Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi . . .

Nani atindaki “monzoto”?

Nani atindaki “monzoto”?

▪ Osilá komona bililingi ya mbotama ya Yesu to masano oyo balakisaka bakonzi misato to bato ya bwanya, oyo bakendaki kotala Yesu ntango balalisaki ye na elyelo ya bibwele? Bato ya istware balobaka ete Nzambe asalelaki monzoto mpo na kokamba bango tii na ndako ya bibwele, na Beteleme. Kutu, bana mingi bakangá na moto bankombo ya bakonzi yango misato: Melchior, Gaspard mpe Balthazar. Kasi, lisolo yango oyo eyebani mingi, eyokani mpenza na oyo Biblia eteyaka? Te. Lisolo yango ezali solo te, mpo na bantina mingi.

Ya liboso, bato yango bazalaki banani? Na Biblia, liloba ya Grɛki oyo basaleli mpo na kolobela bango elimbolaka bakonzi te, bato ya bwanya mpe te. Bazalaki nde banganga-minzoto. Emonani lokola ete bazalaki bato oyo batalaka minzoto mpo na kosakola makambo oyo ebombamá, momeseno oyo ezalaki ya bapakano. Biblia eyebisi bankombo ya bato yango te, elobi mpe te soki bazalaki bato boni.

Ya mibale, ntango nini bato yango bakendaki kotala Yesu? Ezalaki te ntango azalaki bebe na elyelo ya bibwele. Ndenge nini toyebi yango? Matai, moko ya bakomi ya baevanzile, alobi boye: “Ntango bakɔtaki na ndako bamonaki mwana yango ya moke ná Maria mama na ye.” (Matai 2:11) Simbá ete Yesu azalaki lisusu bebe te, kasi ‘mwana ya moke.’ Maria ná Yozefe bazalaki lisusu te kolala na ndako ya bibwele; bakómaki sikoyo kofanda na ndako.

Ya misato, nani atindaki “monzoto” mpo ekamba banganga-minzoto wana? Mbala mingi, bakonzi ya mangomba bateyaka ete Nzambe nde atindaki “monzoto” yango. Ezali mpenza solo? Yebá ete “monzoto” yango ekambaki banganga-minzoto mbala moko na Beteleme te. Ekambaki bango naino epai ya Mokonzi Erode, na Yerusaleme. Bayebisaki mokonzi wana ya zuwa, oyo azalaki koboma bato kozanga mawa, ete Yesu asilaki kobotama; bayebisaki ye kutu makambo oyo etindaki ye ayina mwana yango, oyo asengelaki kokóma “mokonzi ya Bayuda.” (Matai 2:2) Na mayele mabe, Erode ayebisaki bango ete ntango bakozonga, báya koyebisa ye esika oyo mwana yango azali, mpo ye mpe akende kokumisa ye. Na nsima, “monzoto” yango ekambaki banganga-minzoto wana epai ya Maria ná Yozefe. Na yango, likambo oyo banganga-minzoto balingaki kosala ekokaki komema liwa ya mwana wana ya moke, soki Nzambe akebisaka bango te. Likambo ya esengo, Nzambe akebisaki bango. Erode asilikaki makasi ndenge banganga-minzoto bazongaki epai na ye te mpo na kopesa ye nsango; yango wana apesaki mitindo ete báboma bana nyonso ya mibali, kobanda mbula mibale tii na nse, ezala na kati ya Beteleme to zingazinga na yango.​—Matai 2:16.

Nsima ya bambula, Yehova alobaki boye mpo na Yesu: “Oyo azali Mwana na ngai ya bolingo, oyo nandimi.” (Matai 3:17) Kanisá naino: Tata wana ya bolingo mpe ya sembo akokaki nde kopona banganga-minzoto wana bapakano, bato ya misala ya maji oyo Mibeko na ye epekisi, mpo bázala balobeli na ye? (Kolimbola Mibeko 18:10) Alingaki nde kotinda monzoto ekamba bango epai ya Erode, moto oyo alekaki mabe mpe azalaki koboma bato na ekólo mobimba, mpo na komemela ye nsango oyo ekotinda ye ayina mwana yango? Nzambe alingaki nde kosalela kaka monzoto wana mpe banganga-minzoto mpo na koyebisa esika oyo mwana na ye azalaki?

Tózwa ndakisa: Komanda moko ya basoda atindi soda na ye moko akokisa mokumba moko ya mpasi na teritware ya banguna. Komanda yango akoki nde koyebisa monguna esika oyo bakoki komona soda wana? Soki moke te! Ndenge moko mpe, Yehova atindaki Mwana na ye na mokili oyo ya mabe. Akokaki nde koyebisa Erode, mokonzi moko ya mabe, esika oyo Mwana na ye oyo azalaki na likoki ya komibatela te azalaki? Ata moke te!

Kasi, nani atindaki “monzoto” to eloko moko lokola monzoto? Nani azalaki mpenza kolinga ete Yesu abomama ntango azalaki naino mwana moke, mpo akokisa te mokumba na ye awa na mabele? Nani alukaka kobungisa bato nzela, kotinda bato bábuka lokuta, básala mobulu mpe báboma bato? Yesu ye moko amonisaki ete Satana Zabolo nde azali “moto ya lokuta mpe tata ya lokuta,” oyo azalaki “mobomi-bato ntango abandaki.”​—Yoane 8:44.