Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Boyebi mokolo te mpe ngonga te”

“Boyebi mokolo te mpe ngonga te”

“Yango wana, bósɛnzɛlaka mpamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te.”​—MAT. 25:13.

1-3. (a) Bandakisa nini emonisi likambo oyo Yesu alingaki kolobela na masese mibale oyo apesaki? (b) Tosengeli koyanola na mituna nini?

KANISÁ ete mokonzi moko asɛngi yo okende kotika ye na motuka na esika moko boye mpo na likambo moko ya ntina mingi. Nzokande, mwa baminiti liboso bókende, omoni ete esansi oyo ezali na motuka ekokoka te mpo bókóma tii na esika yango. Esengeli okende mbangu kosomba esansi mosusu. Wana ozali kokende, mokonzi yango abimi. Atali epai na epai kasi amoni yo te. Azali na ntango ya kozela yo te, yango wana asɛngi sofɛlɛ mosusu akende kotika ye. Mwa moke na nsima ozongi, kasi oyei kokuta ete mokonzi asili kokende. Okoyoka ndenge nini?

2 Sikoyo kanisá ete yo nde mokonzi mpe oponi mibali misato ya makasi básalela yo mosala moko ya ntina mingi. Oyebisi bango makambo basengeli kosala, mpe bango nyonso bandimi kosala yango. Kasi, mwa moke na nsima ntango ozongi, omoni ete kaka mibali mibale nde basali mosala na bango. Longola yango, mobali oyo asalaki eloko te azali koluka komilongisa. Kutu, amekaki ata komeka te. Okoyoka ndenge nini?

3 Na lisese ya bangɔndɔ mpe lisese ya batalanta oyo Yesu apesaki, alobelaki makambo ya ndenge wana mpo na komonisa ntina oyo, na ntango ya nsuka, bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo bakozala sembo mpe mayele, kasi bamosusu bakozala bongo te. * (Mat. 25:1-30) Amonisaki mpenza ntina ya likambo yango na maloba oyo: “Yango wana, bósɛnzɛlaka mpamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te,” elingi koloba ntango oyo Yesu akoboma mokili ya Satana oyo Nzambe akateli etumbu. (Mat. 25:13) Tokoki kosalela toli yango lelo oyo. Matomba nini tokoki kozwa soki tozali kosɛnzɛla ndenge Yesu alendisaki biso? Banani bazali komilɛngɛla mpo na kobika? Mpe tosengeli kosala nini lelo oyo mpo tókoba kosɛnzɛla?

NTINA OYO TOSENGELI KOKOBA KOSƐNZƐLA

4. Mpo na nini ‘kokoba kosɛnzɛla’ elimboli te kotalaka ngonga?

4 Makambo mosusu oyo tosalaka, na ndakisa kosala na kompanyi, kokende epai ya monganga, to kokende kozwa bisi, esɛngaka kolanda programɛ moko boye. Nzokande mpo na kosala makambo mosusu, na ndakisa koboma mɔtɔ oyo ezali kozikisa ndako to kobikisa bato na likama, kotala ngonga ezalaka na ntina te, kutu ekoki kozala likama. Na makambo ya ndenge wana, ezalaka na ntina mingi kotya likebi na mosala oyo tozali kosala, na esika tótalaka ngonga. Lokola nsuka ya mokili oyo ekómi mpenza pene, mosala oyo eleki ntina lelo oyo ezali ya kosalisa bato bándima bibongiseli ya Yehova mpo na lobiko. Mpo na biso bakristo, kokoba kosɛnzɛla elimboli te kotalaka ngonga. Kutu, tozali na matomba soki mitano lokola toyebi te mokolo mpe ngonga oyo nsuka ekoya.

5. Na ndenge nini kozanga koyeba mokolo to ngonga ekoki kosalisa biso tómonisa oyo ezali mpenza na motema na biso?

5 Ya liboso, lokola toyebi te ntango oyo nsuka ekoya, yango esalisaka biso tómonisa oyo ezali mpenza na motema na biso. Kozanga koyeba ntango oyo nsuka ekoya esalisaka biso tómonisa mpenza ete tozali sembo epai ya Yehova. Atako tolingaka ete tóbika ntango mokili oyo ekobomama, tosalelaka Yehova kaka mpo na kozwa bomoi te, kasi mpo tolingaka ye. (Tángá Nzembo 37:4.) Tosepelaka kosala mokano na ye, mpe tomonaka ete Nzambe ateyaka biso mpo na litomba na biso moko. (Yis. 48:17) Tomonaka te ete mibeko na ye ezali kilo.​—1 Yoa. 5:3.

6. Ntango tozali kosalela Nzambe mpo tolingaka ye, ayokaka ndenge nini, mpe mpo na nini?

6 Ya mibale, lokola toyebi te mokolo to ngonga oyo nsuka ekoya, tozali na libaku malamu ya kosala makambo oyo ekosepelisa motema ya Yehova. Ntango tozali kosalela ye mpo tolingaka ye, kasi te mpo tozali kotala dati moko to mpo na kozwa mbano, tozali kosalisa Yehova apesa monguna na ye Satana eyano na makambo ya lokuta oyo alobaki mpo na Ye. (Yobo 2:4, 5; tángá Masese 27:11.) Soki tokanisi mpasi mpe mikakatano nyonso oyo Zabolo abimiselaka bato, tomonaka ete ebongi tózala na ngámbo ya boyangeli ya Yehova mpe tóboya boyangeli ya Satana.

7. Mpo na nini okanisi ete kozala na bomoi ya komipimela ezali malamu mpenza?

7 Ya misato, kosalela Nzambe kozanga kotala dati moko boye elendisaka biso tózala na bomoi ya komipimela. Lelo oyo, bato mosusu oyo bayebi Nzambe te bandimaka mpe ete makambo oyo ezali kosalema ezali komonisa ete mokili oyo ekoumela lisusu ntango molai te. Lokola babangaka ete likama moko ekoki koya lelo to lobi, balobaka ete: “Tólya mpe tómɛla, mpo lobi tokokufa.” (1 Ko. 15:32) Nzokande, biso tobangaka eloko te. Tolingaka te komitangola na basusu mpo na koluka bamposa na biso ya lokoso. (Mas. 18:1) Tondimaka nde komipimela makambo mosusu mpe topesaka ntango na biso, makasi na biso, mpe biloko na biso mosusu mpo na koyebisa bato nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Tángá Matai 16:24.) Tosepelaka kosalela Nzambe, mingimingi na ndenge tosalisaka basusu báyeba ye.

8. Ndakisa nini oyo euti na Biblia ezali komonisa ete tosengeli kotyela Yehova mpe Liloba na ye motema mobimba?

8 Ya minei, lokola toyebi mokolo to ngonga te, yango esalisaka biso tótyela Yehova motema mobimba mpe tósalela malamumalamu Liloba na ye na bomoi na biso. Mbala mingi, biso bato ya kozanga kokoka tolukaka komityela motema. Paulo akebisaki bakristo nyonso ete: “Moto oyo akanisi ete atɛlɛmi akeba ete akwea te.” Bato 23 000 bakufaki mwa moke liboso Yosua akɔtisa ekólo Yisraele na Mokili ya Ndaka. Paulo alobaki ete “makambo wana . . . ekomamaki mpo ezala likebisi mpo na biso baoyo tokómi na bansuka ya bantango oyo.”​—1 Ko. 10:8, 11, 12.

9. Ndenge nini minyoko ekoki kobongisa biso mpe kosalisa biso tópusana lisusu penepene na Nzambe?

9 Ya mitano, kozanga koyeba ntango oyo nsuka ekoya ezali kotika nzela ete bampasi oyo tozali kokutana na yango lelo ebongisa biso. (Tángá Nzembo 119:71.) Mikolo ya nsuka oyo ezali mpenza “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Tim. 3:1-5) Bato mingi ya mokili oyo etambwisami na Satana bazali koyina biso, yango wana tokoki konyokwama mpo na kondima na biso. (Yoa. 15:19; 16:2) Soki tomikitisi mpe toluki litambwisi ya Nzambe ntango tozali komekama ndenge wana, kondima na biso ekokóma makasi. Tokolɛmba nzoto te. Kutu, tokopusana lisusu penepene na Yehova na ndenge oyo tokokaki ata kokanisa te.​—Yak. 1:2-4; 4:8.

10. Nini esalaka mbala mosusu ete ntango eleka noki?

10 Mbala mosusu tomonaka ete ntango ezali koleka noki; kasi mbala mosusu mpe tomonaka ete ezali kokende malɛmbɛ. Soki tozali na mosala mingi mpe tomipesi na mosala yango na esika ya kotalaka ngonga, tomonaka ete ntango elekaka noki. Ndenge moko mpe, soki tozali komipesa na mosala kitoko oyo Yehova apesi biso, mbala mosusu tokosutuka ete mokolo mpe ngonga yango eyei. Na likambo yango, bakristo mingi oyo batyami mafuta na elimo bapesaki ndakisa malamu. Tótalela mwa moke makambo oyo esalemaki na nsima, ntango Yesu azwaki bokonzi na 1914 mpe ndenge oyo bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo bamilɛngɛlaki, kasi bamosusu basalaki yango te.

BAKRISTO OYO BATYAMI MAFUTA NA ELIMO BAMILƐNGƐLI

11. Nsima ya 1914, mpo na nini bakristo mosusu oyo batyami mafuta na elimo bakanisaki ete Nkolo azali koumela?

11 Kanisá lisusu lisese ya bangɔndɔ mpe lisese ya batalanta oyo Yesu apesaki. Soki bangɔndɔ mpe baombo oyo balobelami na masese yango bayebaki ntango oyo mobali ya libala to nkolo asengelaki koya, elingaki kozala na ntina te ete básɛnzɛla. Kasi, lokola bayebaki te, basengelaki ntango nyonso komilɛngɛla. Atako banda bambula mingi bakristo oyo batyami mafuta na elimo bayebaki ete 1914 ekozala mbula moko ya makambo minene, bayebaki malamu te nini elingaki kosalema na mbula wana. Ntango makambo esalemaki te ndenge bazalaki kokanisa, emonanaki lokola nde mobali ya libala azali koumela. Ndeko moko alobaki boye na nsima: “Mwa bandeko mosusu kati na biso tozalaki mpenza kokanisa ete tolingaki kokende na likoló na pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ [1914].”

12. Ndenge nini bakristo oyo batyami mafuta na elimo bamonisaki ete bazalaki sembo mpe mayele?

12 Kanisá naino ndenge oyo balɛmbaki nzoto lokola bazalaki kozela nsuka eya, kasi eyaki te! Longola yango, banguna batɛmɛlaki bandeko yango na ntango ya Etumba ya liboso ya mokili mobimba. Na boumeli ya mwa ntango, bazalaki lokola nde balali mpɔngi, bazalaki lisusu kosakola te. Kasi, na 1919, mongongo moko elamusaki bango na mpɔngi! Yesu ayaki na tempelo ya elimo, mpe ntango ya kotala tempelo yango ekokaki. Emonanaki ete bato mosusu bamibongisaki te, yango wana bazwaki te libaku ya kokoba kosala mosala mpo na Mokonzi. (Mat. 25:16) Ezali lokola nde bazalaki na bopɔtu mpo na kotya mafuta na miinda na bango ya elimo, ndenge bangɔndɔ oyo bazalaki bazoba basalaki. Mpe, lokola moombo ya gɔigɔi, bandimaki te komipimela makambo mosusu mpo na Bokonzi. Kasi, motángo monene ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo batikalaki mpenza sembo mpe bazalaki na mposa makasi ya kosalela Nkolo na bango ata na bambula wana ya etumba.

13. Nsima ya 1914, bakristo oyo batyami mafuta bazalaki na makanisi nini, mpe ezali boni lelo oyo?

13 Nsima ya 1914, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko elobaki boye: “Bandeko, baoyo kati na biso oyo bazali na makanisi oyo ebongi mpo na Nzambe bandimaka ndenge nyonso oyo abongisaka makambo. Tozalaki na mposa te ete mokano na biso esalema; yango wana ntango tomonaki ete elikya oyo tozalaki na yango ekokisamaki te na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1914, tosepelaki ete Nkolo abongolaki mokano na ye te mpo na kolanda makanisi na biso. Tozalaki na mposa te ete Ye asala bongo. Mposa na biso ezalaki kaka ete tóyeba malamu mikano na Ye.” Tii lelo oyo, bakristo oyo Nkolo atye mafuta na elimo bamonisaka elimo wana ya komikitisa mpe ya kokangama na Nzambe. Balobaka te ete Nzambe ayebisaka bango makambo oyo basakolaka, kasi bazali na ekateli ya kosala mosala ya Nkolo awa na mabele. Lelo oyo, “ebele mpenza ya bato” oyo bazali na kati ya “bampate mosusu,” elingi koloba bakristo oyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabele, bazali komekola ndakisa na bango ya kosɛnzɛla mpe kozala na molende.​—Em. 7:9; Yoa. 10:16.

TOZALI KOMILƐNGƐLA

Ata na ntango ya mikakatano, tólukaka bilei ya elimo

14. Ndenge nini tokobatelama soki tokangami na ebongiseli oyo Nzambe atye mpo na koleisa biso na elimo?

14 Na ndakisa ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, bato oyo bazali na kati na ebele mpenza ya bato bazali ekɛngɛ mpe bazali kokangama na ebongiseli oyo Nzambe aponi mpo na kopesa bato bilei ya elimo. Na ndenge yango, ezali lokola nde bango mpe bazali kotya mafuta na miinda na bango ya elimo na nzela ya Liloba ya Nzambe mpe elimo na Ye. (Tángá Nzembo 119:130; Yoane 16:13.) Lokola balendisami ndenge wana, bango mpe bazali komilɛngɛla mpo na kozonga ya Kristo, mpe bazali kokoba kosalela Nzambe ata ntango bakutani na komekama makasi. Na ndakisa, na bolɔkɔ moko ya Banazi, bandeko bazalaki kaka na Biblia moko na ebandeli. Yango wana babondelaki mpo na kozwa bilei mosusu ya elimo. Mwa moke na nsima bayokaki ete ndeko moko oyo akɔtaki sika na bɔlɔkɔ ayaki na mwa banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo abombaki na kati ya lokolo na ye ya libaya. Ernst Wauer, ndeko moko oyo atyami mafuta na elimo oyo azalaki na kaa yango, alobaki boye na nsima: “Yehova asalisaki biso mpenza tókɔtisa na bɔɔngɔ makanisi ya kolendisa oyo ezalaki na masolo yango.” Na nsima alobaki boye: “Lelo oyo, kozwa bilei ya elimo ezali mpasi te, kasi tozalaka ntango nyonso na botɔndi mpo na yango? Nazali na elikya ete Yehova akopesa bato oyo batyelaka ye motema, oyo batikalaka sembo, mpe oyo balyaka na mesa na ye, ebele ya mapamboli.”

15, 16. Mokristo moko ná mwasi na ye bazwaki mbano nini na mosala ya kosakola, mpe liteya nini okoki kozwa na masolo ya ndenge wana?

15 Bampate mosusu mpe batikali nsima te na mosala ya Nkolo; bazali mpenza kopesa bandeko ya Kristo mabɔkɔ. (Mat. 25:40) Na bokeseni na moombo ya zoba mpe ya gɔigɔi, oyo Yesu alobelaki na lisese na ye, bakristo yango bandimaka komipimela makambo mosusu mpe basalaka milende mpo na kotya Bokonzi na esika ya liboso. Na ndakisa, ntango basɛngaki Jon ná Masako bákende kopesa mabɔkɔ na teritware ya monɔkɔ ya Chinois na Kenya, liboso bakakatanaki mwa moke. Kasi, nsima ya kotalela makambo ya bomoi na bango mpe kobondela, bandimaki kokende.

16 Bazwaki mpenza mbano mpo na milende na bango. Balobaki boye: “Awa mosala ya kosakola ezali mpenza kitoko.” Babandaki koyekola Biblia ná bato 7. Na nsima bakutanaki lisusu na makambo mingi ya esengo. Balobaki boye: “Mokolo na mokolo topesaka Yehova matɔndi ndenge apesi biso nzela tózala awa.” Ya solo, ezali na bandeko mosusu mingi oyo bazwaki ekateli ya komipesa mobimba na mosala ya Nzambe, ata soki nsuka ekoya ntango nini. Kanisá naino bankóto ya bandeko oyo bazwaki diplome na Eteyelo ya Gileade mpe bakómaki bamisionɛrɛ. Okoki koyeba mwa makambo oyo etali mosala yango soki otángi lisolo oyo elobi “Tosalaka nyonso oyo tokoki kosala!” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 2001. Ntango ozali kotánga lisolo yango oyo elobeli ndenge oyo misionɛrɛ alekisaka mokolo, kanisá makambo oyo okoki kosala mpo na komipesa mingi lisusu na mosala ya Nzambe mpo na kosanzola ye, mpe na ndenge yango, kobakisa esengo na yo.

YO MPE KOBÁ KOSƐNZƐLA

Ntango elekaka noki soki tomipesi na makambo ya elimo

17. Na ndenge nini kozanga koyeba mokolo mpe ngonga oyo nsuka ekoya ezali malamu mpo na biso?

17 Tomoni mpenza ete ezali malamu mingi mpo na biso lokola toyebi te mokolo mpe ngonga oyo nsuka ya mokili oyo ekoya. Na esika elɛmbisa biso nzoto, esalisaka biso tópusana lisusu penepene na Yehova, Tata na biso ya bolingo, ntango tozali komipesa mobimba mpo na kosala mokano na ye. Lokola totye lobɔkɔ na etimweli mpe tozali kotala te makambo oyo ekoki kobenda likebi na biso, mosala ya Nkolo ezali kopesa biso esengo mingi.​—Luka 9:62.

18. Mpo na nini tolingaka te ete kondima na biso elɛmba?

18 Mokolo oyo Nzambe akosambisa mokili oyo ezali se kokóma pene. Moto moko te kati na biso alingaka kosala makambo oyo ekoyokisa Yehova to Yesu mawa. Bapesi biso mikumba ya ntina mingi na mikolo oyo ya nsuka. Tosepelaka mpenza ndenge batyelaka biso motema!​—Tángá 1 Timote 1:12.

19. Ndenge nini tokoki komilɛngɛla?

19 Ezala tozali na elikya ya kokende na likoló to ya kofanda na Paradiso awa na mabele, tózala na ekateli ya kotika te kokokisa mokumba oyo Nzambe apesi biso ya kosakola mpe kokómisa bato bayekoli. Tii lelo oyo toyebi te mokolo mpe ngonga oyo mokolo ya Yehova ekoya; ezali mpe na ntina te tóyeba yango. Nzokande, tokoki kokoba komilɛngɛla mpe tokosala yango. (Mat. 24:36, 44) Tozali na elikya ete soki totyeli Yehova motema mpe totye Bokonzi na esika ya liboso, elikya na biso ekokokisama.​—Rom. 10:11.

^ par. 3 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 2004, nkasa 14-18.