Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mikanda na yango nyonso ezali na boyokani

Mikanda na yango nyonso ezali na boyokani

“Esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.”​—2 PETRO 1:21.

NA NDENGE NINI BIBLIA EKESENI NA BABUKU MOSUSU? Mbala mingi, mikanda mosusu ya ntango ya kala ezalaka na boyokani te, ata soki ekomamaki na eleko moko. Ezalaka mwa mpasi mpo babuku oyo ekomami na bato ndenge na ndenge, na bisika mpe na ntango ekeseni, ezala na boyokani na makambo nyonso. Nzokande, Biblia elobaka ete mikanda na yango nyonso 66 ezali kaka ya moto moko, yango wana, nsango na yango ezali na bomoko mpe na boyokani.​—2 Timote 3:16.

NA NDAKISA: Moize, oyo azalaki mobateli ya mpate na siɛklɛ ya 16 liboso ya ntango na biso, akomaki na mokanda ya liboso ya Biblia ete “momboto” moko akoya kobikisa bato. Na nsima, mokanda yango elobaki ete momboto yango akozala mokitani ya Abrahame, Yisaka mpe Yakobo. (Ebandeli 3:15; 22:17, 18; 26:24; 28:14) Mbula soki 500 na nsima, mosakoli Natane alobaki ete momboto yango akobima na libota ya Mokonzi Davidi. (2 Samwele 7:12) Mbula 1 000 na nsima, ntoma Paulo alimbolaki ete Yesu ná bayekoli na ye oyo baponami nde bakozala momboto yango. (Baroma 1:1-4; Bagalatia 3:16, 29) Na nsuka ya siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso, mokanda ya Emoniseli esakolaki ete bayekoli yango bakopesa litatoli mpo na Yesu awa na mabele, bakosekwa mpo na kokende likoló, mpe bakoyangela elongo na ye na boumeli ya mbula 1 000. Momboto yango akoboma Zabolo mpe akobikisa bato.​—Emoniseli 12:17; 20:6-10.

BATO OYO BALIMBOLAKA MALOBA YA BIBLIA BALOBI NINI? Nsima ya koyekola malamumalamu mikanda 66 ya Biblia, Louis Gaussen akomaki ete akamwaki ndenge “Biblia ezali na bomoko, atako ekomamaki na boumeli ya mbula 1 500, mpe na bato ebele, . . . oyo bazalaki na mokano kaka moko, mpe bakobaki mosala yango, atako bakangaki ntina ya makambo nyonso te, elingi koloba lisolo ya kosikolama ya mokili na nzela ya Mwana ya Nzambe.”​—Theopneusty—​The Plenary Inspiration of the Holy Scriptures.

OKANISI NINI? Ekoki kosalema ete buku oyo ekomamaki na boumeli ya bambula koleka 1 500, na bato soki 40, ezala mpenza na boyokani? Omoni te ete Biblia ekeseni na babuku mosusu nyonso?

“Ntango batye makomi yango esika moko, esali kaka buku moko . . . Na babuku nyonso oyo bato bakomá, ata moko te ekokani na Biblia.”​—THE PROBLEM OF THE OLD TESTAMENT, YA JAMES ORR