Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mekolá kondima na bango

Abatelaki bato ya libota na ye, akokisaki bamposa na bango, mpe alɛmbaki bango te

Abatelaki bato ya libota na ye, akokisaki bamposa na bango, mpe alɛmbaki bango te

YOZEFE azali komatisa mokumba mosusu na mokɔngɔ ya mpunda. Meká komona ndenge azali kotalatala mboka Beteleme oyo ezali molili mpenza mpe azali kobɛta nyama wana oyo ememaka mikumba na mokɔngɔ. Na ntembe te, azali kokanisa mobembo molai oyo alingi kosala tii na Ezipito, epai ya bato oyo ayebi te, esika balobaka monɔkɔ oyo ayebi te, na mimeseno oyo ayebi te. Ndenge nini libota na ye ekomesana na mbongwana wana monene?

Ezalaki pɛtɛɛ te ayebisa mwasi na ye Maria nsango yango, kasi Yozefe azwaki mpiko ya kosala yango. Ayebisaki ye nsango oyo eutaki epai ya Nzambe, oyo anzelu ayebisaki ye na ndɔtɔ, ete mokonzi Erode azalaki koluka koboma mwana na bango! Esengelaki bálongwa nokinoki na mboka wana. (Matai 2:13, 14) Likambo yango etungisaki Maria mingi. Ndenge nini moto moko akoki koluka koboma mwana na ye, oyo asali eloko te? Maria ná Yozefe bakokaki te kokanisa ete likambo ya ndenge wana ekoki kosalema. Kasi, batyelaki Yehova motema mpe bamibongisaki mpo na kokende.

Ntango bato ya Beteleme balali naino mpe bayebi te likama oyo elingi koyela bango, Yozefe, Maria, ná Yesu balongwe na mboka yango ntango molili ezali naino. Ntango Yozefe azali komema bango na sudi mpe ntɔngɔ ebandi kotana na ɛsti, na ntembe te azali komituna nini ekokómela bango. Ndenge nini mosali-mabaya wana akokoka kobatela libota na ye liboso ya banguna oyo baleki ye na nguya? Akokoka ntango nyonso kokokisa bamposa ya libota na ye? Akokoba komema mokumba ya kilo oyo Yehova Nzambe apesi ye, ya kobatela mpe kobɔkɔla mwana wana oyo akeseni na bana mosusu? Yozefe akutanaki na mikakatano makasi. Ntango tozali kotalela ndenge alongaki mokomoko na yango, tokomona mpo na nini lelo oyo batata ya mabota, mpe biso nyonso, tosengeli komekola kondima ya Yozefe.

Yozefe abatelaki libota na ye

Mwa basanza liboso, na engumba na ye Nazarete, bomoi ya Yozefe ebongwanaki mpo na libela ntango akómaki fianse ya mwana mwasi ya Heli. Yozefe ayebaki ete Maria azalaki elenge mwasi moko ya sembo mpe ya etamboli malamu. Kasi, na nsima ayokaki ete Maria akómi na zemi! Alukaki kokabwana na ye na ndenge ya kobombana, mpo básala Maria mabe te. * Kasi, anzelu moko ayebisaki ye na ndɔtɔ ete Maria azwaki zemi na nzela ya elimo santu ya Yehova. Anzelu yango abakisaki ete mwana oyo Maria akobota “akobikisa bato na ye na masumu na bango.” Na nsima, alendisaki Yozefe boye: “Kobanga te kotya Maria mwasi na yo na ndako.”​—Matai 1:18-21.

Yozefe, moto ya sembo mpe ya botosi, asalaki ndenge anzelu ayebisaki ye. Andimaki mokumba wana ya kilo ya kobɔkɔla mpe kobatela mwana oyo azalaki ya ye te, kasi oyo azalaki na motuya mingi na miso ya Nzambe. Na nsima, mpo na kotosa mobeko ya amperɛrɛ, Yozefe amemaki mwasi na ye oyo azalaki na zemi na Beteleme mpo na kokomisa nkombo. Ezali kuna nde mwana yango abotamaki. *

Yozefe ná libota na ye bazongaki lisusu na Nazarete te. Kasi, bakendaki nde kofanda na Beteleme, na ntaka ya mwa bakilomɛtrɛ na Yerusaleme. Bazalaki babola, kasi Yozefe asalaki nyonso oyo akokaki mpo na kobatela Maria mpe Yesu mpo bázanga eloko te mpe bányokwama te. Mpo na mwa ntango, bakómaki kofanda na ndako moko oyo ezangi mindɔndɔ. Na nsima, ntango Yesu azalaki lisusu bebe te, akolaki mwa moke, ekoki kozala ete akómaki na mbula moko to koleka, bomoi na bango ebongwanaki lisusu na mbalakaka.

Banganga-minzoto oyo bautaki na ɛsti bayaki epai na bango, ekoki kozala ete bautaki mosika mpenza, na Babilone. Balandaki monzoto moko mpo na kokóma na ndako ya Maria ná Yozefe mpe bazalaki koluka mwana oyo asengelaki kokóma mokonzi ya Bayuda. Bato yango bazalaki na limemya mingi.

Ezala bayebaki yango to te, banganga-minzoto wana batyaki bomoi ya Yesu na likama. Monzoto oyo bamonaki ememaki bango liboso na Beteleme te, kasi nde na Yerusaleme. Kuna, bayebisaki Erode mokonzi mabe ete bazalaki koluka mwana moko oyo asengelaki kokóma mokonzi ya Bayuda. Likambo yango elamwisaki nkanda ya mokonzi wana ya zuwa.​—Talá lisolo “Mituna ya batángi . . . Nani atindaki ‘monzoto’?” na lokasa 29.

Kasi, ezalaki na nguya moko oyo elekaki Erode na makasi. Na ndenge nini? Bapaya yango bamemaki makabo, kasi basɛngaki eloko te mpo na yango. Maria ná Yozefe basengelaki mpenza kokamwa, mpamba te, na mbalakaka, bakómaki na “wolo, olibana ná mire,” oyo ezali biloko ya motuya mingi! Banganga-minzoto bazalaki na mposa ya koyebisa mokonzi Erode esika oyo bakutaki mwana yango. Kasi, Yehova aboyaki. Na ndɔtɔ, apesaki banganga-minzoto mitindo ete bázonga na mboka na bango na nzela mosusu.​—Matai 2:1-12.

Ntango banganga-minzoto bakendaki, mwa moke na nsima, Yehova atindaki anzelu akebisa Yozefe boye: “Tɛlɛmá, kamatá mwana ná mama na ye mpe kimá na Ezipito, mpe fandá kuna tii ntango nakoloba na yo ozonga; mpo Erode alingi koluka mwana yango mpo aboma ye.” (Matai 2:13) Na yango, ndenge tomonaki yango na ebandeli, Yozefe atosaki kozanga kokakatana. Alukaki libosoliboso kobatela mwana na ye, yango wana amemaki libota na ye na Ezipito. Lokola banganga-minzoto wana ya bapakano bapesaki libota ya Yozefe makabo ya motuya mingi, bazalaki sikoyo na makoki oyo ekosalisa bango na mboka mopaya.

Na nsima, masapo ya lokuta mpe masapo mosusu elobelaki na ndenge ya kolekisa ndelo mobembo na bango na Ezipito, elobaki ete Yesu na bomwana na ye akómisaki mobembo yango mokuse na ndenge ya likamwisi, asilisaki bato mabe makasi mpo básala bango eloko te, akitisaki kutu nzete ya mbila mpo mama na ye abuka mbuma na yango. * Mpo na koloba solo, mobembo yango ezalaki molai, mpe ya mpasi, ezalaki lokola kokende na mokili oyo eyebani te.

Baboti bakoki kozwa mateya mingi na ndakisa ya Yozefe. Azalaki kondima kokata mosala na ye mpe komipimela makambo mosusu ya malamu mpo na kobatela libota na ye na likama. Na ntembe te, azalaki komona libota na ye lokola likabo mosantu oyo Yehova apesaki ye. Lelo oyo, baboti bazali kobɔkɔla bana na bango na mokili moko mabe makasi, oyo etondi na makambo oyo ekoki kotya bomoi ya bana na bango na likama, kobebisa bango, ata mpe koboma bango. Baboti oyo bazali kosala na mpiko nyonso lokola Yozefe, babongi mpenza kozwa longonya na ndenge bazali kosala makasi mpo na kobatela bana na bango na makambo ya ndenge wana!

Yozefe azalaki kokokisa bamposa ya libota na ye

Emonani lokola ete libota ya Yozefe efandaki mingi te na Ezipito, mpo eumelaki te, anzelu ayebisaki Yozefe ete Erode akufi. Yozefe ná libota na ye bazongaki na mboka na bango. Esakweli moko ya kala elobaki ete Yehova akobenga mwana na ye “alongwa na Ezipito.” (Matai 2:15) Yozefe apesaki mabɔkɔ na kokokisama ya esakweli wana, kasi sikoyo, epai wapi alingaki komema libota na ye?

Yozefe azalaki ekɛngɛ. Amonisaki bwanya ndenge akimaki Arkelausi, mokonzi oyo akómaki koyangela nsima ya Erode, oyo azalaki mpe moto mabe mpe mobomi. Yehova ayebisaki Yozefe amema libota na ye na nɔrdi, mosika mpenza na Yerusaleme mpe mosika na banguna nyonso, azonga na mboka na ye Nazarete, na Galilai. Ezali kuna nde ye ná Maria babɔkɔlaki bana na bango.​—Matai 2:19-23.

Bazalaki na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ, kasi ezangaki mikakatano te. Ntango Biblia elobelaka Yozefe lokola mosali-mabaya, esalelaka liloba moko oyo elimbolaka misala ndenge na ndenge oyo basalaka na banzete, na ndakisa, kokata nzete, komema yango, kobongisa yango mpo na kotonga bandako, masuwa, bagbagba, bakarte, sharete, bikanganeli, mpe biloko ya ndenge nyonso oyo basalaka na yango mosala ya bilanga. (Matai 13:55) Ezalaki mosala moko makasi. Mbala mingi, na ntango ya kala, basali-mabaya bazalaki kosala mosala na bango liboso ya ndako na bango to na esika oyo babongisaki pembeni ya ndako.

Yozefe azalaki kosalela biloko ndenge na ndenge, oyo ntango mosusu tata na ye moto atikelaki ye. Ekoki kozala ete azalaki na bisaleli lokola équerre, nsinga ya nivo, ekomeli, epasola, sii, marto, epalola-nzete, mwa marto oyo basalelaka mpo na kogumba litimbo, kɔlɛ ndenge na ndenge, mpe mbala mosusu mwa bansɛtɛ, atako biloko yango ezalaki ntalo mingi.

Meká komona ndenge Yesu, ntango azalaki mwana moke, azali kotala tata-mobɔkɔli na ye azali kosala mosala. Afungoli miso mpo na kotala likambo nyonso oyo Yozefe azali kosala, mpe na ntembe te, azali kosepela komona makasi oyo tata na ye azali kobimisa ntango mabɔkɔ na ye oyo eyebi mosala ezali kosala mpe miso na ye ezali kolandela eloko nyonso azali kosala. Ekoki kozala ete Yozefe abandaki kolakisa mwana na ye ndenge ya kosala misala ya mikemike, na ndakisa kosalela mposo ya mbisi oyo ekauká mpo na kobongisa mabaya ekóma sɛlisɛli. Ekoki mpe kozala ete alakisaki Yesu bokeseni oyo ezali kati ya banzete ndenge na ndenge oyo azalaki kosalela, na ndakisa nzete ya figi, ya chêne, mpe ya olive.

Yesu ayebaki mpe ete mabɔkɔ wana ya Yozefe oyo ezalaki makasi mpo na kokweisa banzete, kokatakata yango, mpe kokangisa yango esika moko, kaka na mabɔkɔ yango nde azalaki kosimba mpe kobɔndisa ye, mama na ye mpe bandeko na ye. Libota ya Maria ná Yozefe ekómaki monene; nsima ya Yesu, babotaki bana mosusu motoba. (Matai 13:55, 56) Yozefe asengelaki kosala mosala makasi mpo na kobatela mpe koleisa bato nyonso ya libota na ye.

Kasi, Yozefe ayebaki ete kosalisa libota na ye ezala na boyokani malamu na Nzambe ezalaki na ntina mingi. Yango wana, azalaki kolekisa ntango mingi na koteya bana na ye makambo etali Yehova Nzambe mpe mibeko na ye. Ye ná Maria bazalaki komema bana na bango mbala na mbala na Sinagoga, epai Mibeko ezalaki kotángama na mongongo makasi mpe kolimbolama. Ekoki kozala ete Yesu azalaki kotuna mituna mingi nsima ya makita yango mpe Yozefe azalaki kosala nyonso mpo na kopesa Yesu biyano oyo ebongi. Yozefe azalaki mpe komema libota na ye na bafɛti ya losambo oyo ezalaki kosalema na Yerusaleme. Mpo na kokende na elambo ya Elekeli oyo ezalaki kosalema mbula na mbula, mpe kozonga, Yozefe azalaki kosala mobembo ya kilomɛtrɛ 112 na ndambo, oyo ezalaki kozwa ye pɔsɔ mibale mobimba.

Lelo oyo, batata ya mabota oyo bazali bakristo balandaka mpe ndakisa yango. Bamipesaka mpo na bana na bango, batyaka makambo ya Nzambe na esika ya liboso koleka makambo mosusu nyonso, na ndakisa biloko ya mokili. Bamemaka bana na bango na makita na bango ya pɔsɔ na pɔsɔ mpe na mayangani. Ndenge moko na Yozefe, bayebaka ete yango ezali likambo eleki malamu oyo bakoki kosala mpo na bana na bango.

“Totamboli motó”

Ntango Yesu azalaki na mbula 12, Yozefe amemaki libota na ye na Yerusaleme, kaka ndenge azalaki kosala. Ezalaki eleko ya Elekeli, ntango ya fɛti, mpe mabota oyo ezalaki na bato ebele ezalaki kosala mobembo elongo, na nzela oyo ezalaki na matiti, bafololo mpe banzete kitoko ya eleko ya prɛnta. Ntango bazalaki kopusana penepene ya Yerusaleme, oyo ezalaki likoló ya ngomba, mingi ya bato yango bazalaki koyemba loyembo ya komata, oyo eyebanaki mingi. (Nzembo 120-134) Yerusaleme ezalaki kotonda na bankama ata mpe bankoto ya bato. Na nsima ya milulu, mabota mpe ebele ya bato bazalaki kosala lisusu mobembo mpo na kozonga na bandako na bango. Ekoki kozala ete lokola Yozefe ná Maria bazalaki na makambo mingi ya kosala, bakanisaki ete Yesu azalaki elongo na bato mosusu ya mobembo, ntango mosusu elongo na bato mosusu ya libota. Kaka nsima ya kolongwa Yerusaleme mpe kotambola mokolo mobimba, nde bayaki koyeba ete Yesu abungaki!​—Luka 2:41-44.

Mitema likoló, bazongaki na Yerusaleme, mpo na koluka Yesu bisika nyonso oyo balekaki. Kanisá ndenge bazalaki komona engumba yango ndenge etikali mpamba mpe ekómaki ndenge mosusu, ntango bazali kokatisa babalabala mpe kobelela nkombo ya mwana na bango. Elenge mobali yango akokaki kozala wapi? Nsima ya koluka ye mikolo misato, ntango mosusu Yozefe akómaki komituna soki alongaki te kokokisa mokumba mosantu oyo Yehova apesaki ye. Nsukansuka, bakendaki na tempelo. Balukaki Yesu kuna tii bakutaki ye na shambrɛ moko afandi katikati ya bato mingi ya mayele, oyo bayebaki Mibeko malamumalamu. Kanisá ndenge motema ya Yozefe ná Maria ekitaki ntango bamonaki ye!​—Luka 2:45, 46.

Yesu azalaki koyoka bato wana ya mayele mpe kotuna bango mituna. Bato yango bakamwaki ndenge mwana yango azalaki kokanga ntina ya makambo mpe kopesa biyano. Maria ná Yozefe mpe bakamwaki. Na lisolo yango, Yozefe afandaki nyɛɛ. Kasi, maloba ya Maria emonisaki mpe makanisi ya Yozefe: “Mwana, osali biso boye mpo na nini? Ngai ná tata na yo totamboli motó mpo na koluka yo.”​—Luka 2:47, 48.

Na maloba wana, Biblia esalisi biso tóyeba ete kobɔkɔla bana ezali mokumba ya pɛtɛɛ te. Ezalaka na mitungisi, ata soki mwana yango azali moto ya kokoka! Kobɔkɔla bana na mokili ya lelo oyo etondi na mabe ekoki kosala ete moto ‘atambola motó,’ kasi, batata mpe bamama bakoki kobɔndisama na koyeba ete Biblia elobeli mikakatano oyo bakutanaka na yango.

Likambo ya esengo, Yesu atikalaki kaka na tempelo, esika oyo azalaki komiyoka ete azali penepene ya Yehova, Tata na ye ya likoló, mpe azalaki kokɔtisa na motema na ye makambo nyonso oyo azalaki koyekola. Yango wana, ayanolaki baboti na ye boye: “Mpo na nini bóluka ngai? Boyebaki te ete nasengeli kozala na ndako ya Tata na ngai?”​—Luka 2:49.

Na ntembe te, Yozefe azalaki kokanisa maloba wana mbala na mbala. Mbala mosusu maloba yango epesaki ye mwa lokumu. Kutu, asalaki mosala makasi mpo na koteya mwana yango atalelaka Yehova Nzambe ndenge wana. Ntango Yesu azalaki naino elenge, ayebaki malamu soki liloba “Tata” elimboli nini, mingimingi mpo alekisaki ntango mingi elongo na Yozefe.

Soki ozali tata, oyebaka mokumba oyo ozali na yango ya kosalisa bana na yo báyeba soki tata oyo alingaka bana na ye mpe abatelaka bango asengeli kozala ndenge nini? Ndenge moko mpe, soki ozali kobɔkɔla mwana ya molongani na yo to mwana moko oyo ozwá, kanisá ndakisa ya Yozefe mpe salelá mwana mokomoko makambo na ndenge ekomonisa ete azali na valɛrɛ na miso na yo. Salisá bango bápusana penepene ya Yehova Nzambe, Tata na bango ya likoló.

Yozefe alɛmbaki libota na ye te

Biblia elobeli kaka makambo moke mpo na bomoi ya Yozefe, kasi ebongi mpenza tótalela yango malamumalamu. Tozali kotánga ete Yesu “azalaki kaka komikitisa liboso na bango,” elingi koloba baboti na ye. Tozali mpe kotánga ete “Yesu akobaki kokola na bwanya mpe na nzoto mpe bato ná Nzambe bazalaki kondima ye.” (Luka 2:51, 52) Maloba wana emonisi nini na ntina na Yozefe? Emonisi makambo mingi. Eteyi biso ete Yozefe azalaki kotambwisa libota na ye malamu, yango wana mwana na ye oyo azalaki moto ya kokoka azalaki kotosa bokonzi ya tata na ye mpe akobaki komikitisa liboso na ye.

Eteyi mpe biso ete Yesu akobaki kokola na bwanya. Na ntembe te, Yozefe azalaki na makambo mingi ya kosala mpo mwana na ye akóma ndenge wana. Na ntango wana, Bayuda bazalaki na lisese moko oyo bazalaki kosalela banda kala. Lisese yango ezalaki koloba ete kaka mibali oyo bazali na bozwi nde bakokaki kokóma na bwanya mpenza, kasi, bato ya misala ya mabɔkɔ, na ndakisa basali-mabaya, baloni-bilanga, mpe basali misala ya ebende “bakoki te kolobela bosembo mpe lisambisi; mpe basengeli kozala te esika oyo bato bazali koloba makambo na masese.” Na nsima, Yesu amonisaki ete lisese yango ezali mpamba. Ntango azalaki naino mwana, mbala mingi azalaki koyoka ndenge tata-mobɔkɔli na ye, mosali mpamba ya mabaya, azalaki koteya malamu “bosembo mpe lisambisi” ya Yehova! Kozanga ntembe, asalaki yango na mabaku mingi.

Ndenge oyo Yesu akolaki ekoki mpe kosalisa biso tómona ete Yozefe asalaki mosala makasi. Yesu akolaki na nzoto makasi mpe kolɔngɔnɔ mpamba te babatelaki ye malamu. Lisusu, Yozefe alakisaki mwana na ye mosala mpo ayeba yango malamu. Yesu ayebanaki kaka te lokola mwana ya mosali-mabaya, kasi mpe lokola “mosali ya mabaya.” (Marko 6:3) Na yango, formasyo oyo Yozefe apesaki Yesu ebotaki mbuma. Na bwanya mpenza, batata ya mabota balandaka ndakisa ya Yozefe, basalaka nyonso mpo na bolamu ya bana na bango mpe balingaka ete ata soki bazali te, bana na bango bákoka komisalisa bango moko.

Soki totángi esika oyo Biblia elobeli batisimo ya Yesu ntango akokisaki mbula 30, tokomona ete na lisolo yango, Yozefe alobelami te. Emonani lokola ete Maria akómaki mwasi oyo mobali na ye akufá ntango Yesu abandaki mosala na ye. (Talá etanda “Yozefe akufaki ntango nini?” na lokasa 27.) Atako bongo, Yozefe atikaki ndakisa malamu ya tata oyo abatelaki bato ya libota na ye, akokisaki bamposa na bango mpe alɛmbaki bango te tii na nsuka. Tata nyonso, mokonzi nyonso ya libota, to mokristo mosusu nyonso akosala malamu soki amekoli kondima oyo Yozefe azalaki na yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 7 Na ntango wana, bazalaki kotelala bafianse ndenge moko na bato oyo babalani.

^ par. 8 Talá lisolo “Mekolá kondima na bango​—Azalaki ‘kokanisakanisa mingi na motema na ye’”, na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 2008.

^ par. 14 Biblia emonisi polele ete Yesu asalaki likamwisi ya liboso nsima ya kozwa batisimo. (Yoane 2:1-11) Mpo na koyeba makambo mosusu etali masolo ya baevanzile oyo ekomamaki na ya elimo ya Nzambe te, talá lisolo “Baevanzile oyo ekomamaki na elimo ya Nzambe te​—elobaka nde makambo ya solo oyo ebombamá mpo na Yesu?” na lokasa 18.

[Etanda na lokasa 27]

Yozefe akufaki ntango nini?

Toyebi ete Yozefe azalaki naino na bomoi ntango Yesu azalaki na mbula 12. Na mbula wana, bana mingi ya Bayuda bazalaki kobanda koyekola misala ya batata na bango mpe na mbula 15, babandaki koyeba mosala yango. Emonani ete Yozefe aumelaki na bomoi mwa ntango molai, mpe alakisaki Yesu mosala ya mabaya. Yozefe azalaki kaka na bomoi ntango Yesu abandaki mosala na ye awa na mabele, ntango akómaki na mbula 30? Emonani ete ekoki kozala bongo te. Biblia emonisi ete na ntango wana, mama ya Yesu, bandeko na ye ya basi mpe ya mibali bazalaki naino na bomoi, kasi Yozefe te. Kutu, mokolo moko, bato babengaki Yesu “mwana ya Maria,” kasi te mwana ya Yozefe. (Marko 6:3) Biblia elobeli Maria lokola mwasi oyo azalaki kosala makambo mpe kozwa bikateli ye moko, kozanga ete atuna mobali. (Yoane 2:1-5) Na ntango ya kala, likambo ya ndenge wana ekokaki kosalema te, longola kaka soki azalaki mwasi oyo mobali na ye akufá. Nsukansuka, liboso Yesu akufa, apesaki ntoma Yoane mokumba ya kobatela mama na ye. (Yoane 19:26, 27) Yango elingaki kozala na ntina te soki Yozefe azalaki kaka na bomoi. Na yango, emonani ete Yozefe akufaki ntango Yesu azalaki naino elenge. Na ntembe te, lokola Yesu azalaki mokóló ya bana nyonso, ye nde akómaki kosala mosala ya mabaya mpe kosunga libota na bango tii ntango azwaki batisimo.

[Elilingi na lokasa 24]

Yozefe asalaki nyonso mpe amipimelaki makambo mosusu mpo na kobatela mwana na ye

[Elilingi na lokasa 25]

Yozefe asalaki mosala makasi mpo na kokokisa bamposa ya libota na ye

[Elilingi na lokasa 26]

Yozefe azalaki komema libota na ye mbala na mbala na losambo na tempelo ya Yerusaleme

[Elilingi na lokasa 28]

Yozefe alakisaki mwana na ye mosala ya mabaya