Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Elimo santu ezalaki kotinda bango”

“Elimo santu ezalaki kotinda bango”

“Elimo santu ezalaki kotinda bango”

“Esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.”​—2 PE. 1:21.

MAKANISI YA KOMANYOLA

Ndenge nini Nzambe asalelaki elimo santu na ye mpo na koyebisa bakomi ya Biblia maloba na ye?

Makambo nini emonisi ete Biblia ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe?

Okoki kosalaka nini mokolo na mokolo mpo ozala ntango nyonso na botɔndi mpo na Liloba ya Nzambe?

1. Mpo na nini tozali na mposa ya Liloba ya Nzambe?

 TOUTÁ wapi? Mpo na nini tozali awa na mabele? Tozali kokende wapi? Mpo na nini makambo ezali boye na mokili? Nini ekómelaka moto soki akufi? Na mokili mobimba bato bamitunaka mituna yango. Tokokaki te koyeba biyano na mituna yango mpe mituna mosusu ya ntina soki tozalaki na Liloba ya Nzambe te. Soki tozalaki na Makomami Mosantu te, tolingaki koyekola libosoliboso kaka na makambo oyo tokutanaka na yango. Lokola tolingaki koyekola kaka na nzela ya makambo oyo tokutanaka na yango, tokokaki nde kotalela “mobeko ya Yehova” ndenge mokomi ya nzembo azalaki kotalela yango?​—Tángá Nzembo 19:7.

2. Nini ekosalisa biso tózala ntango nyonso na botɔndi mpo na Biblia, likabo ya motuya oyo Nzambe apesá biso?

2 Nzokande, bato mosusu batiki ete bolingo oyo bazalaki na yango liboso mpo na mateya ya Biblia ekita. (Talá mpe Emoniseli 2:4.) Bato yango bazali lisusu te kolanda nzela oyo esepelisaka Yehova. (Yis. 30:21) Tokoki kosala ete likambo ya ndenge wana ekómela biso te. Tokoki kosala makasi, to tóloba tosengeli kosala makasi tókoba kozala na botɔndi mpo na Biblia mpe mateya na yango. Biblia ezali likabo ya motuya monene oyo euti epai ya Mozalisi na biso. (Yak. 1:17) Nini ekosalisa biso tózala na botɔndi mingi mpo na “liloba ya Nzambe”? Tosengeli kokanisa ndenge oyo bato oyo bakomaki Biblia batambwisamaki. Yango esɛngi tótalela mwa makambo oyo emonisi ete ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe. Kosala bongo ekolendisa biso tótángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe tósalela batoli na yango.​—Ebr. 4:12.

NDENGE NINI “ELIMO SANTU EZALAKI KOTINDA BANGO”?

3. Na ndenge nini “elimo santu ezalaki kotinda” basakoli mpe bakomi ya Biblia?

3 Mbula 1 610 elekaki kobanda moto ya liboso akomaki Biblia tii ntango moto ya nsuka akomaki. Ebandaki na mobu 1513 L.T.B. mpe esukaki na mobu 98 T.B. Bato nyonso oyo bakomaki yango bazalaki mibali soki 40. Bamosusu bazalaki basakoli mpe “elimo santu ezalaki kotinda bango.” (Tángá 2 Petro 1:20, 21.) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kotinda bango” elimboli “komema to kokumba longwa na esika moko tii na esika mosusu,” mpe “ekoki kobongolama na ndenge mingi: komemama, kotambwisama, kotika ete bámema yo.” a Misala 27:15 esaleli yango mpo na kolobela masuwa oyo mopɛpɛ ebendaki mpe ememaki, to etambwisaki na nzela moko boye. Ntango balobi ete “elimo santu ezalaki kotinda” basakoli mpe bakomi ya Biblia elimboli ete Nzambe azalaki kosolola na bango, kotinda bango, mpe kotambwisa bango na lisalisi ya elimo santu na ye. Na yango, makanisi oyo bakomaki ezalaki ya bango te, kasi ya Nzambe. Kutu, na bantango mosusu basakoli mpe bakomi oyo batambwisamaki na elimo santu bazalaki koyeba te ndimbola ya makambo oyo bazalaki koloba to kokoma. (Dan. 12:8, 9) Ya solo, “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe” mpe ezali ata na likanisi moko te ya moto.​—2 Tim. 3:16.

4-6. Ndenge nini Yehova azalaki koyebisa bakomi ya Biblia makambo oyo bakomaki? Pesá ndakisa.

4 Kasi, ndenge nini Nzambe asalelaki elimo santu na ye mpo na koyebisa bakomi ya Biblia maloba na ye? Ayebisaki bango nde liloba mokomoko oyo basengeli kokoma to apesaki bango kaka makanisi oyo bakokaki kokoma na maloba na bango moko? Tótalela ndenge oyo patrɔ akomaka mokanda. Soki esɛngi asalela maloba moko boye ya sikisiki, akoki kokoma mokanda ye moko to koyebisa sɛkrɛtɛrɛ na ye liloba mokomoko oyo asengeli kokoma. Sɛkrɛtɛrɛ akokoma mpe patrɔ akotya sinyatire. Kasi, ntango mosusu patrɔ akoki kaka kopesa makanisi, mpe sɛkrɛtɛrɛ akokoma mokanda na maloba na ye moko. Na nsima, patrɔ akoki kotánga mokanda yango mpe koyebisa sɛkrɛtɛrɛ bisika oyo asengeli kobongisa. Na nsuka, patrɔ akotya sinyatire mpe moto oyo azwi mokonda yango akomona ete euti epai ya patrɔ.

5 Ndenge moko mpe, biteni mosusu ya Biblia ekomamaki na “mosapi ya Nzambe.” (Kob. 31:18) Soki esengeli, Yehova azalaki koyebisa mokomi maloba mpenza oyo alingaki ete ekomama. Na ndakisa, na Kobima 34:27, tozali kotánga boye: “Yehova alobaki lisusu na Moize ete: ‘Komá mpo na yo maloba oyo, mpamba te ezali na boyokani na maloba oyo nde nazali kosala kondimana ná yo mpe na Yisraele.’” Ndenge moko mpe, Yehova alobaki na mosakoli Yirimia ete: “Komá na buku maloba nyonso oyo nakoloba na yo.”​—Yir. 30:2.

6 Nzokande, mbala mingi Nzambe azalaki te koyebisa bakomi ya Biblia maloba oyo bakosalela. Azalaki nde kotya makanisi na mitema mpe na bɔɔngɔ na bango, mpe kotika bango moko bápona maloba oyo bakosalela mpo na kokoma yango. Mosakoli 12:10 elobi boye: “Moyanganisi alukaki kozwa maloba ya kitoko mpe ndenge ya kokoma maloba ya solo na bosikisiki.” Luka, moko na bakomi ya Baevanzile ‘alandelaki makambo nyonso malamumalamu uta na ebandeli, ete akoma yango na molɔngɔ mpenza.’ (Luka 1:3) Elimo ya Nzambe esalaki mosala mpo bakomi yango oyo bazalaki bato ya kozanga kokoka bákɔtisa mabunga na nsango ya Nzambe te.

7. Mpo na nini tokoki koloba ete Nzambe amonisaki mpenza bwanya lokola asalelaki bato mpo na kokoma Biblia?

7 Ndenge Nzambe asalelaki bato mpo na kokoma Biblia emonisi bwanya na ye monene. Maloba esalisaka biso tóyeba makanisi oyo ekomami, kasi mpe mayoki oyo ebimisami. Elingaki kozala boni soki Yehova asalelaki baanzelu mpo na kokoma Biblia? Balingaki nde komonisa makambo oyo ekómelaka bato, na ndakisa kobanga, mawa, to kolɛmba nzoto, na ndenge oyo tolingaki kokanga ntina? Lokola Nzambe atikaki bato ya kozanga kokoka bápona bango moko maloba oyo bakosalela mpo na kokoma makanisi oyo apesaki bango na nzela ya elimo santu, nsango ya Nzambe esimbaka mpenza mitema na biso bato!

MAKAMBO OYO EMONISI ETE BIBLIA EUTI NA NZAMBE

8. Mpo na nini tokoki koloba ete Biblia ekokani na buku mosantu mosusu te?

8 Ezali na makambo mingi oyo endimisi biso ete Biblia ezali mokanda oyo euti na Nzambe. Lokola Biblia esalisaka biso tóyeba Nzambe ya solo, ekokani na babuku mosantu mosusu te. Na ndakisa, babuku ya Lingomba ya Hindu elobeli milulu ya losambo, filozofi, masapo, mpe mibeko ya etamboli malamu. Babuku ya Lingomba ya Bouddha elobeli mibeko oyo basango ná bamamelo basengeli kotosa. Elobeli mpe bindimeli ná mateya ya Bouddha. Bouddha alobaki te ete azali nzambe, mpe alobaki makambo mingi te mpo na Nzambe. Mikanda ya Lingomba ya Confucius elobeli makambo oyo esalemá na ntango ya kala, mibeko ya etamboli malamu, maji, mpe banzembo. Lisusu, atako buku mosantu ya Lingomba ya Mizilma eteyaka ete Nzambe azali kaka moko, ete ayebi mpe atambwisaka makambo nyonso, eyebisi te ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova, nkombo oyo ezali na bankóto ya bisika na Biblia.

9, 10. Makambo nini oyo etali Nzambe tokoki koyekola na Biblia?

9 Babuku mosantu ya mangomba mingi eyebisi biso makambo mingi te to mpe ata moko te mpo na Nzambe; nzokande, Biblia esalisaka biso tóyeba Yehova Nzambe mpe misala na ye. Esalisaka biso tóyeba bizaleli na ye ndenge na ndenge. Biblia emonisi biso ete Nzambe azali na nguya nyonso, atondi na bwanya, azali sembo mpe alingaka biso. (Tángá Yoane 3:16; 1 Yoane 4:19.) Longola yango, Biblia elobi na biso ete: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.” (Mis. 10:34, 35) Lokola bato mingi bakoki kotánga Biblia na minɔkɔ na bango, emonisi ete Nzambe aponaka bilongi te. Bato ya mayele balobi ete lelo oyo minɔkɔ nyonso oyo elobamaka na mokili mobimba ezali soki 6 700, nzokande minɔkɔ oyo bato mingi mpenza (90%) balobaka ezali kaka soki 100. Atako bongo, Biblia mobimba to biteni na yango ebongolami na minɔkɔ koleka 2 400. Tokoki koloba ete moto nyonso akoki kotánga ata mwa ndambo ya mikanda ya Biblia na monɔkɔ na ye.

10 Yesu alobaki boye: “Tata na ngai azali kokoba kosala tii sikoyo, ngai mpe nazali kokoba kosala.” (Yoa. 5:17) Yehova azali Nzambe “libela na libela.” Sikoyo, kanisá makambo nyonso oyo asalá! (Nz. 90:2) Kaka Biblia nde eyebisi biso makambo oyo asalaki na ntango ya kala, oyo azali kosala lelo, mpe oyo akosala na mikolo ezali koya. Biblia ezali mpe koteya biso makambo oyo esepelisaka ye mpe oyo esepelisaka ye te, mpe ezali komonisa biso oyo tokoki kosala mpo tópusana penepene na ye. (Yak. 4:8) Tótika te ete makambo na biso to mitungisi na biso ekabola biso na ye.

11. Bwanya ya ndenge nini ezali na Biblia?

11 Bwanya mingi oyo ezali na Biblia emonisi mpe ete ezali buku ya bato te. Ntoma Paulo akomaki boye: “Nani ayebi makanisi ya Yehova, mpo alakisa ye?” (1 Ko. 2:16) Maloba yango euti na motuna oyo mosakoli Yisaya atunaki bato ya ntango na ye ete: “Nani ameká bonene ya elimo ya Yehova, mpe nani oyo akoki kopesa ye toli to koyebisa ye likambo moko boye?” (Yis. 40:13) Toyebi malamu ete eyano ezali: “Moto moko te.” Tokoki kokamwa te ete kosalela toli ya Biblia mpo na libala, kobɔkɔla bana, masano, boninga, kozala makasi na mosala, kolongobana, mpe bizaleli malamu ememaka matomba mingi! Biblia epesaka toli ya mabe te. Nzokande, bato bazali na bwanya oyo ekoki te mpo na kopesa makanisi oyo elongaka ntango nyonso. (Yir. 10:23) Toli na bango ebongwanaka ntango nyonso soki bamoni ete oyo ya liboso ebongaki te. Biblia elobi ete “makanisi ya bato ezali lokola mwa mopɛpɛ.”​—Nz. 94:11.

12. Milende nini bato basalaki mpo na kolimwisa Biblia?

12 Likambo mosusu oyo emonisi ete Nzambe ya solo nde azali Mobandisi ya Biblia ezali makambo oyo masolo ya kala emonisi mpo na milende oyo bato basalaki mpo na kolimwisa buku yango. Na mobu 168 L.T.B., Antiochus IV, mokonzi ya Siri, alukaki mikanda ya Mibeko ya Nzambe mpo na kotumba yango. Na mobu 303 T.B., Dioclétien, mokonzi ya Roma, abimisaki mobeko oyo elobaki ete bábuka bisika oyo bakristo bazalaki kosala makita mpe bátumba mikanda na bango ya Makomami. Likambo yango ekobaki na boumeli ya mbula soki zomi. Nsima ya ekeke ya 11, bapápa basalaki nyonso mpo na kopekisa ete mateya ya Biblia epalangana; yango wana baboyaki ete Biblia ebongolama na minɔkɔ oyo bato nyonso bazalaki koloba. Atako Satana ná bato na ye basalaki milende nyonso wana, Biblia ezali kaka tii lelo oyo. Yehova atikaki nzela te ete moto moko alimwisa likabo oyo apesá bato.

MAKAMBO OYO ENDIMISAKI BATO MINGI

13. Makambo nini emonisi ete Biblia ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe?

13 Ezali mpe na makambo mosusu oyo emonisi ete Biblia ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe: makambo na yango ezali na boyokani, elobi makambo oyo ata siansi emonisi ete ezali solo, bisakweli na yango ekokisamaka, bakomi na yango babombaki mabunga na bango te, ebongolaka bomoi ya bato, elobi makambo oyo esalemaki mpenza, mpe ezali na biyano ya solosolo na mituna oyo etunamaki na paragrafe 1. Tótalela nini esalisaki bato mosusu bándima ete Biblia ezali mokanda oyo euti na Nzambe.

14-16. (a) Nini endimisaki moto moko ya Lingomba ya Mizilma, ya Hindu, mpe moto oyo azalaki kondima te ete moto akoki koyeba Nzambe, ete Biblia ekomami na lisalisi ya elimo ya Nzambe? (b) Na mosala ya kosakola, makambo nini olobelaka mpo na komonisa ete Biblia ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe?

14 Anwar b akolá na Lingomba ya Mizilma na ekólo moko ya Moyen-Orient. Ntango azalaki na ekólo moko ya Amerika ya Nɔrdi, Batatoli ya Yehova bayaki na ndako na ye. Anwar alobi boye: “Na ntango wana, nazalaki kosepela na mangomba ya bokristo te mpo na bitumba mpe makambo ya mabe oyo esalá. Kasi, lokola nalingaka koyeba makambo ya sika, nandimaki koyekola Biblia.” Eumelaki te, Anwar azongaki na ekólo na ye mpe azalaki lisusu kokutana na Batatoli te. Bambula mingi na nsima, akendaki na Mpoto mpe azongelaki koyekola Biblia; nsukansuka alobaki boye: “Ndenge oyo bisakweli ya Biblia ekokisamaka, boyokani oyo ezali na kati ya Biblia, ndenge oyo ezali na bongolabongola te, mpe bolingo oyo basambeli ya Yehova bamonisanaka endimisi ngai ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe.” Anwar azwaki batisimo na 1998.

15 Asha, elenge mwasi moko ya mbula 16, akolaki na libota oyo bazalaki bandimi ya molende ya Lingomba ya Hindu. Alobi boye: “Nazalaki kobondela kaka soki nakei na tempelo to nakutani na mikakatano, kasi soki makambo nyonso ezali kotambola malamu, nazalaki kokanisa Nzambe te.” Abakisi boye: “Kasi, ntango Batatoli ya Yehova bayaki kobɛta na porte na ngai, bomoi na ngai ebongwanaki mpenza.” Asha ayekolaki Biblia mpe akómisaki Nzambe Moninga na ye. Nini endimisaki ye ete Biblia ekomamaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe? Alobi boye: “Biblia epesaki eyano na mituna nyonso oyo nazalaki kotuna. Esalisaki ngai nazala na kondima ata soki namonaka Nzambe te, elingi koloba kozanga ete nakende na tempelo moko boye mpo na kofukama liboso ya ekeko.”

16 Paula akolá na Lingomba ya Katolike; kasi ntango akómaki elenge, akómaki na makanisi ete moto akoki koyeba Nzambe te. Na nsima, likambo moko esalemaki. Alobi boye: “Nakutanaki na moninga moko oyo nazalaki lisusu komona te basanza mingi. Ezalaki na eleko oyo bato bazalaki kotika nsuki milai mpe bazalaki komɛla bangi. Ntango namonaki ndenge oyo abongwanaki, akómaki pɛto mpe azalaki na esengo, natunaki ye, ‘Okómi boye ndenge nini, okendá wapi?’ Ayebisaki ngai ete azali koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpe ayebisaki ngai makambo oyo ayekolaki.” Ntango Paula, oyo azalaki kokanisa ete moto akoki koyeba Nzambe te, amonaki ndenge Biblia ekoki kobongola moto, asepelaki na nsango na yango, mpe andimaki ete ekomami na lisalisi ya elimo ya Nzambe.

“LILOBA NA YO EZALI MWINDA NA MAKOLO NA NGAI”

17. Kotánga Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo mpe komanyola yango ekoki kosalisa yo na nini?

17 Biblia ezali likabo ya motuya mingi oyo Yehova apesá biso na nzela ya elimo santu na ye. Tángáká yango mokolo na mokolo mpe okomona ete bolingo na yo mpo na Biblia mpe mpo na Mobandisi na yango ekokola. (Nz. 1:1, 2) Bondeláká Nzambe mbala nyonso oyo olingi koyekola yango mpo na kosɛnga ete elimo na ye esalisa yo okanga ntina ya makambo oyo okotánga. (Luka 11:13) Biblia ezali na makanisi ya Nzambe. Soki ozali komanyola maloba na yango, okokóma na makanisi lokola oyo ya Nzambe.

18. Mpo na nini osengeli kokoba koyekola Biblia?

18 Ntango boyebi na yo ya Biblia ezali kobakisama, saleláká makambo oyo ozali koyekola. (Tángá Nzembo 119:105.) Kotánga Makomami ezali lokola komitala na talatala. Yango wana, soki omoni ete osengeli kobongola likambo moko, salá yango. (Yak. 1:23-25) Liloba ya Nzambe ezali mpe lokola mopanga; salelá yango mpo na kolongisa bindimeli na yo mpe kolongola mateya ya lokuta na mitema ya bato ya komikitisa. (Ef. 6:17) Ntango ozali kosalela Biblia, zalá na botɔndi na ndenge “elimo santu ezalaki kotinda” basakoli mpe bato oyo Nzambe asalelaki mpo na kokoma nsango ya Biblia.

[Maloba na nse ya lokasa]

a A Greek-English Lexicon of the New Testament and Other Early Christian Literature.

b Topesi bango bankombo mosusu.

[Mituna ya boyekoli]

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]

Tángáká Biblia mokolo na mokolo, okomona ete bolingo na yo mpo na Mobandisi na yango ekokola

[Elilingi na lokasa 26]

Moto oyo azwi mokanda amonaka ete euti epai ya moto oyo atye sinyatire