Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Libala oyo ezali na mikakatano ekoki kobonga

Libala oyo ezali na mikakatano ekoki kobonga

Libala oyo ezali na mikakatano ekoki kobonga

“Na bato oyo babalá, nazali kopesa malako oyo, ezali mpenza ngai te kasi Nkolo.”​—1 KO. 7:10.

OKOKI KOLIMBOLA?

Na ndenge nini Nzambe akangisi esika moko bato oyo babalani?

Ndenge nini bankulutu bakoki kosalisa bakristo oyo bazali na mikakatano na libala?

Ndenge nini tosengeli kotalela libala?

1. Bakristo basengeli kotalela libala ndenge nini, mpe mpo na nini?

 NTANGO bakristo babalani, basalaka elako na miso ya Nzambe; yango wana, bazwaka likambo yango na lisɛki te. (Mos. 5:4-6) Yehova “akangisi esika moko” bato oyo babalani, elingi koloba ete ye nde azali Mobandisi ya libala. (Mrk. 10:9) Na miso ya Nzambe, mobali oyo abali, akangani ná mwasi na ye, ata soki mibeko ya mboka na bango ekeseni na mibeko ya Biblia. Basaleli ya Yehova basengeli kobosana te ete basengeli kobuka te ndai oyo balapaki, ata soki bazalaki naino Batatoli te ntango babalanaki.

2. Tokotalela mituna nini na lisolo oyo?

2 Mobali to mwasi oyo azali na libala ya malamu akoki kozala na esengo mingi. Kasi esengeli kosala nini soki libala ekómi na mikakatano? Libala oyo ezali na matata ekoki kobonga? Lisalisi nini ezali mpo na baoyo libala na bango ezali na mikakatano?

EKOZALA LIBALA YA ESENGO TO YA MOTÓ MPASI?

3, 4. Nini ekoki kokómela moto oyo akanisi malamu te liboso ya kopona moto oyo akobalana na ye?

3 Ntango mokristo azali na libala ya malamu, ezalaka likambo ya esengo mpe epesaka Yehova lokumu. Kasi, soki libala ezali na matata, epesaka motó mpasi. Mokristo oyo azali monzemba akobanda libala na ye malamu soki azali kolanda toli ya Nzambe. Nzokande, soki moto akanisi malamu te liboso ya kopona moto oyo akobalana na ye, yango ekoki komemela ye mpasi mpe mawa. Na ndakisa, bilenge mosusu balinganaka na ntango oyo bamibongisi naino te mpo na mikumba ya libala. Basusu balukaka molongani na Internet mpe bawelaka kobala, kasi na nsima bamonaka ete libala na bango ezali na esengo ata moke te. Bamosusu bakweaka na pite ntango bazali naino bafianse, mpe nsima ya kobalana, moko te azalaka lisusu na limemya mpo na moninga.

4 Bakristo mosusu oyo balandaka te toli ya kobalana “na kati ya Nkolo kaka” bakutanaka na mikakatano ya kofanda na molongani oyo azali Motatoli te. (1 Ko. 7:39) Soki ezali bongo mpo na yo, bondelá Yehova mpo na kosɛnga ye bolimbisi mpe lisalisi. Yehova alongolaka te mbuma mabe oyo moto azali kobuka mpo na mabunga oyo asalá, kasi asalisaka bato oyo babongoli motema mpo báyikela mikakatano na bango mpiko. (Nz. 130:1-4) Salá nyonso oyo okoki mpo na kosepelisa ye sikoyo mpe mpo na libela, mpe ‘esengo ya Yehova ekozala esika makasi ya libateli na yo.’​—Neh. 8:10.

NTANGO LIBALA EKÓMI NA MIKAKATANO

5. Ntango libala ekómi na mikakatano, esengeli koboya makanisi ya ndenge nini?

5 Moto oyo azali na esengo te na libala na ye akoki kobanda kokanisa boye: ‘Ezali mpenza na ntina nasala milende mpo libala na ngai ebonga? Mbala mosusu nakozala na esengo kaka soki nabalani na moto mosusu!’ Akoki kokóma na makanisi ya kotika molongani na ye mpe koloba ete: ‘Nalongwa naino na bolɔkɔ oyo! Naboma kaka libala yango! Ata soki nakoki te koboma libala mpo na ntina oyo Biblia endimi, nakoki ata kokabwana na ye mpo natikala kimya!’ Na esika mokristo akóma na makanisi ya ndenge wana to alɔtaka bomoi mosusu oyo akoki kokóma na yango, ebongi nde aluka litambwisi ya Nzambe mpe alanda yango mpo na kosilisa mikakatano oyo azali na yango na libala.

6. Maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 19:9 elimboli nini?

6 Soki mokristo abomi libala mpo na ntina oyo Biblia endimi, akoki kobalana na moto mosusu; kasi soki ezali mpo na ntina oyo Biblia endimi te, akoki kobalana na moto mosusu te. Yesu alobaki boye: “Moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, soki mpo na pite te, mpe abali mosusu azali kosala ekobo.” (Mat. 19:9) Na vɛrsɛ yango, liloba “pite” esangisi ekobo mpe masumu mosusu ya minene oyo etali kosangisa nzoto. Ezali na ntina mingi mokristo asɛnga litambwisi ya Nzambe soki akómi na makanisi ya koboma libala na ntango oyo molongani moko te asali ekobo.

7. Bato mosusu bakoki kokanisa nini soki libala ya bakristo elongi te?

7 Ntango libala elongi te, ekoki kozala elembo ete moto azali na boyokani makasi te na Nzambe. Ntoma Paulo atunaki motuna oyo: “Soki moto ayebi kokamba ndako na ye moko te, ndenge nini akobatela lisangá ya Nzambe?” (1 Tim. 3:5) Kutu, ntango libala ya bato mibale oyo bazali komibenga bakristo elongi te, bato mosusu bakoki kokanisa ete mwasi ná mobali yango basalelaka mpenza te makambo oyo bateyaka.​—Rom. 2:21-24.

8. Mokakatano ezalaka nini soki bakristo bakómi na makanisi ya kokabwana to koboma libala?

8 Soki bakristo bakómi na makanisi ya kokabwana to koboma libala mpo na ntina oyo Biblia endimi te, na ntembe te boyokani na bango ná Yehova ezali lisusu malamu te. Ekoki kozala ete molongani moko to bango mibale bazali kolanda mitinda ya Biblia te. Soki bazalaki mpenza ‘kotyela Yehova motema na bango mobimba,’ bakokaki kokanisa te ete libala na bango ekoki kobonga te.​—Tángá Masese 3:5, 6.

9. Mbano nini bakristo mosusu bazwaki mpo na motema molai oyo bamonisaki na libala na bango?

9 Mabala mingi ebongaki, atako ezalaki komonana liboso ete ekosuka kaka na kokufa. Bakristo mingi bazwaka mbano ya malamu soki baweli te kokabwana to koboma libala ntango bakutani na mikakatano. Tótalela likambo oyo ekoki kokóma na libota oyo molongani moko azali Motatoli te. Ntoma Petro akomaki boye: “Bino basi, bómikitisaka liboso ya mibali na bino moko, mpo, soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama na maloba te kasi na etamboli ya basi na bango, mpo bamoni na miso na bango moko etamboli na bino ya pɛto ná limemya na bino makasi.” (1 Pe. 3:1, 2) Etamboli malamu ya mosaleli ya Yehova ekoki kotinda molongani na ye oyo azali Motatoli te andima losambo ya solo! Libala oyo ebikisami ndenge wana ekumisaka Nzambe mpe ekoki komemela libota mobimba mapamboli mingi.

10, 11. Mikakatano nini oyo moto akanisaki te ekoki kobima na libala, kasi mokristo akoki kozala na elikya nini?

10 Bakristo mingi oyo balingi kobala baponaka molongani oyo azali Motatoli ya Yehova mpo balingaka kosepelisa Yehova. Atako bongo, mikakatano mosusu oyo bakanisaki te ekoki koya na nsima. Na ndakisa, na mwa mabala mosusu, molongani moko akoki kokóma susisusi to nkandankanda. To mpe nsima ya libala, molongani atiki kosakola. Tópesa ndakisa: Linda, a oyo azali mosakoli ya molende mpe mama ya boboto, asilaki mayele ntango mobali na ye akómaki na etamboli ya mabe mpe nsukansuka abimisamaki na lisangá. Mokristo asengeli kosala nini soki molongani na ye akómi na makambo ya ndenge wana?

11 Okoki komituna boye: ‘Esengeli kaka nabikisa libala na ngai ata soki ekómi na makambo ya mabe ndenge nini?’ Moto moko te akoki kozwela yo ekateli na likambo ya ndenge wana. Atako bongo, ezali na bantina mingi oyo osengeli kowela te koboma libala oyo ezali na mikakatano. Nzambe asepelaka na moto oyo azali koyika mpiko mpo alingi kobatela lisosoli malamu atako azali kokutana na mikakatano na libala. (Tángá 1 Petro 2:19, 20.) Na nzela ya elimo santu mpe ya Liloba na ye, Yehova akosalisa mokristo oyo azali kosala milende mpo na kosilisa mikakatano na libala na ye.

BANKULUTU BAKOKI KOSALISA

12. Bankulutu bakotalela biso ndenge nini soki tosɛngi bango lisalisi?

12 Soki ozali na mikakatano na libala, kobanga te koluka lisalisi ya bakristo oyo bakɔmɛli na elimo. Bankulutu bazali babateli ya mpate mpe bakosepela kolakisa yo toli oyo ezali na Liloba ya Nzambe. (Mis. 20:28; Yak. 5:14, 15) Kokanisa te ete yo ná molongani na yo bokozala lisusu na kilo te na miso ya bankulutu soki boluki lisalisi na bango mpe bosololi na bango mpo na kosilisa mikakatano oyo bozali na yango. Kutu, bakosepela na bino mpe bakopesa bino limemya mingi ntango bakomona ete bozali mpenza na mposa ya kosepelisa Nzambe.

13. Toli nini ezali na 1 Bakorinti 7:10-16?

13 Ntango ndeko moko oyo molongani na ye azali Motatoli te asɛngi bankulutu lisalisi mpo na mikakatano oyo azali kokutana na yango na libala, bakoki kobenda likebi na toli ya Paulo oyo elobi boye: “Na bato oyo babalá, nazali kopesa malako oyo, ezali mpenza ngai te kasi Nkolo: ete mwasi akabwana na mobali na ye te; kasi soki akabwani na ye, afanda bongo abala te to mpe ayokana lisusu na mobali na ye; mpe mobali atika mwasi na ye te. . . . Mpo, mwasi, ndenge nini oyebi soki okobikisa mobali na yo te? To, mobali, ndenge nini oyebi soki okobikisa mwasi na yo te?” (1 Ko. 7:10-16) Ezalaka mpenza esengo ntango molongani oyo azalaki Motatoli te akómi mosaleli ya Yehova!

14, 15. Mpo na bantina nini mokristo akoki kokabwana na molongani na ye, kasi mpo na nini asengeli kokanisa malamumalamu mpe kobondela liboso azwa ekateli yango?

14 Makambo nini ekoki kosala ete mwasi oyo azali mokristo ‘akabwana’ na mobali na ye? Basi mosusu bamonaki malamu bákabwana na molongani mpo na bantina lokola oyo: mobali azali lisusu kosunga ye te na nko, mobali azali konyokola to kobɛta ye, to mobali azali kotya boyokani na ye ná Yehova na likama.

15 Moto ye moko nde asengeli kozwa ekateli ya kokabwana to te ná molongani na ye. Kasi, mokristo asengeli kokanisa malamumalamu mpe kobondela liboso azwa ekateli yango. Esengeli kotalela na ndakisa likambo oyo: molongani na ye oyo azali Motatoli te azali mpenza kotya boyokani na ye ná Yehova na likama, to ye moko mpe akómi na bopɔtu mpo na koyekola Biblia, akómi kozangisa makita, mpe azali lisusu kosakola sanza na sanza te?

16. Nini esengeli kopekisa mokristo awela kozwa ekateli ya koboma libala?

16 Lokola tozwaka na motuya boyokani na biso na Nzambe mpe tozalaka na botɔndi mpo na likabo ya libala, tosengeli te kowela kozwa ekateli ya koboma libala. Lokola tozali basaleli ya Yehova, tolingaka te kofingisa nkombo na ye mosantu. Yango wana, ata mokolo moko te tosengeli koluka koboma libala mpo tokómi na makanisi ya kobalana ná moto mosusu.​—Yir. 17:9; Mal. 2:13-16.

17. Na makambo nini tokoki koloba ete Nzambe abengi na kimya bakristo oyo babalá?

17 Mokristo oyo molongani na ye azali Motatoli te asengeli kosala nyonso oyo akoki mpo na kobatela libala na bango. Nzokande, soki mokristo asali nyonso oyo akoki, kasi molongani na ye aponi kokabwana na ye, asengeli komipesa foti te. Paulo akomaki boye: “Soki oyo azali mondimi te azali koluka kokabwana, akabwana; ndeko mobali to ndeko mwasi azali na boombo te na likambo yango, kasi Nzambe abengi bino na kimya.”​—1 Ko. 7:15. b

TYELÁ YEHOVA ELIKYA

18. Ata soki moto alongi te kobikisa libala na bango, milende na ye ekoki kobimisa matomba nini?

18 Ntango ozali na mikakatano na libala, sɛngá Yehova apesa yo mpiko mpe tyelá ye ntango nyonso elikya. (Tángá Nzembo 27:14.) Tótalela ndakisa ya Linda, oyo tolobelaki liboso. Atako asalaki milende bambula mingi, nsukansuka libala na bango ekufaki. Amonaka nde ete alekisaki ntango mpamba? Te. Alobi boye: “Milende na ngai epesaki litatoli ya malamu epai ya bato mosusu. Lisosoli na ngai ezali kimya. Kutu, bambula wana nyonso esalisaki mwana na biso ya mwasi apikama na kati ya solo. Amipesá na Yehova mpe azali kosalela ye na molende.”

19. Nini ekoki kosalema soki moto asali milende mpo na kobikisa libala na ye?

19 Mwasi moko mokristo nkombo na ye Marilyn asepelaka ndenge atyelaki Nzambe motema mpe asalaki nyonso mpo na kobikisa libala na ye. Alobi boye: “Nakómaki na makanisi ya kokabwana na mobali na ngai mpo azalaki kosunga ngai te mpe azalaki kotya boyokani na ngai na Yehova na likama. Nzokande kala, mobali na ngai azalaki nkulutu, kasi na nsima amikɔtisaki na mombongo moko ya mabe. Akómaki kozangisa makita, mpe tozalaki lisusu kosolola te. Ntango bateroriste babomaki bato na engumba na biso, nakómaki kobanga mingi mpe koboya kozala ná bato. Na nsima, nayaki komona ete ngai mpe nazalaki na foti. Tozongelaki kosolola, koyekola na libota, mpe koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ. Bankulutu bazalaki na boboto mpe basalisaki biso mingi. Libala na biso ezongaki sika. Na nsima, mobali na ngai akokisaki lisusu masɛngami mpe azwaki lisusu mikumba na lisangá. Ezalaki mpasi mingi, kasi nsukansuka mbuma malamu emonanaki.”

20, 21. Tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini mpo na libala na biso?

20 Ezala tozali minzemba to bato oyo babalá, tózala ntango nyonso na mpiko mpe tótyelaka Yehova elikya. Soki tozali na mikakatano na libala, tosengeli kosala makasi tóluka kosilisa yango; tóbosana mpe te ete bato oyo babalani “bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko.” (Mat. 19:6) Tóbosana mpe te ete soki tokobi kofanda ná molongani oyo azali Motatoli te atako mikakatano ezali, nsukansuka tokoki kozala na esengo ya komona ete akómi Motatoli ya Yehova.

21 Ata soki tozali na bomoi ya ndenge nini, tiká ete tótambola na ekɛngɛ mpo tópesa litatoli ya malamu epai ya bato oyo bazali na lisangá ya Nzambe te. Soki tozali na mikakatano na libala, tóbondelaka mingi, tótalela malamumalamu ntina oyo tolingi kokabwana ná molongani na biso, tómanyolaka Liloba ya Nzambe mpe tóluka lisalisi ya bankulutu. Longola yango, tózala na ekateli ya kosepelisa Yehova Nzambe na makambo nyonso mpe tómonisa mpenza botɔndi mpo na likabo kitoko ya libala.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

b Talá buku “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe,” nkasa 219-221; Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1988, nkasa 26-27 na Lifalanse; 1 Yanuali 1976, lokasa 31, na Lifalanse.

[Mituna ya boyekoli]

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 10]

Mbala mingi bakristo oyo bawelaka koboma libala te ntango bazali na mikakatano bazwaka mbano ya malamu

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]

Tyelá Yehova elikya ntango nyonso mpe sɛngá ye apesa yo mpiko

[Elilingi na lokasa 9]

Yehova apambolaka bakristo oyo basalaka makasi básilisa mikakatano na libala na bango

[Elilingi na lokasa 11]

Bakristo bakoki kozwa libɔndisi mpe lisungi ya elimo na lisangá