Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Zalá na bwanya—Luká “makoki ya koyeba kotambwisa makambo”

Zalá na bwanya—Luká “makoki ya koyeba kotambwisa makambo”

Zalá na bwanya​—Luká “makoki ya koyeba kotambwisa makambo”

Balobaka ete bomoi ezali lokola mobembo. Nzokande, mbala mingi bwanya ya bato esalisaka bango mpenza te mpo básala mobembo yango malamu. Bato mingi bazindaka lokola masuwa na mai ya mbonge makasi. (Nz. 107:23, 27) Mpo na nini ndakisa yango ebongi mpenza?

Na ntango ya kala, mobembo na ebale ezalaki na makama mingi mpe esengelaki ete moto amesana mpo asala yango malamu. Ezalaki mosala oyo bazalaki koyekola epai ya bato ya masuwa oyo baumeli, mbala mosusu epai ya kapitɛni ya masuwa. (Mis. 27:9-11) Mayemi mingi ya kalakala emonisaka kapitɛni monene koleka bato mosusu mpo na kolakisa ete mokumba na ye ezalaki na ntina mingi. Mpo na kosala mobembo na ebale, bato ya masuwa bazalaki kolandela minzoto, mipɛpɛ, mpe biloko mosusu oyo ekokaki kosalisa bango. Biblia ebengi bato mosusu ya masuwa ete ‘bato ya mayele,’ mpe liloba oyo basaleli wana ekoki kobongolama na “bato ya bwanya.”​—Ezk. 27:8.

Tokoki koloba ete kobunda na mikakatano ya bomoi ya lelo oyo ezali mpasi lokola kosala mibembo na ebale na ntango ya kala. Nini ekoki kosalisa biso tólonga yango?

NDENGE NINI TOKOKI KOZWA “MAKOKI YA KOYEBA KOTAMBWISA MAKAMBO”?

Lokola tolobi ete bomoi ezali lokola mobembo, tótalela likambo oyo Biblia elobi: “Moto ya bwanya akoyoka mpe akozwa lisusu mateya mingi, mpe moto ya mayele nde moto oyo akómaka na makoki ya koyeba kotambwisa makambo.” (Mas. 1:5, 6) Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “makoki ya koyeba kotambwisa makambo” ekoki kosalelama mpo na komonisa ndenge oyo kapitɛni ya masuwa ya ntango ya kala azalaki kosala. Ezali kopesa likanisi ya kotambwisa na mayele.

Atako ezali kosɛnga milende, tokoki kokóma na “makoki ya koyeba kotambwisa makambo” mpe kotambola malamu na bomoi na biso ndenge kapitɛni ayebaka kotambwisa masuwa na ebale. Ndenge Masese emonisi yango, tosengeli kotika ete “bwanya,” “mayele,” mpe “mayele ya kososola” esala elongo. (Mas. 1:2-6; 2:1-9) Tosengeli mpe kobosana te koluka toli ya Nzambe, mpamba te ata bato mabe bakoki koyeba ‘kotambwisa’ bomoi na bango mpo na mikano ya mabe.​—Mas. 12:5.

Yango wana, ezali na ntina mingi tómipesaka na koyekola Liloba ya Nzambe. Boyekoli yango ekosalisa biso tóyeba makambo ya ntina mpo na Yehova mpe Yesu Kristo, moto oyo amonisaka Ye malamu koleka. (Yoa. 14:9) Tozwaka batoli mingi na makita ya lisangá. Longola yango, tokoki kozwa mayele mingi epai ya bandeko mosusu, ata mpe epai ya baboti na biso.​—Mas. 23:22.

MONÁKÁ MOSIKA MPE YEBÁ KOBONGISA MAKAMBO LIBOSO

“Makoki ya koyeba kotambwisa makambo” ezali na ntina mingi ntango tokutani na mikakatano oyo ezali lokola mbonge ya ebale. Soki tozali koyeba te ekateli nini tózwa na likambo moko boye, tokoki kosila mayele, mpe yango ekoki komemela biso mikakatano.​—Yak. 1:5, 6.

Kutu, na Biblia, maloba oyo ebongolami na “makoki ya koyeba kotambwisa makambo” esalelami mpe na makambo ya etumba. Tozali kotánga boye: “Okosala etumba na yo na likoki ya koyeba kotambwisa makambo, mpe soki bapesi-toli bazali ebele lobiko ezali.”​—Mas. 20:18; 24:6.

Lokola mokonzi ya basoda oyo azali kobongisa etumba, esengeli biso mpe tómonaka na mosika makambo oyo ekoki kobebisa elimo na biso. (Mas. 22:3) Na ndakisa, ekoki kosɛnga na yo ozwa ekateli ya kondima to koboya mosala moko to mokumba moko ya monene na mosala. Na ntembe te okotalela mbongo oyo bakobanda kofuta yo, ntango oyo ekobanda kosɛnga yo mpo na kokende na mosala mpe kozonga ndako, mpe makambo mosusu. Nzokande, ezali na makambo oyo osengeli kobosana te: Ezali mosala ya malamu na kotalela mitinda ya Biblia? Bangonga ya mosala, na ndakisa kokende na bangonga ekeseni, ekobebisa te programɛ na ngai ya makambo ya elimo?​—Luka 14:28-30.

Loretta, oyo azali Motatoli ya Yehova, azalaki na mosala ya malamu na kompanyi moko. Ntango esɛngaki ete kompanyi yango ekende esika mosusu, batunaki Loretta soki akondima mokumba moko ya monene oyo balingaki kopesa ye kuna. Bakonzi ya kompanyi yango balobaki na ye boye: “Ezali libaku oyo eyaka kaka mbala moko. Kutu, tomonaki ete Ndako ya Bokonzi moko ezali na esika yango.” Kasi, Loretta alingaki ete mosala ezwaka ye lisusu ntango mingi te mpo amipesa mingi na mosala ya Nzambe. Amonaki ete mosala wana ya sika elingaki kotikela ye ntango mingi te mpo na makambo ya elimo. Yango wana, akomaki mokanda mpo na kolongwa na mosala, atako mokambi ya kompanyi ayebisaki ye ete azali moto ya mosala kaka moko oyo bazalaki mpenza na mposa ya kotikala na ye. Loretta, oyo azali lelo mobongisi-nzela ya sanza na sanza banda mbula soki 20, amonaka ete azwi matomba mpo asalelaki “makoki ya koyeba kotambwisa makambo” na boyokani na toli ya Liloba ya Nzambe. Akómisaki makasi boyokani na ye na Yehova mpe azwaki libaku malamu ya kosalisa bato mingi báyeba solo ya Biblia.

“Makoki ya koyeba kotambwisa makambo” ezali na ntina mingi na kati ya libota. Kobɔkɔla bana ezali mosala oyo eumelaka bambula ebele, mpe bikateli oyo tozwaka, ezala na makambo ya elimo to ya mokili, ekoki kobongisa to kobebisa avenire ya libota mobimba. (Mas. 22:6) Na ndakisa, bakristo oyo bazali na bana bakoki komituna boye: ‘Masolo na biso mpe ndakisa na biso eteyaka bana na biso mitinda oyo ekosalisa bango bázala na bomoi ya malamu ntango bakokóma mikóló? Bomoi na biso esalisaka bango bámona ndenge ya kosepela na bomoi ezangi mindɔndɔ mpe komipesa mobimba na mosala ya Nzambe?’​—1 Tim. 6:6-10, 18, 19.

Ezali te biloko oyo moto anduki to lokumu oyo azwi na mokili nde emonisaka ete alongi mpenza na bomoi. Mokonzi Salomo akangaki ntina ya likambo yango. Na lisalisi ya elimo santu, akomaki boye: “Ekosukela baoyo babangaka Nzambe ya solo malamu, mpo bazalaki kobanga ye.” (Mos. 8:12) Yango emonisi mpenza ete koluka “makoki ya koyeba kotambwisa makambo” na ndenge oyo eyokani na Liloba ya Nzambe, ezali nzela ya bwanya.​—2 Tim. 3:16, 17.

[Elilingi na lokasa 30]

Mpo na komonisa mokumba monene ya bakapitɛni, mayemi ezalaki komonisa bango monene koleka bato mosusu

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Su concessione del Ministero per i Beni e le Attività Culturali. Ata ndenge nini, epekisami kosala bakopi mosusu ya elilingi oyo.