Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Lapolo ya likita ya nsuka ya mbula

Likita oyo emonisaki bomoko mpe elobelaki mikano ya minene

Likita oyo emonisaki bomoko mpe elobelaki mikano ya minene

MAKITA ya nsuka ya mbula ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania epesaka ntango nyonso bayangani esengo mingi. Ezalaki mpe bongo mpo na likita ya mbala ya 127, oyo esalemaki mokolo ya pɔsɔ, 1 Ɔkɔtɔbɛ 2011! Bandeko oyo babengisamaki na likita yango bautaki na mikili ndenge na ndenge mpe bango nyonso bazalaki na Ndako ya mayangani ya Batatoli ya Yehova na engumba Jersey City, na etúká ya New Jersey, na États-Unis.

Ndeko Gerrit Lösch, oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, atombelaki bayangani nyonso boyei malamu. Ayebisaki bandeko yango oyo batondaki na esengo, oyo bautaki na mikili 85, ete bomoko oyo bazali na yango ná bandeko ya mokili mobimba ezali na esika mosusu te. Bomoko yango epesaka litatoli ya malamu mpe ekumisaka Yehova. Kutu, likambo ya bomoko ezongelamaki mingi na likita yango.

LAPOLO MALAMU OYO EUTAKI NA MEXIQUE

Eteni ya liboso ya programɛ elobelaki likambo oyo ezali komonisa bomoko ya basaleli ya Yehova. Ndeko Baltasar Perla atunaki bandeko misato ya Betele na bango ya Mexique mpo bálobela ndenge makambo ezali koleka kuna lokola Babetele motoba ya Amerika ya Ntei ekangami mpe misala na yango ekómi kosalema kaka na Betele ya Mexique. Lokola Babetele wana ezali lisusu te, Betele ya Mexique ekómi na bandeko ya mikili mpe mimeseno ndenge na ndenge. Koya ya bandeko ya mikili ndenge na ndenge epesaki bango libaku ya kolendisana. Ezali lokola nde Nzambe azwaki gɔmɛ monene mpo na koboma bandelo oyo ekaboli bikólo.

Mokakatano moko oyo kosangisa misala ya Babetele wana esika moko ebimisaki ezalaki ya kosalisa basakoli bámona te ete bakabwani na ebongiseli ya Yehova atako Betele ezali lisusu te na mboka na bango. Mpo na yango, lisangá mokomoko, ata oyo ezali mosika mpenza, ezali na adrɛsi oyo bakoki kosalela mpo na kosolola na biro ya filiale na nzela ya Internet.

BANSANGO YA JAPON

James Linton, ndeko moko ya Betele ya Japon, alobelaki mikakatano oyo bandeko bakutanaki na yango na Japon ntango mabele eninganaki mpe tsunami esalemaki kuna na sanza ya Marsi 2011. Batatoli mingi ya ekólo yango babungisaki bandeko mpe baninga, ata mpe biloko na bango. Bandeko ya bisika oyo likama ekómaki te batongaki bandako koleka 3 100 mpe bapesaki bankama ya mituka. Bandeko oyo bapesaki nkombo mpo na kosalisa basalaki elongo na Komite ya botongi mpe basalaki mosala makasi mpo na kobongisa bandako ya bandeko. Bandeko koleka 1 700 bamipesaki mpo na kopesa mabɔkɔ na bisika nyonso oyo bakokaki kozala na mposa na bango. Etuluku ya bandeko oyo bamipesaki mpo na kosalisa, oyo bautaki na États-Unis, bapesaki mabɔkɔ mpo na kobongisa Bandako ya Bokonzi, mpe bandeko 575 basalaki mosala yango.

Mosala monene esalemaki mpo na kolendisa na elimo bandeko oyo bazwaki likama mpe kokitisa bango motema. Bankulutu koleka 400 bazalaki kotala bampate na bisika nyonso oyo mposa ezalaki. Bakɛngɛli mibale ya zone oyo bautaki na biro monene basalaki mobembo tii na etúká oyo likama esalemaki mpo na kolendisa bandeko; likambo wana emonisaki mpenza ete Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezalaki komibanzabanza mpo na bandeko wana. Maloba ya kolendisa oyo Batatoli ya mokili mobimba bazalaki kotindela bandeko ebɔndisaki bango mpenza.

MAKAMBO OYO TOLONGI NA BATRIBINALE

Bayangani balandaki na likebi ntango Stephen Hardy, ndeko moko ya Betele ya Angleterre, atambwisaki lisolo oyo elobelaki makambo oyo touti kolonga na batribinale. Na ndakisa, guvɛrnema ya France ezalaki kosɛnga ete Betele efuta mpako ya dolare milio 82. Tribinale monene ya Mpoto mpo na ntomo ya bato (Cour européenne des droits de l’homme) ekataki likambo yango mpe elongisaki biso; elobaki ete guvɛrnema ya ekólo France ebukaki Artikle 9 ya Mobeko ebengami Convention européenne, oyo ezali kobatela bonsomi ya losambo. Maloba ya ekateli ya tribinale emonisi ete likambo ya guvɛrnema ya France ezalaki kaka likambo ya mbongo te, mpamba te elobaki boye: “Koboya kondima lingomba moko, koluka kopekisa yango, kosalela maloba ya kotyola mpo na kolobela yango, nyonso wana ezali bandakisa oyo emonisi ete lotomo oyo Artikle 9 elobeli etosamaki te.”

Tribinale ya Mpoto elongisaki biso mpe na likambo oyo etalelaki bandeko na biso na ekólo Arménie. Banda 1965, Tribinale monene ya Mpoto ezalaki komonisa ete Convention européenne ezali kobatela te bato oyo baboyi kosala mosala ya soda oyo guvɛrnema esɛngaka na bana-mboka. Bazuzi minene, oyo bazwaka ekateli ya nsuka na Tribinale monene ya Mpoto, balobaki ete Convention européenne esengeli kobatela lotomo ya “koboya kosala mosala ya soda, soki ezali mpo na ntina ya solosolo, oyo moto akoki kolongola yango te.” Ekateli yango esɛngisi ekólo Arménie mpe bikólo mosusu lokola Azerbaïdjan mpe Turquie endima mpe lotomo yango.

MISALA YA KOTONGA

Ndeko Guy Pierce, oyo azali mpe na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki diskur oyo elandaki mpe amonisaki ete bayangani nyonso bazalaki na mposa ya koyeba mikano oyo tozali na yango ya kotonga bandako minene na etúká ya New York. Asɛngaki bango bálanda video oyo emonisaki misala oyo ezali kosalema na Wallkill, na Patterson, mpe bisika oyo esombami sika na Warwick mpe Tuxedo, na etúká ya New York. Na Wallkill, ndako ya sika oyo ekosila na 2014, ekozala na bashambrɛ koleka 300.

Mokano mosusu ezali ya kotonga bandako na Warwick, na etando oyo ezali na hectare 100. Ndeko Pierce alobaki boye: “Atako toyebi naino te mokano ya Yehova mpo na Warwick, tozali na likanisi ya kotonga bandako mpo ete biro monene ya Batatoli ya Yehova ekóma kuna.” Mokano mosusu ezali ya kotonga bandako na lopango ya hectare 20 oyo ezali na kilomɛtrɛ 10 na nɔrdi ya Warwick mpo tótyaka bamasini mpe biloko mpo na kotonga. Ndeko Pierce alobaki boye: “Soki kaka tozwi mikanda mpo na kotonga, tokanisi ete misala nyonso ekosila nsima ya mbula minei. Na nsima, babiro na biso na Brooklyn ekotɛkama.”

Ndeko Pierce atunaki boye: “Yango elingi nde koloba ete Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali lisusu kokanisa te ete bolɔzi monene ekómi pene?” Apesaki eyano ete: “Soki moke te. Soki bolɔzi monene ekati misala yango, ekozala likambo ya malamu, ya malamu mpenza!”

TÓKEBA NA NKƆSI OYO EZALI KOGANGA

Stephen Lett, ndeko mosusu ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alobelaki makanisi oyo ezali na 1 Petro 5:8: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka. Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali koganga mpe koluka kolya moto.” Ndeko Lett alobaki ete bizaleli mingi ya bankɔsi emonisi ete ndakisa oyo Petro asalelaki ebongi mpenza mpo na komonisa Zabolo.

Lokola nkɔsi ezalaka makasi mpe mbangu koleka moto, tosengeli te kobunda na Satana na makasi na biso moko to komeka koleka ye na mbangu. Tozali na mposa ya lisalisi ya Yehova. (Yis. 40:31) Nkɔsi elukaka nyama na mayele mpo na kokanga yango, yango wana tosengeli kokima bisika ya molili na elimo, epai Satana alukaka kokanga moto. Se ndenge nkɔsi ebomaka mboloko oyo ezali ekɛngɛ te to mwana ya zɛbrɛ oyo elali mpɔngi, Satana mpe azalaka na mawa te, mposa na ye ezalaka ete aboma biso. Soki nkɔsi elei nyama oyo ekangaki, mbala mingi etikaka kaka mwa biteni; ndenge moko mpe “nsuka” ya bato oyo bakwei na mabɔkɔ ya Satana ‘ekómaka mabe koleka ndenge ezalaki liboso.’ (2 Pe. 2:20) Yango wana tosengeli kotɛmɛla Satana mpe kokangama makasi na mitinda ya Biblia oyo tosili koyekola.​—1 Pe. 5:9.

SEPELÁ NA ESIKA NA YO NA NDAKO YA YEHOVA

Molobi oyo alandaki ezalaki Ndeko Samuel Herd, oyo azali mpe na Lisangani ya Mikóló-Bakambi; ye alobaki ete: “Biso nyonso tozali na esika na ndako ya Yehova.” Bakristo nyonso bazali na esika na “ndako” ya Nzambe, to tempelo na ye ya elimo, elingi koloba ebongiseli mpo na kosambela ye na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu. Tosengeli kosepela na esika yango mpamba te kozala kuna ezali libaku malamu mpenza. Lokola Davidi, tosengeli kozala na mposa ya ‘kofanda na ndako ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na biso.’​—Nz. 27:4.

Ndeko Herd alobelaki Nzembo 92:12-14 mpe atunaki boye: “Ndenge nini Yehova asalisaka biso tókola?” Apesaki eyano ete: “Na paradiso ya elimo, Nzambe abɔndisaka biso, abatelaka biso, mpe apesaka biso mai ya bomoi oyo ekitisaka motema. Tiká ete tótɔnda ye mpo na yango.” Na nsuka, Ndeko Herd alendisaki bayangani na maloba oyo: “Tósepela kotikala na ndako ya Yehova, mpo na mwa ntango te, kasi libela na libela.”

BAKRISTO BAMEMYAKA LILOBA YA NZAMBE

Na diskur oyo elandaki, David Splane, ndeko mosusu oyo azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alimbolaki ete banda kala, bakristo ya solo bamemyaka Liloba ya Nzambe. Na ekeke ya liboso, bakristo ya solo batalelaki Liloba ya Nzambe mpo na kokata likambo ya kokatama ngenga. (Mis. 15:16, 17) Nzokande, na ekeke ya mibale, bato mosusu oyo bazalaki komibenga bakristo, oyo bayekolaki filozofi ya Bagrɛki, bakómaki koluka kolakisa mayele na bango na esika ya kolanda Biblia. Na nsima, bato mosusu bakómaki koteya makanisi ya bato oyo babengami Batata ya Lingomba mpe ya baampɛrɛrɛ ya Roma na esika ya mateya ya Biblia; mateya mingi ya lokuta ebandaki wana.

Ndeko Splane amonisaki ete na ndakisa moko, Yesu amonisaki ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakokoba kozala awa na mabele mpo na kolongisa mateya ya solo. (Mat. 13:24-30) Tokoki te koyeba bankombo ya bakristo yango. Atako bongo, na bileko ndenge na ndenge, bato mingi bazalaki komonisa polele mateya mpe mimeseno ya lokuta. Kati na bango tokoki kotánga Episkɔpɔ-mokonzi Agobard de Lyon na ekeke ya 9, Pierre de Bruys, Henri de Lausanne, mpe Valdès (to Valdo) na ekeke ya 12, John Wycliffe na ekeke ya 14, William Tyndale na ekeke ya 16, mpe Henry Grew ná George Storrs na ekeke ya 19. Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kokoba kolanda mitinda ya Biblia mpe kondima ete Biblia nde eteyaka solo. Yango wana, Lisangani ya Mikóló-Bakambi eponi Yoane 17:17 lokola mokapo ya mobu 2012; mokapo yango elobi ete: “Liloba na yo ezali solo.”

MBONGWANA NA OYO ETALI FORMASYO MPE MOSALA

Ndeko Anthony Morris, oyo azali mpe na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, apesaki liyebisi moko oyo elobelaki mbongwana oyo esalami mpo na bamisionɛrɛ mpe babongisi-nzela monene. Kobanda sanza ya Sɛtɛmbɛ 2012, bakelasi ya Eteyelo ya Biblia mpo bandeko oyo babalá ekosalema na mwa bikólo mosusu. Mokano ya Eteyelo ya Gileade ebongwani. Kobanda na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, Eteyelo ya Gileade ekómi kopesa formasyo na bandeko oyo bazali na mosala ya ntango nyonso, na ndakisa bamisionɛrɛ oyo bakɔtá na Eteyelo ya Gileade te, babongisi-nzela monene, bakɛngɛli-batamboli, to bandeko oyo basalaka na Betele. Bandeko oyo bakozwa formasyo yango bakotindama mpo na kolendisa mpe kobongisa basaleli ya Yehova, ezala na bafiliale, na mosala ya zongazonga to ya etúká, to na bisika oyo bato bazali mingi, epai bakoki kolendisa masangá na mosala ya kosakola.

Babongisi-nzela monene mosusu bakotindama na bateritware ya mosika to na bisika oyo masangá ezali te. Kobanda 1 Yanuali 2012, bandeko mosusu oyo bakozwa diplome na Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba mpe na Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo babalá bakotindama lokola babongisi-nzela monene mpo na mwa ntango na bisika oyo Batatoli bazali te to mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala na bamboka ya mosika. Bakotindama lokola babongisi-nzela monene mpo na mbula mokomoko, tii na mbula misato. Baoyo bakosala mosala malamu bakoki koponama mpo na libela.

Likita ya nsuka ya mbula ya 2011 ezalaki mpenza ya esengo. Tozali kosɛnga ete Yehova apambola bibongiseli ya sika mpo ete mosala ya kosakola ekende liboso mpe bomoko na biso ekóma lisusu makasi, nyonso wana mpo na lokumu mpe nkembo na ye.

[Etanda/​Bililingi na nkasa 18, 19]

TOYEBI BANGO MALAMU KOLEKA

Na likita yango batunaki mpe basi mitano kati na basi libwa ya bandeko oyo basilá kokufa, oyo bazalaká na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Ezalaki bandeko basi oyo: Marina Sydlik, Edith Suiter, Melita Jaracz, Melba Barry, ná Sydney Barber; bango nyonso bayebisaki ndenge oyo bayekolaki solo mpe ndenge babandaki mosala ya ntango nyonso. Mokomoko na bango alobelaki makambo ya kala, basuvenire oyo atikalá na yango ya mobali na ye, mpe makambo ya malamu oyo bakutanaki na yango elongo. Mpo na kosukisa malamu lisolo yango, bayangani nyonso bayembaki loyembo 86, oyo ezali na motó ya likambo ete: “Basi ya sembo, basi bakristo.”

[Bililingi]

(Likoló) Daniel ná Marina Sydlik; Grant ná Edith Suiter; Theodore ná Melita Jaracz

(Na nse) Lloyd ná Melba Barry; Carey ná Sydney Barber

[Karte na lokasa 16]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Misala oyo ezalaki kosalema na Babetele motoba ekómi kosalema na Betele ya Mexique

MEXIQUE

GUATEMALA

HONDURAS

SALVADOR

NICARAGUA

COSTA RICA

PANAMA

[Elilingi na lokasa 17]

Plan ya biro monene ya Batatoli ya Yehova na Warwick, New York