Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yehova amonisi makambo oyo ‘ekosalema nsima ya mwa ntango moke’

Yehova amonisi makambo oyo ‘ekosalema nsima ya mwa ntango moke’

Yehova amonisi makambo oyo ‘ekosalema nsima ya mwa ntango moke’

“Emoniseli ya Yesu Kristo, oyo Nzambe apesaki ye, mpo na kolakisa baombo na ye makambo oyo esengeli kosalema nsima ya mwa ntango moke.”​—EM. 1:1.

OKOPESA EYANO NINI?

Eteni nini ya ekeko monene ezali komonisa bokonzi ya Anglo-américain?

Ndenge nini Yoane amonisi boyokani oyo ezali kati na bokonzi ya Anglo-américain mpe ONU?

Ndenge nini Danyele ná Yoane balobeli nsuka ya biyangeli ya bato?

1, 2. (a) Bisakweli ya Danyele mpe ya Yoane ezali kosalisa biso na nini? (b) Mitó motoba ya nyama mabe oyo tolobelaki liboso ezali komonisa nini?

 SOKI tokokanisi makambo oyo ezali na bisakweli ya Danyele mpe ya Yoane, tokokanga ntina ya makambo mingi oyo ezali kosalema lelo mpe oyo ekosalema na mikolo ekoya. Makambo nini tokoki koyekola na emonaneli ya nyama mabe oyo Yoane amonaki, na lisolo ya Danyele oyo elobeli nyama ya nsɔmɔ ya maseke zomi, mpe na ndimbola oyo Danyele apesaki mpo na ekeko monene? Mpe koyeba ndimbola ya bisakweli yango esengeli kotinda biso tósala nini?

2 Tólobela naino emonaneli ya nyama mabe oyo Yoane amonaki. (Em., mok. 13) Mitó motoba ya nyama mabe oyo tolobelaki na lisolo oyo eleki ezali komonisa Ezipito, Asiri, Babilone, bokonzi ya Bamede ná Baperse, Grɛsi, mpe Roma. Bikólo yango nyonso eyinaki momboto ya mwasi. (Eba. 3:15) Ntango Yoane akomaki emonaneli na ye, Roma, motó ya motoba, nde ezalaki ekólo oyo elekaki na nguya mpe ekobaki kozala bongo bankama ya bambula na nsima. Nzokande, motó ya nsambo esengelaki kozwa esika ya Roma. Bokonzi nini ekómaki ekólo oyo eleki na nguya, mpe makambo nini esalaki momboto ya mwasi?

GRANDE-BRETAGNE MPE ÉTATS-UNIS EKÓMI NA NGUYA

3. Nyama ya nsɔmɔ oyo ezali na maseke zomi ezali komonisa nini, mpe maseke zomi emonisi nini?

3 Tokoki koyeba motó ya nsambo ya nyama mabe ya Emoniseli mokapo 13 soki tokokanisi emonaneli ya Yoane ná emonaneli ya Danyele oyo elobeli nyama ya nsɔmɔ oyo ezalaki na maseke zomi. a (Tángá Danyele 7:7, 8, 23, 24.) Nyama oyo Danyele amonaki ezali komonisa bokonzi ya Roma. (Talá elilingi na nkasa 12-13.) Na ekeke ya mitano T.B., Ampire ya Roma ekómaki kokabwana. Maseke zomi oyo ebimaki na motó ya nyama yango ya nsɔmɔ emonisi makonzi oyo eutaki na ampire yango.

4, 5. (a) Liseke ya moke esalaki nini? (b) Motó ya nsambo ya nyama mabe ezali nini?

4 Maseke minei, to makonzi, oyo ebimaki na motó ya nyama ya nsɔmɔ nde elobelami mingi koleka maseke mosusu. Liseke moko “ya moke” epikolaki maseke misato. Likambo yango ekokisamaki ntango Grande-Bretagne, oyo ezalaki eteni moko ya Ampire ya Roma, ekómaki makasi. Tii na ekeke ya 17, Grande-Bretagne ezalaki ekólo ya makasi te. Bikólo mosusu misato oyo ezalaki na Ampire ya Roma: Espagne, Pays-Bas, mpe France, ezalaki makasi mingi koleka yango. Grande-Bretagne epikolaki bikólo yango mokomoko, elingi koloba ebundisaki yango mpe elongaki yango. Na katikati ya ekeke ya 18, Grande-Bretagne ezalaki komata mpo ekóma ekólo ya nguya mingi na mokili. Kasi, na ntango wana, ekómaki naino te motó ya nsambo ya nyama mabe.

5 Atako Grande-Bretagne ekómaki makasi, bitúká oyo yango ezalaki koyangela na Amerika ya Nɔrdi ezwaki lipanda mpe ekómaki États-Unis d’Amérique. Nzokande, Grande-Bretagne etikaki États-Unis ekóma ekólo ya makasi mpe bamasuwa na yango ya bitumba ezalaki kobatela États-Unis. Ntango mokolo ya Nkolo ebandaki na 1914, Grande-Bretagne ezalaki na teritware monene koleka baampire nyonso oyo ezalaki liboso mpe États-Unis ekómaki ekólo oyo ezalaki na baizine mingi koleka bikólo mosusu nyonso. b Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, États-Unis esalaki boyokani moko makasi na Grande-Bretagne. Lokola bikólo yango ekómaki kosala elongo, ekómaki bokonzi ya Anglo-américain, bokonzi oyo eleki nguya na mokili mobimba, to motó ya nsambo ya nyama mabe. Makambo nini motó yango esalaki momboto ya mwasi?

6. Motó ya nsambo esalaki basaleli ya Nzambe nini?

6 Mwa moke nsima ya ebandeli ya mokolo ya Nkolo, motó ya nsambo ebandaki kobundisa basaleli ya Nzambe, elingi koloba bandeko ya Kristo oyo bazali naino awa na mabele. (Mat. 25:40) Yesu alobaki ete na eleko ya kozala na ye, bato mosusu oyo bazali na kati ya momboto ya mwasi bakozala na mabele mpe bakokokisa mosala oyo apesaki bango. (Mat. 24:45-47; Gal. 3:26-29) Bokonzi ya Anglo-américain ebundisaki basantu wana. (Em. 13:3, 7) Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bokonzi yango enyokolaki basaleli ya Nzambe, epekisaki mikanda na bango mosusu, mpe ekɔtisaki na bolɔko baoyo bazalaki kokamba mosala ya kosakola. Ezalaki lokola nde motó ya nsambo ya nyama mabe ebomi mosala ya kosakola mpo na mwa ntango. Yehova ayebaki ete likambo yango ekosalema mpe ayebisaki yango Yoane. Ayebisaki ye mpe ete bato oyo bazali na kati ya momboto ya mwasi bakozonga na bomoi, elingi koloba bakozongela kosakola na molende. (Em. 11:3, 7-11) Lisolo ya Batatoli ya Yehova ya ntango na biso emonisi ete makambo wana ekokisamaki.

BOKONZI YA ANGLO-AMÉRICAIN MPE MAKAKA YA EBENDE OYO ESANGANI NA MABELE YA LIMA

7. Boyokani nini ezali kati na motó ya nsambo ya nyama mabe ná ekeko monene?

7 Boyokani nini ezali kati na motó ya nsambo ya nyama mabe mpe ekeko monene? Grande-Bretagne eutaki na Ampire ya Roma; mpe lokola États-Unis eutaki na Grande-Bretagne, tokoki koloba ete États-Unis eutaki mpe na Ampire ya Roma. Kasi makaka ya ekeko ezali nini? Biblia elobi ete makaka yango ezali na ebende oyo esangani na mabele ya lima. (Tángá Danyele 2:41-43.) Yango emonisi likambo oyo esengelaki komonana ntango motó ya nsambo, elingi koloba bokonzi ya Anglo-américain, esengelaki kokóma bokonzi oyo eleki na nguya. Kaka ndenge eloko oyo basali na ebende oyo basangisi na mabele ya lima ezalaka makasi ndenge moko te na eloko oyo basali kaka na ebende ya mpamba, bokonzi ya Anglo-américain ezali makasi ndenge moko te na Roma, epai eutaki. Na ndenge nini?

8, 9. (a) Ndenge nini bokonzi ya nsambo oyo eleki na nguya emonisaki ete ezalaki makasi lokola ebende? (b) Mabele ya lima oyo ezali na makaka ya ekeko elimboli nini?

8 Na bantango mosusu, motó ya nsambo ya nyama mabe emonisaki makasi ya ebende. Na ndakisa, elongaki Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, emonanaki mpe polele ete motó ya nsambo ezalaki na makasi ya ebende. c Nsima ya etumba yango, motó ya nsambo ezalaki kaka makasi lokola ebende. Kasi, banda ebandeli, ebende yango esanganaki na mabele ya lima.

9 Banda kala, basaleli ya Yehova bazalaki koluka koyeba ndimbola ya makaka ya ekeko monene. Danyele 2:41 emonisi ete makaka ya ebende oyo esangani na mabele ya lima ezali “bokonzi” moko, kasi te makonzi ebele. Na yango, mabele ya lima elimboli ete ezali na eloko moko na kati ya bokonzi ya Anglo-américain oyo ezali kopekisa yango ezala makasi lokola Ampire ya Roma, oyo emonisamaki na makolo ya ebende. Biblia elobi ete mabele ya lima elimboli “bana ya bato,” to bapɛplɛ. (Dan. 2:43) Bato yango bazali kolɛmbisa bokonzi ya Anglo-américain na ndenge bazali kobunda mpo na ntomo ya bato nyonso, mpo na ntomo ya bato ya misala, to mpe mpo na kozwa lipanda. Bana ya bato bazali kopekisa bokonzi ya Anglo-américain ezala makasi lokola ebende. Lisusu, bango na bango bato ya politiki bazali na makanisi ndenge moko te; mpe soki mokonzi moko alongi maponami na bavoti moke, akokaka mpenza te kokokisa makambo oyo alakaki. Danyele asakolaki boye: “Bokonzi yango ekozala ndambo makasi mpe ekozala ndambo pɛtɛpɛtɛ.”​—Dan. 2:42; 2 Tim. 3:1-3.

10, 11. (a) “Makaka” ekosuka ndenge nini? (b) Tokoki koloba nini mpo na motángo ya misapi ya makolo?

10 Boyokani makasi oyo ezali kati na Grande-Bretagne ná États-Unis ezali kokoba ata na ekeke oyo ya 21, mpe mbala mingi basalaka elongo na makambo ya mokili. Esakweli oyo elobeli ekeko monene mpe oyo elobeli nyama mabe emonisi ete ekozala na bokonzi mosusu te oyo ekokóma nguya ya mokili mobimba na esika ya bokonzi ya Anglo-américain. Bokonzi yango ezali na makasi ya Roma te, oyo emonisami na makolo ya ebende, kasi ekolɛmba te tii mosusu eleka yango.

11 Motángo ya misapi ya makolo ya ekeko ezali nde na ndimbola moko boye? Na bimonaneli mosusu, Danyele alobeli mitángo: na ndakisa, alobeli mitángo ya maseke ya banyama ndenge na ndenge. Mitángo wana ezali na ndimbola. Kasi, Danyele apesi motángo ya misapi ya makolo ya ekeko te. Na yango, emonani lokola ete motángo yango ezali te na ndimbola moko boye, ndenge moko na motángo ya mabɔkɔ, ya misapi ya mabɔkɔ, ya makolo mpe ya makaka. Danyele alobaki ete misapi ya makolo ezali na ebende oyo esangani na mabele ya lima. Na yango, tokoki koloba ete bokonzi ya Anglo-américain nde ekozala bokonzi oyo eleki na nguya ntango “libanga,” elingi koloba Bokonzi ya Nzambe, ekotuta makaka ya ekeko yango.​—Dan. 2:45.

BOKONZI YA ANGLO-AMÉRICAIN MPE NYAMA MABE YA MASEKE MIBALE

12, 13. Nyama mabe ya maseke mibale ezali komonisa nini, mpe ezali kosala nini?

12 Atako bokonzi ya Anglo-américain esalemi na ebende oyo esangani na mabele ya lima, bimonaneli oyo Yesu apesaki Yoane emonisi ete bokonzi yango esengelaki kokoba kosala makambo minene na mikolo ya nsuka. Na ndenge nini? Na emonaneli moko, Yoane amonaki nyama mabe moko ya maseke mibale oyo ezalaki koloba lokola dragɔ. Nyama yango ya nsɔmɔ ezali komonisa nini? Lokola ezali na maseke mibale, boye elimboli bokonzi oyo esangisi bikólo mibale. Nyama yango oyo Yoane amonaki ezali kaka bokonzi ya Anglo-américain, kasi na ntango oyo ezali kokokisa likambo moko monene.​—Tángá Emoniseli 13:11-15.

13 Nyama mabe yango ezali kolendisa bato básala elilingi ya nyama mabe ya mitó nsambo. Yoane akomaki ete elilingi ya nyama mabe yango ekobima, ekolimwa, na nsima ekobima lisusu. Yango mpenza nde ekómelaki ebongiseli moko oyo esalemaki nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Grande-Bretagne ná États-Unis elendisaki bikólo mosusu ekɔta na ebongiseli yango. Basalaki ebongiseli yango mpo esangisa bikólo nyonso mpe ezala momonisi na yango. d Nkombo na yango ezalaki Société des Nations. Ebongiseli yango elimwaki ntango Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki. Na ntango ya etumba yango, basaleli ya Nzambe basakolaki ete na kolanda esakweli ya Emoniseli, elilingi ya nyama mabe ekobima lisusu. Esalemaki mpe bongo, kasi na mbala oyo, ebengamaki ONU.​—Em. 17:8.

14. Na ndimbola nini elilingi ya nyama mabe ezali “mokonzi ya mwambe”?

14 Yoane alobaki ete elilingi ya nyama mabe ezali “mokonzi ya mwambe.” Na ndimbola nini? Balobi te ete ezali motó ya mwambe ya nyama mabe. Ezali kaka elilingi ya nyama yango. Nguya nyonso oyo ezali na yango euti na bikólo oyo ezali na kati na yango, mingimingi na bokonzi ya Anglo-américain. (Em. 17:10, 11) Kasi azali kosala lokola mokonzi mpo azwi bokonzi ya kokokisa mokumba moko oyo ekobongola makambo na mokili.

ELILINGI YA NYAMA MABE EBOMI MWASI YA NDUMBA

15, 16. Mwasi ya ndumba azali komonisa nini, mpe nini ekómeli ye?

15 Yoane amonaki mpe mwasi moko ya ndumba afandi likoló ya nyama mabe ya langi ya motane makasi, oyo ezali elilingi ya nyama mabe ya mitó nsambo; yango elingi koloba ete mwasi yango azali koyangela nyama yango. Mwasi yango nkombo na ye “Babilone Monene.” (Em. 17:1-6) Azali komonisa mangomba nyonso ya lokuta, ata mpe oyo ebengamaka mangomba ya bokristo. Mangomba ya lokuta elendisaka elilingi ya nyama mabe esala mosala na yango mpe elukaka kotambwisa yango.

16 Nzokande, na mokolo ya Nkolo, mai ya Babilone Monene ekauki mingi, elingi koloba ete bato mingi mpenza batiki mangomba yango. (Em. 16:12; 17:15) Na ndakisa, ntango elilingi ya nyama mabe ebimaki mpo na mbala ya liboso, mangomba ya bokristo ezalaki na nguya mingi mpe na bandimi mingi na mikili ya Mpoto. Lelo oyo, bato mingi bazali koyokela lisusu bakonzi ya mangomba te mpe bakendaka lisusu ndako-nzambe te. Kutu, bato mingi bazali koloba ete mangomba nde ezali kobimisa matata na mokili to kolendisa yango. Na mikili ya Mpoto, bato mingi ya mayele bazali koloba polele ete esengeli mangomba etika kokɔta na makambo ya mokili.

17. Nini ekokómela mangomba ya lokuta mosika te, mpe mpo na nini?

17 Nzokande, mangomba ya lokuta ekolimwa mokemoke te. Mwasi ya ndumba akozala kaka na nguya, akoluka kotinda bakonzi ya mokili básala makambo oyo alingi, tii ntango oyo Nzambe akotya likanisi moko na mitema ya bakonzi yango. (Tángá Emoniseli 17:16, 17.) Mosika te, Yehova akotinda baguvɛrnema ya mokili ya Satana, oyo emonisami na ONU, ebundisa mangomba ya lokuta. Baguvɛrnema yango ekobebisa mangomba ya lokuta mpe bozwi na yango. Eleki mwa bambula, bato mingi bakokaki kokanisa te ete likambo ya ndenge wana ekosalema. Lelo oyo, makambo ekómi kobongwana. Kasi, bokonzi ya mwasi yango ekobanda kokita kaka mokemoke te; libebi na ye ekoya na mbalakaka.​—Em. 18:7, 8, 15-19.

NDENGE BANYAMA MABE EKOSUKA

18. (a) Nyama mabe ekosala nini, mpe ekosuka ndenge nini? (b) Danyele 2:44 emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ekoboma makonzi nini? (Talá etanda na lokasa 17.)

18 Nsima ya kobomama na mangomba ya lokuta, nyama mabe, elingi koloba ebongiseli ya politiki ya mokili ya Satana, ekobundisa Bokonzi ya Nzambe. Lokola bakonzi ya mokili bakokoka te kobundisa Bokonzi yango kuna na likoló, nkanda na bango ekongalela bato nyonso oyo bamitye na ngámbo ya Bokonzi ya Nzambe awa na mabele. Yango ekomema na etumba monene ya Nzambe. (Em. 16:13-16; 17:12-14) Danyele alobeli likambo moko oyo ekosalema na etumba yango. (Tángá Danyele 2:44.) Nyama mabe oyo Emoniseli 13:1 elobeli, ná elilingi na yango, ná nyama mabe ya maseke mibale, nyonso ekobomama.

19. Tokoki kozala na elikya nini, mpe sikoyo nde ntango ya kosala nini?

19 Tozali na eleko oyo motó ya nsambo ezali koyangela. Motó mosusu ekobima te tii nyama yango ekobomama. Anglo-américain nde ekozala bokonzi oyo eleki na nguya na mokili mobimba ntango mangomba ya lokuta ekobomama. Esakweli ya Danyele mpe oyo ya Yoane ekokisami mpenza na makambo nyonso. Tokoki kozala na elikya ete mosika te mangomba ya lokuta ekobomama mpe etumba ya Armagedone ekoya. Nzambe ayebisi biso liboso makambo oyo ekosalema. Tokolanda makebisi oyo bisakweli yango epesi biso? (2 Pe. 1:19) Sikoyo nde ntango ya kotosa Yehova mpe ya komitya na ngámbo ya Bokonzi na ye.​—Em. 14:6, 7.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na Biblia, mbala mingi motángo zomi emonisaka biloko oyo ezali ya kokoka. Awa, ezali makonzi nyonso oyo eutaki na Ampire ya Roma.

b Atako Grande-Bretagne mpe États-Unis ezalaki kobanda na ekeke ya 18, emonaneli ya Yoane emonisi ete yango mibale esengelaki kosangana mpe kokóma bokonzi oyo eleki na nguya na ebandeli ya mokolo ya Nkolo. Kutu, bimonaneli oyo ezali na mokanda ya Emoniseli ezali kokokisama nde na boumeli ya “mokolo ya Nkolo.” (Em. 1:10) Ezali se na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba nde bikólo wana mibale ekómaki bokonzi oyo eleki na nguya na mokili mobimba, oyo emonisami na motó ya nsambo.

c Danyele asakolaki ndenge oyo bokonzi ya Anglo-américain elingaki kobebisa banguna na yango na etumba yango. Akomaki boye: “Akobebisa mpenza kobebisa.” (Dan. 8:24) Na ndakisa, États-Unis ebebisaki mpenza kobebisa ntango ebwakaki babɔmbi atomike mibale na ekólo moko oyo ezalaki monguna ya bokonzi ya Anglo-américain.

d Talá buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! nkasa 240, 241, 253.

[Mituna ya boyekoli]

[Etanda na lokasa 17]

“MAKONZI OYO NYONSO” EZALI MAKONZI NINI?

Esakweli ya Danyele 2:44 elobi ete Bokonzi ya Nzambe “ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso.” Esakweli yango elobeli kaka makonzi oyo emonisami na biteni ndenge na ndenge ya ekeko monene.

Ezali boni mpo na baguvɛrnema mosusu ya mokili? Esakweli ya Emoniseli oyo elobeli mpe biyangeli ya mokili ezali kosalisa biso tózwa eyano. Elobi ete “bakonzi ya mabele mobimba” bakoyanganisama mpo na kobundisa Yehova na “mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Em. 16:14; 19:19-21) Na yango, longola makonzi oyo emonisami na ekeko monene, baguvɛrnema mosusu nyonso ya mokili ekobomama na Armagedone.