Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Mosala na bino ezali na mbano”

“Mosala na bino ezali na mbano”

“Mosala na bino ezali na mbano”

ELONGO na basoda na ye, Mokonzi Asa alongwaki na bangomba ya Yudea mpe azalaki kokita na lobwaku oyo ememi tii na bokula ya mai monene. Ntango bakómaki na esika oyo lobwaku yango efungwami, Asa atɛlɛmaki mpe amonaki likambo ya kokamwa. Kuna na nse, amonaki kaa moko monene mpenza ya banguna! Basoda yango ya Etiopi bazalaki bato milio moko. Nzokande, basoda na ye bazalaki kaka mwa moke koleka nkóto nkama mitano.

Lokola Asa amonaki ete etumba ezali mosika te, akanisaki libosoliboso kosala nini? Kopesa bakonzi ya basoda na ye mitindo? Kolendisa basoda na ye? To kotindela libota na ye mikanda? Te! Liboso ya mokakatano monene wana, Asa abondelaki.

Liboso tólobela libondeli yango mpe makambo oyo esalemaki na nsima, tótalela naino soki Asa azalaki moto ya ndenge nini. Nini etindaki ye abondela? Ebongaki mpenza aluka lisalisi ya Nzambe? Lisolo ya Asa ezali koteya biso nini na ndenge oyo Yehova apambolaka misala ya basaleli na Ye?

LISOLO YA ASA

Na boumeli ya mbula 20 kobanda ntango Yisraele ekabwanaki na makonzi mibale, bato mingi na Yuda bamipesaki mpenza na mimeseno ya bato ya bikólo mosusu. Ntango Asa akómaki mokonzi na mobu 977 L.T.B., losambo ya banzambe ya kobota oyo Bakanana bazalaki kosambela esilaki kokɔta ata na ndako ya mokonzi. Kasi lisolo ya boyangeli ya Asa elobi ete mokonzi yango “asalaki oyo ezali malamu mpe sembo na miso ya Yehova Nzambe na ye.” Asa “alongolaki bitumbelo ya bapaya mpe bisika oyo etombwaná, abukaki makonzí ya losambo mpe akataki banzete ya losambo.” (2 Nta. 14:2, 3) Asa alongolaki mpe na ekólo Yuda “mibali oyo bazali bandumba ya tempelo,” oyo bazalaki kosangisa nzoto na baninga na bango mibali na kati ya losambo na bango. Asa asukaki kaka na makambo wana te. Alendisaki mpe bato ete “báluka Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango” mpe bátosa “mobeko mpe mitindo” ya Nzambe.​—1 Bak. 15:12, 13; 2 Nta. 14:4.

Yehova asepelaki na molende oyo Asa amonisaki mpo na losambo ya solo, yango wana apesaki ekólo mobimba kimya bambula mingi. Yango wana mokonzi alobaki ete: “Toluki Yehova Nzambe na biso. Toluki, mpe apesi biso bopemi epai na epai.” Na eleko yango ya kimya, bato ya ekólo Yuda batongaki bifelo na bingumba ya bokonzi ya Yuda. Biblia elobi ete: “Bazalaki kotonga mpe kolonga.”​—2 Nta. 14:1, 6, 7.

ASA ABUNDI MPE ALONGI

Soki totaleli lisolo ya Asa, tokokamwa te ete abondelaki ntango amonaki basoda oyo bazalaki ebele koleka limpinga ya basoda mosusu nyonso oyo Biblia elobeli. Asa ayebaki ete Nzambe apambolaka bato oyo batyelaka ye motema. Yango wana, abondelaki Yehova asalisa ye. Asa ayebaki ete soki atyeli Nzambe motema mpe soki Nzambe azali elongo na ye, akosalisa ye alonga ata soki banguna bazali ebele to bazali na nguya mingi. Ndenge oyo etumba yango esengelaki kosuka elingaki kokumisa nkombo ya Yehova to kosambwisa yango; yango wana Asa abondelaki Nzambe mpo na yango. Alobaki boye: “Salisá biso, Ee Yehova, Nzambe na biso, mpo totyeli yo motema, mpe toyei kobunda na ebele ya bato oyo na nkombo na yo. Ee Yehova, yo ozali Nzambe na biso. Moto​—mowei mpamba—​azala na makasi te ya kobunda na yo.” (2 Nta. 14:11) Ezali lokola nde azalaki koloba ete: ‘Yehova, bato ya Etiopi bazali kotumola yo. Kotika te ete bato mpamba bálonga bato oyo bazali komema nkombo na yo, mpo nkombo na yo efingama te.’ Nzambe ayokaki libondeli ya Asa. Biblia elobi ete “Yehova alongaki bato ya Etiopi liboso ya Asa mpe liboso ya Yuda, mpe bato ya Etiopi bakimaki.”​—2 Nta. 14:12.

Lelo oyo, biso basaleli ya Yehova tozali mpe na banguna mingi oyo bazali na nguya. Ezali te ete biso ná bango tokokutana na esika moko boye mpo tóbunda na makɔnga to na mindoki. Atako bongo, tokoki kozala na elikya ete Yehova akosalisa bakristo nyonso ya sembo oyo bazali kobunda etumba ya elimo mpo na nkombo na ye ete bálonga. Mokomoko na biso azali na oyo ya ye etumba; ekoki kozala etumba mpo na kotɛmɛla elimo mpe misala ya mbindo ya mokili oyo, kolonga bolɛmbu na ye moko, to mpe kobatela libota na ye na makambo ya mbindo. Kasi, ata soki tozali na mokakatano ya ndenge nini, libondeli ya Asa ekoki kolendisa biso. Yehova nde alongaki na etumba oyo Asa abundaki. Bolongi yango emonisi ete soki totyeli Yehova motema, akosalisa biso. Moto moko te akoki kolonga Yehova.

MOSAKOLI YA YEHOVA ALENDISI ASA MPE AKEBISI YE

Nsima ya kobunda etumba, ntango Asa azalaki kozonga na ndako na ye, Azaria akendaki kokutana na ye. Mosakoli yango alendisaki ye mpe akebisaki ye; alobaki boye: “Bóyoka ngai, Ee Asa mpe Yuda mobimba ná Benyamina! Yehova azali elongo na bino ntango nyonso oyo bozali na ye; mpe soki boluki ye, akotika bómona ye, kasi soki botiki ye, akotika bino. . . . Bózala na mpiko mpe bólɛmbisa mabɔkɔ te, mpamba te mosala na bino ezali na mbano.”​—2 Nta. 15:1, 2, 7.

Maloba yango ekoki kolendisa kondima na biso. Ezali komonisa ete Yehova akozala elongo na biso ntango nyonso oyo tokosalela ye na bosembo. Ntango tozali kobelela ye mpo na kosɛnga lisalisi, tokoki kondima ete akoyoka biso. Azaria alobaki ete: “Bózala na mpiko.” Esɛngaka ntango nyonso mpiko mpo na kosala oyo ezali malamu, kasi toyebi ete tokoki kosala yango na lisalisi ya Yehova.

Lokola nkɔkɔ na ye ya mwasi Maaka asalaki “ekeko moko ya nsɔmɔ mpo na nzete ya losambo,” Asa asengelaki kozwa ekateli monene ya kolongola ye titre ya “mwasi ya lokumu.” Asalaki yango mpe atumbaki ekeko wana. (1 Bak. 15:13) Yehova apambolaki Asa mpo na ekateli oyo azwaki mpe mpiko oyo amonisaki. Biso mpe tosengeli kokangama makasi na Yehova mpe na mitinda na ye ya sembo, ezala bandeko na biso bazali sembo epai ya Nzambe to te. Soki tosali bongo, Yehova akopambola biso mpo na bosembo na biso.

Lipamboli mosusu oyo Asa azwaki ezali ete Bayisraele mingi balongwaki na bokonzi ya nɔrdi mpe bayaki na Yuda mpo bamonaki ete Yehova azali elongo na ye. Balingaki mingi losambo ya solo, yango wana bandimaki kotika bandako na bango mpo bákende kofanda elongo na basaleli ya Yehova. Na nsima, Asa mpe bato nyonso ya Yuda bakakatanaki te kosala ‘kondimana moko mpo na koluka Yehova na motema na bango mobimba mpe na molimo na bango mobimba.’ Nini esalemaki na nsima? Nzambe “atikaki bámona ye; mpe Yehova akobaki kopesa bango bopemi epai na epai.” (2 Nta. 15:9-15) Tosepelaka mingi ntango bato oyo balingaka boyengebene bandimi kosambela Yehova!

Nzokande, mosakoli Azaria apesaki mpe Asa likebisi moko ya polele. Alobaki boye: “Soki botiki [Yehova], akotika bino.” Tólinga ata moke te ete likambo ya ndenge wana ekómela biso, mpamba te yango ekoki komemela biso mpasi! (2 Pe. 2:20-22) Biblia emonisi te ntina oyo Yehova apesaki Mokonzi Asa likebisi wana, kasi atosaki yango te.

“OSALI BOZOBA”

Na mbula ya 36 ya boyangeli ya Asa, Baasha, mokonzi ya Yisraele ayaki kobundisa Yuda. Baasha abandaki kotonga bifelo na engumba Rama, oyo ezalaki pembeni ya Yuda, na kilomɛtrɛ 8 na nɔrdi ya Yerusaleme, mbala mosusu mpo na kopekisa bato na ye bákende na ngámbo ya Mokonzi Asa mpo bálanda losambo ya solo. Na esika Asa aluka lisalisi ya Nzambe ndenge asalaki ntango bato ya Etiopi bayaki kobundisa ye, alukaki lisalisi ya bato. Atindaki likabo epai ya mokonzi ya Siri, mpe asɛngaki ye akende kobundisa Yisraele, bokonzi ya nɔrdi. Ntango basoda ya Siri babundisaki Yisraele, Baasha atikaki kotonga bifelo na Rama.​—2 Nta. 16:1-5.

Yehova asepelaki te na likambo oyo Asa asalaki mpe atindaki mosakoli Hanani akende koyebisa ye yango. Lokola Asa amonaki ndenge Nzambe asalisaki ye ntango abundaki na basoda ya Etiopi, asengelaki koyeba ete “miso [ya Yehova] ezali kotambolatambola na mabele mobimba mpo na komonisa makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.” Ekoki kozala ete Asa azwaki toli mabe to amonaki ete Baasha mpe basoda na ye bazali mpenza makasi te mpe ete akoki kolonga bango na mayele na ye moko. Ezala bongo to te, Asa alandaki makanisi ya bato mpe atyelaki Yehova motema te. Hanani alobaki na ye boye: “Osali bozoba na likambo oyo, yango wana kobanda sikoyo bitumba ekoyela yo.”​—2 Nta. 16:7-9.

Ntango Asa ayokaki bongo, asilikaki makasi mpe atyaki mosakoli Hanani na bikanga-makolo. (2 Nta. 16:10) Mbala mosusu Asa akanisaki boye: ‘Ebongi nde kopamela ngai boye nsima ya kotikala sembo bambula mingi?’ Ekoki nde kozala ete lokola akómaki mobange, azalaki lisusu kokanisa malamu te? Biblia epesi eyano te.

Na mbula ya 39 ya boyangeli na ye, Asa abɛlaki maladi makasi ya makolo. Biblia elobi ete “ata na maladi na ye alukaki Yehova te, kasi alukaki nde banganga-nkisi.” Emonani ete na ntango wana, Asa azalaki lisusu na boyokani makasi te ná Yehova mpe atikalaki bongo tii liwa na ye, na mbula ya 41 ya boyangeli na ye.​—2 Nta. 16:12-14.

Atako bongo, bizaleli malamu ya Asa mpe molende na ye mpo na losambo ya solo elekaki mabunga oyo asalaki. Atikaki kosalela Yehova te. (1 Bak. 15:14) Soki totaleli makambo wana, bomoi ya Asa ekoki koteya biso nini? Ekoki kosalisa biso tókanisaka ndenge oyo Yehova asalisaki biso liboso, mpamba te kokanisa makambo wana ekoki kotinda biso tóbondela mpo na kosɛnga ye lisalisi ntango tokutani na komekama mosusu. Kasi, tosengeli te kokanisa ete tozali na mposa ya toli ya Biblia te mpo tosalelaka Nzambe na bosembo banda bambula mingi. Ata soki tosaleli ye bambula mingi, Yehova akopamela biso soki tosali libunga. Tosengeli kondima mpamela yango na komikitisa nyonso mpo tózwela yango matomba. Oyo eleki ntina, Tata na biso ya likoló akozala elongo na biso ntango nyonso oyo tokosalela ye. Miso ya Yehova ezali kolukaluka na mabele mobimba bato oyo bazali sembo epai na ye. Apambolaka bango na ndenge amonisaka makasi na ye mpo na kosalisa bango. Yehova asalaki yango mpo na Asa, mpe akoki kosala yango mpo na biso.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]

Yehova apambolaka bakristo ya sembo oyo bazali kobunda etumba ya elimo

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 10]

Esɛngaka mpiko mpo na kosala oyo ezali malamu na miso ya Yehova