Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki ete kende na ye kilomɛtrɛ mibale?

Na lisolo oyo asalaki likoló ya ngomba, Yesu apesaki etinda oyo: “Soki moto moko oyo azali na bokonzi azwi yo na makasi mpo osalela ye mosala kilomɛtrɛ moko, kende na ye kilomɛtrɛ mibale.” (Matai 5:41) Na ntembe te, bato oyo bazalaki koyoka Yesu bayebaki ete azalaki kolobela mosala oyo mokonzi moko azali kosalisa moto na makasi.

Na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso, Baroma nde bazalaki koyangela Yisraele. Baroma bazalaki kosalisa bato to banyama misala na makasi, to kosala ete likambo nyonso oyo bayebi ete ezali mpo na litomba ya ekólo na bango ekende liboso. Na ndakisa, basoda Baroma batindaki na makasi Simo, moto ya mboka Sirene, amemela Yesu nzete ya mpasi tii na esika oyo basengelaki koboma ye. (Matai 27:32) Kozwa moto na makasi ndenge wana ezalaki monyoko, bato bazalaki kolinga yango te, mpe Bayuda bazalaki koyina mpenza likambo yango.

Toyebi te bakilomɛtrɛ boni moto oyo bamemisi mokumba asengelaki kosala. Kasi, ezali mwa mpasi tókanisa ete bazalaki kondima kokende mosika koleka bakilomɛtrɛ oyo basɛngi bango. Yango wana, ntango Yesu alobaki na bato oyo bazalaki koyoka ye ete kende na ye kilomɛtrɛ mibale, azalaki nde koyebisa bango básala misala oyo bakonzi ya mboka bazalaki kosɛnga bango kozanga koimaima.​—Marko 12:17.

Anasi oyo baevanzile elobeli ntango bazalaki kosambisa Yesu azalaki nani?

Biblia elobi ete ntango bazalaki kosambisa Yesu, Anasi (Ananus) nde azalaki “nganga-nzambe mokonzi.” (Luka 3:2; Yoane 18:13; Misala 4:6) Kutu, Anasi azalaki tata-bokilo ya Kaifa, nganga-nzambe monene ya Yisraele, mpe ye moko azalaki nganga-nzambe monene kobanda na siɛklɛ ya 6 to ya 7 tii na siɛklɛ ya 15 ya ntango na biso, ntango Valerius Gratus, mokonzi moko ya Roma, alongolaki ye na ebonga yango. Atako bongo, lokola Anasi azalaki liboso nganga-nzambe monene, azalaki kaka na bokonzi mingi na Yisraele. Bana na ye mitano ya mibali mpe mobali ya mwana na ye bakómaki mpe banganga-nzambe minene.

Ntango nyonso oyo Yisraele ezalaki na bonsomi, moto azalaki kotikala nganga-nzambe monene bomoi na ye mobimba. (Mitángo 35:25) Kasi, ntango Baroma bakómaki kokonza Yisraele, nganga-nzambe monene azalaki kosala mpo na kosepelisa baguvɛrnɛrɛ ya Roma mpe bakonzi oyo Roma eponaki, mpe bakonzi yango bakokaki kolongola ye na ebonga wana. Flavius Josèphe, moto ya mayele na istware alobi ete na siɛklɛ ya 6 to ya 7 ya ntango na biso, Kiriniusi, guvɛrnɛrɛ ya Roma na Siri, alongolaki moto moko na nkombo Joazar na ebonga ya nganga-nzambe monene, mpe atyaki Anasi (Ananias) na ebonga yango. Emonani lokola ete bakonzi wana ya bapakano bazalaki kopona nganga-nzambe monene ya sika na kati ya bato oyo bazalaki banganga-nzambe.

Libota ya Anasi ezalaki na lokoso mingi mpe na bozwi mingi. Ekoki kozala ete bakómaki na bomɛngo mpo bango nde bazalaki kotalela makambo ya kotɛka biloko oyo ezalaki kosalelama mpo na kopesa bambeka na kati ya tempelo, na ndakisa bibenga, bampate, mafuta, mpe vinyo. Josèphe alobi ete Anasi azalaki na “basaleli oyo bazalaki mpenza nsuka ya bolole, oyo [bazalaki] kozwa na makasi ndambo ya zomi ya banganga-nzambe; mpe bazalaki kobɛta bato oyo bazalaki koboya kopesa yango.”