Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biteyelo ya Teokrasi emonisaka bolingo ya Yehova

Biteyelo ya Teokrasi emonisaka bolingo ya Yehova

YEHOVA azali ‘Molakisi na biso Monene.’ (Yis. 30:20) Bolingo etindaka ye ateya basusu mpe apesa bango formasyo. Na ndakisa, lokola alingaka Yesu mingi, “alakisaka ye makambo nyonso oyo ye moko asalaka.” (Yoa. 5:20) Lokola alingaka biso Batatoli na ye, apesaka biso “lolemo ya bato oyo bateyami” wana tozali kosala makasi tópesa ye nkembo mpe tósalisa basusu.​—Yis. 50:4.

Komite ya Mateya ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi elandaka ndakisa ya bolingo ya Yehova, yango wana ezali kosalela biteyelo zomi mpo na kopesa formasyo na bandeko oyo bazali na mposa mpe na makoki ya kokɔta na biteyelo yango. Yo mpe ondimaka ete biteyelo yango emonisaka bolingo ya Yehova?

Tótalela mwa moke biteyelo oyo ebongiseli ya Yehova ezali kosalela lelo oyo mpe maloba ya bandeko mosusu oyo bakɔtaki na biteyelo yango. Na nsima, omituna boye: ‘Ndenge nini nakoki kokɔta na moko ya biteyelo yango?’

ZWÁ FORMASYO YA BITEYELO YA TEOKRASI

Lokola Yehova azali “Nzambe ya bolingo,” apesaka formasyo oyo esalisaka biso tózala na bomoi ya malamu, tólonga mikakatano, mpe tózala mpenza na esengo na mosala ya kosakola. (2 Ko. 13:11) Lokola bakristo ya ekeke ya liboso, tozali na nyonso oyo esengeli mpo na kosalisa basusu mpe ‘koteya bango bátosa makambo nyonso’ oyo bapesi biso mitindo.​—Mat. 28:20.

Atako mbala mosusu tokoki te kokɔta na biteyelo yango nyonso, tokoki kokɔta ata na moko na yango. Mpe na nsima tokoki kosalela formasyo euti na Biblia oyo tozwi na biteyelo yango. Tokoki mpe kobongisa mosala na biso ya kosakola soki tozali kobima na basaleli ya Yehova oyo bazwá formasyo malamu na biteyelo yango.

Omituna boye: ‘Makambo ya bomoi na ngai ezali kopesa ngai nzela nakɔta na moko ya biteyelo yango?’

Basaleli ya Yehova bamonaka ete ezali mpenza libaku malamu kokɔta na moko ya biteyelo yango mpo na kozwa formasyo na yango. Tiká ete formasyo oyo okozwa esalisa yo opusana lisusu penepene na Nzambe mpe esalisa yo okokisa mikumba oyo apesi yo, mingimingi mokumba ya kosakola nsango malamu, oyo esengeli kokokisama nokinoki.