Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ezali mpenza na ntina tózwa biyano yango?

Ezali mpenza na ntina tózwa biyano yango?

Ezali mpenza na ntina tózwa biyano yango?

“Bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.”​—YOANE 8:32.

BIBLIA ezali na solo oyo ekoki kopesa biso bonsomi na mateya ya lokuta oyo ezali kobungisa bato nzela na ntina na Yesu. Kasi, makambo oyo tondimaka mpo na Yesu ezali mpenza na ntina? Ɛɛ, ezali na ntina. Ezali na ntina mpo na Yehova. Ezali na ntina mpo na Yesu. Mpe esengeli kozala na ntina mpo na biso.

Mpo na nini ezali na ntina mpo na Yehova? Na mokuse, mpo “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Yehova alingi ete tózala na bomoi ya esengo libela na libela. Yesu alobaki boye: “Nzambe alingaki mokili [bato] mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye . . . azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Nzambe atindaki Mwana na ye mpo azala Mosikoli na biso mpe afungolela biso nzela ya bomoi ya seko na Paradiso awa na mabele, na boyokani na mokano na Ye ya ebandeli. (Ebandeli 1:28) Nzambe azali na mposa makasi ya kopesa likabo ya bomoi ya seko na bato oyo bazali koyekola solo na ntina na Mwana na ye, mpe kosala makambo oyo eyokani na solo yango.​—Baroma 6:23.

Mpo na nini ezali na ntina mpo na Yesu? Yesu mpe alingaka bato. Amonisaki bolingo ya solosolo ndenge andimaki kopesa bomoi na ye mpo na biso. (Yoane 15:13) Ayebaki ete kokaba bomoi na ye ezalaki nzela kaka moko mpo bato bázwa lobiko. (Yoane 14:6) Tosengeli nde kokamwa ndenge Yesu alingi ete bato mingi bázwa matomba na mbeka na ye ya lisiko? Yango nde ntina oyo apesaki bayekoli na ye ya solo mokumba ya koteya bato mokano ya Nzambe na mokili mobimba.​—Matai 24:14; 28:19, 20.

Mpo na nini esengeli kozala na ntina mpo na biso? Kanisá mwa moke na makambo oyo ezali na ntina mingi mpo na yo, na ndakisa bokɔlɔngɔnɔ na yo ya nzoto mpe libota na yo. Olingaka ete yo moko mpe bato ya libota na yo bózala nzoto kolɔngɔnɔ mpe na bomoi ya malamu? Na nzela ya Yesu, Yehova apesi yo ná bato ya libota na yo elikya ya kozala nzoto kolɔngɔnɔ mpe na bomoi oyo ezangi nsuka na mokili ya sika oyo mpasi ekozala te. (Nzembo 37:11, 29; Emoniseli 21:3, 4) Okolinga kozala na bomoi na mokili ya ndenge wana? Soki ezali bongo, osengeli kosala likambo moko.

Talá lisusu vɛrsɛ oyo ezali na nse ya motó ya likambo ya lisolo oyo: “Bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.” Solo na ntina na Yesu mpe mokumba na ye na kokokisama ya mokano ya Nzambe ekoki kosikola biso na boombo nyonso ya lisumu mpe ya liwa. Kasi, mpo ozwa bonsomi yango, osengeli ‘koyeba solo.’ Mpo na nini te koluka koyeba makambo mingi etali solo yango mpe ndenge oyo yo ná bato ya libota na yo bokoki kozwela yango matomba? Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo.