Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lisolo ya bomoi

“Sekele” oyo toyekolaki na mosala ya Nzambe

“Sekele” oyo toyekolaki na mosala ya Nzambe

Lisolo ya Olivier Randriamora

“Nayebi mpenza kozanga biloko, nayebi mpenza kozala na biloko mingi. Na eloko nyonso mpe na makambo nyonso nayekoli sekele ya kotonda mpe ya kozala na nzala . . . Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”​—Flp. 4:12, 13.

MALOBA yango ya ntoma Paulo elendisaka ngai ná mwasi na ngai Oly ntango nyonso. Lokola Paulo, biso mpe toyekolaki “sekele” yango: totyelaka Yehova motema mobimba wana tozali kosalela Ye awa na ekólo Madagascar.

Na 1982, ntango Batatoli ya Yehova babandaki koyekola Biblia ná mama ya Oly, ngai ná Oly tozalaki bafianse. Ngai mpe nandimaki koyekola Biblia; na nsima, Oly mpe alandaki lokolo na ngai. Tobalanaki na 1983, tozwaki batisimo na 1985, mpe eumelaki te, tobandaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Na sanza ya Yuli 1986, tokómaki babongisi-nzela ya sanza na sanza.

Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1987, tobandaki mosala ya mobongisi-nzela monene. Teritware ya liboso oyo batindaki biso ezalaki mwa engumba moko moke na nɔrdi-wɛsti ya Madagascar epai lisangá ezalaki naino te. Bato ya Madagascar bazali na bikólo ya minene soki 18 mpe bikólo ya mikemike ebele; bato na bato bazali na mimeseno mpe bonkɔkɔ oyo ekeseni mpenza na oyo ya basusu. Monɔkɔ oyo bato mingi balobaka ezali Malgache, kasi ezali mpe na minɔkɔ mosusu ebele ya mikemike. Na yango, ntango tokómaki na teritware oyo batindaki biso, tobandaki mbala moko koyekola monɔkɔ oyo balobaka kuna, mpe yango esalisaki biso tómesana nokinoki na bato ya mboka yango.

Na ebandeli, nazalaki kosala diskur mokolo nyonso ya lomingo mpe soki nasilisi, Oly azalaki kobɛta mabɔkɔ. Tozalaki kaka biso mibale. Tozalaki mpe kosala Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, mpe Oly azalaki kosala badevuare na ye lokola nde azali kosolola na moto, kasi moto yango azalaki te. Tosepelaki mingi ntango mokɛngɛli ya zongazonga ayaki kotala biso mpe ayebisaki biso na boboto ete tokoki kobongola ndenge na biso ya kosala makita!

Lokola posita ezalaki kosala malamu te, basanza mosusu tozalaki kozwa te mwa mbongo oyo Betele ezalaki kopesa biso mpo na bamposa na biso. Na yango, ndenge moko na ntoma Paulo, toyekolaki kofanda kaka boye, kozanga biloko. Mokolo moko, tozalaki na mbongo ekoká te mpo na kofuta tike ya bisi mpo tókende na liyangani ya zongazonga, na kilomɛtrɛ soki 130. Tokanisaki toli moko malamu oyo ndeko moko apesaki biso: “Bóyebisaka Yehova mikakatano na bino. Bóbosana te ete bosalaka nde mosala na ye.” Yango wana, tobondelaki mpe tozwaki ekateli ya kokende makolo. Kasi, liboso tókende, ndeko moko ayaki kotala biso mpe akabelaki biso mbongo​—mbongo oyo ekokaki mpenza mpo na kofuta tike!

MOSALA YA ZONGAZONGA

Na sanza ya Febwali 1991, nakómaki mokɛngɛli ya zongazonga. Na ntango wana, mwa etuluku na biso ekómaki na basakoli 9 mpe misato kati na bango bazwá batisimo; mbala mingi na makita tozalaki kokóma bato soki 50. Nsima ya kozwa formasyo, tosalaki na zongazonga moko na engumba-mokonzi Antananarivo. Na 1993, batindaki biso na zongazonga mosusu na ɛsti ya Madagascar. Kuna, bomoi ekesanaki mpenza na bomoi na engumba ya monene.

Mpo na kokóma na masangá mpe bituluku ya mikemike, tozalaki kotambola makolo, ntango mosusu kilomɛtrɛ 145, na banzela ya ngombangomba mpe na kati ya bazamba minene. Tozalaki kotya biloko mingi te na valizi na biso. Kasi, soki nakosala diskur oyo esɛngi kolakisa diapozitive, ndenge mbala mosusu bakɛngɛli ya zongazonga bazalaki kosala na ntango wana, Oly azalaki komema masini ya diapozitive, mpe ngai nazalaki komema bateri moko ya motuka.

Mpo na kokende na lisangá mosusu, mbala mingi tozalaki kotambola kilomɛtrɛ soki 40 na mokolo. Tozalaki komata mpe kokita bangomba, kokatisa bibale, mpe kotambola na bapɔtɔpɔtɔ. Ntango mosusu tozalaki kolala na nzela, kasi mbala mingi tozalaki koluka mboka moko epai tokokaki kozwa esika ya kolala. Mikolo mosusu tozalaki kosɛnga esika ya kolala epai ya bato oyo toyebani na bango ata moke te. Soki bapesi biso esika, tozalaki mbala moko kobanda kolamba eloko ya kolya. Oly azalaki kodefa nzungu mpe kokende kotɔka mai na ebale, mpe ngai nazalaki kodefa epasola mpo na kopasola nkoni. Mosala nyonso ezalaki kozwa ntango mingi. Mikolo mosusu, tozalaki kosomba nsoso ya bomoi, oyo ezalaki kosɛnga tóboma yango mpe tólongola yango nsala.

Nsima ya kolya, tozalaki kokende kotɔka mai mosusu mpo na kosukola. Na bisika mosusu, tozalaki kolala na kuku. Soki ndako etangaka ntango mbula ezali kobɛta, tozalaki kolala pembeni mpenza ya efelo mpo tópɔla te.

Tozalaki kosala makasi tópesa litatoli na bato oyo bapesi biso esika ya kolala. Soki tokómi na mboka oyo tozali kokende, boboto ya bandeko mpe ndenge bazalaki koyamba biso ezalaki mpenza kosimba motema na biso. Esengo oyo bazalaki koyoka na ndenge toyei kotala bango ezalaki kosala ete tóbosana mikakatano nyonso oyo tokutanaki na yango na nzela.

Ntango tofandi na ndako ya bandeko, tozalaki kopesa bango mabɔkɔ na misala ya ndako. Yango ezalaki kotikela bango ntango ya kobima na biso na mosala ya kosakola. Tozalaki kosɛnga te ete bandeko bápesa biso bisika ya malamu koleka to bilei oyo bazali na makoki ya kosomba te.

KOTALA BITULUKU YA MIKEMIKE

Tozalaki kosepela kotala bituluku ya mikemike, epai tozalaki kosala mingi na boumeli ya pɔsɔ mobimba. Mbala mingi, tozalaki kozwa ata ntango te ya ‘kopema mwa moke.’ (Mrk. 6:31) Na esika moko, ndeko moko ná mwasi na ye babengisaki bayekoli na bango nyonso 40 na ndako na bango mpo biso mpe tósangana na bango ntango bazali koyekola. Oly azalaki ná ndeko mwasi mpo na koyekola na bato soki 20; ngai nazalaki ná ndeko mobali mpo tóyekola na bato mosusu 20. Soki tosilisi koyekola na moto moko, tozalaki kobanda mbala moko ná moto mosusu. Na mpokwa, tokataki mwa moke koyekola mpo na kosala makita, mpe na nsima, tozongelaki koyekola na bato yango. Mbala mingi, tozalaki kosilisa mosala nsima ya ngonga ya 8 na butu!

Na etuluku mosusu, tokendaki kosakola elongo na basakoli nyonso na mboka moko oyo ezali pembeni; tolongwaki na ngonga ya 8 na ntɔngɔ. Biso nyonso tolataki bilamba ya bongobongo. Nsima ya kotambola ntango molai na kati ya zamba, tokómaki na mboka yango pene na midi. Tolataki bilamba ya malamu mpe tobandaki mbala moko kosakola ndako na ndako. Tozalaki basakoli mingi, kasi bandako ezalaki moke. Tosilisaki kotala bandako nyonso nsima ya miniti 30. Na nsima, tokendaki na mboka oyo elandi. Nsima ya kosakola kuna, tobandaki lisusu mobembo molai mpo na kozonga. Liboso, kosala bongo elɛmbisaki biso mwa moke. Esɛngaki biso ntango mpe milende mingi mpo na kotambola, kasi tosakolaki ndako na ndako soki ngonga moko mpamba. Nzokande, basakoli bazalaki komilelalela te. Bazalaki kaka na esengo.

Etuluku moko ya basakoli na engumba Taviranambo bazalaki kofanda likoló ya ngomba moko. Kuna, tokutaki libota moko ya Batatoli oyo bazalaki kofanda na mwa ndako ya moke. Makita ezalaki kosalema na ndako mosusu ya moke oyo ezalaki pembeni. Mbala moko, ndeko oyo ayambaki biso abandaki kobelela na mongongo makasi ete: “Bandeko!” Likoló ya ngomba oyo elandi, ndeko moko ayanolaki ete: “Ee!” Ndeko yango abelelaki lisusu: “Mokɛngɛli ya zongazonga ayei!” Oyo kuna mpe azongisaki ete: “Ɛɛ!” Emonani ete nsango etambolaki kaka bongo tii epai ya bandeko mosusu oyo bazalaki mosika. Mwa moke na nsima, bato bakómaki koya, mpe ntango tobandaki makita, tozalaki bato koleka 100.

MIKAKATANO MPO NA KOSALA MIBEMBO

Na 1996, batindaki biso na zongazonga moko pembeni ya Antananarivo. Zongazonga wana ezalaki mpe na mikakatano na yango. Ntango mosusu mituka mpo na kokende na bamboka ya kati ezalaki te. Na libaku moko, esengelaki tókende kotala etuluku moko na engumba Beankàna (to Besakay), na kilomɛtrɛ soki 240 longwa na Antananarivo. Nsima ya koyokana na sofɛlɛ, tomataki na motuka moko oyo ezalaki kokende nzela wana. Motuka yango ememaki bato soki 30, bamosusu likoló, mpe bamosusu bazali kodiembela na nsima.

Ndenge esalemaka mingi, tokómaki mosika te, motuka yango ekufaki, mpe tokobaki mobembo na makolo. Nsima ya kotambola mwa bangonga, tomonaki motuka mosusu ya monene. Motuka yango etondaki na bato mpe biloko, kasi sofɛlɛ atɛlɛmaki ntango amonaki biso. Tomataki, atako esika ya kofanda ezalaki te. Na nsima, tokómaki na ebale moko, kasi tokutaki bazali kobongisa gbagba. Tokitaki lisusu mpe tokobaki mobembo na makolo mpe nsukansuka, tokómaki na mwa mboka moko epai babongisi-nzela monene bazalaki kofanda. Atako bazalaki kozela mokɛngɛli ya zongazonga te, tolekisaki ntango elongo na bango na mosala ya kosakola wana tozalaki kozela bábongisa gbagba mpe motuka mosusu eleka.

Nsima ya pɔsɔ moko, motuka moko eyaki, mpe tokobaki mobembo na biso. Nzela etondaki na mabulu ya minene. Mbala na mbala ezalaki kosɛnga tótindika motuka na kati ya mai oyo ezalaki kokómela biso na mabɔlɔngɔ; mbala mingi tozalaki kobɛta mabaku mpe kokwea. Tokómaki na mwa mboka moko na ntɔngɔntɔngɔ mpe tokitaki wana. Totikaki nzela ya monene, mpe tokobaki mobembo na makolo na kati ya bilanga ya loso, oyo ezalaki na mai ya pɔtɔpɔtɔ oyo ezalaki kokómela biso na loketo.

Lokola ezalaki mbala ya liboso tókende kuna, tolobaki ete tópesa litatoli na bato oyo bazalaki kosala na bilanga ya loso mpe tótuna bango epai Batatoli bazalaki kofanda. Tosepelaki mingi ntango bato yango bayebisaki biso ete bazali bandeko na biso ya elimo!

TOLENDISAKI BATO MOSUSU BÁSALA MOSALA YA NTANGO NYONSO

Tosepelaki mingi na matomba oyo tozwaki na kolendisa bato mosusu básala mosala ya ntango nyonso. Ntango tokendaki kotala lisangá moko oyo ezalaki na babongisi-nzela ya sanza na sanza libwa, tolendisaki mokomoko na bango amityela mokano ya kolendisa mosakoli moko akóma mobongisi-nzela. Sanza motoba na nsima, ntango tozongaki lisusu na lisangá yango, babongisi-nzela bakómaki 22. Babongisi-nzela mibale ya basi balendisaki batata na bango, oyo bazalaki bankulutu, ete bákóma babongisi-nzela. Na nsima, bankulutu yango balendisaki mpe moninga na bango nkulutu akóma mobongisi-nzela. Mwa moke na nsima, nkulutu yango akómaki mobongisi-nzela monene. Na nsima, akómaki mokɛngɛli ya zongazonga mpe azalaki kotala masangá elongo na mwasi na ye. Bongo bankulutu mosusu mibale? Lelo oyo, moko azali mokɛngɛli ya zongazonga, mpe mosusu azali na mosala ya kotonga Bandako ya Bokonzi.

Mokolo na mokolo totɔndaka Yehova mpo na lisalisi na ye, mpamba te toyebaka ete tokoki kosala eloko moko te na makasi na biso moko. Ya solo, ntango mosusu toyokaka kolɛmba mpe tobɛlaka, kasi tozalaka na esengo soki tokanisi mbuma malamu ya mosala na biso. Yehova azali kokolisa mosala na ye. Tozali na esengo ndenge tozali kopesa mabɔkɔ mwa moke na mosala yango; lelo oyo tozali babongisi-nzela monene. Ya solo, toyekolaki “sekele” yango na ndenge tozalaki kotya motema epai ya Yehova, ‘oyo apesaka biso nguya.’

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

Toyekolaki “sekele” yango na ndenge tozalaki kotya motema epai ya Yehova

[Karte/​Bililingi na lokasa 4]

Madagascar ezali esanga ya minei na monene na mokili mobimba. Mabele na yango ezali motane, mpe ezali na banzete mpe banyama mingi oyo ezali na bisika mosusu te

[Elilingi na lokasa 5]

Tosepelaka koyekola na bato Biblia

[Bililingi na lokasa 5]

Kosala mibembo ezalaki moko ya mikakatano minene