Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

‘Mwana asepeli komonisa Tata’

‘Mwana asepeli komonisa Tata’

‘Mwana asepeli komonisa Tata’

“Moto moko te ayebi Tata longola kaka Mwana ná moto oyo Mwana asepeli komonisa ye Tata.”​—LUKA 10:22.

OKOPESA EYANO NINI?

Mpo na nini Yesu nde abongaki mpenza komonisa Tata?

Ndenge nini Yesu amonisaki Tata epai ya basusu?

Na makambo nini okoki komekola Yesu mpe komonisa Tata?

1, 2. Motuna nini bato mingi bamitunaka, mpe mpo na nini?

 ‘NZAMBE azali nani?’ Bato mingi bamitunaka motuna yango. Na ndakisa, atako bato mingi oyo bamibengaka bakristo bandimaka ete Nzambe azali Bosato, mingi kati na bango balobaka ete bakokaka kokanga ntina ya liteya yango te. Mokomi moko oyo azali mpe mokonzi ya lingomba alobaki boye: “Ndimbola ya liteya yango eleki mayele ya moto. Ezali likoló mpenza ya makanisi ya moto.” Longola yango, bato mingi ya siansi balobaka ete Nzambe azali te mpe ete biloko ya kokamwa oyo ezali na mokili ebimá kaka yango moko. Charles Darwin alobaki te ete Nzambe azali te; kasi alobaki ete likanisi eleki malamu oyo tosengeli kondima ezali ete likambo yango eleki makambo oyo ekoki kolimbolama na mayele ya moto.

2 Bato mingi, bázala bandimi to te, bamitunaka soki Nzambe azali mpe soki azali ndenge nini. Kasi, mingi kati na bango, lokola bazwaka biyano ya malamu te, batikaka koluka. Ya solo mpenza, Satana “azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima.” (2 Ko. 4:4) Tokoki kokamwa te ete bato mingi bazali na mobulu na motó mpe bayebi solo te na ntina etali Tata, Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba!​—Yis. 45:18.

3. (a) Nani amonisi biso Mozalisi? (b) Mituna nini tokotalela?

3 Nzokande, ezali na ntina mingi bato báyeba solo na ntina etali Nzambe. Mpo na nini? Mpamba te kaka baoyo bakobelela “nkombo ya Yehova” nde bakobika. (Rom. 10:13) Mpo na kobelela nkombo ya Yehova tosengeli koyeba soki azali nani mpe azali ndenge nini. Yesu ateyaki bayekoli na ye makambo yango ya ntina mingi. Amonisaki bango Tata. (Tángá Luka 10:22.) Mpo na nini Yesu amonisaki Tata koleka moto mosusu nyonso? Ndenge nini Yesu asalaki yango? Mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu na oyo etali komonisa bato Tata? Tótalela mituna yango.

YESU KRISTO NDE ABONGAKI MPENZA KOMONISA TATA

4, 5. Mpo na nini Yesu nde abongaki mpenza komonisa Tata na ye?

4 Yesu nde abongaki mpenza komonisa Tata na ye. Mpo na nini? Mpamba te liboso Nzambe akela biloko mosusu nyonso, ekelamu ya elimo oyo na nsima abotamaki lokola moto mpe abengamaki Yesu azalaki na likoló mpe azalaki ‘Mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki.’ (Yoa. 1:14; 3:18) Na ntango oyo bikelamu mosusu nyonso esalemaki naino te, Tata azalaki kotyela Mwana likebi na ye nyonso mpe Mwana azalaki koyekola makambo mpe bizaleli ya Tata. Na ntembe te, Tata ná Mwana bazalaki kosolola mingi mpe bakómaki kolingana makasi lokola balekisaki ntango molai mpenza elongo. (Yoa. 5:20; 14:31) Mwana ayekolaki makambo ebele mpenza na oyo etali bomoto ya Tata na ye!​—Tángá Bakolose 1:15-17.

5 Mwana abengami “Liloba ya Nzambe,” elingi koloba ete Tata atyaki ye molobeli na Ye. (Em. 19:13) Na yango, Yesu nde abongaki mpenza komonisa Tata epai ya basusu. Yango wana, Yoane alobi na mokanda na ye ete Yesu to “Liloba,” azali “na ntolo ya Tata.” (Yoa. 1:1, 18) Ntango Yoane asalelaki maloba yango, azalaki kokanisa momeseno moko oyo bato ya ntango na ye bazalaki na yango ntango bazali kolya. Moto mokomoko azalaki pene mpenza ya moninga oyo bazali na ye kiti moko. Bato mibale oyo bafandi pene ndenge wana bakokaki kosolola malamu. Boye, lokola Mwana azalaki “na ntolo ya Tata,” bango mibale bazalaki kosolola mingi.

6, 7. Ndenge nini boyokani ya Tata ná Mwana ezalaki se kokóma makasi?

6 Boyokani ya Tata ná Mwana ezalaki se kokóma makasi. Mwana ‘azalaki moto oyo Nzambe azalaki kolinga mingi mpenza’ mokolo na mokolo. (Tángá Masese 8:22, 23, 30, 31.) Yango wana boyokani na bango mibale ekolaki lisusu wana bazalaki kosala elongo mpe Mwana azalaki komekola bizaleli ya Tata na ye. Ntango Nzambe azalisaki bikelamu mosusu, Mwana amonaki ndenge oyo Yehova azalaki kosalela mokomoko makambo, mpe na ntembe te, akómaki kolinga mpe komemya Tata na ye mingi koleka.

7 Ata ntembe oyo Satana abimisaki mpo na lotomo ya Yehova ya koyangela epesaki Mwana libaku ya koyekola ndenge oyo Yehova akomonisa bolingo, bosembo, bwanya mpe nguya na mokakatano oyo akutanaki na yango. Na ntembe te, yango esalisaki Yesu ayeba kolonga mikakatano oyo ye moko akutanaki na yango na nsima na mosala na ye awa na mabele.​—Yoa. 5:19.

8. Ndenge nini masolo ya Baevanzile ezali kosalisa biso tóyeba malamu bizaleli ya Tata?

8 Lokola Mwana azalaki na boyokani makasi na Tata, amonisaki Tata na ndenge oyo moto mosusu akoki kosala yango te. Na yango, tokoki koyeba malamu Tata soki totaleli mateya mpe misala ya Mwana na ye se moko oyo abotamaki. Na ndakisa, tokoyeba mpenza te ndimbola ya liloba “bolingo” soki totángi yango kaka na mokanda. Kasi, soki tokanisi masolo oyo elobeli bomoi ya Yesu mpe ndenge oyo azalaki kosalela basusu makambo, tokokanga ntina malamu ya maloba oyo ete “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoa. 4:8, 16) Ezali mpe bongo mpo na bizaleli mosusu ya Nzambe oyo Yesu amonisaki epai ya bayekoli na ye ntango azalaki awa na mabele.

NDENGE OYO YESU AMONISAKI TATA NA YE

9. (a) Wapi ndenge mibale oyo Yesu amonisaki Tata na ye? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge oyo Yesu amonisaki Tata na mateya na ye.

9 Ndenge nini Yesu amonisaki Tata epai ya bayekoli na ye ya liboso mpe na nzela na bango, epai ya bato oyo bakómaki bayekoli na ye nsima? Asalaki yango na ndenge mibale: na mateya na ye mpe na misala na ye. Tótalela naino mateya ya Yesu. Makambo oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye emonisaki ete ayebaki malamu makanisi, mayoki, mpe banzela ya Tata na ye. Na ndakisa, Yesu alobaki ete Tata na ye azali lokola moto oyo azali na etonga ya bibwɛlɛ, oyo abimi mpo na koluka mpate moko oyo ebungi. Yesu alobaki ete ntango moto yango amonaki mpate oyo ebungaki, ‘asepelaki na yango mingi koleka ntuku libwa na libwa (99) oyo ebungaki te.’ Likanisi nini amonisaki na ndakisa yango? Yesu alobaki boye: “Ndenge moko mpe Tata na ngai oyo azali na likoló alingaka te ete moko ya bato mike oyo abeba.” (Mat. 18:12-14) Ndakisa yango ekoki koteya yo nini mpo na Yehova? Ntango mosusu omonaka ete ozali na ntina te mpe ete moto moko te akanisaka yo; kasi yebá ete Tata na yo ya likoló atyelaka yo likebi mpe amibanzabanzaka mpo na yo. Na miso na ye, ozali moko ya “bato mike oyo.”

10. Ndenge nini Yesu amonisaki Tata na misala na ye?

10 Ndenge ya mibale oyo Yesu amonisaki Tata epai ya bayekoli na ye ezalaki na misala na ye. Yango wana, ntango ntoma Filipe alobaki na Yesu ete: “Lakisá biso Tata,” Yesu alobaki ete: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoa. 14:8, 9) Tótalela mwa bandakisa ya lolenge oyo Yesu amonisaki bizaleli ya Tata na ye. Ntango moto moko ya maba asɛngaki Yesu abikisa ye, Yesu asimbaki mobali yango oyo “atondá na maba” mpe alobaki na ye ete: “Nalingi. Kómá pɛto.” Na ntembe te ntango moto yango abikaki, amonaki nguya ya Yehova na likamwisi oyo Yesu asalaki. (Luka 5:12, 13) Longola yango, ntango Lazare akufaki, na ntembe te bayekoli ya Yesu bamonaki mpenza motema mawa ya Tata ntango Yesu “atungisamaki makasi na elimo mpe abulunganaki” mpe “alelaki, abimisi mpisoli.” Atako Yesu ayebaki ete akosekwisa Lazare, ayokaki mpe mpasi oyo bandeko mpe baninga ya Lazare bazalaki na yango. (Yoa. 11:32-35, 40-43) Na ntembe te, ezali na masolo mosusu oyo olingaka mingi, oyo emonisaka yo motema mawa ya Tata na misala ya Yesu.

11. (a) Ntango Yesu abenganaki bato na tempelo, amonisaki nini mpo na Tata na ye? (b) Mpo na nini lisolo yango ezali kolendisa biso?

11 Kasi, lisolo oyo elobeli ndenge Yesu abenganaki bato na tempelo ezali komonisa yo nini mpo na Yehova? Kanisá naino: Yesu asalaki fimbo ya bansinga, mpe abenganaki bato oyo bazalaki kotɛka bangɔmbɛ ná bampate. Apanzaki mbongo ya bibende ya bato oyo basenzaka mbongo mpe abalolaki bamesa na bango. (Yoa. 2:13-17) Likambo wana etindaki bayekoli bákanisa esakweli ya Mokonzi Davidi oyo elobi ete: “Molende mpo na ndako na yo elei ngai.” (Nz. 69:9) Lokola Yesu abenganaki bato na tempelo, amonisaki ete azalaki na mposa makasi ya kobatela losambo ya pɛto. Lisolo yango ezali komonisa yo nini mpo na Tata? Ezali komonisa biso ete Nzambe azali na nguya ya kolongola mabe nyonso na mokili, kasi azali mpe na mposa makasi ya kosala yango. Lisolo wana oyo elobeli likambo oyo Yesu asalaki ntango amonaki likambo ya mabe emonisi ndenge oyo Tata ayokaka ntango amonaka mabe oyo etondi lelo na mokili. Likanisi yango ekoki kolendisa biso ntango bazali kosalela biso makambo ya kozanga bosembo!

12, 13. Ndenge oyo Yesu azalaki kofanda na bayekoli na ye ezali koteya biso nini mpo na Yehova?

12 Tótalela ndakisa mosusu: ndenge oyo Yesu azalaki kofanda na bayekoli na ye. Bayekoli bazalaki mbala na mbala kotyana ntembe mpo na koyeba nani aleki baninga. (Mrk. 9:33-35; 10:43; Luka 9:46) Lokola Yesu azalaki ntango molai elongo na Tata na ye, ayebaki ndenge oyo Yehova atalelaka makanisi ya lolendo ndenge wana. (2 Sa. 22:28; Nz. 138:6) Longola yango, Yesu amonaki ezaleli yango epai ya Satana Zabolo, moto ya moimi. Satana azalaki na mposa makasi ya bokonzi mpe lokumu. Yango wana, Yesu azalaki koyoka mpasi na motema na komona ete bayekoli oyo ateyaki bazali kotika ezaleli yango te! Ata bato oyo aponaki bázala bantoma na ye bamonisaki ezaleli yango! Bamonisaki ete bazalaki na mposa ya lokumu tii na mokolo ya nsuka liboso Yesu akufa. (Luka 22:24-27) Atako bongo, Yesu akobaki kosalisa bango na boboto nyonso, azalaki kaka na elikya ete nsukansuka bakolanda ndakisa na ye mpe bakolona komikitisa.​—Flp. 2:5-8.

13 Omoni ndenge Yesu amekolaki motema molai ya Tata? Alɛmbaki te kosalisa bayekoli na ye bálongola makanisi ya mabe! Maloba mpe misala ya Yesu ezali komonisa yo bomoto ya Tata, oyo aboyaka basaleli na ye te atako basalaka mabunga mbala na mbala? Koyeba ete Nzambe azali na bizaleli wana ezali kolendisa biso tópusana penepene na ye mpo na kosɛnga ye bolimbisi ntango tosali mabunga!

MWANA ASEPELAKI KOMONISA TATA NA YE

14. Ndenge nini Yesu amonisaki ete asepelaki komonisa Tata?

14 Bakonzi mingi ya makambo makasi balingaka ete bana-mboka bázala na bonsomi te mpe báyeba te makambo mosusu oyo ezali kosalema. Nzokande, Yesu azalaki kosepela koyebisa basusu makambo oyo basengelaki koyeba na ntina etali Tata. (Tángá Matai 11:27.) Longola yango, Yesu apesaki bayekoli na ye “mayele mpo [báyeba] moto ya solosolo,” Yehova Nzambe. (1 Yoa. 5:20) Maloba yango elimboli nini? Yesu afungolaki bayekoli na ye makanisi mpo bákanga ntina ya mateya na ye na ntina etali Tata. Abombelaki bango Tata na ye te; alukaki te koteya bango makambo oyo bakokaki kokanga ntina te, na ndakisa koloba na bango ete Nzambe azali Bosato.

15. Mpo na nini Yesu ayebisaki bayekoli na ye te makambo mosusu oyo etali Tata?

15 Yesu amonisaki nde makambo nyonso oyo ayebaki na ntina etali Tata na ye? Te, asalelaki bwanya mpe aboyaki koyebisa bango makambo mosusu mingi oyo ayebaki. (Tángá Yoane 16:12.) Mpo na nini? Mpamba te na ntango wana, bayekoli na ye ‘bakokaki komema’ boyebi wana nyonso te. Kasi, ndenge Yesu alobaki yango, bakoyeba makambo mosusu mingi ntango “mosungi,” elingi koloba elimo santu, akoya mpe akotambwisa bango “na solo nyonso.” (Yoa. 16:7, 13) Kaka ndenge baboti ya mayele baboyaka koyebisa bana na bango makambo mosusu tii ntango bana bakokóma na mbula oyo bakoki kokanga ntina na yango, Yesu azelaki ete bayekoli na ye bákɔmɛla mpe bákóma na makoki ya kokanga makambo mosusu na ntina etali Tata. Na boboto nyonso, Yesu atalelaki makoki na bango.

LANDÁ NDAKISA YA YESU MPE SALISÁ BASUSU BÁYEBA YEHOVA

16, 17. Mpo na nini okoki komonisa Tata epai ya basusu?

16 Soki oyebi moto moko malamu mpe ozali kosepela na bizaleli na ye, oyokaka mposa ya kolobela ye epai ya basusu, boye te? Ntango Yesu azalaki awa na mabele, alobaki makambo oyo etali Tata na ye. (Yoa. 17:25, 26) Biso mpe tokoki kolanda ndakisa na ye na oyo etali komonisa Yehova epai ya basusu?

17 Ndenge tomoni yango, Yesu ayebaki mpenza Tata koleka moto mosusu nyonso. Kasi, azalaki kosepela koyebisa bato makambo mosusu oyo ayebaki; kutu, apesaki bayekoli na ye mayele ya kokanga ntina ya makambo mozindo oyo etali bizaleli ya Nzambe. Yesu asalisi biso tóyeba Tata na biso na ndenge oyo bato mingi bayebi te lelo oyo. Tozali mpenza na botɔndi ndenge Yesu asepelaki komonisa biso Tata na mateya mpe misala na ye! Kutu, tokoki mpenza komikumisa mpo toyebi Tata. (Yir. 9:24; 1 Ko. 1:31) Lokola tosali makasi tópusana penepene na Yehova, ye mpe apusani penepene na biso. (Yak. 4:8) Na yango, tokoki sikoyo koyebisa bato mosusu makambo oyo toyebi mpo na Yehova. Ndenge nini tokoki kosala yango?

18, 19. Okoki komonisa Tata epai ya basusu na makambo nini? Limbolá.

18 Tosengeli kolanda ndakisa ya Yesu mpe komonisa Tata na maloba mpe misala na biso. Tóbosana te ete bato mingi oyo tokutanaka na bango na mosala ya kosakola bayebi Nzambe te. Ekoki kozala ete mateya ya lokuta oyo bayoká etindaka bango bátalela Nzambe na ndenge oyo azali te. Tokoki koteya bango nkombo ya Nzambe, mokano na ye mpo na bato, mpe bizaleli na ye, ndenge Biblia emonisi yango. Longola yango, ntango totángi lisolo ya Biblia oyo esalisi biso tómona lolenge mosusu oyo Nzambe amonisi ezaleli moko boye, tokoki kolobela yango ná bandeko na biso bakristo. Na ndenge yango, bango mpe bakolendisama.

19 Ndenge nini okoki kolanda ndakisa ya Yesu na oyo etali komonisa Tata na misala? Ntango bato bazali komona bolingo ya Kristo na misala na biso, bakoki koluka kopusana penepene na Tata mpe na Yesu. (Ef. 5:1, 2) Ntoma Paulo alendisaki biso ‘tókóma bamekoli na ye, ndenge ye mpe azali momekoli ya Kristo.’ (1 Ko. 11:1) Tozali mpenza na libaku malamu ya kosalisa bato bámona Yehova na misala na biso! Tiká ete na ndakisa ya Yesu, tókoba komonisaka Tata epai ya basusu.

[Mituna ya boyekoli]