza bato mibale bakeseni. Soki bongo te, ndenge nini Biblia emonisi ete bazali batatoli mibale? *

MOTUNA: Yesu azalaki kaka moto moko ya malamu?

EYANO: Te, azalaki kaka moto moko ya malamu te. Yesu ayebaki ete azalaki na mikumba mingi ya ntina mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Tótalela mwa ndambo ya mikumba yango:

‘Mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki.’ (Yoane 3:18) Yesu ayebaki esika nini autaki. Bomoi na ye ebandaki ntango molai liboso ete abotama awa na mabele. Alimbolaki boye: “Nakitaki uta na likoló.” (Yoane 6:38) Yesu azalaki ekelamu ya liboso ya Nzambe mpe apesaki mabɔkɔ mpo na kokela biloko mosusu nyonso. Lokola Yesu akelamaki mpenza na mabɔkɔ ya Nzambe ye moko, ebongaki mpenza amibenga ‘mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki.’​—Yoane 1:3, 14; Bakolose 1:15, 16.

“Mwana ya moto.” (Matai 8:20) Mbala mingi, Yesu amibengaki “Mwana ya moto”; tokoki kokuta maloba yango mbala soki 80 na baevanzile. Maloba yango emonisi ete azalaki mpenza moto, kasi te Nzambe na nzoto ya mosuni. Ndenge nini Mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki ayaki kobotama lokola moto? Na nzela ya elimo santu, Yehova alongolaki bomoi ya Mwana na ye na likoló mpe atyaki yango na libumu ya Maria, mwasi moko Moyuda oyo ayebaki naino mibali te; ezali na ndenge wana nde mwasi yango azwaki zemi. Yango wana, Yesu abotamaki na lisumu te, azalaki moto ya kokoka.​—Matai 1:18; Luka 1:35; Yoane 8:46.

“Moteyi.” (Yoane 13:13) Yesu amonisaki polele ete mosala oyo Nzambe apesaki ye ezalaki “koteya . . . mpe kosakola nsango malamu” mpo na Bokonzi ya Nzambe. (Matai 4:23; Luka 4:43) Alimbolaki polele mpe na maloba ya pɛtɛɛ soki Bokonzi ya Nzambe ezali nini mpe oyo bokonzi yango ekosala mpo na kokokisa mokano ya Nzambe.​—Matai 6:9, 10.

“Liloba.” (Yoane 1:1) Yesu azalaki Molobeli ya Nzambe, yango elimboli ete Nzambe azalaki kosalela ye mpo na kopesa bansango mpe malako epai ya bikelamu mosusu. Yehova asalelaki Yesu mpo na kopesa bato nsango na Ye awa na mabele.​—Yoane 7:16, 17.

MOTUNA: Yesu azalaki Masiya oyo alakamaki?

EYANO: Ɛɛ. Bisakweli ya Biblia esakolaki koya ya Masiya to Kristo, oyo elimboli “moto oyo atyami mafuta.” Masiya yango oyo alakamaki asengelaki kozala na mokumba moko ya ntina mingi mpo na kokokisa mokano ya Yehova. Mokolo moko, mwasi moko Mosamaria ayebisaki Yesu boye: “Nayebi ete Masiya azali koya, oyo abengami Kristo.” Na nsima, Yesu ayebisaki ye polele ete: “Ngai oyo nazali koloba na yo nde ye.”​—Yoane 4:25, 26.

Ezali nde na makambo oyo endimisi biso ete Yesu azalaki Masiya? Kaka ndenge bilembo ya misapi ya moto moko ekoki te kokokana ná oyo ya moto mosusu, ezali na makambo misato oyo, soki basangisi yango, ekomonisa ete Yesu azali mpenza Masiya.

Molɔngɔ ya bankɔkɔ na ye. Biblia esakolaki ete Masiya akozala mokitani ya Abrahama, oyo akobima na libota ya Davidi. (Ebandeli 22:18; Nzembo 132:11, 12) Yesu azalaki mokitani ya bato yango mibale.​—Matai 1:1-16; Luka 3:23-38.

Bisakweli oyo ekokisamaki epai na ye. Makomami ya Ebre ezali na ebele ya bisakweli oyo etali bomoi ya Masiya awa na mabele, ata mpe makambo nyonso oyo etali kobotama na ye mpe liwa na ye. Yesu akokisaki bisakweli wana nyonso. Na kati ya bisakweli yango, tokoki kotánga oyo: Abotamaki na Beteleme (Mika 5:2; Luka 2:4-11), abengamaki longwa na Ezipito (Hosea 11:1; Matai 2:15), mpe abomamaki kozanga ete ata mokuwa na ye moko ebukana (Nzembo 34:20; Yoane 19:33, 36). Ekokaki kosalema te ete Yesu abongola makambo na bomoi na ye mpo bisakweli nyonso oyo etalaki Masiya ekokisama epai na ye. *

Litatoli ya Nzambe ye moko. Ntango Yesu abotamaki, Nzambe atindaki baanzelu báyebisa babateli ya mpate ete Masiya abotami. (Luka 2:10-14) Ntango Yesu azalaki kokokisa mosala na ye, mbala mingi, Nzambe ye moko alobaki kuna na likoló, ete andimi Yesu. (Matai 3:16, 17; 17:1-5) Lisusu, mpo na komonisa ete Yesu azalaki Masiya, Yehova apesaki ye nguya ya kosala makamwisi ya minene.​—Misala 10:38.

MOTUNA: Mpo na nini esengelaki ete Yesu anyokwama mpe akufa?

EYANO: Lokola Yesu azalaki moto ya masumu te, ebongaki te ete anyokwama. Ebongaki mpe te ete bábaka ye na nzete lokola mosali-mabe mpe akufa liwa ya nsɔni. Kasi, atako Yesu ayebaki ete akokutana na makambo wana, andimaki yango.​—Matai 20:17-19; 1 Petro 2:21-23.

Bisakweli oyo etali Masiya elobaki ete asengelaki konyokwama mpe kokufa mpo na kozipa masumu ya bato. (Yisaya 53:5; Danyele 9:24, 26) Yesu ye moko alobaki ete ayaki “kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28) Bato oyo bazali komonisa kondima na mbeka oyo Yesu apesaki mpo na kosikola bato, bazali na elikya ya kolongwa na boombo ya lisumu mpe ya liwa mpe kozala na bomoi ya seko na Paradiso awa na mabele. *​—Yoane 3:16; 1 Yoane 4:9, 10.

MOTUNA: Tokoki mpenza kondima ete Yesu asekwisamaki?

EYANO: Ɛɛ. Yesu azalaki mpenza na kondima ete Nzambe akosekwisa ye. (Matai 16:21) Kasi, ezali na ntina tósimba ete Yesu to bakomi ya Biblia balobaki te ete Yesu akosekwa na ndenge na ye moko. Likanisi ya ndenge wana ekokaki kondimama te. Biblia elobi nde ete: “Nzambe asekwisaki ye na ndenge alongolaki bampasi ya liwa.” (Misala 2:24) Soki tondimaka ete Nzambe azali mpe ete ye nde asalá biloko nyonso, tosengeli mpenza kondima ete akokaki mpe kosekwisa Mwana na ye.​—Baebre 3:4.

Ezali mpenza na makambo oyo endimisi biso ete Yesu asekwisamaki? Tótalela makambo oyo elandi.

Litatoli ya bato oyo bamonaki likambo yango. Mbula soki 22 nsima ya liwa ya Yesu, ntoma Paulo akomaki ete ezalaki na bato 500 oyo bamonaki lisekwa ya Yesu mpe mingi na bango bazalaki naino na bomoi ntango Paulo azalaki kokoma. (1 Bakorinti 15:6) Ekoki kozala mpasi kondima litatoli ya moto moko to ya bato mibale, kasi nani akoki koboya kondima litatoli ya bato 500?

Batemwɛ oyo babongi kotyelama motema. Bayekoli ya liboso ya Yesu, oyo bazalaki na likoki ya koyeba nini mpenza esalemaki, basakolaki na molende ete Yesu asekwisamaki. (Misala 2:29-32; 3:13-15) Kutu, bazalaki komona ete kondima lisekwa ya Yesu ezalaki na ntina mingi mpo na kozala mokristo. (1 Bakorinti 15:12-19) Bayekoli yango bandimaki ata kokufa, na esika ya kowangana Yesu. (Misala 7:51-60; 12:1, 2) Oyebi moto moko oyo akoki kondima kokufa mpo na likambo moko oyo ayebi ete ezali ya lokuta?

Touti kotalela biyano oyo Biblia epesi na mituna motoba ya ntina mingi oyo etali Yesu. Biyano yango emonisi biso polele soki Yesu azali nani. Kasi, ezali mpenza na ntina tózwa biyano yango? Na maloba mosusu, makambo oyo ondimaka mpo na Yesu, etali kaka yo moko?

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 4 Mpo na koyeba ndenge oyo baevanzile minei ya Biblia ekeseni na mikanda ya lokuta oyo elobelaka Yesu, talá lisolo “Baevanzile oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te​—elobaka nde makambo ya solo oyo ebombamá mpo na Yesu?” na nkasa 18 mpe 19.

^ par. 9 Na Biblia, Yehova ezali nkombo ya Nzambe.

^ par. 10 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá “Lisolo na moninga moko ya kartye​—Yesu azali Nzambe?” na nkasa 20-22.

^ par. 21 Mpo na koyeba bisakweli mosusu oyo ekokisamaki epai ya Yesu, talá lokasa 200 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?

^ par. 25 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali valɛrɛ ya lisiko oyo Yesu apesaki, talá mokapo 5 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?