Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Zwá liteya na motema molai ya Yehova mpe ya Yesu

Zwá liteya na motema molai ya Yehova mpe ya Yesu

“Bótalela motema molai ya Nkolo na biso ete ezali lobiko.”​—2 PE. 3:15.

1. Bakristo mosusu ya sembo bamitunaka motuna nini?

NDEKO mwasi moko oyo asalelaka Yehova na bosembo, oyo ayikelaki mikakatano ndenge na ndenge mpiko na boumeli ya bambula mingi, atunaki boye: “Nakozala kaka na bomoi ntango nsuka ekoya?” Bakristo mosusu oyo basaleli Yehova bambula mingi bamitunaka mpe motuna wana. Tozelaka na mposa makasi ntango Nzambe akosala biloko nyonso biloko ya sika mpe akosilisa mikakatano oyo tozali kokutana na yango lelo. (Em. 21:5) Atako makambo nyonso ezali kondimisa biso ete nsuka ya ebongiseli ya Satana ekómi mpenza pene, kozela mokolo yango na motema molai ekoki kozala mokakatano monene.

2. Mituna nini etaleli motema molai ya Nzambe tokotalela na lisolo oyo?

2 Nzokande, Biblia emonisi ete tosengeli kozala na motema molai. Lokola basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala, tokozwa mapamboli oyo Nzambe alaki soki tozali na kondima makasi mpe soki tozali kozela na motema molai ntango oyo akokokisa bilaka yango. (Tángá Baebre 6:11, 12.) Yehova ye moko mpe amonisaka motema molai. Akokaki kosilisa mabe banda kala, kasi azali kozela ntango oyo ebongi. (Rom. 9:20-24) Mpo na nini azali komonisa motema molai ndenge wana? Ndenge nini Yesu apesaki ndakisa ya motema molai lokola Yehova? Matomba nini tokozwa soki toloni motema molai lokola Yehova? Biyano na mituna yango ekoki kosalisa biso tókóma na motema molai mpe na kondima makasi, ata soki tozali komona lokola nde Yehova azali koumisa makambo.

MPO NA NINI YEHOVA AMONISAKA MOTEMA MOLAI?

3, 4. (a) Mpo na nini Yehova azali na motema molai mpo na kokokisa mokano na ye mpo na mabele? (b) Yehova asalaki nini ntango botomboki ebimaki na Edene?

3 Yehova azali mpenza na ntina ya komonisa motema molai. Ya solo, Yehova azalaka ntango nyonso mokonzi oyo aleki na molɔ́ngɔ́ mobimba; atako bongo, botomboki oyo ebimaki na Edene ebimisaki mituna oyo etaleli bikelamu nyonso. Yehova amonisaka motema molai mpo ayebi ete esengelaki ntango mingi mpo na kopesa biyano na mituna yango na ndenge ebongi mpenza. Lokola ayebi malamu bizaleli mpe makanisi ya bikelamu na ye na likoló mpe awa na mabele, na ntembe te azali kosala makambo nyonso mpo na bolamu na biso.​—Ebr. 4:13.

4 Yehova alingaki ete Adama ná Eva bábota mpe bátondisa mokili. Ntango Satana akosaki Eva mpe na nsima Adama atosaki maloba ya Nzambe te, Nzambe atikaki mokano na ye te. Makanisi na ye ebulunganaki te, azwaki bikateli ya mbangumbangu te, mpe asundolaki bato te. Azwaki nde bibongiseli mosusu mpo na kokokisa mokano na ye mpo na bato mpe mabele. (Yis. 55:11) Mpo na kokokisa mokano na ye mpe kolongisa bokonzi na ye, Yehova amipekisaki mingi mpe amonisaki motema molai; kutu azelaki bankóto ya bambula mpo makambo mosusu oyo etali mokano na ye ekokisama malamu mpenza.

5. Motema molai ya Yehova ezali komema mapamboli nini?

5 Yehova azali mpe kozela na motema molai mpo alingi ete bato mingi bázwa bomoi ya seko. Lelo oyo, azali koyanganisa “ebele mpenza ya bato” mpo bázwa lobiko. (Em. 7:9, 14; 14:6) Na lisalisi ya mosala ya kosakola oyo tozali kosala, Yehova azali kobenga bato mpo báyeba Bokonzi na ye mpe mibeko na ye ya sembo. Nsango ya Bokonzi ezali nsango oyo eleki malamu mpo na bato; kutu Biblia ebengi yango “nsango malamu.” (Mat. 24:14) Moto nyonso oyo Yehova abendi akɔtaka na lisangá ya baninga ya solosolo na mokili mobimba, oyo balingaka makambo ya malamu. (Yoa. 6:44-47) Nzambe na biso ya bolingo azali kosalisa bato ya ndenge wana bákóma baninga na ye. Azali mpe kopona bato oyo bakoyangela na guvɛrnema na ye na likoló. Ntango bato yango ya sembo bakozala kuna na likoló, bakosalisa bato ya botosi bákóma bato ya kokoka mpe bázala na bomoi ya seko. Tomoni mpenza ete ata ntango Yehova azali kozela na motema molai, azali kosala makambo mpo na kokokisa bilaka na ye mpo na bolamu na biso.

6. (a) Na ndenge nini Yehova amonisaki motema molai na mikolo ya Noa? (b) Ndenge nini Yehova azali komonisa motema molai na mikolo na biso?

6 Atako mabe ekómaki mingi liboso ya Mpela, ndenge oyo Yehova asalaki makambo emonisi ete azalaka motema molai atako amonaka makambo oyo ekoki mpenza kotinda ye akanga lisusu motema te. Mabele etondaki na mabe mpe mobulu, mpe Yehova “ayokaki mawa” na komona ndenge bato babebaki mpenza. (Eba. 6:2-8) Akokaki kotika te ete makambo yango eumela libela; yango wana azwaki ekateli ya koboma bato mabe na mpela. Ntango “motema molai ya Nzambe ezalaki kozela na mikolo ya Noa,” Yehova azwaki bibongiseli mpo na kobikisa Noa ná libota na ye. (1 Pe. 3:20) Na ntango oyo ebongi, Yehova ayebisaki Noa ekateli yango mpe atindaki ye atonga masuwa. (Eba. 6:14-22) Noa azalaki mpe “mosakoli ya boyengebene,” azalaki koyebisa bazalani na ye ete etikali moke Nzambe aboma mokili. (2 Pe. 2:5) Yesu alobaki ete ntango na biso ekozala ndenge moko na mikolo ya Noa. Yehova asilá kopona mokolo oyo akoboma mokili oyo mabe. Moto moko te ayebi “mokolo mpe ngonga” oyo nsuka ekoya. (Mat. 24:36) Sikoyo, Nzambe apesi biso mokumba ya kokebisa bato mpe koyebisa bango oyo bakoki kosala mpo bábika.

7. Tokoki nde koloba ete Yehova azali koumela mpo na kokokisa bilaka na ye? Limbolá.

7 Motema molai ya Yehova elakisi te ete azali kozela kaka ntango eleka. Tosengeli soki moke te kokanisa ete motema molai na ye elakisi ete azali kokipe makambo te to akangi mabɔkɔ! Kasi, toyebi ete ekoki kozala mpasi tóbatela makanisi yango ntango tozali kokóma mibange to tozali konyokwama na mokili oyo mabe. Tokoki kolɛmba nzoto to kokanisa ete Nzambe azali koumela mpo na kokokisa bilaka na ye. (Ebr. 10:36) Tóbosana soki moke te ete Nzambe azali na ntina oyo azali komonisa motema molai mpe ete na ntango yango, azali kosala makambo mpo na bolamu ya basaleli na ye ya sembo. (2 Pe. 2:3; 3:9) Sikoyo, tótalela mpe ndenge oyo Yesu amonisaki motema molai lokola Nzambe.

NDENGE NINI YESU APESAKI NDAKISA MALAMU YA MOTEMA MOLAI?

8. Yesu amonisaki motema molai na makambo nini?

8 Yesu asalaka mokano ya Nzambe banda bankóto ya bambula. Ntango Satana atombokelaki Nzambe, Yehova azwaki ekateli ya kotinda Mwana na ye se moko oyo abotamaki aya awa na mabele lokola Masiya. Kanisá naino: Yesu azelaki bankóto ya bambula tii ntango yango ekokaki. (Tángá Bagalatia 4:4.) Ntango nyonso oyo azalaki kozela, akangaki mabɔkɔ te; azalaki nde kosala mosala oyo Tata na ye apesaki ye. Ntango ayaki awa na mabele, ayebaki ete Satana akoboma ye, ndenge esakolamaki. (Eba. 3:15; Mat. 16:21) Amonisaki motema molai mpe andimaki kokokisa mokano ya Nzambe, atako esɛngaki ete andima liwa ya mpasi. Azalaki na bosembo oyo ekokani na mosusu te. Azalaki kokanisa kaka bolamu to lokumu na ye te; tokoki kozwa liteya na ezaleli na ye wana.​—Ebr. 5:8, 9.

9, 10. (a) Yesu azalaki kosala nini ntango azalaki kozela na motema molai ete Yehova ye moko akokisa mokano na ye? (b) Ndenge nini tosengeli kotalela manaka ya Yehova?

9 Yesu azwaki bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele nsima ya lisekwa na ye. (Mat. 28:18) Asalelaka bokonzi yango mpo na kokokisa mokano ya Yehova na kolanda manaka oyo Nzambe atyá. Yesu afandaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe mpe azelaki na motema molai tii 1914, ntango banguna na ye batyamaki lokola ebonga ya makolo na ye. (Nz. 110:1, 2; Ebr. 10:12, 13) Mosika te, akobunda etumba mpo na koboma mokili ya Satana. Liboso mokolo yango ekoka, na motema molai nyonso, Yesu azali kosalisa bato mpe azali komema bango na “mai ya bomoi.”​—Em. 7:17.

10 Ndakisa ya Yesu ezali nde kosalisa yo otalelaka manaka ya Yehova ndenge ye azalaki kotalela yango? Na ntembe te Yesu azalaki na mposa makasi ya kosala nyonso oyo Tata na ye asɛngaki ye; atako bongo, andimaki kozela ntango oyo Nzambe atye. Liboso ebongiseli ya Satana ebomama, biso nyonso tosengeli komonisa motema molai lokola Nzambe; tosengeli te koboya ete Nzambe atambwisa biso, tosengeli mpe te kotika kosalela ye mpo tolɛmbi nzoto. Tosengeli kosala nini mpo tókóma na motema molai lokola Nzambe?

NASALAKA NINI MPO NAZALA NA MOTEMA MOLAI LOKOLA NZAMBE?

11. (a) Boyokani nini ezali kati na kondima mpe motema molai? (b) Mpo na nini tosengeli kozala na kondima makasi?

11 Liboso Yesu aya awa na mabele, basakoli mpe basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe bapesaki ndakisa oyo emonisaki ete bato ya kozanga kokoka bakoki koyika mpiko mpe kozala na motema molai. Bazalaki na motema molai mpamba te bazalaki mpe na kondima. (Tángá Yakobo 5:10, 11.) Soki bandimaki mpenza te makambo oyo Yehova ayebisaki bango, na maloba mosusu soki bazangaki kondima, balingaki nde kozela na motema molai kokokisama ya bilaka na ye? Bakutanaki na makambo ya ndenge na ndenge oyo ezalaki kobangisa bango mpe komeka kondima na bango, kasi bazalaki na elikya ete nsukansuka Nzambe akokokisa bilaka na ye. (Ebr. 11:13, 35-40) Tosengeli kozala na kondima makasi koleka, mpamba te lelo oyo Yesu azali kosala lokola “Mokokisi ya kondima na biso.” (Ebr. 12:2) Akokisaki bisakweli ya Biblia mpe amonisaki mokano ya Nzambe na ndenge oyo ezali kopesa biso kondima makasi koleka.

12. Tosengeli kosala nini mpo tókóma na kondima makasi?

12 Makambo nini tosengeli kosala mpo tókóma na kondima makasi, mpe tókóma na motema molai? Ezali na ntina mingi tótosa batoli ya Nzambe. Na ndakisa, kanisá naino makambo oyo esengeli kotinda yo otya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na yo. Okoki nde kobakisa milende mpo osalela toli oyo ezali na Matai 6:33? Yango ekoki kosɛnga ete okóma kosakola mingi mpe obongisa makambo mosusu ya bomoi na yo. Kobosana te ndenge oyo Yehova apamboli milende na yo tii lelo oyo. Mbala mosusu asalisaki yo ozwa moto ya koyekola na ye Biblia mpe asalisaki yo ozwa “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.” (Tángá Bafilipi 4:7.) Soki ozali kotya makanisi na mapamboli oyo ozwá mpo ozali kolanda malako ya Yehova, okomona ete kozala motema molai ezali mpenza na ntina.​—Nz. 34:8.

13. Ndakisa nini tokoki kosalela mpo na komonisa ndenge oyo tokoki kokóma na kondima makasi mpe na motema molai?

13 Tokoki kokokanisa likambo yango na kolona mpe kobuka mbuma. Mbala nyonso oyo mosali-bilanga abuki mbuma mingi, akómaka na makasi ya kolona lisusu na mbala ekoya. Ya solo, ekosɛnga azela na motema molai tii ntango akobuka mbuma, kasi yango ekopekisa ye te alona mboto; kutu ntango mosusu akolona mboto na elanga ya monene koleka mbala ya liboso, mpo azali na elikya ete akobuka mbuma. Ndenge moko mpe, ntango tozali koyekola batoli ya Yehova, tozali kosalela yango mpe tozali komona matomba na yango, tokómaka kotyela ye motema mingi lisusu. Kondima na biso mpe ekómaka makasi, mpe ezalaka mpasi te tózela mapamboli mpo toyebi ete tokozanga te kozwa yango.​—Tángá Yakobo 5:7, 8.

Motema molai ekosalisa biso tótya Bokonzi na esika ya liboso mpe tózwa mapamboli!

14, 15. Ndenge nini tosengeli kotalela bampasi ya bato?

14 Likambo mosusu oyo tosengeli kosala mpo tókóma na motema molai ezali ya koluka koyeba ndenge oyo tosengeli kotalela mokili mpe bomoi na biso moko. Meká kotalela makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango. Na ndakisa, kanisá ndenge oyo atalelaka bampasi ya bato. Banda kala ayokaka mpasi ntango azali komona ndenge bato bazali konyokwama; atako bongo, atikaka te ete mpasi yango ebulunganisa ye mpe epekisa ye asala makambo ya malamu. Atindaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki mpo ‘abukabuka misala ya Zabolo’ mpe alongola bampasi nyonso oyo Satana abimiselaka bato. (1 Yoa. 3:8) Kutu, bampasi yango ezali kaka mpo na mwa ntango, kasi makambo oyo Nzambe akosala ekoumela libela. Ndenge moko mpe, na esika tómitungisa koleka ndelo mpo na makambo mabe oyo boyangeli ya Satana ebimisi to tókóma motema mokuse mpe tóbanda komituna soki mabe yango ekosila mokolo nini, tosengeli kozala na kondima na makambo oyo ezali komonana te, oyo ekoumela libela. Yehova atye ntango mpo na kolongola makambo mabe, mpe akosala yango mpenza na ngonga oyo atye.​—Yis. 46:13; Nah. 1:9.

15 Na mikolo ya nsuka ya ebongiseli oyo, oyo etondi na mpasi, tokoki kokutana na makambo mosusu oyo ekotya kondima na biso na komekama. Na esika tósilika ntango banyokoli biso to ntango bandeko to baninga na biso bazali konyokwama, tosengeli kozala na ekateli ya kotyela Yehova motema mobimba. Yango ezali pɛtɛɛ te mpamba te tozali bato ya kozanga kokoka. Kasi tóbosana te likambo oyo Yesu asalaki, ndenge emonisami na Matai 26:39.​Tángá.

16. Liboso nsuka eya, makambo nini tosengeli te kosala?

16 Moto oyo azali kondima te ete nsuka ekómi pene akoki kokóma na makanisi oyo ebongi te. Na ndakisa, akoki kobanda kokanisa ete asengeli kosala makambo na ye moko mpo ntango mosusu bilaka ya Yehova ekokokisama te. Na maloba mosusu, na kati ya motema, moto yango akoki kobanda koloba boye: ‘Nani ayebi, mbala mosusu Yehova akokokisa na ye te bilaka oyo apesi.’ Yango ekoki kotinda ye aluka kokóma moto monene na mokili oyo, aluka kozala na mbongo mingi, na esika atya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso, to mpe akanisa ete kotánga bakelasi milaimilai ekosala ete azala na bomoi ya malamu lelo oyo. Nzokande, makambo wana ekomonisa ete azangi kondima. Tóbosana te ete ntoma Paulo alendisi biso tómekola basaleli ya sembo oyo “na nzela ya kondima mpe motema molai,” bazwaki bilaka ya Yehova. (Ebr. 6:12) Yehova akotika te ete mokili mabe oyo eumela ntango mingi koleka ndenge oyo mokano na ye esɛngi. (Hab. 2:3) Liboso nsuka eya, tosengeli te kosalela Yehova kaka tiká tósala. Tosengeli nde kozala ntango nyonso ekɛngɛ mpe kozala molende na mosala ya kosakola, mosala oyo ezali kopesa biso esengo mingi mpenza.​—Luka 21:36.

MOTEMA MOLAI EMEMAKA MAPAMBOLI NINI?

17, 18. (a) Motema molai ya Nzambe ezali kopesa biso libaku nini? (b) Mapamboli nini tokozwa soki tozali na motema molai sikoyo?

17 Ata soki tozali kosalela Nzambe banda mwa basanza to tosalelaka ye banda bambula mingi, mposa na biso ezali ete tósalela ye libela na libela. Motema molai ekosalisa biso tóyika mpiko tii tokozwa lobiko, ata soki etikali ntango boni liboso nsuka eya. Lelo oyo Yehova azali kopesa biso libaku ya komonisa ete tondimaka mpenza bikateli na ye, mpe, soki esengeli, ya komonisa ete tokondima komona mpasi mpo na nkombo na ye. (1 Pe. 4:13, 14) Nzambe azali mpe kopesa biso formasyo oyo ekosalisa biso tózala na motema molai oyo esengeli mpo na kozwa lobiko.​—1 Pe. 5:10.

18 Yesu azali na bokonzi nyonso na likoló mpe awa na mabele, mpe eloko moko te ekoki kopekisa yo ozwa libateli na ye, longola kaka yo moko. (Yoa. 10:28, 29) Tosengeli te kobanga avenire to mpe liwa. Baoyo bazali na motema molai mpe bazali koyika mpiko tii na nsuka bakobika. Yango wana tosengeli kotika te ete mokili ekosa biso mpo tótika kotyela Yehova motema. Tosengeli nde kozala na ekateli ya kokómisa kondima na biso makasi mpe kosalela malamu ntango oyo Nzambe atiki na motema molai na ye.​—Mat. 24:13; tángá 2 Petro 3:17, 18.