Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia ebongolaka bato

Biblia ebongolaka bato

Biblia ebongolaka bato

NINI etindaki mobali moko azongela mateya ya Nzambe oyo bateyaki ye na bomwana? Ndenge nini elenge mobali moko oyo azalaki na mposa ya tata banda kala azwaki tata moko ya malamu? Tángá makambo oyo bango moko balobi.

“Nasengelaki kozongela Yehova.”​—ELIE KAHLIL

ABOTAMAKI NA: 1976

EKÓLO: CHYPRE

BOMOI NA YE YA KALA: MWANA YA MOBULU

NDENGE NAZALAKI: Nabotamaki na ekólo Chypre, kasi nakolaki na ekólo Australie. Baboti na ngai bazali Batatoli ya Yehova, mpe basalaki nyonso oyo bakokaki kosala mpo na kosalisa ngai nalinga Yehova mpe Liloba na ye, Biblia. Kasi, ntango nazalaki naino elenge, nakómaki motɔmbɔki. Na butu, nazalaki kobima na ndako na mayele mpo na kokende kokutana ná baninga na ngai. Tozalaki koyiba mituka mpe kosala ebele ya makambo mosusu ya mabe.

Na ebandeli, nazalaki kosala makambo yango na kobombana, mpo nazalaki kobanga nayokisa baboti na ngai motema mpasi. Kasi, mokemoke, kobanga wana esilaki. Nakómaki na baninga oyo bazalaki mikóló na ngai, oyo bazalaki kolinga Yehova te; bango nde babebisaki ngai. Nsukansuka, nayebisaki baboti na ngai ete nalingi lisusu makambo ya lingomba na bango te. Bamonisaki motema molai mpo na kosalisa ngai, kasi nazalaki kolinga te. Baboti na ngai bayokaki mpasi mingi na motema.

Ntango nalongwaki na ndako ya baboti na ngai, nabandaki komɛla bangi, ata mpe kolona mpe kotɛka marijuana. Nakómaki na bomoi ya mbindo mpe nazalaki kolekisa ntango na ngai mingi na banganda ya butu. Nakómaki mpe kosilika mpambampamba. Soki moto alobi to asali likambo moko oyo nasepeli na yango te, nazalaki kosilika makasi, mbala mingi kogangela bato mpe kobɛta bango. Nakoki koloba ete nakómaki kosala makambo nyonso oyo bateyaki ngai ete mokristo asengeli kosala te.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Nakómaki moninga ya motema ya momɛli-bangi moko oyo tata na ye akufaki ntango azalaki mwana moke. Mbala mingi, tozalaki kotikala libándá tii na butu makasi. Mikolo mosusu na butu, azalaki kofungolela ngai motema mpe koyebisa ngai ndenge oyo azalaki komiyoka lokola tata na ye azalaki lisusu na bomoi te. Lokola nayebaki elikya ya lisekwa oyo bateyá ngai banda bomwana, nabandaki mbala moko koyebisa ye ete Yesu asekwisaki bakufi mpe alakaki ete akosekwisa lisusu bato na mikolo ezali koya. (Yoane 5:28, 29) Nazalaki koyebisa ye boye: “Kanisá ete okomona lisusu tata na yo. Biso nyonso tokoki kozala na bomoi ya seko na paradiso awa na mabele.” Maloba wana esimbaki mpenza motema ya moninga na ngai.

Na bantango mosusu, moninga wana azalaki kotuna mituna oyo etali mikolo ya nsuka to liteya ya Bosato. Nazalaki kozwa Biblia na ye mpe kolakisa ye bavɛrsɛ mingi oyo elobeli solo na ntina na Yehova Nzambe, Yesu, mpe mikolo ya nsuka. (Yoane 14:28; 2 Timote 3:1-5) Mbala nyonso oyo nazalaki koyebisa moninga na ngai wana makambo ya Yehova, ngai moko mpe nakómaki kokanisa Yehova.

Malɛmbɛmalɛmbɛ, mboto ya solo ya Biblia oyo baboti na ngai basalaki makasi mpo na kolona na motema na ngai ebandaki kokola. Na ndakisa, na bantango mosusu, soki nazali komɛla bangi ná baninga na ngai na fɛti moko, okomona mbala moko nabandi kokanisa Yehova. Baninga na ngai mingi bazalaki koloba ete balingaka Nzambe, kasi bizaleli na bango ezalaki komonisa ete balingaka Nzambe te. Lokola ngai nalingaki te kozala lokola bango, nayebaki nini nasengelaki kosala. Nasengelaki kozongela Yehova.

Ezali solo ete koyeba likambo oyo osengeli kosala ezalaka pɛtɛɛ, kasi kosala yango ezalaka mpasi. Kotika makambo mosusu ezalaki pɛtɛɛ; na ndakisa, natikaki komɛla bangi kozanga mokakatano. Natikaki mpe baninga na ngai ya kala, mpe nakómaki koyekola Biblia ná nkulutu moko ya lisangá.

Kasi, ezalaki mpasi mingi kotika makambo mosusu. Ezalaki mpenza mpasi nátika kosilika mpambampamba. Ntango mosusu nazalaki kolonga mwa moke kotika ezaleli yango, kasi na nsima, nazalaki kozongela yango. Mbala nyonso oyo nazalaki kolonga te kotika momeseno yango, nazalaki kolɛmba nzoto. Soki nalɛmbi nzoto, nazalaki koyebisa nkulutu oyo azalaki koyekola na ngai Biblia. Ndeko yango azalaki ntango nyonso na motema molai mpe na boboto, mpe azalaki kolendisa ngai mingi. Mokolo moko, asɛngaki ngai natánga lisolo moko na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, oyo elobelaki ntina ya kolɛmba nzoto te. * Totalelaki elongo na ye makambo oyo nakoki kosala soki nasiliki. Mokemoke, lokola nazalaki kokanisa lisolo yango mpe kobondela Yehova mingi, nalongaki ezaleli yango ya kosilika mpambampamba. Nsukansuka, na mobu 2000, na sanza ya Aprili, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova. Baboti na ngai basepelaki mingi.

MATOMBA OYO NAZWI: Lelo oyo, lokola nayebi ete nabebisaka lisusu te nzoto na ngai na bangi mpe misala ya mbindo, nakómá na kimya na makanisi mpe na lisosoli ya pɛto. Ezala nazali kosala likambo nini, kosala mosala, koyangana na makita to kosepela mwa moke elongo na baninga, nazali kaka na esengo mingi. Natalelaka bomoi na ndenge oyo ebongi.

Napesaka Yehova matɔndi mpo na baboti na ngai, oyo balɛmbaki te kosalisa ngai. Nakanisaka mpe maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 6:44, oyo elobi ete: “Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.” Soki nakanisi ndenge nazongelá Yehova mpo ye moko abendaki ngai, yango esimbaka mpenza motema na ngai.

“Nazalaki na mposa ya tata.”​—MARCO ANTONIO ALVAREZ SOTO

ABOTAMAKI NA: 1977

EKÓLO: CHILI

BOMOI NA YE YA KALA: AZALAKI ALANGÁ-NZEMBO YA MIZIKI BABENGI DEATH METAL

NDENGE NAZALAKI: Nakolaki epai ya mama na ngai, na Punta Arenas, engumba moko ya kitoko, oyo ezali pene na Détroit de Magellan, na nsuka mpenza ya Amerika ya Sudi. Tata ná mama bakabwanaki ntango nazalaki na mbula mitano; yango esalaki ete namiyoka lokola basundolá ngai. Nazalaki na mposa ya tata.

Batatoli ya Yehova bazalaki koyekola Biblia na mama, mpe ye azalaki komema ngai na makita na Ndako ya Bokonzi. Kasi, nazalaki kolinga te kokende na makita; yango wana, mbala mingi nazalaki kosilikasilika nzelanzela. Ntango nazalaki na mbula 13, natikaki koyangana na makita.

Kaka na ntango yango, nakómaki kolinga mingi miziki, mpe namonaki ete nakoki kozala alangá-nzembo moko ya malamu. Ntango nakómaki na mbula 15, nakómaki kobɛta miziki babengi heavy-metal mpe death-metal na bafɛti, na banganda, mpe na bandako ya bato. Nakómaki koyemba ná baalangá-nzembo oyo bayebi malamu mosala ya miziki, yango wana nakómaki kolinga miziki mingi. Nakɔtaki kelasi ya miziki na eteyelo moko ya engumba wana. Ntango nakómaki na mbula 20, nakendaki kofanda na Santiago, mboka-mokonzi ya Chili, mpo na kokoba bakelasi na ngai. Nakobaki mpe kobɛta miziki babengi heavy-metal mpe death-metal ná bato mosusu.

Ntango nyonso wana, nazalaki kaka komiyoka lokola nazangi eloko. Mpo na kolongola makanisi wana, nabandaki kolangwa masanga mpe komɛla bangi ná baninga na ngai ya miziki, oyo nazalaki kozwa lokola bandeko na ngai. Soki kaka moto atali ngai, akomona ete nazali motɔmbɔki, mpo nazalaki kolata bilamba ya moindo, nakolisaki mandɛfu, mpe nsuki na ngai ekómaki milai tii pene na loketo.

Mbala na mbala, nazalaki kobunda bitumba mpe bapolisi bazalaki kokanga ngai. Mokolo moko, na nse ya molangwa, nabundisaki bato moko oyo bazalaki kotɛka bangi, oyo batumolaki ngai ná baninga na ngai. Bato yango babɛtaki ngai mabe mpe babukaki ngai mbanga.

Kasi, bato oyo bapesaki ngai mpasi mingi na motema ezalaki nde baninga ngai. Mokolo moko, nayaki koyeba ete mwana mwasi oyo azalaki makango na ngai azalaki kobima ná moninga na ngai ya motema banda bambula mingi, mpe baninga na ngai nyonso babombelaki ngai likambo yango. Yango esalaki ngai mpasi mingi.

Nazongaki na engumba Punta Arenas, mpe kuna nakómaki profesɛrɛ ya miziki mpe nazalaki kobɛta violon. Nakobaki mpe kobɛta miziki babengi heavy-metal mpe death-metal elongo na baninga mpe kotya miziki yango na kasɛti. Nakutanaki na Sussan, elenge mwasi moko kitoko, mpe nakómaki kofanda ná ye. Mwa moke na nsima, Sussan ayaki koyeba ete mama na ye azalaki kondima liteya ya Bosato, nzokande ngai nazalaki kondima yango te. Atunaki ngai boye: “Sikoyo, solo ezali wapi?” Nayanolaki ete nayebi ete liteya ya Bosato ezali lokuta, kasi nayebi te bavɛrsɛ ya Biblia oyo emonisi yango. Kasi, nayebi bato oyo bayebi bavɛrsɛ yango. Nayebisaki ye ete Batatoli ya Yehova bakoki kolakisa ye oyo Biblia elobi na likambo yango. Na nsima, nasalaki likambo moko oyo nazalaki kosala te bambula ebele: nabondelaki Nzambe mpe nasɛngaki ye asalisa ngai.

Nsima ya mwa mikolo, nakutanaki na mobali moko oyo namonaki lokola nayebi ye, mpe natunaki ye soki azali Motatoli ya Yehova. Atako namonaki ete azalaki na mwa kobanga mpo na ndenge oyo nazalaki komonana, na boboto nyonso, ayanolaki na mituna oyo natunaki ye mpo na makita mpe Ndako ya Bokonzi. Nandimaki ete kokutana na Motatoli wana ezalaki eyano na libondeli na ngai. Nakendaki na Ndako ya Bokonzi mpe nafandaki na molɔngɔ ya nsuka mpo bato bámona ngai te. Kasi, bato mingi bayebaki ngai mpo nazalaki koyangana na makita ntango nazalaki mwana moke. Bayambaki ngai malamu mpe na esengo mpenza, yango wana nayokaki kimya na motema. Ezalaki lokola nde nazongi na ndako. Ntango namonaki moto oyo ateyaki ngai Biblia ntango nazalaki mwana moke, nasɛngaki ye tózongela lisusu koyekola.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI: Mokolo moko, natángaki Masese 27:11, oyo elobi ete: “Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai.” Nakamwaki ntango nayebaki ete ata moto mpamba akoki kosepelisa Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Namonaki ete Yehova azali Tata oyo nazalaki koluka banda kala!

Nazalaki na mposa ya kosepelisa Tata na ngai ya likoló, ya kosala mokano na ye, kasi nakómaki moombo ya bangi mpe ya masanga bambula mingi. Nakangaki ntina ya liteya ya Yesu oyo ezali na Matai 6:24, oyo elobi ete: “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale.” Ntango nazalaki kosala makasi mpo na kobongola bizaleli na ngai, etinda oyo ezali na 1 Bakorinti 15:33 esimbaki motema na ngai: “Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” Namonaki ete nakoki te kotika bizaleli ya mabe soki nakobaki kaka kokende na bisika wana mpe kozala na baninga wana. Toli ya Biblia ezalaki polele: Nasengelaki kozwa ekateli makasi ya koboya makambo oyo ezalaki kokweisa ngai.​—Matai 5:30.

Lokola nazalaki kolinga mingi miziki babengi heavy-metal, ezalaki mpasi nazwa ekateli ya kotika miziki. Kasi na lisalisi ya baninga oyo nazwaki na lisangá, nsukansuka, nalongaki kotika yango. Natikaki mpe komɛla masanga mingi mpe bangi. Nakataki nsuki mpe mandɛfu, mpe natikaki kolata bilamba ya moindo. Ntango nayebisaki Sussan ete nalingi kokata nsuki na ngai, yango ekamwisaki ye mingi. Alobaki boye: “Nakokende ná yo mpo natala naino makambo nini elekaka kuna na Ndako ya Bokonzi!” Asepelaki mingi na makambo oyo amonaki kuna, mpe eumelaki te, ye mpe abandaki koyekola Biblia. Nsukansuka, ngai ná Sussan tobalanaki, mpe na mobu 2008, tozwaki batisimo, tokómaki Batatoli ya Yehova.

MATOMBA OYO NAZWI: Nalongwá na boombo ya bisengo ya lokuta ya mokili oyo mpe ya baninga mabe. Tii lelo oyo, nalingaka kaka miziki, kasi nakómá kopona. Nabɛtaka lisolo ya makambo oyo nakutaná na yango mpo na kosalisa bato ya libota na ngai mpe bato mosusu, mingimingi, bilenge. Nalingaka kosalisa bango báyeba ete makambo mingi oyo mokili elakisaka biso, ekoki komonana kitoko, kasi nsuka na yango, ezali kaka “bosɔtɔ mpamba.”​—Bafilipi 3:8.

Nazwá baninga ya malamu na lisangá ya bokristo, epai bolingo ya solosolo mpe kimya ezali. Oyo eleki nyonso, namonaka ete ndenge napusaná penepene na Yehova, nazwá Tata oyo nazalaki koluka.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 14 Lisolo oyo ezali na motó ya likambo: “Kolonga esɛngaka kosala molende,” ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali 2000, nkasa 4-6.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]

“Nazongelá Yehova mpo ye moko abendaki ngai”